Kangamá makasi na Teokrasi
“Yehova azali Mosambisi na biso, Yehova azali Mopesi na mibeko na biso, Yehova azali Mokonzi na biso.”—YISAYA 33:22, NW.
1. Mpo na nini bato mingi batyelaka makambo ya boyangeli likebi?
BATO nyonso batyelaka likambo ya boyangeli likebi. Boyangeli malamu ememaka kimya mpe makambo malamu. Biblia elobi ete: “Mokonzi akokokisa mokili na nzela na [bosembo, NW].” (Masese 29:4) Nzokande, boyangeli mabe ememaka kozanga bosembo, kobeba ya bizaleli mpe monyoko. “Ekozala bato mabe na bokonzi, bato na mokili bakolela.” (Masese 29:2) Uta ebandeli ya mokili, bato bameká biyangeli ya ndenge na ndenge, mpe likambo ya mawa, mbala mingi monyokoli ya bayangeli ‘elelisaki’ bango. (Mosakoli 8:9) Ekozala na boyangeli oyo ekosepelisa mpenza bayangelami na yango?
2. Mpo na nini liloba “Teokrasi” ebongi mpenza mpo na kolimbola guvernema ya Yisalaele ya kala?
2 Josèphe, nganga-mayele ya istware alobelaki boyangeli moko oyo ekokani na mosusu te ntango akomaki ete: “Bikólo mosusu bapesi bokonzi nyonso ya politiki na mabɔkɔ ya mokonzi moko, mosusu bapesi yango na mwa etuluku ya bato, mosusu, bokonzi ezali na mabɔkɔ ya pɛplɛ. Nzokande, lolenge moko te ya makonzi yango esepelisaki [Mose], mopesi na mibeko na biso, kasi abongisaki mibeko na ye na lolenge oyo tokoki kobénga ete ‘Teokrasi,’ elingi koloba bokonzi nyonso ezali na mabɔkɔ ya Nzambe.” (Contre Apion, II, 164-165) Diksionere moko (Concise Oxford Dictionary) elimboli Teokrasi lokola “boyangeli ya Nzambe.” Liloba yango ezali na Biblia te, kasi ezali komonisa malamu boyangeli oyo ezalaki na Yisalaele ya kala. Atako na nsima Bayisalaele bakómaki na mokonzi oyo azali moto, Yehova nde azalaki mokonzi na bango ya solosolo. Yisaya, mosakoli moko ya Yisalaele, alobaki ete: “Yehova azali Mosambisi na biso, Yehova azali Mopesi na mibeko na biso, Yehova azali Mokonzi na biso.”—Yisaya 33:22, NW.
Teokrasi ya solosolo ezali nini?
3, 4. (a) Teokrasi ya solosolo ezali nini? (b) Mosika te, Teokrasi ekomemela bato mapamboli nini?
3 Banda Josèphe abimisá liloba yango, bibongiseli mingi ebéngamaka ete teokrasi. Emonanaki ete bibongiseli mingi ya motindo yango eboyaki makanisi nyonso oyo ekeseni na makanisi na bango, ezalaki na molende mabe, mpe ezalaki mpenza konyokola. Yango ezalaki teokrasi ya solosolo? Na kolanda ndimbola oyo Josèphe asalelaki liloba yango, bibongiseli yango ezalaki teokrasi te. Elingi koloba ete liloba “teokrasi” ekómi na ndimbola monene. Buku moko (World Book Encyclopedia) elimboli teokrasi lokola “boyangeli oyo Leta etambwisami na nganga-nzambe to banganga-nzambe, mpe banganga-nzambe bazali na bokonzi na makambo ya Leta mpe makambo ya lingomba.” Nzokande, teokrasi ya solosolo ezali boyangeli ya banganga-nzambe te. Ezali mpenza boyangeli ya Nzambe, boyangeli ya Yehova Nzambe, Mozalisi ya molɔ́ngɔ́.
4 Mosika te, Teokrasi ekoyangela mabelé mobimba, mpe ekozala mpenza lipamboli! “Nzambe ye mpenza akozala na [bato] elongo. Akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te; mpo ete makambo na liboso masili koleka.” (Emoniseli 21:3, 4) Boyangeli moko te etambwisami na banganga-nzambe oyo bazali bato ya kozanga kokoka ekoki kotya bolamu motindo wana. Bobele boyangeli ya Nzambe nde ekoki kosala yango. Yango wana, baklisto ya solo balukaka kosala politiki te mpo na kotya boyangeli ya teokrasi. Bazelaka na motema molai ete Nzambe atya boyangeli ya teokrasi na mokili mobimba na ntango mpe na ndenge oyo ye moko alingi.—Danyele 2:44.
5. Lelo oyo Teokrasi ezali kosala mosala epai wapi, mpe mituna nini yango ezali kobimisa?
5 Nzokande, ata sikawa, Teokrasi ya solosolo ezali kosala. Epai wapi? Kati na baoyo basepeli ete Nzambe ayangela bango mpe bazali kosala elongo mpo na kokokisa mokano na ye. Basembwi wana bayanganisami lokola “libota” ya elimo na mokili mobimba na “mokili” na ye ya elimo. Bazali batikali ya “Yisalaele ya Nzambe” mpe baninga na bango baklisto oyo bazali sikawa bato koleka milio mitano na ndambo. (Yisaya 66:8; Bagalatia 6:16) Bazali kotosa Yesu Klisto oyo Yehova Nzambe, “Mokonzi na seko” atii na kiti ya bokonzi kuna na likoló. (1 Timote 1:17; Emoniseli 11:15) Na ndimbola nini ebongiseli yango ezali ebongiseli ya Teokrasi? Basangani na yango batalelaka bakonzi ya mokili oyo ndenge nini? Mpe ndenge nini bato oyo bazali na bokonzi na ekólo yango ya elimo babatelaka mibeko ya Teokrasi?
Ebongiseli ya Teokrasi
6. Ndenge nini Nzambe akoki koyangela ebongiseli oyo ezali komonana?
6 Yehova afandi na likoló mpe amonanaka te, boye ndenge nini akoki kotambwisa ebongiseli ya bato? (Nzembo 103:19) Na boye ete baoyo bazali na kati ya ebongiseli yango balandaka toli epemami oyo elobi ete: “Talelá [Yehova] na motema na yo mobimba mpe ndimá bososoli na yo moko te.” (Masese 2:6; 3:5) Batiki ete Nzambe ayangela bango wana bazali kotosa “mobeko na Klisto” mpe, na bomoi na bango ya mokolo na mokolo, bazali kolanda mitinda ya Biblia. (Bagalatia 6:2; 1 Bakolinti 9:21; 2 Timote 3:16; talá Matai 5:22, 28, 39; 6:24, 33; 7:12, 21.) Mpo na kosala yango, basengeli kozala bayekoli ya Biblia. (Nzembo 1:1-3) Lokola bato ya Beloya na ntango ya kala oyo bazalaki “malamu mingi,” balandaka makanisi ya bato te, kasi ntango nyonso balukaka makambo oyo bazali koyekola na kati ya Biblia. (Misala 17:10, 11; Nzembo 119:33-36) Lokola mokomi na nzembo, babondelaka ete: “Lakisá ngai bososoli malamu mpe boyebi zambi nandimi malako na yo.”—Nzembo 119:66.
7. Na kati ya Teokrasi, bokonzi elandani ndenge nini?
7 Ebongiseli na ebongiseli ezalaka na bato oyo bazali na bokonzi to oyo bazali kokamba yango. Epai ya Batatoli ya Yehova mpe ezali bongo. Balandaka ebongiseli ya bokonzi oyo ntoma Paulo amonisaki ete: “Motó na babali nyonso azali Klisto mpe ete motó na mwasi azali mobali mpe ete motó na Klisto azali Nzambe.” (1 Bakolinti 11:3) Na ndenge yango, bobele mibali oyo bakokisi masɛngami nde basalaka lokola bankulutu na kati ya masangá. Mpe atako Yesu—“motó na babali nyonso”—azali na likoló, “batikali” kati na bandeko na ye bapakolami oyo bazali na elikya ya koyangela na ye elongo kuna na likoló, bazali naino awa na mabelé. (Emoniseli 12:17; 20:6) Etuluku yango mobimba nde tobéngi “moombo ya sembo mpe ya mayele.” Ntango baklisto bazali kondima litambwisi ya “moombo” yango, bazali nde kotosa Yesu mpe mbala moko bazali kotosa Yehova, motó na Yesu. (Matai 24:45-47; 25:40) Na ndenge yango, ebongiseli ya Teokrasi ezali na mobulu te. “Nzambe azali na mobulu te kasi na kimya.”—1 Bakolinti 14:33.
8. Ndenge nini bankulutu baklisto bapesaka mabɔkɔ na Teokrasi?
8 Bankulutu baklisto balandaka ebongiseli ya Teokrasi mpamba te bayebaka ete bakozongisa monɔkɔ epai na Yehova na ndenge oyo bazali kosalela mwa bokonzi oyo bapesi bango. (Baebele 13:17) Mpe ntango bazali kozwa bikateli, batalelaka mayele ya Nzambe, kasi mayele na bango moko te. Na likambo yango, balandaka ndakisa ya Yesu. Azalaki moto oyo alekaki bato nyonso na mayele. (Matai 12:42) Atako bongo, ayebisaki Bayuda ete: “Mwana akoki kosala likambo ye moko te, kasi bobele yango emoni ye ete Tata azali kosala.” (Yoane 5:19) Bankulutu bazali mpe na elimo lokola ya Mokonzi Davidi. Azalaki na mokumba monene na Teokrasi. Alukaki kolanda makanisi ya Yehova, kasi makanisi na ye moko te. Abondelaki ete: “Ɛ [Yehova], lakisá ngai nzela na yo mpe kambá ngai na nzela na sembo.”—Nzembo 27:11.
9. Na ndenge bilikya mpe mikumba ekeseni kati na Teokrasi, likanisi nini ya bokatikati baklisto oyo bamipesi bazalaka na yango?
9 Bato mosusu bamitunaki soki ezali mpenza likambo ya koponapona te ete kati na lisangá bokonzi epesami bobele na mibali oyo bakokisi masɛngami to ete bamoko bazali na elikya ya kokende na likoló, bongo basusu bazali na elikya ya kofanda na mabelé. (Nzembo 37:29; Bafilipi 3:20) Baklisto oyo bamipesi basepelaka lokola bibongiseli yango bimonisami na kati ya Liloba ya Nzambe. Ezali bibongiseli ya Teokrasi. Mingimingi baoyo babɛtelaka bibongiseli yango ntembe ezali baoyo bandimaka mitinda ya Biblia te. Lisusu, baklisto bayebi ete mibali mpe basi bazali se ndenge moko na miso ya Yehova na oyo etali lobiko. (Bagalatia 3:28) Mpo na baklisto ya solo, kozala basambeli ya Mokonzi ya molɔ́ngɔ́ mobimba ezali libaku oyo eleki mabaku nyonso, mpe basepelaka kokokisa ata mokumba nini oyo Yehova apesi bango. (Nzembo 31:23; 84:10; 1 Bakolinti 12:12, 13, 18) Lisusu, bomoi ya seko, ezala na likoló to na paladiso awa na mabelé, ezali solo elikya kitoko.
10. (a) Elimo malamu nini Yonatana amonisaki? (b) Lelo oyo, ndenge nini baklisto bamonisaka elimo ya Yonatana?
10 Na bongo, Batatoli ya Yehova bazali lokola Yonatana, moto na kobanga Nzambe mpe mwana ya Mokonzi Saulo. Na ntembe te Yonatana alingaki kozala mokonzi malamu mingi. Kasi, lokola Saulo azalaki sembo te, Yehova aponaki Davidi ete azala mokonzi ya mibale ya Yisalaele. Likambo yango esilikisaki Yonatana? Te. Akómaki moninga ya motema ya Davidi mpe kutu abatelaki ye liboso ya Saulo. (1 Samwele 18:1; 20:1-42) Bobele bongo, baoyo bazali na elikya ya kofanda na mabelé bayokelaka baoyo bazali na elikya ya likoló zuwa te. Mpe baklisto ya solo bayokelaka baoyo bazali na mokumba ya Teokrasi kati na lisangá zuwa te. Kutu, bazali ‘kokumisa bango mingi kati na bolingo’ mpe babosanaka te mosala makasi oyo basalelaka bandeko na bango.—1 Batesaloniki 5:12, 13.
Likanisi ya Teokrasi mpo na bakonzi ya mokili
11. Ndenge nini baklisto oyo bazali kotosa Teokrasi batalelaka bakonzi ya mokili?
11 Soki Batatoli ya Yehova bayangelami na Teokrasi, boyangeli ya Nzambe, ndenge nini batalelaka bayangeli ya bikólo? Yesu alobaki ete bayekoli na ye bakozala “bato na mokili te.” (Yoane 17:16) Nzokande, baklisto bayebi oyo basengeli kopesa na “Kaisala,” elingi koloba baguvernema ya mokili. Yesu alobaki ete basengeli ‘kopesa epai na Kaisala yango ezali na Kaisala mpe na Nzambe yango ezali na Nzambe.’ (Matai 22:21) Biblia elobi ete biyangeli ya mokili ‘ibongisami na Nzambe.’ Yehova, Liziba ya bokonzi nyonso, atiki nzela ete biyangeli bizala, mpe alingi ete biyangeli yango bisalela bato na yango makambo malamu. Ntango bazali kosala bongo, bazali “basaleli ya Nzambe.” Baklisto batosaka bokonzi ya ekólo epai bafandi “mpo na lisosoli [na bango].” (Baloma 13:1-7) Kasi, soki Leta asɛngi bango básala likambo oyo ezali kobuka mibeko ya Nzambe, baklisto ‘bakotosa Nzambe liboso na kotosa bato.’—Misala 5:29.
12. Baklisto balandaka ndakisa ya nani ntango bakonzi bazali konyokola bango?
12 Bongo ntango bakonzi ya Leta bazali konyokola baklisto ya solo? Na ntango wana balandaka ndakisa ya baklisto ya liboso oyo bayikelaki bileko ya monyoko makasi mpiko. (Misala 8:1; 13:50) Bayebaki ete bakokutana na komekama wana ya kondima na bango, mpamba te Yesu akebisaki bango ete komekama esengeli koya. (Matai 5:10-12; Malako 4:17) Kasi, baklisto wana ya liboso bazongisaki mabe epai ya banyokoli na bango te; mpe kondima na bango elembaki mpo na motungisi te. Nzokande, balandaki ndakisa ya Yesu: “Atukamaki nde azongisaki kotuka te; ayokaki mpasi nde akanelaki moto te; kasi amipesaki epai na ye oyo akosambisaka sembo.” (1 Petelo 2:21-23) Ɛɛ, mitinda ya boklisto elongaki matumoli ya Satana.—Baloma 12:21.
13. Batatoli ya Yehova bamonisaka ezaleli nini ntango bazali konyokola bango mpe bazali kopanza bango nsango ya lokuta?
13 Ezali se bongo lelo oyo. Na ekeke oyo, Batatoli ya Yehova banyokwami na mabɔkɔ ya bakonzi mabe—se lokola Yesu asakolaki. (Matai 24:9, 13) Na bikólo mosusu, bazali kopanza baklisto ya solo nsango ya lokuta mpo na kopusa bakonzi ete bázwa bikateli oyo ekobebisa mosala na bango. Kasi, atako bazali kopanza bango “nsango mabe,” Batatoli bazali kolakisa ete bazali baministre ya Nzambe na etamboli na bango ya malamu. (2 Bakolinti 6:4, 8) Soki likoki ya kosala yango ezali, bamonisaka likambo na bango na bakonzi mpe na bisambiselo ya ekólo mpo na komonisa ete basalaka makambo mabe te. Basalelaka myango nyonso oyo emonani mpo na kolongisa nsango malamu liboso ya bato nyonso. (Bafilipi 1:7) Kasi, nsima ya kosala nyonso oyo mibeko epesi bango likoki ya kosala, batikaka nyonso na mabɔkɔ ya Yehova. (Nzembo 5:8-12; Masese 20:22) Soki esengeli, lokola baklisto ya liboso, babangaka konyokwama mpo na bosembo te.—1 Petelo 3:14-17; 4:12-14, 16.
Pesá naino Nzambe lokumu
14, 15. (a) Likambo nini eleki ntina epai na baoyo bapesaka mabɔkɔ na Teokrasi? (b) Na libaku nini Salomo apesaki ndakisa malamu ya komikitisa na bokonzi oyo azalaki na yango?
14 Ntango Yesu alakisaki bayekoli na ye kobondela, likambo ya liboso alobelaki ezali kokumisa nkombo ya Yehova. (Matai 6:9) Yango wana, baoyo batambwisami na Teokrasi balukaka lokumu ya Nzambe, kasi lokumu na bango moko te. (Nzembo 29:1, 2) Biblia eyebisi ete na ekeke ya liboso, likambo yango ebɛtisaki bato mosusu oyo baboyaki kolanda Yesu libaku mpamba te “balingaki lokumu na bato,” balingaki ete bato bákumisa bango. (Yoane 12:42, 43) Ya solo mpo ete moto atya naino Yehova liboso bongo ye moko na nsima, esɛngaka ete azala na komikitisa.
15 Salomo amonisaki elimo malamu na likambo yango. Talá bokeseni oyo ezali kati na maloba na ye na ntango ya bofungoli tempelo monene oyo atongaki na maloba ya Nabukadanesala mpo na misala minene ya botongi oyo asalaki. Nabukadanesala alobaki na lolendo nyonso ete: “Oyo ezali Babele monene te, oyo esili ngai kotonga mpo na esika na kofanda na mokonzi, na makasi na nguya na ngai mpe mpo na nkembo na lokumu na ngai?” (Danyele 4:30) Na bokeseni, Salomo atombolaki mosala na ye te, na komikitisa nyonso alobaki ete: “Solo Nzambe akofandaka esika moko na bato na kati na mokili? Talá, lola mpe likoló ikoki kozingela yo te; na koleka, ndako oyo ngai natongeli yo yango, ekoki te!” (2 Ntango 6:14, 15, 18; Nzembo 127:1) Salomo amikumisaki te. Ayebaki ete azalaki bobele momonisi ya Yehova mpe akomaki ete: “Ekoya nzombo, nsɔni ekoya lokola; nde mayele ezali elongo na basɔkɛmi.”—Masese 11:2.
16. Ndenge nini bankulutu bamonisaki ete bazali mpenza lipamboli na ndenge bamikumisaka te?
16 Bobele bongo, bankulutu baklisto bakumisaka Yehova, kasi bamikumisaka te. Balandaka toli ya Petelo ete: “Nani ayebi kosala misala? Asala mpo na nguya ekopesaka Nzambe ye ete na makambo nyonso Nzambe akumisama mpo na Yesu Klisto.” (1 Petelo 4:11) Ntoma Paulo alobelaki “mosala ya mokɛngɛli” lokola etɛlɛmɛlo ya lokumu te, kasi lokola “mosala malamu.” (1 Timote 3:1) Bankulutu baponamaka mpo na kosalela basusu, kasi mpo na koyangela bango te. Bazali balakisi mpe babateli ya bampate ya etonga ya Nzambe. (Misala 20:28; Yakobo 3:1) Bankulutu oyo bazali na komikitisa mpe na elimo ya komipesa bazali mpenza lipamboli mpo na lisangá. (1 Petelo 5:2, 3) “Bókumisa lolenge oyo na bato,” mpe bópesa Yehova matɔndi na ndenge apesi bankulutu mingi oyo bazali na makoki mpo na kopesa mabɔkɔ na Teokrasi na “mikolo ya nsuka” oyo.—Bafilipi 2:29; 2 Timote 3:1, NW.
“Bómekola Nzambe”
17. Baoyo batosaka Teokrasi bamekolaka Nzambe na makambo nini?
17 Ntoma Paulo apesaki toli ete: “Bómekola Nzambe, lokola bana balingami.” (Baefese 5:1, NW) Baoyo bazali kotosa Teokrasi balukaka kozala na bizaleli ya Nzambe na meko oyo yango ekoki kosalema epai ya bato ya kozanga kokoka. Na ndakisa, Biblia elobi ete Yehova azali “libanga, mosala na ye ebongi; mpo ete nzela na ye nyonso boyengebene. Nzambe na sembo mpe na mabe te, ye moyengebene mpe mosembwi.” (Deteronome 32:3, 4) Mpo na komekola Nzambe na likambo yango, baklisto balukaka bosembo mpe boyengebene mpe kosambisa makambo na ndenge ebongi. (Mika 6:8; 1 Batesaloniki 3:6; 1 Yoane 3:7) Baboyaka makambo mingi oyo mokili ekómi kondima, lokola misala ya mbindo, bilulela, mpe lokoso. (Baefese 5:5) Lokola basaleli ya Yehova balandaka mitinda ya Nzambe, kasi mitinda ya bato te, ebongiseli na ye ezali ebongiseli ya Teokrasi, ezali pɛto mpe malamu.
18. Ezaleli nini eleki monene kati na bizaleli nyonso ya Yehova, mpe ndenge nini baklisto bamonisaka ezaleli yango?
18 Bolingo ezali ezaleli eleki monene kati na bizaleli ya Yehova Nzambe. Ntoma Yoane alobaki ete, “Nzambe azali bolingo.” (1 Yoane 4:8) Lokola Teokrasi elimboli boyangeli ya Nzambe, boye Teokrasi ezali boyangeli ya bolingo. Yesu alobaki ete: “Na bongo bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.” (Yoane 13:35) Na mikolo ya nsuka oyo etondi na mpasi, ebongiseli ya Teokrasi emonisi bolingo oyo ekokani na mosusu te. Ntango bitumba kati na bituluka ezalaki kosalema na Afrika, Batatoli ya Yehova bamonisaki bolingo epai na bato nyonso, kozanga kopona etuluka. Ntango bitumba ezalaki na ex-Yougoslavie, Batatoli ya Yehova na ngámbo nyonso basalisanaki bango na bango, wana bato ya mangomba mosusu bapesaki mabɔkɔ mpo na koboma bato ya etuluka mosusu. Motatoli ya Yehova mokomoko asalaka nyonso mpo na kolanda toli ya Paulo ete: “Makambo nyonso na bololo mpe likunya mpe nkanda mpe kongala mpe kotɔnga málongwa na bino mpe makambo nyonso na mabe lokola. Bózalanaka na boboto, moko epai na mosusu, na motema na mawa, na kolimbisana moko moko [ndenge moko, NW] Nzambe asili kolimbisa bino kati na Klisto.”—Baefese 4:31, 32.
19. Baoyo bazali kotosa Teokrasi bazali kozwa mapamboli nini sikawa mpe bakozwa mapamboli nini na mikolo mikoya?
19 Baoyo bazali kotosa Teokrasi bazwaka mapamboli mingi. Bazali na kimya elongo na Nzambe mpe baninga na bango baklisto. (Baebele 12:14; Yakobo 3:17) Bomoi na bango ezali na ntina. (Mosakoli 12:13) Babatelami na elimo mpe bazali na elikya ya solosolo mpo na mikolo mizali koya. (Nzembo 59:9) Ɛɛ, uta sikawa bazali mpenza komona makambo oyo ekozala ntango Teokrasi ekoyangela mokili mobimba. Biblia elobi ete na ntango wana “bakoyokisana mpasi te, bakobebisana mpe te na ngomba mobimba na bulɛɛ na ngai; zambi mokili ekotonda na boyebi na [Yehova] lokola mbonge ikozipaka mai-na-monana.” (Yisaya 11:9) Ekozala mpenza ntango ya esengo! Tiká ete biso nyonso tómilɛngɛla mpo na kokɔta na Paladiso na kokangamáká makasi na Teokrasi.
Okoki kolimbola?
◻ Teokrasi ya solosolo ezali nini mpe tokoki komona yango epai wapi?
◻ Ndenge nini bato batosaka boyangeli ya Teokrasi kati na bomoi na bango?
◻ Na ndenge nini bato nyonso oyo bazali na nse ya Teokrasi balukaka kotya lokumu ya Nzambe na esika ya liboso?
◻ Tángá mwa bizaleli ya moto ya Nzambe oyo bato baye balandaka Teokrasi bamekolaka?
[Elilingi na lokasa 17]
Salomo alukaki naino lokumu ya Nzambe