Masoló ya Basakoli na Bokonzi
Bompikiliki ekopesaka mbano kitoko
YESU asakolaki ete bayekoli na ye basengelaki konyokwama, ntoma Paulo amonisaki mpe yango, lokola eyebisami kati na 2 Timɔtɛ 3:12: “Ɛɛ, bango yɔnsɔ bajali na mposa na [ezaleli ya kobanga Nzambe, NW] kati na Klisto Yesu bakonyɔkɔlama.” Kasi bompikiliki na mosala ya Yehova Nzambe ezali komema mbano kitoko.
◻ Bosolo na likambo yango emonanaki penepene na mai monene na Nɔ́rdi-Ɛ́sti ya Malaysia. Atako apamelaki bana na ye makasi mpenza, tata moko mosambeli ya molende na lingomba ya Buda akokaki te kopekisa bana na ye misato ya basi mpe bana na ye misato ya mibali na koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova. Ata mwasi na ye mpenza azalaki kosepela na solo. Bongo mokolo mosusu, moto oyo afandi penepene na ye, asekaki ye ete: “Ndenge nini ozali kokoka te kotambwisa bana na yo mpe otiki bango ete bakóma Batatoli ya Yehova? Bana na ngai nyonso bazali kokangama na ngai mpe na lingomba ya Buda, lingomba na biso ya bonkɔ́kɔ. Ozali kopesa ngai mawa!”
Tata wana azongaki mbangu na ndako na makaneli ya kobɛta ndeko mwasi oyo azalaki kotambwisa boyekoli elongo na bana na ye. Nzokande, bana na ye bakitisaki ye motema mpe balandaki koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova mpe koyangana na makita na lisungi ya mama na bango.
Nzokande na nsima, tata yango ayanganisaki libota na ye mobimba liboso na ye. Asengaki ete: “Bopona kati na ngai mpe kotikala na ndako to kokóma baklisto mpe kolongwa na ndako.” Mwana mobali ya liboso, elenge mobali oyo azalaki na elobeli ya bopɔlɔ, abandaki nokinoki kokanga bisaka mpo na kolongwa na ndako. Tata angangaki ete: “Te! Lokola bino banso bozali bana batomboki, eleki malamu mpo na ngai ete nakufa.” Mpe abimaki mbangu na libanda mpe libota na ye lilandaki ye na nsima, kobondeláká ye ete amiboma te. Wana malɔmbɔ na bango masimbaki motema na ye, azongaki na ndako.
Mwa ntango elekaki. Tata wana abandaki komona matomba ya solo ya Biblia kati na etamboli ya bana na ye. Mokolo moko akutanaki na moninga oyo asekaki ye, azalaki bongo mawamawa mpe alobaki ete: “Naoki mawa mingi na ntina na bana na ngai. Bazali kobuba ngai mpe koyiba ngai.” Kasi tata oyo bana na ye bazalaki koyekola elongo na Batatoli ya Yehova alobaki ete: “Ah, bana na ngai bazali bongo te! Bazali na boboto epai na ngai mpe nkutu basalisaki ngai na kofuta nyongo ya motuka na ngai ntango nazalaki na mosala te.”
Lelo oyo, bana basi misato mpe mama na bango basili kozwa batisimo. Mwana mobali moko azali mobongisi-nzela monene (pionnier spécial). Bongo tata oyo liboso azalaki moto na matata mpe na kosilika mingi? Azali sikawa komonisa ezaleli ya boninga mpe ayanganaki na Ekaniseli.
Yehova apesaki mbano epai na mwana ya mobali wana mpe bandeko na ye ya basi elongo na mama na bango mpo na bompikiliki na bango epai na ye. Bazali sikawa basakoli ya molende ya Bokonzi, bazali kosepelisa motema na Yehova.—Masese 27:11.