Lokola mayoyo
OSILA kotambola kati na matiti na ntango ya moi makasi mpe komona ebele na mayoyo kopumbwa liboso na makolo na yo? Emonani lokola ete bazali bipai nyonso; atako bongo, ekoki kozala ete otyelaki yango bobele likebi moke. Na bongo, bazali komonana ete basalaka mabe te mpe bazali bobele nyama mikemike mpe na ntina te.
Nzokande, kozanga ntina ya mayoyo ekómisi yango elilingi ebongi mpo na komonisa mpenza bato. Atako bato mosusu ya lokumu bakoki bango moko komitalela ete bazali na ntina mingi, Mozalisi na biso azali kotalela bango na motindo mokeseni. Mosakoli na ye Yisaya alobaki ete: “Ye oyo akofandaka likoló na zolongano na mokili, mpe bafandi na yango bazali lokola mayoyo.”—Yisaya 40:22.
Bonene, nguya mpe mayele na Jéhovah Nzambe etomboli ye mosika likoló na bato, motindo moko moto aleki mayoyo mosika na mayele mpe na nguya. Nzokande, ezaleli eleki monene ya Nzambe ezali bolingo. Mpe bolingo na ye oyo ekokani na mosusu te ezali kotinda ye na komibanzabanza mpo na biso, na kosalisa biso, mpe na kobikisa biso—soki tolingi ye mpe totosi ye. Jéhovah azali kosalela biso makambo na bolingo nyonso atako tozali lokola mayoyo oyo mazangi ntina. Mokomi na Nzembo alobaki ete: “Nani akokani na Jéhovah Nzambe na biso? Ye oyo akofandaka na likoló? Ye oyo akomikitisa mpo na kotala epai na lola mpe kati na nse. Akonɛtola mobola na mputulu.”—Nzembo 113:5-7.
Lokola Nzembo oyo ezali komonisa yango, Jéhovah azali na bolingo nyonso kopesa lisalisi na babola. Ee, Ye azali kosalisa baoyo, na komikitisa nyonso, ‘bazali koluka Nzambe na elikya ete bakoka solo komona ye.’ (Misala 17:27) Baoyo bazali komona Nzambe—mpe bazali kosalela ye—bazali kokóma na motuya mingi na miso na ye. (Tala Yisaya 43:4, 10.) Na yango, mayoyo ya mikemike mazali kokundwela biso ete tozali moke to na ntina te na miso ya Nzambe mpe bolingo ya Mozalisi na biso ya nguya, oyo azali komonisa boboto mpe ngolu na ye epai na bato ya botosi. Omonisaka botɔndi mpo na bolingo ya Nzambe?