Nini ezali kotambwisa bomoi na yo: mitinda, to makanisi ya basusu?
NTANGO azalaki na sixième primaire, Norihito azalaki kosangana na masano. Na pwasa asengelaki kozwa ekateli moko. Banakelasi nyonso basengelaki kosangana na milulu ya kokumisa ekólo. Asengelaki kosangana elongo na baninga na ye na momeseno oyo emonanaki lokola ete ezali na ntina bobele moke?
Norihito asilaki koyekola kati na Biblia ete ezali mabe kopesa losambo epai na nzambe mosusu, na esika ya kopesa yango epai na Jéhovah. (Exode 20:4, 5; Matai 4:10) Ayebaki lisusu ete baklisto basengeli komikotisa te na makambo nyonso ya politike. (Danyele 3:1-30; Yoane 17:16) Yango wana, atako baninga na ye basengaki ye makasi ete asala yango, na mpiko nyonso mpe na limemya aboyaki komitika. Olingaki kosala nini soki ozalaka kati na likambo motindo yango?
Mposa ya kondimama na basusu
Makomami mazali komonisa ete Nzambe alingaki ete bato bazala na boyokani elongo na bazalani na bango mpe basepela kosala makambo esika moko. Moto abotami na mposa ya koluka boninga mpe kondimama na basusu, na mposa ya kozala kati na etuluku moko. Mayoki ya motindo yango mazali koyeisa esengo kati na bomoi mpe mazali komema kimya mpe boyokani elongo na basusu.—Genese 2:18; Nzembo 133:1; 1 Petelo 3:8.
Mposa oyo moto abotami na yango ya kozala mosangani ya etuluku moko ezali komonana naino kino lelo oyo epai na bikólo mosusu, oyo bityaka likebi mingi na likambo ya komiyokanisa na etuluku. Na ndakisa, na Japon bana bazali koyekola mitinda ya etuluku mpe kotosa yango uta bomwana. Bonkɔ́kɔ ezali koteya bango ete moko na mikumba na bango ya liboso mozali ya komiyokanisa na etuluku. Ntoma ya kala ya mokili ya Etats-Unis na Japon mpe mososoli monene na mimeseno ya ba Japonais, Edwin Reischauer, alobaki ete: “Ba Japonais baleki mpenza bato na Mpótó mpo na oyo etali kosala kati na etuluku.” Abakisaki ete: “Esika bato mingi ya Mpótó bakomonisa elimo ya lipanda mpe ya moto na moto, ba Japonais mingi bakosepela koyokanisa molato, etamboli, lolenge ya bomoi, mpe ata makanisi na bango na mitinda ya etuluku na bango.” Nzokande, mposa ya komiyokanisa to kolanda basusu esuki bobele na ba Japonais te. Ezali epai na bato nyonso.
Bopusi mpo na kolanda basusu
Atako ezali malamu kosala makasi mpo na koyokana elongo na basusu, nzokande, likámá lizali ya komiyokanisa na makanisi ya bato mingi kozanga kososola. Mpo na nini? Mpamba te mbala mingi makambo oyo bato mingi balingaka makeseni na makambo oyo makosepelisaka Nzambe. Biblia ezali koyebisa biso ete: “Mokili mobimba mozali kolala kati na oyo mabe.” (1 Yoane 5:19) Satana azali kosalela na mayele mabe myango nyonso oyo azali na yango—mposa ya bozwi, etamboli ya mbindo, kokabola mposo, bindimandima ya mangomba, bolingo ya ekólo, mpe bongo na bongo—mpo na kosala bopusi likoló na bibele mpe kokabola bango na Nzambe. Ya solo, komiyokanisa na mimeseno motindo yango ekotinda moto na kotemela Jéhovah Nzambe mpe mikano na ye. Yango wana Paulo apesaki baklisto toli oyo: “Bomekola makambo ya ntango oyo te kasi bobongwana mpo na kozwa makanisi ya sika kino bokokoka kososola mokano na Nzambe, yango malamu, yango bokoki koyamba, mpe ebongi mpenza.”—Baloma 12:2.
Lokola bazali kobika kati na ebongiseli ya ntango oyo, baklisto bazali ntango nyonso na nse ya bopusi ya komiyokanisa na oyo bato mingi bazali kosala. Bilenge nde bazali na likámá monene kati na likambo yango. Mposa ya kotalela mpe kosala makambo lokola baninga ya kelasi ezali mpenza monene. Esengeli solo mpiko mpo na kolimbola na baninga na bango mpo na nini basanganaka te na makambo mosusu. Nzokande, soki bakoteli bindimeli na bango te, bakoki kokwea na elimo.—Masese 24:1, 19, 20.
Mikóló mpe bakutanaka na bopusi motindo moko na bisika na bango ya mosala. Bakoki kobenga bango na kosangana na bokutani moko nsima ya bangonga ya mosala to na mikolo ya bopemi. Koboya ekoki komonisa bango lokola bato ya lolendo mpe bato baboyi koyokana elongo na baninga, likambo oyo likobimisa mikakatano na esika ya mosala. Basusu bakoki kooka ete bapusami na kosala bangonga mingi nsima ya ngonga oyo mosala esilaka bobele mpo ete basusu bazali kosala bongo to mpo ete bazali kozela ete basala bongo. Komitika na makambo yango ekoki komema makámá ya elimo mpo na bango mpe ekopekisa lisusu bango na kokokisa mikumba na bango misusu.—1 Bakolinti 15:33; 1 Timoté 6:6-8.
Longola na kelasi to na esika ya mosala, bopusi mpo na komiyokanisa to kolanda basusu ezali mpe komonana bipai mosusu. Mama moko moklisto ayebisi ete mokolo moko asengelaki kopesa etumbu makasi na mwana na ye, kasi apesaki ye yango te, bobele mpo abangaki ete basi mosusu ya mabala oyo bazalaki wana balingaki komona yango mabe.—Masese 29:15, 17.
Bibele bikoki kozimbisama
Biblia ezali kopesa biso toli moko ya polele na likambo ya kolanda bibele. Na ndakisa, Jéhovah ayebisaki na libota ya Yisraele ete: “Okolanda ebele mpo na kosala mabe te, mpe na ntango na kosamba likambo okotatola lokola elingi ebele te soko yango ezali sembo te.” (Exode 23:2; tala Baloma 6:16.) Balandaki ntango nyonso toli oyo te. Na libaku moko, mwa moke nsima ya kobima na Ezipito, wana Moize azalaki te, bato mosusu bapusaki Aaron mpe ekólo na kosala ekeko ya mwana na ngombe ya wolo mpe basambelaki yango na kolobáká ete “elambo mpo na Jéhovah.” Bato balyaki mpe bamelaki mpe babinaki wana bazalaki kopesa mbeka epai na mwana na ngombe ya wolo. Mpo na likambo wana ya mbindo, ya kosambela ekeko, babandisi na yango oyo bazalaki 3 000 babomamaki. Kasi basusu bazwaki mpe etumbu na Jéhovah mpo balandaki bibele kozanga kososola.—Exode 32:1-35.
Ndakisa mosusu ya kolanda bibele na mokano mabe emonanaki na ekeke ya liboso na likambo litali liwa ya Yesu Klisto. Wana bandimisamaki na bakonzi na mangomba, bato basanganaki na konganga mpo na kosenga ete baboma Yesu. (Malako 15:11) Na yango, na mokolo ya Pantekote oyo elandaki lisekwa mpe kobuta na Yesu na likoló, ntango Petelo amonisaki libunga monene oyo basalaki, mingi kati na bango “bakatanaki na mitema” mpe basosolaki likambo oyo basalaki wana balandaki bibele.—Misala 2:36, 37.
Mitinda ya Biblia mizali malamu mingi
Lokola masoló oyo mazali komonisa yango, kolanda makambo oyo bato mingi bazali kosala kozanga kososola ekoki komema na matomba mabe. Eleki malamu boni kolanda Biblia mpe kotika ete mitinda na yango mitambwisa bomoi na biso! Jéhovah alobi ete: “Mpo ete lokola lola eleki mokili likoló, boye nzela na ngai eleki nzela na bino mpe makanisi na ngai eleki makanisi na bino.” (Yisaya 55:9) Na makambo ya bizaleli malamu mpe ya boyokani kati na bato—ya solo, kati na bikateli nyonso ya bomoi—esili komonana mbala na mbala ete kolanda banzela ya Jéhovah eleki malamu na esika ya kolanda makanisi ya bato. Yango ezali moboko mpo na bomoi ya esengo mpe mpo na kolongono malamu ya nzoto.
Tokamata ndakisa na Kazuya. Atako asilaki koyekola Biblia mpo na mwa ntango, alandaki kosala engebene etamboli ya bato mingi—alukaki na makasi nyonso kokóma mozwi mpe kolonga na bomoi. Milende na ye mpo na kosepelisa bakonzi na ye ya mosala mpe ya komonana malamu na miso na baninga na ye ya mosala etindaki ye mbala mingi na kobima mpo na komela masanga kino na bangonga ya ntongo. Akómaki na makambo makasi, kolinga koyoka makanisi ya baninga te mpe kosilika nokinoki. Lolenge ya bomoi na ye ya kolekisa ndelo ememaki ye na maladi moko ya bɔɔngɔ́ oyo ebomaki ngámbo moko ya nzoto na ye. Wana azalaki kozongela kolongono na ye na lopitalo, azwaki ntango ya kokanisa makambo oyo ayekolaki na Biblia mpe na ntina na lolenge ya bomoi na ye. Azwaki ekateli ete ezalaki bongo ntango ya kosalela makambo oyo azalaki koyekola. Atikaki etelemelo na ye ya mokambi ya mosala mpe atikaki baninga na ye ya kala. Asalaki lisusu milende ya makasi mpo na kolata bomoto ya boklisto mpe kosembola makanisi na ye na ntina na biloko ya mosuni. Lokola mbano, lolenge na ye ya kotalela makambo ebongwanaki mpe kolongono na ye ya nzoto ebongaki. Na nsuka, amipesaki na Jéhovah mpe azwaki batisimo.
Mpo na kozala na bomoi oyo ezali kotemela makanisi na bato mingi, esengeli koyeba malamu mitinda ya Biblia oyo mitaleli makambo yango mpe kondimisama solo ete mizali sembo. Likambo Masaru akutanaki na yango lizali komonisa ete ezali solo bongo. Ntango azalaki na sixième primaire, baninga na ye banakelasi bapesaki nkombo na ye mpo aponama lokola kapita. Na mwa nsoni azali komikundola ete lokola ayebaki mpenza te mitinda ya Biblia mitali likambo yango, azalaki na makoki te ya kolimbola epai na baninga na ye mpo na nini akokaki te kondima etelemelo moko ya politike. Abangaki koyebisa bango ete azalaki moklisto. Nyonso oyo asalaki ezalaki ya kotya motó na ye na nse mpe kozongela na kolela ete: “Nakoki kondima yango te.”
Likambo wana ya mpasi litindaki ye na koluka koyeba mpo na bantina nini moklisto asengeli te komikotisa na makambo ya politike. (Tala Yoane 6:15.) Na nsima, ntango akómaki na école secondaire, likambo motindo yango ekómaki lisusu. Nzokande, na mbala yango, asilaki komibongisa malamu mpo na kolimbola etelemelo na ye na endimiseli nyonso epai na molakisi na ye. Molakisi mpe banakelasi mosusu bandimaki bandimbola oyo apesaki, mpe basusu batunaki mituna mingi mitali bindimeli na ye oyo ezali na moboko likoló na Biblia.
Ntango bato nyonso bakosala oyo ezali sembo
Kati na mokili ya sika na nse ya boyangeli ya Klisto, makambo oyo bato mingi bakosala makozala makambo malamu. Kino ntango yango ekoya, tosengeli kotemela mposa ya komiyokanisa na makanisi ya bato mingi to kolanda basusu. Tokoki kozwa elendiseli na toli oyo ya Paulo ete: “Na bongo mpo na biso, awa ezingelami biso na lipata monene boye na batatoli, tolongola bipekiseli nyonso mpe masumu mazali kokanga biso, topota na etingya na emekaneli na mbango etyami liboso na biso.”—Baebele 12:1.
Ntango okokutana na mikakatano mpe na ntembe, okosala nini? Okomitika na kobanga bato mpo na kosala lokola bato nyonso? To okomibalola epai na Liloba na Nzambe, Biblia, mpo na kolanda mitinda na yango? Soki oponi nzela oyo ya mibale, okozwa matomba bobele na bomoi ya ntango oyo te, kasi lisusu okozala na elikya ya kozala kati na baoyo “mpo na kondima mpe motema petee bazali kosangola libula na bilaka.”—Baebele 6:12.