Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/1 lok. 32
  • Lokola pómo ya wolo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lokola pómo ya wolo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/1 lok. 32

Lokola pómo ya wolo

PÓMO, oyo nde mbuma na kosepelisa miso mpe lolemo! Biblia ezali koloba mpo na mbuma wana kitoko kati na lisese oyo mozindo: “Liloba lilobami o ntango ya malamu, wana [ezali lokola pómo na, NW] wolo o sani ya palata.” (Biyele 25:11, Liloba lya Nzambe) Maloba oyo malimboli nini?

“Mbuma na wolo o sani ya palata” ekoki kozala biloko biyemami na bilembo kitoko, na ndakisa saáni ya palata etyami bambuma na wolo. Lokola ebandeli ya mokapo eyebisi ete moto azwami liboso na mokonzi, mikapo wana mikoki kolobela makabo oyo mapesami epai na mokonzi moko: biloko na wolo eyemami na lolenge ete emonana lokola mbuma ya pómo mpe etyami kati na basaáni ya palata. (Masese 25:6, 7) Nyonso ezali mpenza na bonzengá.

Bonzengá ya lolenge moko emonani na maloba mabongi oyo matyami na makomi to mabimisami na monoko, maloba ya lokumu, oyo mabimisami na ntango na yango. Ezali kosepelisa, ekolendisaka mpe ezali na litomba kati na makambo mingi. Maloba mapemami na Nzambe, oyo mazwami kati na Biblia, makokani mpenza na “[pómo na, NW] wolo o sani ya palata.”

Na boyokani na oyo alobaki na mayele nyonso kati na Masese 25:11, mokonzi Salomo “alukaki mpe maloba na kitɔkɔ mpe na sembo, akomaki maloba na sɔlɔ.” (Mosakoli 12:10; Masese 25:1) Bikeke mingi na nsima, ntoma Paulo akomaki ete: “Makomi yɔnsɔ mapemami na [elimo, NW] na Njambe, makoki kopɛsa litomba.” (2 Timoté 3:16) Ee, Biblia etondi na batoli mingi ya ntina, na bisakweli mingi, na masese mpe na makambo mingi ya solo ya kitoko mpe oyo ezali kongenga makasi koleka misala nyonso ya basáli na mayele oyo bakosalaka misala na mabɔkɔ. Epai mosusu, moto na moto oyo azwi mayele ya Liloba na Nzambe, Biblia, azwi eloko eleki motuya mpe akoki kozala na elikya ya bomoi na seko.​—Masese 4:7-9; Yoane 17:3.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto