Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 1/2 nk. 4-7
  • Babandisi ya mabe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Babandisi ya mabe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Motomboki ya liboso
  • Baanzelu mosusu batomboki
  • Banguna na bato
  • Bakopesama lisusu nzela kino ntango boni?
  • Botomboki kati na mokili na elimo
    Bilimu ya bakufi bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?
  • Bakonzi kati na bisika ya elimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • Moninga na biso oyo aleki malamu azali na mokili ya bilimu
    Lamuká!—1997
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 1/2 nk. 4-7

Babandisi ya mabe

NDIMBOLA oyo Biblia ezali kopesa na ntina na bopusi oyo bademó bazali na yango kati na makambo ya bato ezali koyanola na mituna ya moboko na ntina na mabe oyo mbele elingaki kozwa biyano te. Tótalela na ndakisa, maloba oyo mauti na zulunalo International Herald Tribune na ntina na etumba oyo esilaka te kati na bitúká oyo ebéngami Balkans: “Etuluku moko ya balukiluki na Mpótó esukisaki ete [basodá] babebisaki basi mpe bilenge basi bamizilmá 20 000 . . . yango ezali kati na ebongiseli ya politiki ya nsomo oyo esalemaki mpo na kobangisa, kolembisa na makanisi mpe kobengana bafandi ya bitúká wana na bandako na bango.”

Lisoló moko oyo ebimaki kati na zulunalo Time emekaki kopesa ndimbola ya makambo oyo: “Na bantango mosusu, bilenge mibali kati na etumba bazalaki kobebisa basi mpo na kosepelisa mikóló na bango, bakonzi na bango, lokola bana oyo balukaka kolingama epai na batata na bango. Kobebisa basi ezali lolenge ya komonisa bomoko na bango na makambo ya mobulu. Elenge mobali oyo andimi kosala makambo ya nsomo akotika kotosa lisosoli na ye mpo na kosepelisa mikano ya etuluku oyo misengeli kotosama. Mobali azali komonisa bosembo na ye na kosaláká makambo ya mabe.”

Kasi mpo na nini “mikano wana ya etuluku oyo misengeli kotosama” mibebisami mingi koleka lisosoli ya basangani na yango? Mpo ete moto moko na moko, soko mpe bato nyonso balingaka kofanda na kimya elongo na bazalani na bango. Soki ezali bongo, mpo na nini na ntango ya etumba, bato babebisanaka, banyokolanaka, mpe babomanaka? Ntina ya moboko ezali ete nguya ya bademó ezali kosala mosala.

Bososoli ya bopusi ya bademó ezali kopesa mpe nzela na kolimbola oyo basusu bazali kobénga ete “mokakatano ya teoloji.” Mokakatano ezali ya koyeba lolenge nini koyokanisa makambo misato oyo: (1) Nzambe azali na nguya nyonso; (2) Nzambe azali bolingo mpe malamu; mpe (3) makambo ya nsomo oyo mazali kobima. Basusu bazali koloba ete likoki ezali ya koyokanisa makambo mibale, kasi okoki soko moke te koyokanisa makambo yango nyonso misato. Liloba na Nzambe yango moko ezali kopesa eyano, mpe ete eyano yango etaleli bilimo bizangi komonana, basáli na mabe.

Motomboki ya liboso

Biblia eyebisi biso ete Nzambe ye moko azali elimo. (Yoane 4:24) Na nsima akómaki Mozalisi ya bamilió ya bikelamu mosusu ya elimo, bana oyo bazali baanzelu. Kati na emonaneli, Danyele, mosaleli na Nzambe amonaki nkóto nkóto na baanzelu. Bikelamu nyonso ya elimo oyo Yehova azalisaki bazalaki bayengebene mpe na boyokani elongo na mokano na ye.​—Danyele 7:10; Baebele 1:7.

Na nsima, ntango Nzambe “atyaki miboko na mabelé,” baanzelu wana oyo bazalaki bana na Nzambe “bangangaki elongo na esengo” mpe “babandaki kobeta maboko.” (Yobo 38:4-7, NW) Kasi moko kati na bango akólisaki mposa ya kozwa mpo na ye moko losambo oyo ebongaki bobele na Mozalisi. Na kotombokeláká Nzambe, anzelu wana amikómisaki ye moko satana (oyo elimboli “motemeli”) mpe zábolo (oyo elimboli “motongi”).​—Kokanisá na Ezekiele 28:13-15.

Kosaleláká nyoka kati na elanga ya Edene mpo na koloba epai na Eva, mwasi ya liboso, Satana alóngaki kokosa Eva ete azanga kotosa etinda na Nzambe oyo epekisaki kolya mbuma ya nzeté moko kati na elanga. Na nsima, mobali na ye alandaki ye. Na bongo, babalani ya liboso basanganaki elongo na anzelu wana kati na botomboki na ye liboso na Yehova.​—Genese 2:17; 3:1-6.

Atako makambo malekaki kati na Edene makokaki komonana ete mazali liteya lisengeli mpo na oyo etali botosi, nzokande makambo mibale minene matali bizaleli malamu mabimisamaki na Satana. Ya liboso, Satana atyaki ntembe na ntina na boyangeli ya Yehova likoló na bikelamu na ye, kolobáká ete Nzambe azalaki kosalela yango na lolenge ya boyengebene te mpe ezalaki mpo na bolamu ya bato te. Mbala mosusu bato bakokaki kozala na esengo mingi soki bamiyangelaki bango moko. Ya mibale, atyaki ntembe na kolobáká ete ekelamu moko te ya mayele akoki kotikala sembo liboso na Nzambe soki emonani lokola ete botosi ezali komemela ye litomba moko te na mosuni.a

Bososoli ya polele ya likambo oyo ebimaki na Edene, elongo na boyebi ya bizaleli ya Yehova, ekopesa biso nzela na kokanga ntina na lolenge ya kolimbola “mokakatano ya teoloji,” elingi koloba koyokanisa kozala ya mabe elongo na bizaleli ya Nzambe oyo ete nguya mpe bolingo. Atako ezali solo ete Yehova azali na nguya oyo ezangi nsuka mpe azali mpenza bolingo, azali lisusu mayele mpe bosembo. Azali kosalela bizaleli wana minei na lolenge ya kokoka. Na bongo, asalelaki te nguya na ye monene mpo na koboma batomboki misato na mbala moko. Kosala bongo ekokaki kozala likambo ya sembo kasi mpenza te likambo ya mayele to ya bolingo. Lisusu, asengelaki te bobele kolimbisa mpe kobosana, mwango oyo basusu bakoki kotalela ete elingaki komonisa bolingo. Kosala bongo ekokaki te kozala likambo ya mayele mpe ya sembo.

Esengelaki ntango mingi mpo na kosilisa ntembe oyo Satana abimisaki. Ekokaki ete ntango eleka mpo na komona soki bato bakoki komiyangela bango moko kozanga kotalela Nzambe. Na kopesáká nzela na batomboki wana misato ete balanda kozala na bomoi, Yehova apesaki mpe likoki epai na bikelamu na komonisa ete Satana azali mobuki na lokutá, na kosaleláká Nzambe na bosembo nyonso ata na nsé ya mikakatano.b

Yehova alobaki polele na Adama mpe Eva ete soki balei mbuma oyo epekisamaki, bakokufa. Mpe bakufaki, atako Satana andimisaki Eva ete akokufa te. Satana mpe azali na nsé na etumbu ya kufa; na kozeláká ntango yango, azali kolanda kozimbisa bato. Ya solo, Biblia eyebisi ete: “Mokili mobimba ejali kolala na kati [na nguya, NW] na oyo mabe.”​—1 Yoane 5:19; Genese 2:16, 17; 3:4; 5:5.

Baanzelu mosusu batomboki

Mosika mingi te nsima na makambo oyo mabimaki na Edene, baanzelu mosusu basanganaki mpo na kotombokela boyangeli ya Yehova. Biblia elobi ete: “Na ntango bato bayaki mingi na mokili, mpe bana basi babotamaki na bango, bana babali na Njambe bamɔnaki ete bana basi na bato bajalaki bonjenga, mpe bakamataki kati na bango basi na bango na libala, baoyo epɔnaki bango.” Na maloba mosusu, baanzelu wana “batikaki efandelo na bango mpenza [kati na likoló]” mpe bayaki na mabelé, balataki nzoto ya bato, mpe basepelaki na bisengo ya kosangisa nzoto elongo na basi.​—Genese 6:1, 2; Yuda 6. 

Lisoló elandi koyebisa na Genese 6:4 ete: “[Banefilimi, NW] bajalaki na mokili na mikɔlɔ yango mpe na nsima lokola, wana eyaki bana na Njambe epai na bana basi na bato mpe babotelaki bango bana. Baoyo bajalaki bilombe mpe na lokumu na kalakala.” Bana wana babotamaki kati na basi mpe baanzelu bazalaki makasi na lolenge ya mabe, bazalaki “bilombe.” Bazalaki mibali na mobulu, to Nephi·limʹ, liloba ya Liebele oyo elimboli “baoyo bazali kokweisa basusu.”

Esengeli koyeba ete na nsima makambo wana mayaki kolobelama kati na masapo ya bato ya kala. Na ndakisa, lisapo moko ya Babilone oyo ekokisi mibu 4 000 ezali kolobela bolóngi oyo eleki ya bato ya Gilgamesh, moto na nguya, nzambe-ndambo ya mobulu oyo “mposa na ye [etikaka] te moseka epai na molingami na ye.” Ndakisa mosusu, euti na masapo ya Greke, yango ezali kolobela bongo moto oyo aleki bato mosusu na nguya, Hercules (to Heracles). Abotamaki na mama oyo azalaki moto na nkombo Alcmene, mpe na tata nzambe Zeus, Hercules asalaki makambo mingi ya mobulu nsima na koboma mwasi na ye mpe bana na ye na nkanda makasi. Atako masapo yango mabebisamaki ntango yango ezalaki koyebisama na eleko moko kino na eleko mosusu, nzokande ezali na boyokani na oyo Biblia elobi na ntina na Banefilimi mpe baanzelu batata na bango oyo bazalaki batomboki.

Na ntina na bopusi ya baanzelu mabe mpe bana na bango oyo balekaki bato, mabelé matondaki na mobulu na boye ete Yehova azwaki ekateli ya koboma mokili na mpela monene. Banefilimi bakufaki elongo na bato nyonso ya mabe, bato oyo babikaki ezalaki bobele moyengebene Noa mpe libota na ye.​—Genese 6:11; 7:23.

Nzokande, baanzelu ya mabe bakufaki te. Na esika ete bakufa, batikaki nzoto na bango ya bato mpe bazongaki na lolenge na bango ya elimo. Na ntina na bozangi botosi na bango, bapesamaki nzela te ya kozonga kati na libota ya Nzambe oyo esalemi na baanzelu ya sembo; mpe bapesamaki lisusu nzela te mpo na kolata lisusu nzoto ya bato lokola basalaki yango na mikolo ya Noa. Atako bongo, balandaki komonisa bopusi mabe kati na makambo na bato, na nsé ya litambwisi ya “mokonzi na bademó,” Satana Zábolo.​—Matai 9:34, NW; 2 Petelo 2:4; Yuda 6.

Banguna na bato

Satana mpe bademó uta kala bazalaka ntango nyonso babomi mpe basáli na mabe. Na banzela ekeseni, Satana abomaki bibwele mpe basaleli ya Yobo. Na nsima, abomaki bana zomi ya Yobo na kotindáká “mopɛpɛ monɛnɛ” mpo na kokweisa ndako epai kuna bazalaki. Nsima na oyo wana, Satana abetaki Yobo na “bibimba mabe longwa na matambe na makolo na ye kino epai na likolo na motó na ye.”​—Yobo 1:7-19; 2:3, 7. 

Bademó bazali komonisa ezaleli mabe motindo moko. Na mikolo na Yesu, bazalaki kobebisa likoki ya koloba mpe ya komona ya bato. Bapusaki mobali moko na komizokisa na mabanga. Babwakaki elenge mobali moko na mabelé mpe “batutaki ye makasi.”​—Luka 9:42; Matai 9:32, 33; 12:22; Malako 5:5.

Balapólo oyo ezali kouta bipai binso na mokili emonisi ete Satana mpe bademó bazali na mayele mabe lokola na ntango ya kala. Bazali kobeta bato mosusu na maladi. Bazali kotungisa bato mosusu na kobebisáká mpongi na bango to na kolotisáká bango bandoto ya nsomo to na konyokola bango na makambo matali kosangisa nzoto. Lisusu, bazali komema basusu na kosala makambo na mbindo, na koboma bato to na komiboma bango moko.

Bakopesama lisusu nzela kino ntango boni?

Satana mpe bademó na ye bakopesama nzela mpo na libela na libela te. Ezali mpenza mpo na bantina malamu nde Yehova apesaki bango nzela ete bázala kino na mikolo na biso, kasi sikawa ntango eyei mokuse. Na ebandeli ya ekeke oyo, litambe moko ya ntina mingi lisalemaki mpo na kotya ndelo na bopusi na bango. Mokanda ya Emoniseli elimboli ete: “Etumba ebimaki kati na likoló: Mikaele [Yesu Klisto oyo asekwaki] mpe baanzelu na ye babundaki na dalagona [Satana], mpe dalagona mpe baanzelu na ye babundaki kasi alóngaki te, esika mpo na bango kati na likoló ezalaki lisusu te. Na bongo dalagona monene abwakamaki na nsé, ye nyoka ya ebandeli, ye oyo abéngami Zábolo mpe Satana, oyo azali kozimbisa mabelé mobimba mafandami; abwakamaki na nsé, na mabelé, mpe baanzelu na ye babwakamaki na nsé elongo na ye.”​—Emoniseli 12:7-9, NW.

Makambo nini mabimaki? Lisoló elandi koyebisa ete: “Mpo na yango bósepela, bino makoló mpe bino baoyo bofandi kati na yango!” Baanzelu ya sembo bakokaki kosepela mpamba te Satana mpe bademó na ye bazalaki lisusu na makoló te. Kasi ezali boni mpo na bato awa na mabelé? Biblia eyebisi ete: “Mawa na [mabelé, NW] mpe na mai monɛnɛ! Mpɔ ete [Zábolo, NW] akiteli bino na kongala mingi, awa eyebi ye ete ajali na mwa elaka mokuse.”​—Emoniseli 12:12.

Kati na nkanda na bango Satana mpe bato na ye bazali kosala nyonso mpo na kopesa mawa mingi liboso ete nsuka na bango oyo esili kobelema eya. Na boumeli ya ekeke oyo ya ntuku mibale, ezalaki na bitumba mibale ya mokili mobimba mpe koleka bitumba mike 150 uta nsuka ya etumba ya mibale ya mokili mobimba. Elobeli na biso esili kokotisa kati na yango maloba mingi oyo mazali komonisa mobulu ya bato ya ntango oyo: “guerre bactériologique,” “holocauste,” “terrorisme,” “crimes de guerre,” “criminels récidivistes,” mpe “bombe atomique.” Bansango etondi na masoló ya bilangwiseli (drogue), koboma bato, kobwaka babómbi, kolya misuni ya bato, kobomaboma, nzala mpe konyokola bato.

Ezali elendiseli na koyeba ete makambo wana mazali mpo na ntango mokuse. Mosika te, Nzambe akobundisa lisusu Satana mpe bademó na ye. Kolobeláká emonaneli oyo azwaki longwa na Nzambe, ntoma Yoane alobaki ete: “Namɔnaki mwanje kokita na likolo, ajalaki na lifungola na libulu bojindo, na monyɔlɔlɔ monɛnɛ na lobɔkɔ na ye. Asimbi dalagɔna, ye nyoka yango na kalakala, oyo ajali [Zábolo, NW], Satana, mpe akangi ye na monyɔlɔlɔ mbula nkoto. Abwaki ye na libulu bojindo, ajipi yango, mpe atii elembo likolo na yango, na ntina ete ajimbisa mabota lisusu tɛ, kino nsuka na mbula yango nkoto.”​—Emoniseli 20:1-3.

Nsima na yango, Zábolo mpe bademó na ye “bakofungwama mpo na mwa ntango moke,” mpe na nsima bakobomama mpo na libela. (Emoniseli 20:3, 10) Oyo nde eleko kitoko ekozala ntango yango! Wana Satana mpe bademó na ye bakozala lisusu te mpo na libela, Yehova akozala “yɔnsɔ kati na bato yɔnsɔ.” Mpe, ya solo, bato nyonso: “bakosepela na koyikana mingi ya kimya.”​—1 Bakolinti 15:28; Nzembo 37:11, NW.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Yango emonanaki polele na nsima ntango Satana alobaki na mosaleli na Nzambe Yobo ete: “Loposo mpɔ na loposo! Moto akopɛsa yɔnsɔ ejali na ye mpɔ na bomɔi na ye. Osembola lobɔkɔ na yɔ saisaipi mpe omama mikwa na ye mpe mosuni na ye mpe akolakela yɔ mabe na miso na yɔ.”​—Yobo 2:4, 5.

b Mpo na botaleli bolai ya lisoló mpo na nini Nzambe apesi nzela na mabe, talá búku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis, ebimisamaki na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.

[Elilingi na lokasa 7]

Ezali moto ye moko nde azali mobandisi ya makambo wana, to ezali nde nguya moko ya mabe, oyo ezangi komonana nde abongi kopamelama?

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Maziba ya pitɔlɔ́ mazikisami na mboka Koweït, na 1991: Chamussy⁄Sipa Press

[Elilingi na lokasa 7]

Oyo nde eleko kitoko ekozala wana bademó bakozala lisusu te mpo na kotungisa bato!

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto