Mai na bomoi
“TIKA moyoki aloba ete: ‘Yaka!’ Tika ete moto na mposa na komela aya, mpe oyo azali na mposa akamata mai na bomoi lokola likabo.” (Emoniseli 22:17) “Mai na bomoi”—yango elimboli bibongiseli nyonso bikamatami na Nzambe mpo na lobiko na biso oyo ezali na moboko likoló na mbeka ya lisiko ya Yesu Klisto. Bibongiseli yango bizali naino mpe bizali kopesama kozanga kofuta mbongo. Oyo nde elembo kitoko ya bokabi ya Nzambe na biso! Bongo mpo na nini bibongiseli yango bikokisami na mai?
Mai esalaka ete milona ekóla kati na mabelé, mpe yango ezali kopesa nzela na bomoi ya bato. Kozanga mai, mbele bomoi ya bitwele, mpe bomoi ya bato ekoki kozala te. Lisusu, nzoto na biso esalami na 65 % ya mai. Bato mosusu ya mayele na makambo ya kolongono bapesaka toli ete esengeli kobatela eteni wana ya mai na komeláká balitɛlɛ ya mai mibale na ndambo na mokolo. Misala nyonso ya bomoi na biso ya kati—kobanda kogúmbwana ya bilei na libumu kino na kobimisama ya bosoto—ezali kosenga mai. Soki osali poso moko kozanga komela mai, okokufa.
Bobele bongo, “mai na bomoi” ezali kopesa nzela mpe ezali kokolisa bomoi ya elimo. Soki toboyi mai na bomoi, tozali na elikya te ya koumela mpo na mikolo mizali koya. (Yoane 3:36) Soki tondimi yango, tokoki kozwa bomoi ya seko. Ezali likambo ya kokamwa te soki mwasi Mosamaria ayanolaki na mposa nyonso wana Yesu alobaki na ye ete: “Nde ye oyo akomela mai makopesa ngai epai na ye akoyoka mposa na mai lisusu te, kasi mai makopesa ngai ye makozala motó na mai kati na ye kopunzwapunzwa kino bomoi ya seko”! (Yoane 4:14) Tika ete tomonisa mposa makasi mpe tokamata mai na bomoi lokola likabo.
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 32]
Garo Nalbandian