Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 1/2 lok. 3
  • Banani bandimaka ete bilimu mabe bizali?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Banani bandimaka ete bilimu mabe bizali?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Masolo mosusu
  • Bikelamu ya elimo—Bakoki kosala biso mabe to malamu?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Tɛmɛlá nguya ya bilimu mabe!
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
  • Ndimá lisalisi ya Yehova mpo otɛmɛla bilimo mabe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2019
  • Omibatela na bilimo mabe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 1/2 lok. 3

Banani bandimaka ete bilimu mabe bizali?

ONDIMAKA ete bilimu bizangi komonana bikoki kozala na bopusi likoló na bomoi na yo? Mingi bakoki koyanola na makasi mpenza ete te. Atako bayebi ete Nzambe azali, bazali kotyola likanisi oyo ete ezali na basáli na mabe oyo baleki bato.

Kati na mikili ya Mpótó, bato mingi baboyaki kondima ete bikelamu bizangi komonana bizali, bapusamaki mingimingi na boklisto ya lokutá, oyo na boumeli ya bikeke eteyaki ete mabelé ezalaki ntei ya mɔlɔ́ngɔ́, katikati ya likoló mpe lifelo ya mɔ́tɔ. Engebene liteya wana, baanzelu bazalaki kosepela na bisengo na likoló, nzokande bademó bazalaki koyangela na lifelo.

Lokola bokundoli kati na makambo na zébi ememaki bato na kobwaka makanisi mabe na ntina na lolenge oyo mɔlɔ́ngɔ́ ezali, na bongo kondima ete bikelamu ya elimo bizali ekómaki likambo ya kala. Búku monene The New Encyclopædia Britannica elobi ete: “Kati na makambo oyo mabimaki nsima ya mbongwana ya Copernic na ekeke ya 16 (oyo moboko na yango ezalaki likoló na mateya ya Copernic, mobotami ya Pologne oyo azalaki moyekoli na minzoto), kati na yango . . . mabelé matalelamaki lisusu te lokola ntei ya mɔlɔ́ngɔ́ kasi, na esika ete ezala bongo ezalaki nde bobele moko na bitando ya ebongiseli oyo ebéngami ete système solaire, oyo ezali yango moko eteni moke koleka ya oyo ebéngami ete galaxie oyo ezali kati na mɔlɔ́ngɔ́ oyo emonani ete ezali monene koleka​—mateya matali baanzelu mpe bademó matalelamaki lisusu te ete mabongi.”

Ya solo, bato mingi bazali kondima te ete bilimu mabe bizali, kasi ezali na bamilió na bato oyo bazali kondima bango. Baanzelu oyo bakweaki bazali na bopusi makasi kati na mangomba mingi, ezala na ntango ya kala mpe lelo oyo. Longola mokumba na bango ya babebisi na bizaleli ya elimo, baanzelu wana mabe batalelami lokola babimisi na makámá minene, na ndakisa bitumba, nzala, mpe koningana ya mabelé, lisusu bazali babandisi ya bamaladi, ya mobulungano na makanisi, mpe ya liwa.

Mpo na baklisto mpe Bayuda, Satana Zábolo azali mokóló ya bilimu mabe, abéngami Iblis epai na Bamizilmá. Kati na lingomba ya Zoroaster na Perse ya kala, abéngami ete Angra Mainyu. Kati na lingomba ya boyebi boleki na ntina na mabombami ya losambo (gnosticisme), oyo ekólaki mingi na ekeke ya mibale mpe ya misato ya Ntango na Biso, Satana atalelamaki lokola Mosaleli ya bato, ebéngeli oyo epesameli nzambe oyo azali na zuwa epai na Mozalisi oyo aleki ye, mpe oyo bato mingi bazali kosambela ye kozanga koyeba.

Misala ya bilimu oyo bizali na nsé ya mokóló na bilimu mabe mizali komonana mingi kati na mangomba oyo mazali na mikili mizwami epai na Ebimelo na ntango. Ba hindous bazali kondima ete ba asuras (bademó) bazali kotemela ba devas (banzambe). Mingimingi baoyo ya nsomo kati na ba asuras ezali bongo ba rakshasas, bikelamu ya nsomo oyo bazalaka na malíta.

Bandimi ya lingomba ya Bouddha batalelaka bademó lokola nguya oyo ezali na bomoto oyo ezali kopekisa moto na kozwa Nirvana, oyo ezali bongo kolimwa ya mposa. Mokonzi molengoli kati na bango ezali Mara, elongo na bana na ye misato ya basi Rati (Mposa), Raga (Esengo), mpe Tanha (Mitungisi).

Basambeli ya Chine basalelaka mɔ́tɔ ya esengo, bisúngi, mpe na matumbú mpo na komibatela liboso na ba kuei, to bademó oyo bazali kati na biloko bizalisami. Mangomba ya Japon mandimaka mpe ete ezali na bademó mingi, bakisa oyo ya nsomo babéngami ete ba tengu, bilimu oyo bikotaka kati na nzoto ya bato kino bakobimisama na nganga-nzambe.

Kati na mangomba ya kala ya Azia, Afrika, Oseania, mpe ya Amerika, bikelamu ya elimo bindimami ete bikosalaka malamu to bikosalaka mabe na kotalela ezalela ya makambo mpe mayoki na bango oyo eleki makasi. Bato bazali kosambela bilimu wana mpo na komibatela na makámá mpe mpo na kozwa lisungi.

Likoló na oyo, bakisá mpe mposa oyo epalangani na makambo ya likundú mpe misala ya bilimu mabe, mpe ezali polele, kondima ete bilimu mabe bizali, ezali likambo ya kala oyo epalanganá bipai nyonso. Kasi ezali malamu kondima ete bikelamu motindo wana bizali? Biblia elobi ete bizali. Nzokande, soki bizali, mpo na nini Nzambe apesi bango nzela ete bízala na bopusi likoló na moto mpo na kosala ye mabe?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto