Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/9 nk. 28-31
  • Tolendendela kati na mosala ya pion­nier

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tolendendela kati na mosala ya pion­nier
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mikakatano ya mosolo
  • Lolenge ya kozwa mosala ya ndambo na mokolo
  • Kolongono mabe ya nzoto mpe kolemba na motema
  • Sepela mingi na mosala na yo
  • Mapamboli ya mosala ya Mobongisi-nzela
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1997
  • Babongisi-nzela bazali kopesa mpe bazali kozwa bolamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Mapamboli ya mosala ya mobongisi-nzela
    Mosala na biso ya Bokonzi—2003
  • Mosala ya mobongisi-nzela ekómisaka makasi boyokani na biso na Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/9 nk. 28-31

Tolendendela kati na mosala ya pionnier

Ba témoins de Jéhovah soko 4 500 000 bazali kosakola nsango malamu kati na mokili mobimba. Kati na bango, koleka 600 000 bazali ba pionniers (to basakoli ya Bokonzi oyo bapesi ntango na bango na mosala ya pionnier). Limpinga wana monene ya ba pionniers esangisi bato ya mbula nyonso, kobanda bana mike kino mibange ya mibu koleka ntuku libwa. Bauti na bizaleli mpe mitindo mikeseni ya bomoi.

Na ntembe te, basakoli wana nyonso oyo bazali ba pionniers balingi kolónga na mosala ya pionnier. Mingi kati na bango balingi kosala yango lokola mosala ya bomoi na bango mobimba. Basusu bakoki kosala bongo te mpo na bantina ekeseni. Nzokande, basusu balandaki kosala mosala ya pionnier atako bazalaki na mikakatano ya mosolo, na kolongono mabe ya nzoto, kolemba na motema, mpe mikakatano misusu. Na yango, lolenge nini basakoli oyo bazali ba pionniers bakoki kolónga mikakatano lolenge yango mpe kolendendela kati na mosala ya pionnier?

Mikakatano ya mosolo

Mbala mingi, ba pionniers basalaka mosala ya mosuni mpo na kokokisa bamposa na bango, lokola ntoma Paulo asalaki yango. (1 Batesaloniki 2:9) Kati na mikili mingi, bazali kokutana na mokakatano ya kobakisama makasi ya ntalo ya bilei, ya bilamba, ya kofutela ndako mpe ya kofuta motuka. Mbala mingi ezali mpasi kozwa mosala ya mosuni mpo na ndambo ya mokolo lokola bazali kokana yango. Soki mosala motindo yango ezali, mbala mingi bafutaka bobele mosolo moke, bapesaka mosolo te mpo na komisalisa na maladi mpe na makambo mosusu.

Soki ‘toluki liboso Bokonzi ya Nzambe mpe boyengebene na ye,’ tokoki kondimisama ete Jéhovah akokokisa bamposa na biso ya mosuni. Na yango, na ntango ya mikakatano ya mosolo, ba pionniers basengeli ‘komitungisa te mpo na lobi.’ (Matai 6:25-34) Wana bazali kosala makasi mpo kosilisa mikakatano lolenge yango, elikya makasi epai na Jéhovah ekobatela bango na mitungisi oyo mizangi ntina.

Ntango moto moko akutani na mikakatano ya mosolo, mbala mosusu akoki kolongola makambo mosusu oyo mazali kosenga mosolo mingi. Na mwa mbongwana kati na lolenge na biso ya kosalela mosolo, tokoki komizwela oyo tozali na yango mposa, atako tokokokisa mpenza te bamposa na biso nyonso ya mosuni. Mpo na kokoka kosalela mosolo moke, ba pionniers mosusu bazali kofanda ndako moko elongo na baklisto mosusu. Mpo na kosunga bana na bango oyo bazali na mosala ya pionnier, mbala mosusu baboti bapesaka bango ndako ya mpamba to na lifuti moke. Basusu basalisaka ba pionniers na mosolo ya kosomba bilei mpe kofuta motuka. Kasi ba pionniers bakolinga te kozala mokumba mpo na bandeko na bango, mpo ete engebene Makomami bazali na mokumba ya kokokisa bamposa na bango moko.​—2 Batesaloniki 3:10-12.

Motuya ya mbongo ya kofuta motuka mokoki kokita soki bakaboli yango elongo na ba pionniers mosusu. Soki ba pionniers mibale bazali na mituka ya bango moko, bakoki kokende na mosala ya kosakola na teritware moko, bakoki kosalela bobele motuka moko mpe bongo kokitisa mosolo oyo bakokaki kobimisa mpo na kobatela mituka mibale. Ba pionniers oyo bazali na motuka te bakoki kosangana elongo na baoyo bazali na yango mpe kosangana na mosolo ya kobatela motuka. Mosolo mpo na mibembo mokoki lisusu kokitisama soki bazali kosakola na bateritware ya pembeni na kotamboláká na makolo. Na mikili mingi, ba pionniers bazali kosalela mituka oyo ememaka bato nyonso na mosolo moke.

Kati na baoyo balóngaki mikakatano ya mosolo mpe balendendelaki na mosala ya pionnier, tozali na ndeko Newton Cantwell mpe mwasi na ye. Batekaki ferme na bango mpe babandaki mosala ya pionnier elongo na bana motoba kati na bana na bango nsambo, na 1932, na boumeli ya kokwea monene ya nkita. Ndeko Cantwell akomaki ete: “Toumelaki mpenza te na kosilisa mosolo nyonso oyo tozwaki na botekisi ferme na biso​—mingi mpenza mpo na kofuta monganga. Tozali komikundola ete ntango tokendeki na teritware na biso ya mbala ya mibale, tozalaki na mosolo bobele mpo na kofutela ndako na boumeli ya poso mibale, mpe totikalaki na badolare mitano na maboko. Nzokande, toyebaki ete Jéhovah akokokisa bamposa na biso soki tolandi kokokisa na molende nyonso mosala na biso. . . . Toyekolaki kobatela malamu mosolo na mitindo mikeseni. Na ndakisa, mpo na kokende na teritware ya sika, nasengelaki kosolola elongo na bankolo ya station ya botekisi essence mpe kolimbola bango ete tosalelaka mituka misato mokolo na mokolo mpo na kokokisa mosala na biso ya boklisto. Yango ezalaki ntango nyonso kopesa biso nzela ya kozwa essence na ntalo moke. Bana na biso ya mibali bayekolaki kobongisa mituka na biso, yango epesaki biso nzela ya kobatela mosolo oyo molingaki kosalelama mpo na kofuta na garage.” Na yango, libota ya Cantwell elóngaki malamu liboso na mikakatano ya mosolo mpe balendendelaki na mosala ya pionnier. Ndeko Cantwell azalaki naino na molongo ya ba pionniers ntango akufaki, wana azalaki na mibu 103.

Lolenge ya kozwa mosala ya ndambo na mokolo

Ba pionniers mingi bazali kokokisa bango moko bamposa na bango na kosaláká mosala ya ndambo na mokolo. Mpo na komisalisa ye moko kati na mosala na ye na Kolinti, Paulo asalaki bandako ya kapo elongo na baninga na ye bandimi Akila mpe Pilisikila. (Misala 18:1-11) Lelo oyo, bandeko ya elimo bazalaka mbala mingi na esengo ya kopesa ba pionniers mosala ya mosuni mpo na ndambo ya mokolo. Ba pionniers mosusu bazwaka mosala lolenge yango na bibongiseli oyo bipesaka misala ya ntango mokuse. Kotyela Nzambe motema mpe kobondela ye na motema mobimba ezali na ntina mingi mpo na kozwa litambwisi na ye na likambo etali kopona mosala.​—Masese 15:29.

Pionnier moko alobaki ete: “Nsima ya kozwa nguya mingi kati na libondeli, namonisaki na mokonzi na ngai ya mosala ete mosala na ngai ya kosakola ezali mokumba ya ntina mingi mpo na ngai mpe nakokoka te kondima mosala ya mokolo mobimba. Na mokolo ya misato oyo molandaki batunaki ngai soki nakokaki kosala mosala yango kasi mpo na ndambo ya mokolo. Nandimaki yango na esengo nyonso.” Na yango, tosengeli te kotalela libondeli na motuya moke, mpe tozanga te kosala na boyokani na mabondeli na biso.

Ba pionniers bakoki komona ete ezali likambo ya mayele koyebisa na bankolo ya bakompanyi ete mokano na bango ya koluka mosala ya ndambo na mokolo ezali mpo na kosalisa bango ete bakokisa mosala ya Nzambe. Bakoki komonisa mikolo oyo bakoki kosala mpe koyebisa motuya ya bangonga oyo bakoki kolekisa na mosala kati na poso moko. Bandeko mibale ya basi oyo bazalaki bandeko na mosuni bakabolaki mosala moko ya mokolo mobimba na biro moko ya kopesa toli na makambo ya mibeko, oyo epesaki bango nyonso nzela na kosala mosala mikolo mibale na ndambo kati na poso. Yango esungaki bango na kozala ba pionniers kino bakotaki na Galaad, Eteyelo ya Biblia ya la Société Watchtower mpe batindamaki lokola bamisionere.

Likoki ezali ya kozwa misala mikeseni oyo mindimami na Makomami soki tosololi elongo na baninga baklisto mpe bato mosusu to soki toluki kati na bazulunalo na esika balobelaka misala. Komikitisa ekoki kosalisa, mpo ete ekoki kobatela ba pionniers na ntina ya liponi ya mosala oyo bakoki kosala. (Tala Yakobo 4:10.) Mpo na kolanda kosala mosala ya pionnier, bakoki kondima kosala mosala ya mosuni oyo basusu bazali kotalela lokola mpamba to ezangi lokumu. Soki bandimi mosala motindo wana, kasi bazali na mposa ya eloko mosusu, na nsima mbongwana ekoki kosalema na mosala.

Kolongono mabe ya nzoto mpe kolemba na motema

Basusu basengeli kokata mosala na bango ya pionnier mpo na mikakatano ya kolongono ya nzoto. Nzokande, soki ba pionniers bazwi ekateli ya nokinoki te na likambo yango, bakoki komona ete bokono na bango ekoki kosila to kolongono na bango ekoki kobonga mpenza kino ete balanda mosala na bango ya pionnier. Basusu bakoki kolanda mosala na bango ya pionnier ata soki kolongono na bango ya nzoto ezali mabe mpo ete bazali kozwa nkisi, bazali kolya bilei oyo ebongi na bango, mpe bazali kozwa bopemi mpe kosala galasisi malamu. Mokɛngɛli moko ya zongazonga amonaki ndeko mwasi moko pionnier oyo azalaki na mpasi makasi ya misisa na boye ete azalaki na mposa ya lisalisi mpo na kotambola kati na mosala ya ndako na ndako. (Misala 20:20) Nzokande, ye mpe mobali na ye bazalaki kotambwisa boyekoli ya Biblia 33 na bandako ya bato mpe basalisaki bato 83 na kondima solo. Nsima na mwa ntango, kolongono na ye ebongaki, mpe nsima ya mibu 11, akotaki na Eteyelo mpo na ba pionniers.

Kolemba na motema ekoki kotinda basusu na kotika mosala ya pionnier. (Masese 24:10) Pionnier moko alobaki na mokɛngɛli ya zongazonga ete: “Nazali kokana kotika mosala ya pionnier. . . . Nazali na mposa ya mosolo mpo na komisunga.” Asengelaki kosomba matalatala oyo ezalaki na motuya ya badolare 20 mpo na komona malamu. Mokɛngɛli ya zongazonga atunaki ye ete: “Okotika mosala ya pionnier mpo ete ozali na mposa ya badolare 20?” Apesaki ye likanisi ya kosala na elanga ya café ya mboka yango mokolo moko, mpo na kozwa mosolo ya badolare 20 mpo na kosomba matalatala, mpe kotikala na mosala ya pionnier. Masoló ya mozindo elongo na ye emonisaki ete mokakatano ya moboko oyo ezalaki kolembisa ye ezalaki mosolo oyo asengelaki kobimisa mpo na kobongisa motuka na ye. Amonisaki ye ete akitisa motuya ya mosolo yango na kosalela motuka bobele katikati ya ntáka ya moke na esika ya kokende mosika. Apesaki ye lisusu toli ya kobatela elimo na ye makasi. Pionnier asalelaki batoli yango mpe nsima ya sanza motoba azwaki libyangi na ye mpo na kokota na Eteyelo ya Galaad. Nsima ya kozwa lipolomi na ye atindamaki na mokili ya bopaya mpe asalaki kuna na bosembo nyonso na boumeli ya mibu mingi kino liwa na ye. Ya solo, mbala mingi tokozwa ebele ya mapamboli soki tomitiki te na kolemba na motema kasi kobatela kati na makanisi ete Jéhovah azali elongo na biso.

Sepela mingi na mosala na yo

Atako akutanaki na mikakatano, lokola bantango ya mpasi mpe bantango ya kozanga bilei, Paulo atalelaki mosala na ye lokola eloko ya motuya. (2 Bakolinti 4:7; 6:3-6) Liboso na mikakatano mpe minyoko ya lelo oyo, basaleli mingi ya Jéhovah na Afrika, na Azia, na Europe de l’Est mpe bipai mosusu bazali kokangama na mosala na bango ya pionnier. Na yango, wana okutani na komekama, sala nyonso mpo na kolendendela na mosala wana ya ntina, mpo na lokumu na Jéhovah.

Mingi kati na ba pionniers bakokaki kokota na mosala ya pionnier bobele mpo ete bayeisaki bomoi na bango pepele. Lokola Paulo, balóngaki kolengolama ya bozwi ya mosuni mpe bakolisaki makanisi ya kosepela bobele na “bilei mpe bilamba.” Mpo na kolendendela na mosala ya pionnier, bazali na mposa ya kosepela na biloko ya ntina. (1 Timoté 6:8) Tokozwa esengo monene soki tosepeli mingi na matomba kitoko oyo Nzambe azali kopesa biso, wana totye yango liboso na bozwi ya mosuni.

Lokola ndakisa: Anton Koerber azalaki na libaku malamu ya kozala momonisi ya matomba ya Bokonzi epai na basáli ya boyangeli na Washington. Asalaki lokola pionnier na boumeli ya mwa ntango mpe na nsima akómaki mokɛngɛli ya zongazonga na bambula 1950. Basalani na ye ya kala kati na mombongo bapesaki ye likanisi oyo elingaki kopesa matomba ya mosolo ya milió moko ya badolare mpo na ye moko. Nzokande, mpo na yango asengelaki kopesa ntango na ye nyonso na mombongo na boumeli ya penepene mbula moko. Nsima na koluka litambwisi mpe makanisi mabongi kati na libondeli, alobaki ete: “Nakoki te kotika, ata bobele na boumeli ya mbula moko, mabaku kitoko oyo nazali na yango ya kosalela Jéhovah, nakoki kosala yango te, ata mpo na mosolo nyonso ya mokili. Kosalela bandeko na ngai awa na Washington ezali na motuya mingi na miso na ngai, mpe nayebi ete awa nazali kozwa mapamboli ya Jéhovah. Ezali solo ete nakoki kozwa milió moko ya badolare te, kasi soki nandimaka lipesi wana, bomoi na ngai elingaki kozala motindo nini, na elimo mpe na mosuni, nsima ya mbula moko yango?” Na bongo, aboyaki lipesi yango. Kosepela na mabaku na bango ya mosala na lolenge yango ezali kosalisa ba pionniers mingi na kolendendela na mosala na bango.

Oyo nde mapamboli mingi ba pionniers bazali na yango! Ezali lipamboli kolekisa bangonga mingi mpo na kosolola na ntina na bokonzi ya nkembo na Jéhovah. (Nzembo 145:11-13) Mpo ete bazali kolekisa ntango mingi na mosala ya kosakola, ba pionniers bazali komema libondisi ya elimo epai na babola mpe bato oyo banyokwami, bato na maladi mpe baoyo babungisi bandeko na bango, mpe basusu oyo batungisami mingi mpe bazali na mposa ya elikya ya solo. Na yango, soki makambo mapesi biso nzela ya kokota na mosala ya pionnier, ya solo tokozwa mapamboli mingi. Ezali ‘mapamboli ya Jéhovah nde ekopesa bozwi.’ (Masese 10:22) Mpe ezali mpo na lisalisi mpe lipamboli na ye nde basakoli mingi ya Bokonzi bazali kolendendela kati na mosala ya pionnier.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto