Yehova azali kopesa nguya na libota na ye na Ɛ́sti mpe na Wɛ́sti
KATI na bateritware epai mosala ya kosakola mopekisami, na mikili mitondi na mobulu, mpe na bamboka epai bipekiseli biuti kolongolama—ya solo, na elanga ya mokili mobimba—Yehova azali kolanda kopesa “nguya oyo eleki nguya na bato” epai na Batatoli na ye.—2 Bakolinti 4:7, NW.
Bokóli na nsé na epekiseli
Kati na etuluku moko ya bisanga mosika kuna na Ɛ́sti, uta mosala ya kosakola mopekisamaki ekokisi mibu 17 sikawa. Batatoli basili kolɛmba? Soko moke te! Na Máí oyo euti koleka, bazwaki motuya ya sika ya basakoli 10 756, mpe 1 297 kati na bango bazalaki basaleli ya ntango nyonso. Lokola makambo ya mokili mazali kobeba, bafandi na bisanga bazali mingi mpenza kondima koyoka solo. Na yango, batambwisaki boyekoli ya Biblia 15 654 elongo na bato oyo bamonisaki mposa. Liboso, bato 25 397 bayanganaki na makita masalemaki na kimya nyonso mpo na kokundola liwa ya Yesu.
Ntango Mayangani ya Etúká “Mateya mauti na Nzambe” masalemaki—na kobombama mpo na ezalela ya mboka na bango—bandeko basepelaki mingi na kozwa, na lokótá na bango, babúku ya motindo oyo ebimisamaki na Etats-Unis. Babongoli, babongisi-lokótá (vérificateurs), mpe bandeko mosusu bandimaki na motema moko mpo na kosala bangonga mingi koleka ntango ya mosala na bango ete bakoka kobimisa búku ya ntina mingi, oyo ezali na nkámá na nkámá ya nkasa, na ntango malamu. Mpe kompanyi moko ya bonyanti mikanda ezalaki na esengo ya kokokisa mosala kitoko ya konyata mpe ya kokangisa mikanda. Bayangani basepelaki na kozwa búku yango, oyo ezali na bililingi koleka nkóto moko. Bakonzi mingi ya Leta bazali komemya Batatoli ya Yehova, kasi botɛmɛli boutaka mbala mingi epai na bakonzi ya mangomba ya boklisto ya lokuta. Elikya ezali ete mosika te epekiseli ekolongolama.
Ezali boni na mikili ya Amerika?
Batatoli ya Yehova na mikili ya Wɛ́sti bazali na bomoko elongo na bandeko na bango ya Ɛ́sti, bazali mpe kolónga mikakatano na bango, mpe elimo santu ya Yehova ezali kosalisa bango na kolónga makambo ya mpasi. Na ndakisa, na lapólo oyo elandi mpo na mboka moko ya Amerika ya Súdi, epai ebele na batɛki na drogue bazali kolekaleka na zámba.
Etuluku moko ya Batatoli bamataki na bísi moko mpo na kokende na teritware moko mosika. Wana bakitaki na bísi, bamonaki nzela moko ya moke oyo etangwaki na mboka moke. Bongo, bandeko mibali mitano balandaki nzela moke wana ya mabelé, wana bandeko basi mpe bana bazalaki kosala mosala na mboka wana. Moko na bandeko mibali ayebisi ete:
“Ngonga mibale oyo totambolaki, tomonaki bandako mingi te na nzela. Bongo, mibali mwambe oyo bazalaki na bibundeli mpe bikɔti na mitó na bango, babimaki pwasa na zámba. Bamoko bazalaki na mindoki ya makasi, mpe basusu bazalaki na mákwangola. Lolenge nini tosalaki? Totunaki eloko nini bazalaki na yango mposa, kasi balobaki na biso tokanga minoko mpe toloba te—bobele kotambola. Tosalaki bongo! Nsima ya ngonga mibale ya kotambola kati na zámba oyo ezalaki na matiti mingi, tokómaki na esika ya polele oyo ezalaki lokola káa moko ya basodá. Bakɛngɛli bazalaki bipai binso elongo na mindoki. Na katikati ezalaki na ndako moko kitoko epai kuna bamemaki biso.
“Nsima ya kofanda, tosololaki elongo na ye oyo amonanaki lokola mokonzi ya káa. Alataki malamu, amonanaki ete azalaki moto oyo atangá mingi, mpe abongaki mpenza na limemya. Atalaki moko kati na etuluku ya bandeko na biso mpe alobaki na ye ete atɛlɛma. Bongo, atunaki ye ete: ‘Okanisi nini mpo na etuluku [na biso] oyo?’ Wana ayebaki mpenza epai wapi tozalaki, ndeko mobali ayanolaki ete: ‘Ya solo, toyebi etuluku na bino, kasi totyelaka yango likebi te, ezala ata lingomba mosusu ya politiki. Ntina bobele moko oyo tozali awa ezali mpo na kosakola Bokonzi ya Yehova Nzambe oyo akoyangela na nzela na Klisto Yesu. Mosika te, ekoboma biyangeli nyonso ya politiki ya ebongiseli na biloko ya ntango oyo mpe ekosopa mapamboli kitoko epai na bato awa na mabelé oyo makokóma Paladiso—eloko oyo moto moko te soko etuluku moko te ekoki kosala yango.’
“Ezaleli ya mobali yango ebongwanaki. Abandaki kotuna mituna. ‘Epai wapi bino boyekolaki makambo oyo nyonso? Lolenge nini bozali komibongisa mpo na koloba motindo oyo?’ Na boumeli ya ngonga moko na ndambo, tokokaki kopesa litatoli malamu na ntina na makambo mazali koleka na mokili mpe tomonisaki ete Biblia eyebisi elikya bobele moko mpo na bato. Tolimbolaki lisusu Baloma mokapo 13—ete biso totósaka bakonzi, kasi soki mokakatano mokɔti kati na Liloba ya Yehova mpe mibeko na bango, tokotosa liboso Yehova, Nzambe na biso. Na nsuka, topesaki ye babúku oyo tozalaki na yango. Azwaki misato kati na yango elongo na Biblia moko mpe, tokamwaki mpenza wana apesaki biso mwa mosolo mpo na yango. Alobaki ete, akotanga yango.
“Na nsima, mokonzi wana ayebisaki na elembo epai na moko na bato na ye mpo na kobimisa biso libandá ya kaá. Mosika te, tozalaki na nzela na biso ya bozongi, kotɔndókó Yehova mpo na elónga oyo tozalaki na yango kati na elanga mosusu ya litatoli.”
Kati na Afrika oyo ebebi na bitumba
Afrika ezali na katikati na nzela ekaboli Ɛ́sti mpe Wɛ́sti. Bitumba kati na bitúká bisili kobongola mikili misusu na bisika ya mobulu mingi. Na Libéria, libota ya Yehova banyokwamaki mingi lisusu na mobulu ya etumba ya banamboka. Liboso, esalemaki na kati mpe na zingazinga ya mboka-mokonzi na boumeli ya Ɔkɔtɔ́bɛ mpe Novɛ́mbɛ 1992. Na nsima, wana etumba epalanganaki kino na bamboka mike, masangá manso mapanzanaki, mpamba te bandeko bazalaki kokima na zámba elongo na bato mosusu ya mboka. Nzokande, molende na bango mokitaki te. Wana bazalaki kokima, bazalaki kosakola, mpe bapesaki litatoli monene kino mosika kuna na bamboka mike.
Lisangá moko oyo lisangisaki bandeko oyo bakimaki bamboka na bango, litongaki Ndako ya Bokonzi mpo na ntango mokuse na katikati na elanga monene ya nzeté ya mitópe. Na engumba oyo ezalaki pene ya esika na bitumba makasi mingi, na moi, basivili bazalaki kokima zingazinga ya elanga ya mitópe mpo na komibatela na babombe oyo ezalaki kouta likoló. Bandeko ya esika wana (bakisa mpe basakoli oyo bautaki na mboka-mokonzi, Monrovia) bazalaki kobongisa mosala ya elanga mpe bakokaki mbala na mbala kosakwela bankóto na bato mingi oyo babombamaki na nsé na banzeté ya mitópe! Mbala nyonso oyo mpepo ezalaki kobɛlɛma, bandeko mibali mpe bandeko basi bazalaki kokɔta kati na libúlú ya penepene mpe na nsima, soki likámá lisili, bazalaki kolanda mosala na bango ya kopesa litatoli.
Likambo ya kokamwa ezali ete, koleka basakoli nkóto moko oyo bakokaki kotinda lapólo na la Société, atako bitumba ya banamboka, bazwaki mwayene ya ngonga 18,1 na mosala ya elanga mpe batambwisaki boyekoli ya Biblia 3 111 na sanza nyonso.
Na Afrika, na boumeli ya mibu minei oyo misili koleka, bipekiseli na mosala ya Batatoli ya Yehova esili kolongolama kati na bamboka 18. Oyo nde esengo! Na Augústo 12, epekiseli likoló na Batatoli ya Malawi oyo etyamaki na Ɔkɔtɔ́bɛ 1967, elongolamaki. Mosala ya kosakola nsango malamu oyo mosalemaki na kobombama, mozalaki ntango nyonso kokóla, kasi sikawa Batatoli bakoki kokende liboso kati na bonsomi, atako basengeli naino kozela lisekwa mpo na koyamba lisusu baninga balingami na bango oyo babomamaki na banyokoli.
Na Mozambique, boyokani ya kimya bosalemaki na Ɔkɔtɔ́bɛ 4, 1992. Bateritware oyo esalemaki te mpo na etumba makasi oyo ezalaki na boumeli ya mibu 16 miuti koleka, ekómi kosalelama. Na etúká ya Carioco, bandeko 375, mibali mpe basi, bazongelaki boyokani elongo na ebongiseli (organisation), oyo babungisaki na mibu nsambo oyo miutaki koleka. Liyangani ya mokolo moko lisalemaki na engumba Milange, mboka monene ya etúká oyo eyebanaki mpenza lokola káa ya bakangami (camp de concentration) mpe esika mpo na “kosembola” Batatoli ya Yehova, mingi kati na baoyo bakimaki longwa na Malawi. Ezali likambo ya kokamwa na komona bayangani 2 915, kati na bango motambwisi-engumba, oyo ayambaki Batatoli ya Yehova. Bongo, esika oyo ezalaki kala mpo na “kosembola,” ekómaki esika ya mateya mauti na Nzambe mpo na mokolo wana.
Misionere moko akomaki ete: “Na ntina na bandeko na biso baoyo bazalaki na kaá ya bato bakimá mboka na bango na etúká Tete, likambo ya kosepelisa lilobelamaki na momonisi moko ya UNHCR (ebongiseli monene ya O.N.U. mpo na kosunga bato bakimá mboka na bango). Alobaki ete, Batatoli ya Yehova basalaki kaá na bango, oyo ekabwani na bituluku mosusu. Alobaki ete: ‘Bobele káa na bango nde ebongisamaki malamu.’ Abakisaki ete: ‘Batatoli ya Yehova bazali pɛto, babongisami malamu, mpe balakisami malamu.’ Na nsima, asɛngaki ngai ete tótambola na mpepo likoló na esobé ete ngai moko namona. Longwa na likoló, mokumbi mpepo alakisaki káa mibale. Moko ezalaki malamu te mpe ezalaki na bɔsɔtɔ, ezalaki na bandako ya mabelé oyo etongamaki na bulúbulu. Mosusu ezalaki kitoko, ezalaki na bandako etandamaki na molɔngɔ́ oyo ekabwani na balabála. Bandako yango ezalaki pɛto, libandá na yango ekɔmbɔlamaki malamu. Mosusu nkutu, etyamaki lángi esalemaki na bango moko. Mokumbi mpepo alobaki ete: ‘Mpo na yo, wapi oyo ekoki kozala mpo na bato na yo?’ Ezalaki esengo monene na kokutana na bandeko ya kaá wana. Ezali sikawa na masangá mwambe kati na mboka wana ya Batatoli.”
Na “mokili ya mpongó”
Te, oyo ezali mpongó ya Etats-Unis te! Katikati na Ɛ́sti mpe Wɛ́sti, ezali na mboka moko ya Mpótó, Albanie, nkombo na yango eyebani na lokótá ya ekólo, ezali Shqipëria, oyo elimboli “Mokili ya mpongó.” Kala mingi te, epekiseli makasi oyo eumelaki mibu 50 likoló na Batatoli ya Yehova kati na mokili wana elongolamaki, mpe bakoki kozala na bomoko elongo na bandeko na bango ya Ɛ́sti mpe Wɛ́sti wana bazali kosalela bonsomi na bongo ya losambo. Bazali mpenza ‘kosomba ntango malamu.’ (Baefese 5:16, NW) Liyangani ya liboso kati na lisoló ya Albanie, liyangani ya mokolo moko, lisalemaki na Esika ya Masano, na mboka-mokonzi Tiranë, na mokolo ya Eyenga, na Mársi 21. Na mokolo ya Poso na nsima na nzangá, ebele ya Batatoli 75 baoyo bamonisaki bolingo malamu, babongolaki esika ya makita oyo ebebaki na esika moko kitoko, ndako ya pɛto mpo na liyangani. Bakambi ya esika yango bakamwaki. Mpe ebongi na koyeba ete kati na bato 75 baoyo bamonisaki bolingo malamu, bobele 20 nde basilaki kozwa batisimo!
Likoló lizalaki malamu mingi te. Wana bandeko oyo bautaki na mikili misusu bakómaki, bambote—mingi mpenza na bilembo mpe na koyambana—esalaki ete liyangani wana ya mokolo moko ya ntina mingi lizala mpenza ya ntina mingi koleka. Ndeko Nasho Dori asalaki libondeli ya ebandeli wana atombolaki mabɔkɔ likoló. Azwaki batisimo na mobu 1930 mpe azali sikawa mokufeli miso. Masoló masalemaki na lokótá albanais, mingi mpenza na babongisi-nzela minene (pionniers spéciaux) bapaya. Bayangani 585 bayembaki loyembo “Ntango moklisto amipesi epai na Nzambe”—moko na nzembo motoba oyo ebongolamaki na lokótá albanais mpo na libaku wana—ntango bandeko ya sika 41, mibali mpe basi, bazalaki kokende na pisíni oyo esalemaki na bandeko oyo bautaki Grèce, oyo etyamaki mpenza kati na Ndako ya Bokonzi ya engumba wana. Oyo nde mbongwana! Kala, kozala na Biblia elimbolaki komemama na kaá ya misala makasi mpe makita mazalaki kosalema bobele na etuluku ya bato mibale to misato.
Mokolo oyo molandaki liyangani, biro ya la Société Watch Tower ebyangamaki na telefone longwa na mokambi ya esika ya Masano. Uta kala, azalaki kotya likebi te epai na baoyo bazalaki kofutela esika wana ya Masano. Wana ezalaki mosala ya mokambi molandi. Kasi alobaki ete: “Nabyangi bino mpo na kotɔndo bino. Namona naino te wana esika oyo ekómi pɛto boye. Soki nayebisi bino lolenge yango ezali, nakoloba ete mopepe moutaki likoló mpe mokitaki lobi loleki na esika na biso ya masano. Mbala nyonso oyo bokolinga kosalela esika na biso, bozonga lisusu, mpe tokotya bino bato ya liboso kati na molɔngɔ́. Boyeba ete, tozali na mposa na bino ete boyaka mbala na mbala, nsima ya sanza misato, kozanga kofuta mbongo.”
Batatoli bazongaki na bamboka na bango wana balendisamaki mpe bazalaki na botɔ́ndi mpe babandaki komilɛngɛla mpo na Ekaniseli ya liwa na Yesu. Bobele nsima ya mikolo 15, na mokolo ya mibale, Apríli 6, Ekaniseli esalemaki na bisika nsambo na polele mpo na mbala ya liboso.
Na engumba Berat, motuya ya bayangani na likita mozalaki mingi kino pene na 170, mpe sángó ya mboka wana asilikaki makasi. Kati na basakoli ya Bokonzi 33, 21 bazwaki batisimo na liyangani. Berat ezwaki motuya ya bayangani 472 na Ekaniseli. Motuya ya bayangani na bipai mosusu mozalaki mpe monene, oyo ezalaki mpenza mbuma ya litambwisi malamu lipesami na babongisi-nzela minene.
Na Shkodër, engumba monene ya katolike na Albanie, epai ndakonzambe monene ezali, sanza na sanza, lingomba ebandaki konyata mikanda, mpe moko na moko ezalaki na lisoló “Lolenge nini kopɛngola Batatoli ya Yehova.” Lisoló ya nsuka elobaki ete: “Batatoli ya Yehova basili kobebisa Shkodër”! Limpinga monene ya Batatoli mibale bayanganisaki bato 74 ya bizaleli malamu mpe na makanisi malamu na Ekaniseli. Nsima na kolanda lisoló ya Ekaniseli, mabota 15 masɛngaki boyekoli ya Biblia na ndako. Na engumba mosusu, Durres, epai ezali na limpinga ya Batatoli minei, ezalaki na motuya monene ya bayangani 79.
Mpo na botɛmɛli ya bilenge bakatoliki, baoyo bakanaki kobengana Batatoli na mabangá, likita ya Ekaniseli na mboka na ngomba ya Kalmeti i Vogel, lisalemaki na ndako ya ndeko moko ya mboka wana, epai bato 22 bayanganaki na kimya nyonso. Na etuluku wana ezalaki na basakoli mitano, misato kati na bango bazwaki batisimo na liyangani ya Tiranë.
Na Vlorë, bilenge mibali mibale bazwaki nimero moko ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, batangaki yango, mpe bakomelaki la Société ete: “Biso moko tozali sikawa komibénga Batatoli ya Yehova mpo na solo oyo toyekolaki kati na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Botindela biso lisalisi.” Babongisi-nzela minene mibale batindamaki kuna, mpe moko na bilenge mibali wana akómaki nokinoki mosakoli. Azalaki na esengo ya kotangama kati na bayangani 64 na Ekaniseli na Vlorë.
Ndeko moko ya mboka Albanie oyo ayekolaki solo na Etats-Unis, azongaki na bambula 1950 na mboka na ye Gjirokastër, epai asalaki na makoki nyonso kino na liwa na ye. Alónaki mbotó ya solo kati na motema ya mwana na ye ya mobali. Ntango epekiseli elongolamaki, mwana mobali wana asɛngaki lisalisi na la Société Watch Tower. Moto mosusu oyo amonisaki bosepeli, oyo azalaki kofanda na mboka moko ezali na Nɔ́rdi, atindaki nkomá mpo na kosɛnga lisalisi, bongo babongisi-nzela minene minei batindamaki kuna. Na ntɔ́ngɔ́ ya mokolo ya misato oyo elandaki Ekaniseli, moko na bango abyangaki biro ya la Société ya Tiranë na foni, ete: “Nakoki komipekisa te mpo na koyebisa bino lolenge oyo elimo ya Yehova esalaki mosala. Tozali mpenza na esengo. Ekaniseli esalemaki malamu.” Motuya ya bayangani mozalaki 106, kati na yango etuluku ya basakoli nsambo ya Bokonzi.
Motuya nyonso ya bayangani na Ekaniseli mozalaki boni? Na 1992, wana ezalaki bobele na basakoli 30 ya Bokonzi, motuya ya bayangani mozalaki 325. Na 1993, basakoli 131 bayanganisaki bato 1 318. Kati na mbula wana mibale, motuya ya bayangani mozalaki mbala zomi koleka motuya ya basakoli. Oyo nde esengo ya komona ‘oyo moke kokóma nkoto mpenza’ na mwa ntango moke boye!—Yisaya 60:22.
“Yeisá nsinga ya hema na yo molai”
Lokola mosala ya kosakola ya Batatoli ya Yehova mozali kopalangana bipai binso ya mokili, libyangi lilandi kopesama, ete: “Yeisá esika ya hema na yo monene. Mpe tika ete yango etanda bilamba ya hema ya tempelo na yo monene. Komipekisa te. Yeisá nsinga ya hema na yo molai, mpe kembisá nzeté ya hema na yo na makasi. Mpo ete na lobɔkɔ ya mobali mpe na lobɔkɔ ya mwasi, okopanzana.” (Yisaya 54:2, 3, NW) Kopanzana wana ya ‘tempelo monene’ ya Nzambe—oyo emonisami na lisangá ya mokili mobimba ya basambeli na ye—emonani mpenza polele na Mpótó ya Ɛ́sti, mingi mpenza kati na mikili oyo mibéngamaki kala ete Union soviétique. Nsima na kosunga basaleli na ye na boumeli ya monyoko, Yehova azali sikawa kopesa Batatoli na ye nguya oyo bazali na yango mposa mpo na kopalanganisa ebongiseli mpe kokembisa yango.
Na mboka Moscou, na mokili ya Russie, bato 23 743 bayanganaki na Yúli 22 kino Yúli 25, na libandá ya masano oyo babéngi Locomotive, na liyangani monene ya mikili mingi oyo ete “Mateya mauti na Nzambe.” Nani akanisaki ete yango ekokaki kosalema na mibu mibale oyo miuti koleka? Kasi yango esalemaki! Bato koleka 1 000 bautaki Japon mpe Corée, soko bato 4 000 bautaki Etats-Unis mpe Canada, mpe bankóto mosusu bautaki na mikili koleka 30 ya Pacifique Sud, ya Afrika, ya Mpótó mpe bitúká mosusu—ezalaki solo bokutani ya Ɛ́sti mpe Wɛ́sti. Ezalaki elendiseli monene mpo na bango nyonso na kosangana esika moko na bonsomi nyonso elongo na bandeko na bango, mibali mpe basi ya Russie, koleka 15 000. Esengo ezalaki mingi mpenza.
Motuya ya kokamwa ya Batatoli ya sika 1 489 bazwaki batisimo. Batisimo elobelamaki mingi na bipanzelo ya nsango na bipai binso ya mokili, kati na yango elilingi kitoko etyamaki na lokasa ya liboso ya zulunalo The New York Times. Atako mabɔkɔ mabɛtamaki makasi na boumeli ya batisimo, kasi oyo esalemaki na boumeli ya maloba ya nsuka elekaki mpenza, ntango molobi alobaki, nsima na kotɔndo bato 4 752 baoyo bamonisaki bolingo malamu mpe bakonzi ya Leta baoyo basalaki ete liyangani lisalema malamu, ete: “Likoló na nyonso, totɔndi Yehova!” Ya solo, elimo ya Yehova epekisaki botɛmɛli makasi ya bakonzi ya mangomba ya Orthodoxe mpe epesaki nguya ete liyangani lisalema na malamu mingi.
Nzokande, mosusu esengelaki kosalema na Ukraine, na engumba Kiev, kobanda Augústo 5 kino Augústo 8. Wana lisusu, bato ya bolingo malamu babongisaki mpenza libandá nyonso ya masano, mpe Ndako ya Bokonzi wana monene ekɔtisaki motuya nyonso ya bayangani 64 714. Mbala wana lisusu, Batatoli bautaki na Ɛ́sti mpe na Wɛ́sti mpe bipai nyonso na mokili. Masoló minene mabongolamaki na nkótá 12. Soko bapaya 53 000, baoyo bayaki ebele na mpepo, na engbunduka, to na bísi, bayambamaki na bisika bikotɛlɛmaka mituka mpe bingbunduka, mpe na libandá ya mpepo mpe bamemamaki na bandako ya bato ya mobembo (hôtels), na biteyelo, mpe bandako ya bandeko, lisusu mpe na masuwa. Nyonso wana esɛngaki mosolo mingi te, esalemaki na lolenge kitoko mpe ya mayele oyo ekamwisaki mpe esalaki ete bapolísi ya engumba wana bapesa longonya.
Likambo lileki monene lisalemaki na ebongiseli ya liyangani, ezalaki batisimo, oyo eumelaki ngonga mibale na ndambo. Mabɔkɔ malandaki kobɛtama na bipai nyonso ya libandá ya masano wana bandeko ya sika 7 402, mibali mpe basi, bamonisaki komipesa na bango epai na Yehova. Yango elekaki mpenza motuya monene ya liboso ya bato 7 136, oyo mozwamaki ntango bato 253 922 baoyo bazalaki na liyangani na engumba New York, na 1958.
Awa eleko oyo ya kosambisa ebɛlɛmi na nsuka na yango, bato oyo bakokani na bampate, baoyo bauti na Ɛ́sti, na Wɛ́sti, mpe ata na “eteni eleki mosika ya mokili,” bazali koyanganisama kati na bomoko oyo bosalemaki naino te kati na Lisoló ya bato. Ya solo, “ebele monene, . . . oyo bauti na mabota nyonso, na mikili nyonso, na bikólo nyonso, na minoko nyonso” basangani na Yisraele ya elimo mpo na koyámbola kondima na bango kati na mbeka ya lisiko ya motuya mingi oyo Yesu apesaki, moboko ya nyonso oyo ezali kokokisama mpo na kolóngisama ya boyangeli monene ya Yehova.—Misala 1:8; Emoniseli 7:4, 9, 10.
[Bililingi na lokasa 8, 9]
Ɛ́sti ekutani na Wɛ́sti na mboka Moscou mpe na Kiev