Wana Ɛ́sti ekutani na Wɛ́sti
AH, Ɛ́sti ezali Ɛ́sti, mpe Wɛ́sti ezali Wɛ́sti, mpe yango mibale ekoki kokutana soko moke te.” Maloba oyo ya Rudyard Kipling, Mongelesi mokomi na ntɔ́ki, mazali kokundwela biso kokesena monene na bizaleli ya bato oyo ezali kokabola mokili, oyo esili kopesa nzela na koyinana kati na bitúká, na mposo, mpe na bikólo, koyinana oyo ezali kongala makasi lelo na zingazinga na biso. Bato mingi bazali kotuna ete, Nzambe akoki kosala eloko moko te na ntina na ezalela oyo? Akoki mpenza kosala eloko! Mpe azali nkutu kosala eloko sikawa. Maloba malandi na ntɔ́ki ya Kipling malobeli yango. Kino ntango boni Ɛ́sti ekokabwana na Wɛ́sti? Mokomi na ntɔ́ki alobaki ete: “Kino mabelé mpe makoló makotɛlɛma liboso na Kosambisama monene ya Nzambe.”
Nzambe asili kopesa mokumba ya kosambisa epai na Mwana na ye, Yesu Klisto. (Yoane 5:22-24, 30) Kasi eleko wana ya kosambisama ekobanda ntango nini? Banani bakosambisama, mpe makambo nini makobima? Kati na esakweli, Yesu nde alobelaki bitumba ya mokili mobimba mpe bampasi oyo ebandaki konyokola bato uta mobu 1914. Alobaki ete yango ezalaki “elembo ya kozala” na ye ezangi komonana “mpe ya nsuka ya ebongiseli ya biloko.”—Matai 24:3-8, NW.
Na eteni monene ya esakweli wana, Yesu amonisaki ete kosambisama ekoya na eleko na biso, wana alobaki mpo na ye moko ete: “Wana Mwana na moto akoya kati na nkembo na ye, mpe baanzelu nyonso elongo na ye, akofanda bongo likoló na kiti na ye ya bokonzi ya nkembo. Mpe mabota manso makoyanganisama liboso na ye, mpe akokabola bato lokola mobateli na mpate akokabolaka bampate na bantaba. Mpe akotya bampate na lobɔkɔ na ye ya mobali, nde bantaba na lobɔkɔ na ye ya mwasi.” Na lolenge ya elilingi, mabota manso ya mabelé mayanganisami sikawa liboso na Mosambisi mpe mazali na mokumba na lolenge oyo bazali koyanola na nsango na ye ya lobiko. Wana kosambisama ekosalema, mosika te, na ntango na bolózi monene, bato bazangi botosi baoyo bakokani na bantaba, “bakoleka na kolongolama ya seko, nde bayengebene [bato na botosi baoyo bakokani na bampate] kati na bomoi ya seko.”—Matai 25:31-33, 46, NW; Emoniseli 16:14-16.
‘Longwa na ebimelo ya moi mpe longwa na epai moi mokolalaka’
Kosambisama ya mokili oyo ebandaki mpenza na boumeli ya bambula ya yikiyiki na Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Na ntango wana, bakonzi ya mangomba ya boklisto ya lokuta bapesaki lisungi monene na ngámbo nyonso oyo ezalaki kobunda. Yango emonisaki bango lokola eteni ya mokili mosili kobeba oyo mobongi na kozwa “nkanda na Nzambe.” (Yoane 3:36) Kasi ezalaki boni mpo na baklisto na kimya baoyo bandimelaki Nzambe? Uta 1919, babandaki koyanganisama na ngámbo ya Mokonzi, Klisto Yesu.
Liboso, baoyo batikalaki kati na ba 144 000 bapakolami, baponamaki na boumeli ya bikeke ya ntango ya boklisto longwa na bipai binso ya mokili. Bazali “basangoli na libula elongo na Klisto” kati na Bokonzi na ye ya likoló. (Baloma 8:17) Mpo na bango, mosakoli ya Nzambe alobi ete: “Kobanga te, mpo ete ngai nazali elongo na yo. Nakoyeisa mbotó na yo longwa na ebimelo ya moi, mpe nakoyanganisa bana na yo esika moko longwa na epai moi mokolalaka. Nakoloba epai na nɔ́rdi ete: ‘Zongisá!’ mpe epai na súdi ete: ‘Koboya te. Yeisá bana mibali na ngai longwa na mosika, mpe bana basi na ngai longwa na nsuka ya mabelé, moto na moto oyo abéngami na nkombo na ngai mpe oyo nazalisaki mpo na nkembo na ngai moko, oyo nayemaki, ee, oyo nasalaki.’”—Yisaya 43:5-7, NW.
Kasi esuki wana te! Mingi mpenza, na bambula 1930, ebele monene, oyo ezali sikawa na motángo ya bamilió, babandaki koyangisama. Bango bazali “bampate” oyo Yesu alobelaki na Matai 25:31-46. Lokola batikali bapakolami baoyo bazali liboso na bango, ebele wana bayei mpo na “kozala na kondima” epai na Ye oyo alobaki ete: ‘Bozali batatoli na ngai, mpe ngai nazali Nzambe.’ (Yisaya 43:10-12, NW) Koyangisama ya ebele monene wana bazali mpe kouta ‘longwa ebimelo na moi mpe epai moi mokolálaka, longwa na Nɔ́rdi mpe Súdi, mpe longwa na nsuka ya mokili.’
Bampate wana ya kimya bazali kosangisama kati na bondeko ya mokili mobimba. Bazali koloba minoko mikeseni na mikili 231 oyo bafandi. Nzokande bazali na bomoko ya elimo kati na boyekoli ya “monoko na pɛto” ya nsango ya Bokonzi ya Biblia, “na ntina ete bango banso bábelela nkombo ya Yehova, mpo na kosalela ye lipeka na lipeka.” (Sofoni 3:9, NW) Bomoko na bango na kondima, na mikano, mpe na misala ezali kopesa litatoli malamu ete Ɛ́sti esili mpenza kokutana na Wɛ́sti, mpe bato bauti na bisika nyonso mosusu, mpo na mosala mpe lokumu ya Yehova Nkolo Moyangeli.
Kati na mikili misusu, koyanganisama wana ezali kosalema na lolenge ya kokamwa, lokola ekomonisama na makambo malandi.