Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/9 lok. 31
  • Mituna ya Batangi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna ya Batangi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Masolo mosusu
  • Batelá “elikya ya lobiko” na yo makasi!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Tokoyanola nde na bolingo na Yesu?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Oyo ezali mokolo ya lobiko!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mokanda ya Biblia nimero 45—Baloma
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/9 lok. 31

Mituna ya batangi

Kati na Baloma 9:3, ntoma Paulo akomaki ete: “Nalingaki ete nalakelama mabe mpe ete natangwa longwa na Klisto mpo na bandeko na ngai baoyo bazali libota moko na ngai na nzela na nzoto.” Alingaki koloba ete alingaki kopesa bomoi na ye mpo na kobikisa bandeko na ye Bayuda?

Yesu apesaki ndakisa eleki monene ya bolingo. Azalaki pene ya kopesa molimo na ye, to bomoi na ye, mpo na bato na masumu. Na boumeli ya mosala na ye ya kosakola, amipesaki mobimba mpo na bato ya ekólo na ye​—Bayuda—​mpo ete mingi kati na bango bakoka kozwa matomba ya mbeka ya lisiko na ye. (Malako 6:30-34) Motema makasi na bango mpe botemeli na bango mpo na nsango ya lobiko elembisaki soko moke te komibanzabanza etondi na bolingo oyo Yesu amonisaki epai na libota ya Bayuda. (Matai 23:37) Mpe atikeli biso ‘ndakisa ete tolanda matambe na ye.’​—1 Petelo 2:21.

Bato bazangi kokoka bakoki mpenza kolanda ndakisa ya bolingo na Yesu? Ee, mpe tokoki komona yango epai na ntoma Paulo. Azalaki komibanzabanza mpo na baninga na ye Bayuda na motindo boye ete, na ntina na bolingo mpo na bango, alobaki ete ye moko alingaki “kolakelama mabe mpe kotangwa longwa na Klisto” mpo na bango.

Awa, Paulo asaleli lolenge ya elobeli ya makasi, mpo na komonisa likanisi na ye. Yesu asalelaki elobeli ya makasi motindo moko kati na Matai 5:18, epai alobaki ete: “Mpo ete nalobi na bino solo mpenza ete kino likoló mpe nse ekolongwa, i moko to nsonge na elembo moko ekolongwa na Mibeko te bobele ete makambo nyonso mabonga.” Yesu ayebaki ete likoló mpe mabelé ekolongwa te. Paulo akokaki te kolakelama mabe, to Bayuda nyonso bakokaki te kondima boklisto ya solo. Kasi likanisi ya Paulo lizalaki ete alingaki kosala nyonso mpo na kosalisa Bayuda na kozwa matomba na mwango ya lobiko oyo Nzambe abongisi na nzela na Yesu Klisto. Ezali bongo likambo ya kokamwa te ete ntoma akokaki kolendisa baninga na ye baklisto ete: “Bozala bamekoli na ngai lokola ngai nazali momekoli na Klisto”!​—1 Bakolinti 11:1.

Lelo oyo, baklisto basengeli komonisa komibanzabanza motindo moko lokola Yesu mpe Paulo bazalaki na yango mpo na bato oyo bazali bandimi te. Tosengeli soko moke te kotika ete kozanga bosepeli to botemeli na bato ya teritware epai tozali kopesa litatoli elembisa bolingo na biso mpo na bazalani mpe molende ya kosalisa bango na koyekola nzela ya lobiko.​—Matai 22:39.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto