Mpo na nini kolinga mozalani na yo?
BOMOI ya seko etaleli bolingo na biso mpo na Nzambe mpe mpo na bazalani. Likambo oyo lilobelamaki na boumeli ya lisoló moko lisalemaki kati na bato mibale, esili koleka soko mibu 2 000.
Mobali moko Moyuda oyo ayebaki mpenza Mibeko ya Moize, atunaki Yesu Klisto ete: “Nasala nini ete nazwa bomoi ya seko?” Yesu ayanolaki ete: “Nini ekomami kati na Mibeko? Otangi nini na yango?” Kotangáká Mibeko, mobali yango alobaki ete: “‘Okolinga Jéhovah Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba, mpe na makasi na yo mobimba, mpe na elimo na yo mobimba,’ mpe, ‘olinga mozalani na yo lokola yo moko.’” “Yesu alobaki ete: ‘Oyanoli malamu. Sala bongo mpe okozwa bomoi ya seko.’”—Luka 10:25-28.
Bongo molobani na Yesu atunaki ete: “Nani azali mpenza mozalani na ngai?” Na esika ya koyanola mbala moko, Yesu abɛtɛli ye lisoló moko na lolenge ya lisese na ntina na Moyuda oyo bayibaki biloko na ye, babɛtaki ye, mpe batikaki ye pene na kokufa. Bayuda mibale balekaki wana—ya liboso azalaki nganga mpe oyo na nsima azalaki Molevi. Moko na moko amonaki ezalela ya moninga na bango Moyuda, kasi basalaki eloko moko te mpo na kosalisa ye. Mosamaria moko ayaki na nsima. Aokaki mawa mpe akangaki mpota ya Moyuda wana azokaki, akendaki na ye na ndako moko ya bato na mobembo, mpe apesaki mosolo ete basalisa ye.
Yesu atunaki molobani na ye ete: “Kati na bango misato, nani azalaki mozalani na ye oyo akweaki kati na babɔtɔli?” Na polele mpenza, ezalaki mosamaria na motema mawa. Yesu amonisaki wana ete, bolingo ya solo mpo na bazalani ekotyaka ndelo ya bikólo te.—Luka 10:29-37.
Kozanga bolingo na bazalani
Lelo oyo, koyinana ezali sé kokóla kati na bato ya bikólo bikeseni. Na ndakisa, kala mingi te na Allemagne, bato ya Nazi ya sikawa, babambaki mobali moko na mabelé mpe banyataki ye na ba bottes na bango ya kilo, kobukáká ye pene na mikuwa nyonso ya mpanzi. Na nsima, basopelaki ye masanga mazalaki na alcool makasi mpe batumbaki ye na mɔ́tɔ. Babetaki mobali wana batikaki kino kokufa, mpo bakanisaki ete azalaki Moyuda. Na likambo mosusu ya mabe likeseni na oyo, babwakaki bombe na ndako moko ezalaki pene na engumba Hambourg, ezikisaki bato misato ya mboka Turquie mpe bakufaki—moko na bango azalaki elenge mwasi ya mibu zomi.
Na ntango wana, na eteni na mokili ebengami Balkans mpe mosika na est, bitumba kati na bikolo bikeseni ezalaki koboma bankóto mingi na bato. Basusu bakufaki na matáta kati na bato ya bikólo bikeseni na mboka Bangladesh, na Inde, mpe na Pakistan. Mpe na Afrika, bitumba kati na bikolo bikeseni mpe kati na bato ya mposo ekeseni esili koboma bato mosusu lokola.
Bato mingi batungisami na mobulu lokola oyo mpe bakoki kosala eloko moko te mpo na kookisa bazalani na bango mpasi. Na yango, na Allemagne, bato mingi bayanganaki kotambola mpo na kokweisa mobulu ya koyina bikolo mosusu na mboka na bango. Nzokande, mokanda The New Encyclopædia Britannica elobi ete: “Pene na basangani ya bikólo nyonso ya mokili bazali kotalela lolenge ya bomoi na bango lokola ete eleki oyo ya bato mosusu, ata oyo ya baoyo bazali penepene na bango.” Makanisi motindo oyo mazali kopekisa kolinga bazalani. Eloko moko ekoki kosalema na ntina na yango mpo na kokotisa mbongwana, mpo ete Yesu alobaki ete bomoi na biso etaleli bolingo ya Nzambe mpe ya bazalani?
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 2]
Cover: Jules Pelcog/Die Heilige Schrift
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]
The Good Samaritan/The Doré Bible Illustrations/Dover Publications, Inc.