Ozali kosalisa mwana na yo na kopona kosalela Yehova?
ELENGE mobali moko ayambolaki ete: “Nazalaki komona ete boyekoli ya Biblia ezalaki likambo ya kotungisa mpe mosala monene. Na nkúku, nazwaki ekateli kati na motema na ngai ete ntango nakokóla, nakozala Motatoli ya Yehova te.” Atako na esengo nyonso ntalo monene ya bana oyo bazali kati na mabota ya boklisto bakopona na nsima kotɛlɛma na ngámbo ya Yehova, bilenge mosusu lokola mwana oyo bakoki kokutana na mikakatano mpo na kopona Yehova lokola Nzambe na bango.
Na bantango mosusu baboti bayebaka mpenza malamu te lolenge ya kokamba bana na bango na motindo mobongi. Bamitunaka mbala mingi, lokola tata moko oyo azalaki na motema likoló, oyo alobaki ete: “Mpo na koloba solo, ezalaki na bantango mosusu oyo nazalaki kotala bilongi ya bana na ngai oyo balɛmbi mpo na mpongi, mpisoli etondi na matama na bango mpo na kolɛmba na motema, mpe nazalaki komituna soki nasengelaki te kolɛmbisa mwa moke mitindá.” Bana na bango mibale ya mibali bakólaki mpe baponaki kosalela Yehova.
Nzokande ezali na bilenge oyo bazali kotika Yehova mpe lisangá ya boklisto mpo na kolanda mokili ya Satana. Bongo, lolenge nini baboti bakoki kolónga kosalisa bana na bango ete bápona kosalela Yehova? Mpo na koyanola na motuna oyo, tiká tómona naino mpo na nini bilenge mosusu batikaka Yehova wana baboti na bango bazali mpenza koluka ete bákangama na ye elongo na bango.
Mpo na nini bilenge mosusu batikaka Yehova
Moko na bantina oyo emonanaka mbala mingi ezali ete bilenge mosusu bakómaka mpenza te na koyeba Yehova to banzela na ye. Atako bazali koyangana na makita uta bomwana na bango, basalaka yango bobele lokola momeseno, kasi ezalaka mpo na koluka mpenza Yehova te. (Yisaya 55:6; Misala 17:27) Elenge mobali oyo tolobelaki azalaki kosepela te na makita ya boklisto mpamba te azalaki kososola te makambo oyo balobi bazalaki koloba na ebáelo.
Mbóto ya solo esili kolónama kati na bana mosusu, kasi bazali kotika mitema na bango ete ebendama na lolenge ya bomoi ya mokili ya Satana oyo emonani lokola ete ezangi mitungisi mpe oyo ya mposa ya bozwi ya mosuni. Basusu bakoki te kolónga mposa makasi ya kozala elongo na baninga mpe ya kosala lokola bango.—1 Ntango 28:9; Luka 8:12-14; 1 Bakolinti 15:33.
Nzokande, na mokili mobimba, bana mingi kati na mabota ya boklisto basili kopona kotɛlɛma na ngámbo ya Yehova. Ezali na makambo ya kolendisa oyo tokoki koyekola epai na baboti na bango?
Bóbanda nokinoki
Likambo ya ntina mingi mpo na kosalisa bana na kopona Yehova ezali ya kobanda nokinoki. Mbala mingi, makambo oyo masimbaki motema na mwana mpe mateya oyo azwaki ntango motema na ye mokómi naino makasi te makoumela bomoi na ye mobimba. (Masese 22:6) Kozanga koumela, bandá bongo kolobela bana na yo na ntina na malamu, bolingo mpe bonene ya Yehova, kosaláká makasi ete olóna kati na mitema na bango bolingo mpo na Yehova mpe botɔ́ndi mpo na oyo Yehova asili kosala mpo na bango. Mpo na yango, baboti mingi balóngaki na kosalela ebele ya masoló matali bozalisi ya Yehova oyo mazwami kati na mikanda ya la Société Watchtower.
Kotosa mpe komemya Yehova mpe losambo na ye ezali kati na bizaleli oyo bisengeli kokɔtisama nokinoki kati na bomoi ya bana. Ezali esengo na komona bana oyo bakɔti naino biteyelo te kosala milende mpo na kokoma mwa makambo na makita ya boklisto mpe koluka mikapo kati na Biblia na bango to kokende elongo na baboti na bango kosukola elongi na mai ya mpiɔ wana babandi kooka mpongi. Oyo ezali makambo ya mikemike, kasi yango ezali mpenza na ntina mingi mpo na oyo etali kokɔtisa na makanisi ya elenge ete limemya mpe botosi esengeli komonisama epai na Yehova!
Esengeli lisusu kobanda nokinoki kolakisama moko malamu na boyekoli ya Biblia. Ntango bana na bango ya mibali bazalaki na mibu mibale, mobali moko mpe mwasi na ye babandaki kotángela bango búku Boyoka Moteyi Monene.a Na nsima, wana bana yango bakɔtaki na eteyelo, basengelaki kolamuka ntɔ́ngɔ́ntɔ́ngɔ́ mpe koyekola ntɔ́ngɔ́ nyonso babúku Mokanda mpo na masolo ya Biblia mpe Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana Paradis.* Boyekoli yango ezalaki kolandama na botaleli ya mokapo ya mokolo na mokolo oyo tata na bango azalaki kokamba liboso ete bálya na ntɔ́ngɔ́. Milende ya baboti yango mizwaki mbano monene ntango bana na bango baponaki kosalela Yehova, na komonisáká komipesa na bango na nzela ya batisimo ya mai wana bazalaki na mibu 10 mpe 11.
Elenge mobali moko ya bizaleli kitoko oyo azali kosala na biro ya filiale ya la Société Watch Tower na Japon amikundolaki ete ntango azalaki mwana moke mpenza, mama na ye azalaki kosalisa ye na kokólisa boyokani ya penepene elongo na Yehova na kofandáká penepene na ye na butu, kosalisáká ye ete abondela. Abosanaka soko moke te liteya oyo azwaki—ata akei epai wapi, to ata azali kosala nini, Yehova azalaki ntango nyonso penepene mpe akoki kosalisa ye ata ntango nini.
Baboti oyo bazali kolónga malamu bazali kososola bizaleli mabe oyo biuti na kozanga kokoka oyo bana na bango basangolaki, mpe baboti yango bazali kobanda nokinoki kosalisa bana ete básembola yango. (Masese 22:15) Kobendama na ezaleli ya moimi, motó makasi, lolendo, kotɔngatɔnga basusu, esengeli kosembolama nokinoki. Soki te, na nsima mbóto na yango ekokóla kino kotombokela Nzambe mpe banzela na ye. Na ndakisa, baboti oyo bazali na mokano malamu kasi basembolaka bana na bango te mbala mingi batikaka bana na bango kolóna bizaleli ya koluka se matomba na bango moko. Bana wana bakómaka na mokakatano mpo na komemya baboti na bango to Yehova, bakómaka bongo lokola ‘bato bazangi botɔ́ndi’ oyo balobelami kati na Biblia. (Masese 29:21, NW) Nzokande, bana oyo baboti bapesaka bango misala na ndako mpe bateyaka bango kotya likebi na bamposa ya bato mosusu bamonisaka botɔ́ndi epai na baboti na bango mpe epai na Yehova.
Likambo mosusu ya ntina etali kobanda nokinoki kotyela mwana mikano ya elimo oyo akoki kokóma na yango. Soki yango esalemi uta ebandeli te mpe na lolenge ebongi te, bato basusu bakotondisa makanisi mpe motema ya mwana na mikano mikeseni. Kotánga Biblia mobimba, boyekoli na ye moko ya mikanda ya la Société Watchtower, kosala mikumba na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi, kokóma mosakoli ya nsango malamu, mpe kozwa batisimo ezali kati na mikano wana.
Takafumi amikundoli ete mama na ye amesenisaki ye kotánga bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! na kobimisáká mituna mikemike mpe na kotikáká bazulunalo yango likoló na mesa ya kúku mpo ete ye akoka komona yango wana ekozonga ye na eteyelo. Yuri amikundoli ete ezalaki likambo ya kosepelisa kofanda mwa mikolo elongo na babongisi-nzelab oyo bazalaki kosala esika mposa ya basakoli baklisto ezalaki monene, kobima na bango kati na mosala ya kosakola, komona bango kolamba bilei kitoko; esengo na bango mpe molende na bango ezalaki na bopusi likoló na mposa na ye ya kosalela Yehova na lolenge yango. Bilenge mingi balobaki ete baboti na bango bazalaki komema bango mbala na mbala na Betele, oyo ezali nkombo mpo na kobénga biro monene to ba filiales ya la Société Watch Tower, epai bakokaki komona bilenge mibali mpe basi mosusu oyo bazali kosalela Yehova na esengo nyonso. Mingi kati baoyo bakendeki kuna ntango bazalaki bana bazali sikawa kosala na Betele kati na mokili mobimba.
Bópesa na bana na bino ntango na bino
Boike mpe motindo ya ntango oyo ozali kolekisa elongo na bana na yo ekokata soki bakopona kosalela Yehova to soki bakopona kosalela ye te. Basosolaka nokinoki ntango boni bopesaka mpe komibongisa motindo nini bosalaka mpo na boyekoli ya Biblia oyo bosalaka elongo na bango. Soki okokaka te komikundola epai bosukaki na boyekoli oyo elekaki to soki obomaka boyekoli mpo na makambo mazangi ntina, ozali komonisa ete boyekoli ezali mpenza na ntina mingi te. Nzokande, wana bazali komona baboti komipimela makambo oyo balingaka, mpo na kosala boyekoli, komibongisa malamu mpo na yango mpe kotambwisa boyekoli pɔ́sɔ na pɔ́sɔ atako masano nini mazali kosalama, ozali kolakisa bango lolenge mosusu ya kotalela makambo. Atako ezali mpenza lisɛngami te, bamama mosusu balataka malamu mpo na koyekola na bana na bango, motindo moko lokola balataka mpo na kokende makita to mpo na kotambwisa boyekoli ya Biblia elongo na moto mosusu ya pembeni na bango. Maoki oyo emonisami ezali ete losambo ya Yehova ezali na ntina mingi.
Ekosɛnga ntango mpe milende mingi mpo na kokómisa boyekoli ya Biblia elongo na bana na bino eloko ya kosepelisa, ya kosimba mitema na bango. Mingi mpenza bana mike basepelaka wana bamoni ete makambo oyo bazali koyekola malakisami liboso na bango lokola lisano. Na ndakisa, tata moko asalisaki bana na ye ete bámona lolenge nini lisekwa ekosalema na kosaláká mwa elakiseli ya lisoló ya Biblia oyo ezali koloba na ntina na lisekwa ya Lasalo. Akɔtaki kati na ebómbelo na bango ya bilamba mpe na nsima abimaki lokola Lasalo oyo asekwisami.—Yoane 11:17-44.
Wana bana bazali kokóma mikóló, ezali kosɛnga ntango mingi mpe makoki mingi mpo na kosunga bango na ebele na maoki, na ntembe mpe na mitungisi oyo bazali kokutana na yango. Ntango oyo baboti ya bolingo mpe ya bososoli bazali kopesa mpo na eleko wana ezali na ntina mingi mpo ete yango nde ekokata soki bana na bango bakotyela Yehova motema. Tata moko oyo alóngaki kobɔkɔla malamu bana na ye minei ayebisaki ete ntango bazalaki kokutana na mikakatano ndenge na ndenge, ye azalaki kolukaluka mpe kosolola elongo na bango makambo oyo mayebisami kati na mikanda ya la Société Watchtower mokolo na mokolo kino mikakatano nyonso mikosila.
Mama moko mobongisi-nzela oyo azalaki na misala mingi amonaki ete mwana na ye ya mwasi azalaki komitangola mpe azalaki na esengo te kati na misala ya teokrasi. Na bongo mama wana azwaki ekateli ya kozala na ndako ntango mwana akouta na eteyelo nsima ya nzangá, mpe kosolola elongo na ye wana bazali komela tii. Na nzela ya masoló mozindo ya mama mpe mwana, mwana mwasi yango azwaki lisalisi ya malamu. Sikawa, nsima na kosilisa Eteyelo ya katikati, azali kosangana elongo na mama na ye kati na mosala ya mobongisi-nzela.—Masese 20:5.
Baninga mpe ndakisa malamu
Longola kopesa ntango na bango, baboti basengeli koluka baninga malamu mpo na bana na bango. Masese 13:20 elobi ete: “Ye oyo akotambola na bato na mayɛlɛ akojala na mayɛlɛ, nde motamboli elɔngɔ na bajoba akobukana.”
Baboti mingi oyo balóngaki bayebi bosolo ya Lisese yango. Tata moko oyo azali na bana minei alobi ete: “Soki namikundoli mikolo mileki, nakanisi ete ebele na baninga oyo bana na biso bazalaki na bango kati na solo nde esalisaki na kopusa bango na kosalela Yehova. Nalendisaki bango ete básala boninga elongo na bandeko ya masangá mosusu lokola mpe bákólisa boninga yango.” Nkulutu moko moklisto oyo asalaki mibu mingi na Betele amikundoli ete: “Ntango nazalaki mwana moke, tozalaki kofanda kati na ndako moko moke, kasi ezalaki ntango nyonso kuna nde mokɛngɛli ya zongozonga azalaki kolala. Lisusu, babongisi-nzela monene ya lisangá na biso bazalaki kobyangama mbala mingi mpo na kolya elongo na biso. Bazalaki kosukola na ndako na biso mpe bazalaki elongo na biso. Koyoka makambo bakutanaki na yango mpe komona esengo na bango esalisaki ngai na kokólisa bosepeli mpo na mosala ya ntango nyonso.”
Baninga malamu basalisaka baoyo bazali kokutana na mikakatano. Mama moko oyo mwana na ye ya mobali akómaki na mobulu mingi asololaki likambo yango elongo na mokɛngɛli ya zongazonga ya Batatoli ya Yehova. Mokɛngɛli ya zongazonga alendisaki ye ete abimaka elongo na elenge mobali yango kati na mosala ya kosakola. Mokɛngɛli alobaki na ye ete: “Soki okosala bongo, elimo na ye mpe makambo nyonso mosusu makobonga.” Mama wana alobaki ete: “Kati na lisangá na biso tozalaki na ebongiseli ya kopesa litatoli na mpokwa, mpe bana-kelasi mingi, mikóló mingi mosusu oyo bazalaki babongisi-nzela ya sanza na sanza bazalaki kosangana na yango, mpe mbala nyonso nkulutu moko azalaki kozangisa te. Na ebandeli ezalaki etumba mpo na kobima mbala na mbala elongo na mwana na ngai ya mobali, kasi yango eumelaki ntango molai te, lokola azalaki kozonga ntango nyonso na ndako na esengo mpe alendisami na baninga malamu. Wana azalaki naino moyekoli na Eteyelo ya katikati, azwaki batisimo mpe azalaki kosala sanza nyonso lokola mobongisi-nzela mosungi, mpe ntango asilisaki kelasi, akómaki mobongisi-nzela ya sanza na sanza.” Baninga malamu mpe kosala mokano ya Yehova ememaki matomba malamu.
Ekoki kozala ete epai bofandi ezali na bilenge mingi te oyo bakoki kozala na bopusi malamu likoló na mwana na bino, kasi mbala na mbala bilenge mingi oyo baponaki kosalela Yehova balobelaki ndakisa ya baboti na bango moko. Bilenge mingi bazalaki kosepela na baboti na bango mpe balingaki komekola bango. Yuri azali komikundola ezaleli ya mama na ye mpo na oyo etali koyamba bapaya mpe lolenge azalaki komibanzabanza mpo na basusu, kobéngáká bango na telefone mpe kolambáká bilei mpo na babɛli. Tatsuo, oyo auti na libota ya bana mibali minei, baoyo basili kokóla mpe bazali kosalela Yehova, alobaki ete: “Mama akokaki te koyekola na biso pɔ́sɔ na pɔ́sɔ mpamba te papa azalaki mondimi te mpe azalaki kokutana na botɛmɛli ya bandeko ya mosuni. Kasi kotalela etɛlɛmɛlo na ye mpo na solo mpe esengo na ye kati na mosala ya Yehova ezalaki na bopusi monene likoló na ngai. Azalaki ata kondima kotikala kino penepene na ntɔ́ngɔ́ mpo na kosalisa biso na mikakatano na biso.” Maloba ya mayele oyo mauti na baboti mazali na nguya soki masimbami na misala ya kondima. Yoichiro alobaki na ntina na baboti na ye ete: “Nazali komindola soko moke te ete babimisaki makanisi mabe na ntina na basusu kati na lisangá; bazalaki mpe te kopesa biso nzela ya kolobaloba na ntina na mabungá na basusu.”—Luka 6:40-42.
Esengo ya komona bana kopona kosalela Yehova
Bana bakoki kosalisama na lolenge sé moko te oyo ekoki kolónga epai na bana nyonso mpo na kopona kosalela Yehova. Ekozala na bantango mingi ya mikakatano. Kasi tata oyo abulunganaki, oyo totángaki na ebandeli alobaki ete: “Biso baboti tomekaki ntango nyonso kolanda na bosembo nyonso batoli ya lisangá ya Yehova oyo ezali komonana. Yango ezalaki lisalisi monene mpo na kolónga mikakatano.” Milende na bango milóngaki.
Ee, na kosaláká nyonso oyo ekoki na bino mpo na kolanda mitindá ya Biblia, kopesáká bana na bino bantina malamu ya kolinga Yehova, oyo esimbami na ndakisa ya sembo mpe na milende mpo na kosalisa, bino mpe bokomona na nsima ete milende na bino mizwi mbano. Bozali komikundola elenge mobali oyo tolobelaki na ebandeli, oyo kala azwaki ekateli ya kokóma Motatoli ya Yehova te? Ntango mingi nsima wana mama na ye asilaki kosalisa ye malamu kati na mibu na ye ya mikakatano, alobaki ete: “Nazali na esengo ete atikaki te!” Bino mpe bokoki kozwa matomba motindo yango epai na bana na bino.—Bagalatia 6:9.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
b Basáli ya ntango nyonso epai na Batatoli ya Yehova babéngami babongisi-nzela. Mobongisi-nzela mosungi alekisaka ngonga 60 kati na mosala ya kosakola na sanza moko, mobongisi-nzela ya sanza na sanza alekisaka ngonga 90, mobongisi-nzela monene alekisaka ngonga 140.
[Elilingi na lokasa 30]
Okoki komikundola na esengo nyonso lolenge obɔkɔlaki bana na yo?