Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w94 15/1 nk. 10-15
  • Yehova azali koyangela na nzela ya teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Yehova azali koyangela na nzela ya teokrasi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Teokrasi ebotami
  • Bokonzi na nsé na boyangeli ya teokrasi
  • Misala mpe makanisi oyo mayokani na teokrasi te
  • Nsuka ya eyangeli moko ya teokrasi
  • Eyangeli ya sika ya teokrasi
  • Kangamá makasi na Teokrasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Babateli mpe bampate kati na teokrasi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Tobatela etonga elongo na Mozalisi na biso Monene
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Bokóli na ebongiseli ya teokrasi
    Nzembo mpo na kokumisa Yehova
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
w94 15/1 nk. 10-15

Yehova azali koyangela na nzela ya teokrasi

“[Yehova akozala, NW] mokonji lobiko na lobiko.”​—NZEMBO 146:10.

1, 2. (a) Mpo na nini milende ya bato mpo na koyangela milóngi te? (b) Bobele lolenge ya boyangeli nini oyo ezalaki malamu mingi?

UTA eleko ya Nimerodi, bato basili komeka mitindo mikeseni mpo na koyangela mokili. Ezalaki na biyangeli mabe oyo moto ye moko amitye lokola elombe mpo na koyangela basusu, bato ya libota moko bazali koyangela moko nsima na mosusu, etuluku moke ya bato ezali kokamba mboka mpe mitindo ndenge na ndenge ya demokrasi. Yehova apesaki nzela na biyangeli nyonso wana. Na bongo, lokola Nzambe azali Liziba monene ya bokonzi nyonso, na ndimbola mosusu, ezali ye nde atyaki mikonzi ya politiki kati na etelemelo oyo bazali na yango bamoko liboso na basusu. (Baloma 13:1) Atako bongo, milende nyonso oyo bato basili kosala mpo na komiyangela milongi te. Mokonzi moko te kati na bato, oyo asili kosala ete bato baumela mingi, bázala malamu mpe na sembo mingi. Mbala mingi, “moto azali koyangela [moninga na ye] moto mpo na kopesa ye mpasi.”​—Mosakoli 8:9, NW.

2 Yango esengeli nde kokamwisa biso? Soko moke te! Moto azangi kokoka azalisamaki te mpo amiyangela ye moko. “Njela na moto ezali kati na ye mɔkɔ te, ekoki na motamboli tɛ ete atambolisa makolo na ye mɔkɔ.” (Yilimia 10:23) Talá mpo na nini, na boumeli mobimba ya lisoló na bato, bobele lolenge ya boyangeli moko nde ezalaki malamu. Yango nini? Teokrasi na nsé na bokonzi na Yehova Nzambe. Na lokota na greke oyo bakomelaki Biblia, “teokrasi” elimboli boyangeli [kraʹtos] na Nzambe [the·osʹ]. Boyangeli nini malamu ekoki lisusu kozala koleka oyo ya Yehova Nzambe?​—Nzembo 146:10.

3. Tangá mwa bandakisa ya eyangeli ya teokrasi oyo ezalaki kalakala awa na mabelé.

3 Teokrasi esalelamaki mwa ntango moke kati na elanga ya Edene, kino na ntango Adama na Eva batombokelaki Yehova. (Genese 3:1-6, 23) Na eleko ya Abalayama, engumba ya Saleme, epai kuna Melekisedeki azalaki mokonzi mpe nganga, emonani lokola ete azalaki na eyangeli ya teokrasi. (Genese 14:18-20; Baɛbɛlɛ 7:1-3) Nzokande, teokrasi ya liboso mpo na ekólo mobimba na nsé na boyangeli ya Yehova Nzambe esalemaki kati na mokili mokauki ya Sinai, na ekeke ya 16 L.T.B. Yango ebandaki lolenge nini? Mpe lolenge nini boyangeli wana ya teokrasi ezalaki kosala?

Teokrasi ebotami

4. Lolenge nini Yehova asalaki libota ya teokrasi ya Yisraele?

4 Na 1513 L.T.B., Yehova asikolaki Bayisraele longwa na boombo na Ezipito mpe abomaki mampinga ya Farao oyo emikotisaki kati na mai Motane mpo na kolanda bango. Na nsima akambaki Bayisraele na ngomba Sinai. Wana bazalaki naino kofanda na nsé ya ngomba yango, Nzambe alobaki na bango na nzela ya Mose ete: “Bino bomɔni yango esalaki ngai epai na Baejipito mpe motindo eyeisaki ngai bino epai na ngai. Yango wana sɔkɔ bokotosa monɔkɔ na ngai mpe bokobatela kondima na ngai, mbɛlɛ bokozala bato na ngai [katikati na mabota nyonso mosusu, NW].” Bayisraele bayanolaki mpo na yango: “Tokosala yango yɔnsɔ elobi [Yehova.]” (Esode 19:4, 5, 8) Kondimana esalemaki, oyo ebimisaki libota ya teokrasi ya Yisraele.​—Deteronome 26:18, 19.

5. Mpo na nini tokoki koloba ete Yehova azalaki koyangela kati na Yisraele?

5 Kasi, na ndimbola nini Yisraele eyangelamaki na Yehova, ye oyo moto moko te akoki komona ye? (Esode 33:20) Na ndimbola oyo ete mibeko mpe bonganga ya ekólo eutaki epai na Yehova. Baoyo bazalaki kotosa mibeko mpe bazalaki kosambela na boyokani na bibongiseli ya Nzambe bazalaki kosalela Yehova, Mokambi Monene ya teokrasi. Lisusu, nganga monene azalaki na Ulimu mpe Tumimu, oyo na lisalisi na yango Yehova Nzambe azalaki kopesa toli epai na libota na ye na ntango na likambo oyo lisengelaki kosalelama nokinoki. (Esode 28:29, 30) Lisusu, bankulutu ya makoki bazalaki komonisa Yehova kati na teokrasi mpe bazalaki kosenzela mpo na kosalelama ya Mibeko na Nzambe. Soki totaleli bomoi ya bamoko kati na mibali yango, tokoyeba malamu oyo bato basengeli kosala mpo na kotosa boyangeli ya Nzambe.

Bokonzi na nsé na boyangeli ya teokrasi

6. Mpo na nini ezalaki mpasi epai na bato ete basalela boyangeli moko ya teokrasi, mpe esengelaki bato ya motindo nini mpo na mokumba wana?

6 Baoyo bazalaki na bokonzi kati na Yisraele bazalaki na etelemelo monene, kasi esengelaki na bango kobatela bokatikati na bango, mpe yango ezalaki likambo moke te. Basengelaki kosɛnzɛla na boye ete bomoto na bango bozala na ntina monene te koleka kobulisama ya nkombo ya Yehova. Maloba mapemami na Nzambe oyo mayebisi ete, “ekoki na motamboli tɛ ete atambolisa makolo na ye mɔkɔ,” yango ezalaki mpe na ntina mpo na Bayisraele mpe mpo na bato nyonso mosusu lokola. Yisraele ezalaki kotambola malamu bobele na ntango mikóló bazalaki komikundola ete bazali kati na teokrasi mpe ete basengelaki kosala mokano na bango te, kasi oyo ya Yehova. Mwa moke nsima na kosalema ya Yisraele, bokilo ya Mose, Yetro, amonisaki mpenza lolenge oyo baye bapesameli bokonzi na teokrasi basengelaki kozala, “mibali na mayele, bato na kobanga Nzambe, bato babongi na kotyela motema, bayini na kanyaka.”​—Esode 18:21.

7. Kati na makambo nini Mose atikaki ndakisa malamu mpo na baoyo bazali na bokonzi na nsé na boyangeli ya Yehova Nzambe?

7 Mose azalaki moto ya liboso oyo azalaki na bokonzi monene kati na Yisraele. Apesaki ndakisa mpo na lolenge moto apesameli bokonzi na teokrasi asengeli kozala. Ya solo, bolembu ya bomoto emonanaki na libaku moko. Kasi Mose azalaki ntango nyonso kotya motema na ye epai na Yehova. Na ntango mituna mizalaki kobima na ntina na makambo oyo mabongisami naino te, azalaki koluka litambwisi ya Yehova. (Kokanisá na Mituya 15:32-36.) Ndenge nini Mose atɛmɛlaki lisenginya ya kosalela etelemelo na ye monene mpo na nkembo na ye moko? Atako azalaki na motó ya libota makasi ya bamilió na bato, azalaki “na [komikitisa, NW] mingi, na koleka bato yɔnsɔ bajalaki na nse.” (Mituya 12:3) Azalaki kotalela bomoto na ye moko te, kasi azalaki nde komibanzabanza mpo na lokumu ya Nzambe. (Esode 32:7-14) Lisusu, azalaki na kondima makasi. Kolobáká na ntina na Mose, mpo na lolenge oyo ye azalaki liboso ya kokoma motambwisi ya libota, ntoma Paulo akomaki ete: “[Atelemaki ngwi, NW] lokola ete ajali komɔna ye oyo akomɔnanaka te.” (Baɛbɛlɛ 11:27) Emonani polele ete, Mose abosanaki soko moke te ete, ezali Yehova nde azalaki mpenzampenza Moyangeli ya libota. (Njembo 90:1, 2) Oyo nde ndakisa kitoko mpo na biso!

8. Etindá nini Yehova apesaki epai na Yosua, mpe mpo na nini yango ezali na ntina mingi?

8 Na ntango emonanaki ete mosala ya kokamba Yisraele ekómi mokumba monene mpo na Mose, Yehova atyaki elimo na ye likoló na mikóló 70 mpo ete basunga mosaleli na ye na kosambisa libota. (Mituya 11:16-25) Na nsima, engumba moko na moko esengelaki kozala na mikóló na yango. (Kokanisá na Deteronome 19:12; 22:15-18; 25:7-9.) Nsima na liwa ya Mose, Yehova aponaki Yosua lokola motambwisi ya libota. Tokoki mpenza kokanisa ete na mokumba wana Yosua azalaki na makambo mingi ya kosala. Atako bongo, Yehova alobaki na ye mpo na likambo moko oyo asengeli kobosana yango te: “Buku na mobeko oyo ekolongwa na monɔkɔ na yo tɛ, kasi okokanisa yango butu na moi, ete okeba kotosa makambo yɔnsɔ makomami na yango.” (Yosua 1:8) Emonani ete, atako asilaki kolekisa mibu 40 kati na mosala, Yosua asengelaki kokoba kotanga Mibeko. Ata mbula boni oyo tosili kolekisa kati na mosala ya Nzambe to mikumba nini tozali na yango, esengeli na biso mpe kolanda koyekolaka Biblia mpe kokundola kati na makanisi na biso mibeko mpe mitinda na Yehova.​—Njembo 119:111, 112.

9. Nini ekomaki na Yisraele na eleko ya basambisi?

9 Nsima na Yosua molɔngɔ́ ya basambisi molandanaki. Na mawa nyonso, na ntango wana mbala mingi Bayisraele “bakweaki mpo na kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova.” (Basambisi 2:11, NW) Lisoló na Biblia lizali koloba mpo na eleko wana ya basambisi ete: “Na mikɔlɔ yango mokonzi ajalaki na Yisalaele tɛ. Moto na moto asalaki yango ezalaki sembo na miso na ye.” (Basambisi 21:25) Mpo na oyo etali etamboli mpe losambo, moto na moto azalaki kosala oyo elingaki ye, mpe Lisoló ya makambo na kala limonisi ete Bayisraele mingi bazalaki kozwa bikateli mabe. Bazalaki komipesa na losambo ya bikeko mpe bazalaki mbala mosusu kosala masumu minene. (Basambisi 19:25-30) Nzokande, ezali na basusu oyo bapesaki ndakisa malamu mpo na oyo etali komonisa kondima.​—Baɛbɛlɛ 11:32-38.

10. Ndenge nini, na eleko ya Samwele, Yisraele ezwaki mbongwana monene mpo na oyo etali boyangeli, mpe lolenge nini bakómaki kino na likambo yango?

10 Na eleko ya Samwele, mosambisi ya nsuka, Yisraele ezalaki na boyangeli ya malamu te. Lokola bazingamaki na mabota ya banguna, oyo yango nyonso ezalaki na mokonzi likoló na yango, Bayisraele bamonisaki ete bango mpe bazalaki na mposa ya mokonzi moko. Babosanaki ete bazalaki na Mokonzi uta kala, ete bazalaki na nsé na boyangeli moko ya teokrasi. Na bongo Yehova alobaki na Samwele ete: “Bajali koboya yɔ tɛ kasi bazali koboya ngai ete najala mokonzi likolo na bango lisusu tɛ.” (1 Samwele 8:7) Ndakisa na bango ezali kokundwela biso ete ezali mpasi te mpo na kobungisa emoneli na biso ya makambo ya elimo mpe mpo na kopusama na bato oyo bazingi biso.​—Kokanisá na 1 Bakolinti 2:14-16.

11. (a) Atako mbongwana esalemaki kati na eyangeli, mpo na nini tokoki koloba ete, Yisraele ezalaki ntango nyonso ebongiseli ya teokrasi oyo etambwisami na bakonzi? (b) Etindá nini Yehova apesaki epai na mikonzi ya Yisraele, mpe kati na mokano nini?

11 Atako bongo, Yehova andimaki lisengi ya Bayisraele mpe aponaki mikonzi na bango mibale ya liboso, Saulo mpe Davidi. Yisraele ezalaki ntango nyonso kati na teokrasi; ekobaki kotambwisama na Yehova. Mpo ete bakonzi ya Yisraele bamikundola na ntina na likambo yango, moko na moko asengelaki komisalela kopi moko ya Mibeko mpe asengelaki kotanga yango mokolo na mokolo “na ntina ’te, ayekola kobanga [Yehova] Nzambe wa ye mpe abomba maloba ma Mobeko moye. Akoki kokoma moto wa lolendo te o kati ya bandeko ba ye.” (Mibeko Det. 17:19, 20, Liloba lya Nzambe) Ee, Yehova alingaki ete baoyo bazalaki na bokonzi kati na eyangeli na ye ya teokrasi, bamitombola te likoló na basusu mpe ete misala na bango mizala na boyokani na Mibeko na ye.

12. Bosembo nini mokonzi Davidi amonisaki?

12 Mokonzi Davidi azalaki na kondima makasi epai na Yehova, mpe Nzambe asalaki boyokani elongo na ye, kolakáká ye ete akokóma tata ya molɔngɔ́ ya seko ya mikonzi. (2 Samwele 7:16; 1 Mikonzi 9:5; Njembo 89:29) Komikitisa ya Davidi mpo na kotosa Yehova esengeli mpenza kozala ndakisa malamu mpo na komekola. Alobaki ete: “Ɛ [Yehova], mokonji akosepela na nguya na yɔ; akojala na esɛngɔ monɛnɛ mpo na kobikisa na yo! ” (Njembo 21:1) Davidi abetaki mabaku na ntango mosusu mpo na bolembu na ye ya nzoto, kasi kati na makambo mingi azalaki kotya motema, kati na nguya na ye moko te, kasi na oyo ya Yehova.

Misala mpe makanisi oyo mayokani na teokrasi te

13, 14. Tangá mwa makambo makeseni na teokrasi oyo bakitani na Davidi basalaki.

13 Bakonzi na Bayisraele nyonso te nde bazalaki lokola Mose mpe Davidi. Mingi bamonisaki mpenza kozanga limemya mpo na teokrasi na kopesáká nzela na losambo ya lokuta kati na Yisraele. Na bambala mosusu, ata bamoko kati na bakonzi mosusu ya sembo basalaki na lolenge lokeseni na teokrasi. Ndakisa ya Salomo, ye oyo apesamelaki bwanya mpe bozwi mingi koleka, ezali mpenza mawa. (1 Mikonzi 4:25, 29) Kozanga limemya mpo na mobeko na Yehova, akamataki ebele na basi na libala mpe apesaki nzela na losambo ya bikeko na Yisraele. Epai mosusu, mibu ya nsuka na boyangeli ya Salomo na ntembe te, mimonisamaki na monyokoli.​—Deteronome 17:14-17; 1 Mikonzi 11:1-8; 12:4.

14 Bayangelami ya Loboama, mwana na Salomo, basengaki ye ete alembisa bozito na bango. Kasi na esika ete abongisa likambo na bopɔlɔ nyonso, alukaki kondimisa bokonzi na ye na makasi nyonso, mpe abungisa mabota 10 kati na mabota 12. (2 Ntango 10:4-17) Mokonzi na liboso ya bokonzi ya botomboki ya mabota zomi ezalaki Yeloboama. Mpo ete bayangelami na ye bakoka kozonga te epai na bandeko na bango, akotisaki losambo na mwana na ngombe na wolo. Na kotalela makambo ya politiki, likambo wana likokaki komonana lokola nde ezali mpenza ya mayele, kasi ezalaki mpenza botyoli makasi mpo na teokrasi. (1 Mikonzi 12:26-30) Na nsima, na nsuka ya mibu mingi kati na mosala ya sembo, mokonzi Asa apesaki nzela na lolendo ete ebebisa lokumu na ye. Anyokolaki mosakoli oyo ayaki kopesa ye toli oyo eutaki epai na Yehova. (2 Ntango 16:7-11) Ee, ata basaleli oyo baumeli mbula mingi bazali mpe mbala mosusu na mposa ya batoli.

Nsuka ya eyangeli moko ya teokrasi

15. Na ntango Yesu azalaki na mabelé, lolenge nini bakambi na Bayuda balóngaki te kosalela bokonzi kati na teokrasi?

15 Na ntango Yesu Klisto azalaki awa na mabelé, Yisraele ezalaki naino na nsé na eyangeli moko ya teokrasi. Likambo ya mawa ezali oyo ete, mingi kati na mikóló oyo bazalaki bakambi na yango, batyaki makanisi na bango likoló na makambo ya elimo te. Mikóló na bato wana, bazalaki soko moke te na komikitisa oyo Mose amonisaki. Yesu akweisaki kobeba na bango kati na elimo na ntango alobaki ete: “Bakomeli mpe Bafalisai bazali kofanda na kiti na Mose. Bongo makambo yɔnsɔ makolobaka bango na bino, bosala yango mpe botosa yango; nde bosala mosala mokosalaka bango tɛ. Jambi bakolobaka nde bakosalaka tɛ.”​—Matai 23:2, 3.

16. Lolenge nini, na ekeke ya liboso, bakambi na Bayuda bamonisaki ete bazangaki limemya mpo na teokrasi?

16 Nsima na kokaba Yesu epai na Ponti Pilato, bakambi na Bayuda bamonisaki mpenza motindo nini batangwaki mosika mpo na oyo etali kotosa teokrasi. Pilato atunaki Yesu mituna mpe asukisaki ete azalaki na likambo te. Komemáká ye liboso na Bayuda, alobaki ete: “Tala mokonji na bino!” Wana basengaki kobomama na Yesu na mongongo makasi, Pilato atunaki bango ete: “Nabakisa mokonji na bino na [nzeté, NW]?” Banganga-kapita bayanolaki ete: “Tozali na mokonzi te bobele Kaisala.” (Yoane 19:14, 15) Ezalaki Kaisala nde bandimaki lokola mokonzi, kasi Yesu te, ‘oyo ayaki na nkombo na Yehova’!​—Matai 21:9.

17. Mpo na nini Yisraele ya mosuni etikaki kozala libota na teokrasi?

17 Na koboyáká Yesu, ezali teokrasi nde Bayuda baboyaki, mpamba te Yesu asengelaki kozala moto ya liboso kati na eyangeli ya teokrasi oyo ezalaki koya. Yesu, mokonzi na molɔngɔ́ ya bakitani ya Davidi, asengelaki koyangela mpo na libela. (Yisaya 9:6, 7; Luka 1:33; 3:23, 31) Na bongo, Yisraele ya mosuni etikaki kozala libota liponami na Nzambe.​—Baloma 9:31-33.

Eyangeli ya sika ya teokrasi

18. Teokrasi nini ya sika ebotamaki na ekeke ya liboso? Limbolá.

18 Na ntango Nzambe asundolaki Yisraele ya mosuni, atyaki nsuka te na teokrasi awa na mabelé. Na nzela na Yesu Klisto, atyaki teokrasi ya sika. Ezali bongo lisangá ya baklisto bapakolami oyo esalaki bongo libota ya sika. (1 Petelo 2:9) Ntoma Paulo abéngaki yango ete “Yisraele na Nzambe,” mpe na nsima, basangani na yango bautaki na “bikólo nyonso, na minoko nyonso, na mikili nyonso, mpe na mabota nyonso.” (Bagalatia 6:16; Emoniseli 5:9, 10, NW) Atako bazalaki kotosa mikonzi ya mokili, epai kuna bazalaki kofanda, basangani ya teokrasi wana ya sika bayangelamaki mpenzampenza na Nzambe. (1 Petelo 2:13, 14, 17) Mwa moke nsima na kobotama ya teokrasi ya sika, bayangeli ya Yisraele ya mosuni balingaki kopusa bayekoli mosusu na makasi ete batika kotosa etindá oyo Yesu apesaki bango. Bongo, bayekoli balobaki nini? “Ekoki ete totosa Nzambe liboso na kotosa bato.” (Misala 5:29) Oyo ezali solo mpenza likanisi moko eyokani na teokrasi!

19. Na ndimbola nini lisangá na boklisto ya ekeke ya liboso ekoki kobéngama eyangeli ya teokrasi?

19 Kasi lolenge nini teokrasi ya sika ezali kosala? Ezalaki na Mokonzi moko, Yesu Klisto, oyo azali komonisa Yehova Nzambe, Mokambi Monene ya teokrasi. (Bakolose 1:13) Atako azali na likoló epai akoki komonana te na miso ya bato, Mokonzi azalaki mpenza koyangela likoló na bato na ye, mpe maloba na ye mazalaki kotambwisa bomoi na bango. Mpo na litambwisi oyo lizalaki komonana, ekambamaki na mikóló oyo baponamaki mpo na bizaleli na bango ya elimo. Na Yelusaleme, ezalaki na bato motindo wana baoyo basangisamaki kati na lisangani moko ya mikóló-bakambi (collège central). Bakengeli-batámboli, lokola Paulo, Timoté mpe Tito, bazalaki komonisa lisangani yango. Lisusu, lisangá moko na moko lizalaki na lisangani ya mikóló oyo ezalaki kobatela yango. (Tito 1:5) Na ntango mokakatano monene mozalaki kobima, mikóló ya lisangá bazalaki kotuna ndimbola epai na lisangani ya mikóló-bakámbi to epai na moko ya bamonisi na yango, lokola Paulo. (Kokanisá na Misala 15:2; 1 Bakolinti 7:1; 8:1; 12:1.) Lisusu, mosangani moko na moko ya lisangá azalaki na mokumba mpo na kolóngisa teokrasi. Liboso na Yehova, moto na moto azalaki na mokumba ya kosalela mitinda ya Biblia kati na bomoi na ye.​—Baloma 14:4, 12.

20. Tokoki koloba nini mpo na teokrasi na ntango oyo elandaki eleko ya bantoma?

20 Paulo asakolaki ete nsima na liwa ya bantoma, lipengwi likokóla mpe ezali yango nde esalemaki. (2 Batesaloniki 2:3) Nsima na mikolo, motuya na baoyo bazalaki komitanga baklisto ekómaki na bamilió, mpe na ebele na bamilió. Bakotisaki bibongiseli bikeseni mpo na oyo etali kokamba lingomba: misusu etambwisami na kolandana ya bakambi, misusu na etuluku ya bato, misusu bakambi bazali koponama na baílingomba bango moko. Nzokande, etamboli to mpe bindimeli ya Mangomba wana ezalaki komonisa boyangeli ya Yehova te. Nyonso wana ezalaki teokrasi te.

21, 22. (a) Lolenge nini Yehova azongisaki teokrasi na ntango ya nsuka? (b) Mituna nini mitali teokrasi mikotalelama kati na lisoló lilandi?

21 Na ntango ya nsuka ya ebongiseli ya biloko oyo, kokabolama esengelaki kosalema kati na baklisto ya solo mpe ya lokuta. (Matai 13:37-43) Ezali yango nde esalemaki na 1919, mbula ya ntina mingi kati na lisoló ya teokrasi. Na eleko yango, esakweli monene oyo ekomami na Yisaya 66:8 ekokanaki: “Nani amɔni likambo yango? Mokili ekobotama na mokɔlɔ mɔkɔ? Libota bakobimisama na mwa ntango mokɛ?” Eyano na mituna oyo ezali ee ya makasi. Na 1919, lisangá ya boklisto libimaki lisusu lokola “ekólo” mobimba. “Mokili” moko ya teokrasi ebotamaki lokola nde na mokolo moko! Na boumeli ya ntango ya nsuka, ebongiseli ya ekólo wana ya sika esembolamaki mpo ete ekokana mingi mpenza na oyo ya ekeke ya liboso. (Yisaya 60:17) Kasi yango ezalaki ntango nyonso teokrasi. Mpo na oyo etali etamboli mpe bindimeli, bazalaki ntango nyonso komonisa mibeko mipemami na Nzambe mpe mitinda ya Makomami. Lisusu, ntango nyonso bazalaki na botosi epai na Mokonzi atyami, Yesu Klisto.​—Njembo 45:17; 72:1, 2.

22 Yo mpe ozali kati na teokrasi wana? Ozali kokokisa mwa mokumba moko kati na yango? Soki ee, oyebi ndimbola ya kosala na boyokani elongo na teokrasi? Oyebi mitambo oyo osengeli kokima? Mituna mibale oyo ya nsuka mikolobelama kati na lisoló oyo lilandi.

Okoki kolimbola?

◻ Teokrasi ezali nini?

◻ Na ndimbola nini Yisraele ezalaki boyangeli moko ya teokrasi?

◻ Ebongiseli nini Yehova akamataki mpo na kokundwela bakonzi ete Yisraele ezalaki boyangeli ya teokrasi?

◻ Mpo na nini tokoki koloba ete lisangá ya boklisto ezalaki boyangeli ya teokrasi, mpe lolenge nini yango ebongisamaki?

◻ Ebongiseli nini ya teokrasi esilaki kotyama na eleko na biso?

[Elilingi na lokasa 12]

Liboso na Ponti Pilate, bakambi na Bayuda bandimaki Kaisala lokola mokonzi na esika ete ezala Mokonzi oyo atyami na lolenge ya teokrasi epai na Yehova

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto