Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/2 lok. 32
  • Okokende na likoló to na lifelo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okokende na likoló to na lifelo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/2 lok. 32

Okokende na likoló to na lifelo?

“MAKOKI nini ozali na yango ya kokende na likokó to na lifelo?”

Motuna oyo motunamaki epai na Baameriké na bisika bikeseni mpo na bolukiluki moko euti kosalema kala mingi te. Etuluku moko ya balukiluki ya kelasi monene ya Princeton, na engumba New Jersey, na Etats-unis, ebimisaki matomba ya bolukiluki yango kati na búku Religion in America 1992-1993 (Losambo na Amerika 1992-1993).

Lolenge nini yo olingaki koyanola? Mobalani na yo to bato mosusu oyo olingaka bakokende na likoló na nsima ya liwa? Okanisi ete bino banso bakokende na lifelo?

Bolukiluki bomonisaki ete pene na bato 78 kati na bato monkámá bakanisaki ete bazalaki na makoki mingi ya kokende na likoló, bato mingi koleka bayanolaki motindo wana esili koleka pene na bambula 40. Bongo lifelo? Pene na bato 77 katikati na bato monkámá bamonisaki ete makoki mazali mpenza moke mpo na bango kokende na lifelo.

Biyano na bango bitongamaki likoló na boyebi ya sikisiki ya Biblia? Ya solo, pene na bato minei kati na bato zomi bandimaki ete bayanganaka lisusu mingi te na makita ya mangomba koleka bambula mitano oyo euti koleka. Bobele bato 28 katikati na bato monkámá nde bamilobaki ete bayanganaka kati na bituluku ya koyekola Biblia mpe bato 27 kati na monkámá bayanganaka kati na malɔ́ngi ya bakelasi ya mangomba.

Soki oyekoli Biblia na likebi nyonso, okokundola makambo ya kokamwisa. Na ndakisa, na lolenge ya polele, Biblia elobi ete na nsima ya liwa Yesu akendeki na “lifelo,” lolenge esalelami na mabongoli mosusu ya Biblia. (Misala 2:31, King James Version; “Hades,” New World Translation) Liloba ya Nzambe emonisi mpe ete ata Mokonzi Davidi, soko mpe Yoane Mobatisi bakendeki na likoló te nsima na liwa. (Matai 11:11; Misala 2:29) Oyo ezali makambo ya solo, kasi bobele makanisi mpamba te mauti na bolukiluki ya kotuna bato mituna.

Tala makambo mosusu oyo makoki kosimba motema na yo: Biblia ezali koteya ete bantoma ya Yesu mpe mwa motuya moke ya bato mosusu bakokamatama mpo na kokende na likoló mpo na koyangela elongo na Yesu. Nzokande, ndambo monene ya bato oyo basilaki kokufa bakendeki bobele na nkunda ya bato banso. Nzambe akosekwisa bango, kozongisáká bango na bomoi awa na mabelé na elikya ya kozala na bomoi oyo etondi na makambo mingi ya kitoko, bomoi ya esengo mpe ezangi nsuka kati na mabelé oyo ekozonga paladiso.

Batatoli ya Yehova bakozala na esengo ya kosalisa yo na kozwa elikya makasi wana na lisalisi ya Biblia na yo moko.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto