Tozala na makanisi mabongi na ntina na motema mawa ya Nzambe
MONGANGA, oyo azalaki moto amipesi na mosala na ye, azalaki komibanzabanza mingi mpo na mobɛli oyo ayaki epai na ye. Na lolenge na ye ya komonela bokono yango, bobele lipaso nde ekokaki kobikisa bomoi na mobɛli. Ntango mobɛli akakatanaki mpe abimisaki ntembe na likambo ya kozongisa makila, monganga akamwaki. Wana mwasi mobɛli yango alimbolaki ete, mpo na ntina ya bindimeli ya lingomba akoki te kondima lipaso oyo ezali kosenga kozongisama ya makila, monganga akamwaki mingi. Alukaki na makanisi na ye mwango ya kosalisa ye. Mpo na kosukisa, akanisaki ete asili kozwa mwango moko. Alobaki ete: “Yeba ete, soki ondimi te kozongisama ya makila, okokufa. Nzokande, olingi kokufa te, boye te?”
Mobɛli alobaki ete: “Ezali bongo.”
“Kasi, emonani lokola ete, soki ondimi makila okobuka bindimeli na yo ya lingomba, oyo ezali mpe na ntina mingi mpo na yo. Boye, tala likanisi na ngai. Mpo na nini te kondima kozongisa makila mpo na kobikisa bomoi na yo? Bongo okoyambola yango na nsima epai na Nzambe ete osalaki lisumu, mpe okobongola motema. Na lolenge yango, okozongela lisusu esika na yo kati na lingomba na yo.”
Monganga oyo ya bolingo malamu akanisaki ete asili kozwa eyano ya kokoka. Ayebaki ete mobɛli azalaki na kondima epai na Nzambe oyo azali na motema mawa. Na ntembe te, wana ezalaki libaku malamu ya kozwa litomba na motema mawa ya Nzambe! Kasi likanisi na ye ezalaki mpenza ya mayele mingi lokola emonanaki?
Tokanisaka motindo yango?
Mbala mosusu tokoki komimona ete tozali kokanisa lokola monganga wana. Ekoki kozala ete tozwi nsomo mpo na botemeli ya makasi oyo tomizelaki na yango te na eteyelo to na mosala. Tokoki lisusu kozala na kokakatana wana topusami na kosala likambo moko oyo ezali kobuka lisosoli na biso. Wana tozwami na pwasa, tokoki kopusama na kolanda nzela oyo ezali petee mpe kosala makambo oyo toyebi ete mazali mabe, na likanisi ete tokosenga bolimbisi na nsima.
Bato mosusu bakoki komekama na mposa mabe na bango moko. Na ndakisa, elenge mobali moko akoki kozala na esika oyo amekami mpenza makasi na kosala pite. Na esika ya kobundisa mposa wana mabe, akoki komitika na yango, na likanisi ya kobongisa makambo na nsima elongo na Nzambe. Basusu bakendeki nkutu kino kosala lisumu monene atako bayebaki ete bakoki mbala mosusu kobimisama na lisangá ya boklisto. Mbala mosusu bakanisaki na motindo oyo ete: ‘Nakolekisa mwa ntango moke. Bongo nsima nakobongola motema mpe nakozongisama.’
Bizaleli yango nyonso bizali na makambo mibale oyo makokani. Ya liboso, bato bazali komitika kosala mabe na esika ya kobunda mpo na kosala oyo ezali malamu. Ya mibale, bazali kokanisa ete nsima ya kosala mabe Nzambe akolimbisa mbala moko soki basengi yango.
Likanisi ya malamu lizali nini?
Ezaleli wana ezali komonisa bososoli ya solo epai na motema mawa na Nzambe? Ya solo, kanisa naino mwa moke na ntina na ezaleli wana ya motema mawa. Yesu alobaki ete: “Mpo ete Nzambe alingaki mokili na motindo boye ete apesi Mwana se moko na ye ete moto na moto oyo akondima ye abebisama te kasi azala na bomoi na seko.” (Yoane 3:16) Ntoma Yoane alimbolaki motindo nini mawa yango mazali kopesama ntango akomaki ete: “Nazali kokomela bino makambo oyo, ete bosala lisumu te. Nde soko moto nani akosala lisumu, tozali na molobeli epai na Tata, ye Yesu Klisto, Moyengebene.” (1 Yoane 2:1) Na yango, soki tokwei na masumu mpo na kozanga kokoka, tokoki kobelema epai na Nzambe kati na libondeli mpe kosenga bolimbisi likoló na mbeka na Yesu.
Nzokande, tosengeli kosukisa ete tokoki komitungisa te mpo na lisumu, bobele kosenga bolimbisi nde eleki ntina? Ezali bongo te. Kanisa maloba ya liboso ya likambo yango: “Nazali kokomela bino makambo oyo ete bosala lisumu te.” Maloba ya Yoane, oyo mayei nsima kati na verset wana mazali komonisa bibongiseli ya bolingo na Jéhovah etali kozanga kokoka na biso. Atako bongo, tosengeli komeka na makasi nyonso kopengola lisumu. Soki bongo te tokomonisa kozanga botosi mpenza mpo na bolingo na Nzambe, lokola bato oyo Yuda alobelaki, baoyo bakobalolaka ngolu na Nzambe kino bosoto.—Yuda 4.
Baoyo bazali komona motema mawa na Nzambe lokola monyama ya libateli oyo ekokanga biso ntango nyonso ata soki tosali likambo nini bazali kotyola motema mawa na Nzambe mpe bazali komonisa ete lisumu ezali mpenza mabe te. Oyo nde likanisi ya libunga! Ntoma Paulo alobaki na Tito ete: “Mpo ete ngolu na Nzambe esili komonana mpo na lobiko na bato nyonso. Yango ezali kolakisa biso ete toboya kotuka Nzambe mpe kobila mposa na mokili, kasi tozala na bizaleli na kokanga motema mpe na boyengebene mpe na kosambela Nzambe kati na ebongiseli na biloko oyo.”—Tito 2:11, 12.
Paulo amonisaki botɔndi na ye mpo na motema mawa na Nzambe na lolenge oyo azalaki kobundisa kozanga kokoka na ye moko. Alobaki ete: “Kasi nazali kobeta nzoto na ngai mpe nakokómisa yango moombo ete nazala moboyami te awa esili ngai kosakwela basusu.” (1 Bakolinti 9:27) Paulo amonaki te ete lisumu ezali eloko ekoki kopengolama ntango nyonso te. Biso tosengeli bongo kokanisa na lolenge mosusu?
Likanisi na Yesu
Na libaku moko, Yesu amonisaki motindo nini azalaki kotalela likanisi ya kobuka mibeko ya sembo mpe baoyo bazali kopona nzela oyo ezangi mpasi mpo na kokima monyoko. Wana abandaki koyebisa bayekoli na ye likambo ya liwa na ye lokola mbeka, Petelo amekaki kopekisa ye, wana alobaki ete: “Soko moke te Nkolo! Oyo ekokómela yo te.” Yesu ayanolaki nini? “Kenda nsima na ngai, Satana! Ozali libaku liboso na ngai mpo ozali kokanisa lokola Nzambe te, kasi lokola bato.”—Matai 16:22, 23.
Mpamela makasi oyo Yesu apesaki na Petelo emonisaki na polele ete Yesu aboyaki kopona nzela ezangi mpasi oyo ezali kobuka mokano na Nzambe. Lisoló na likambo yango lizali komonisa ete alandaki nzela ya sembo kozanga kotengatenga, wana akutanaki ntango nyonso na monyoko ya Satana. Na nsuka ya bomoi na ye, basekaki ye, babetaki ye makasi, mpe abomamaki na motindo ya mpasi mingi. Atako bongo, atikaki bosembo na ye te, mpe mpo na yango akokaki kopesa bomoi na ye lokola mbeka mpo na biso. Ya solo ayikelaki nyonso wana mpiko te mpo ete tokoka ‘kopesa nzela na bamposa na biso’ wana tokutani na komekama to na masenginya!
Elobamaki na ntina na Yesu ete: “Olingi boyengebene mpe oyini [kotyola mibeko, MN].” (Baebele 1:9) Kopona nzela oyo ezangi mpasi mbala mingi ememaka na kosala mabe. Na yango, soki toyini mpenza kotyola mibeko—lokola Yesu asalaki yango—tokoboya ntango nyonso kobebisa bosembo na biso. Kati na mokanda ya Masese, Jéhovah alobi ete: “Mwana na ngai, zala na mayele mpe sepelisa motema na ngai ete nazongisela ye monoko oyo akopamela ngai.” (Masese 27:11) Bosembo ya bokatikati kasi ezangi kobebisama oyo Yesu amonisaki esepelisaki mingi motema ya Jéhovah. Bobele bongo tokoki kosepelisa Jéhovah na motindo yango soki tolandi etamboli ya sembo lokola Yesu.—1 Petelo 2:23.
Tobongisami na nzela ya koyika mpiko
Ntoma Petelo akomaki ete: “Bokosepelaka mpo na yango, ata naino mwa ntango moke ekoki na bino kozala na mawa mpo na komekama ndenge na ndenge. Boye kondima na bino ekomekama, yango eleki motuya na wolo oyo ekomekama na mɔ́tɔ ata ezali kobeba. Kondima na bino ekomonana mpo na masanzoli na nkembo mpe lokumu ya Yesu Klisto ntango akomonana.” (1 Petelo 1:6, 7) Mpo ete tozangi kokoka mpe tozali kobika kati na mokili ya Satana, tokokutana ntango nyonso na komekama mpe masenginya. Lokola Petelo azali komonisa yango, komekama mpe masenginya wana ekoki kopesa matomba malamu. Ezali komeka kondima na biso, mpe ezali bongo komonisa soki kondima na biso ezali na bolembu to ezali makasi.
Lisusu, komekama ezali kobongisa biso. Yesu “ayekolaki kotosa mpo na koyoka mpasi.” (Baebele 5:8) Biso mpe tokoki koyekola kotosa mpe kotyela Jéhovah motema, soki toyiki mpiko kati na komekama. Mpe lolenge yango ya kobongisama ekolandana kino nsuka, lokola Petelo alobaki ete: “Nzambe . . . akokokisa bino, akolendisa bino, akopesa bino makasi.”—1 Petelo 5:10.
Na bongo, soki tobebisi bosembo na biso kati na komekama, tozali komonisa ete tozalaka bibangabanga to na bolembu, tozangi bolingo mpo na Jéhovah mpe tolingi boyengebene te to tozangi komipekisa. Bolembu nyonso ya lolenge yango ekoki kotya na likámá boyokani na biso elongo na Nzambe. Ya solo, likebisi oyo ya Paulo ekoki kokokana epai na biso: “Zambi soki tokosalaka masumu na nkó nsima na kozwa boyebi ya solo, mbeka mpo na masumu ezali lisusu te.” (Baebele 10:26) Na bongo, esika ete tomitika na bolembu na biso mpe tomitya na likámá ya kobungisa elikya nyonso ya bomoi, eleki malamu kosala masumu te.
Bosembo na makambo nyonso
Na mikolo ya mosakoli Danyele, Baebele misato bazalaki na likámá ya kobwakama kati na mɔ́tɔ soki bakoboya kosambela ekeko moko. Bazongisaki eyano nini? “Soko ezali boye mbele Nzambe na biso, oyo biso tosaleli ye, ayebi kobikisa biso na litumbu na mɔ́tɔ ya kongala; mpe akobikisa biso na loboko na yo. Ɛ mokonzi, oyeba ete ata boye te, biso tokosalela banzambe na yo te, mpe tokosambela elilingi ya wolo oyo etemisi yo te.”—Danyele 3:17, 18.
Bazwaki ekateli wana mpo ete balingaki kosala oyo ezali sembo. Atako elingaki komema bango na kufa, bandimaki ete ezala bongo. Bazalaki na elikya makasi kati na lisekwa. Nzokande, soki Nzambe akobikisa bango, yango elingaki kozala likambo malamu mingi. Kasi etelemelo na bango etikalaki ngwi na makambo nyonso. Basaleli na Nzambe basengeli ntango nyonso kosala bongo.
Na mikolo na biso oyo, bato mosusu oyo baboyaki kobebisa bosembo na bango bakangamaki, banyokwamaki, basusu nkutu babomamaki. Basusu babungisaki libaku ya kozwa biloko ya mosuni, baponaki kozala babola na esika ya kozwa mosolo na kobukáká mitinda ya sembo. Likambo nini likómelaki mwasi wana moklisto oyo tolobelaki na ebandeli ya lisoló oyo? Amonisaki botɔndi mpo na boboto oyo monganga azalaki na yango atako likanisi na ye lizalaki ya libunga, kasi aanganaki kondima na ye te. Na esika ya kosala bongo, limemya mpo na mibeko ya Jéhovah etindaki ye na koboya lipaso wana. Na esengo nyonso, azongelaki kolongono na ye mpe alandaki kosalela Jéhovah na molende nyonso. Nzokande, ntango azwaki etelemelo na ye, ayebaki te soki makambo makosuka boni, kasi asilaki komibongisa na kotika nyonso na maboko na Jéhovah.
Nini esalisaki ye na kotikala ngwi kati na komekama? Amekaki te komityela motema, mpe bobele bongo mosaleli ya Nzambe moko te asengeli komityela motema. Omikundola ete, “Nzambe azali ekimelo mpe nguya na biso; amonani solo kosunga na ntango na mpasi.” (Nzembo 46:1) Wana tomekami, eleki malamu kosenga lisalisi epai na Nzambe, na esika ya kosala lisumu mpe na nsima koluka mawa na ye!
Ya solo, tika ete totalela mawa monene ya Nzambe na liseki te. Nkutu, tika ete tokólisa mposa ya solo mpo na oyo ezali sembo, ata kati na mikakatano. Likambo yango likoyeisa boyokani na biso makasi elongo na Jéhovah, ekopesa biso kobongisama oyo tozali na yango mposa mpo na bomoi ya seko, mpe ekomonisa limemya ya solo mpo na mawa na Nzambe. Etamboli wana ya mayele ekosepelisa Tata na biso ya likoló.
[Elilingi na lokasa 24]
Elikya makasi kati na lisekwa esalisaki Baebele misato na kobatela bosembo na bango