Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/6 lok. 32
  • Okoki kondimela Biblia?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Okoki kondimela Biblia?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/6 lok. 32

Okoki kondimela Biblia?

SOKI okamati Biblia na mabɔkɔ, okoki komizela ete omona palata ya mbongo na kati? Ezali boni mpo na palata oyo ya kala ya mbongo?

Mingi bazali kokanisa ete Biblia ezali mokanda moko ya kala epai tozali kokuta masapo kitoko mpe malako ya ntina mpo na oyo etali bizaleli malamu. Kasi, bazali kondima te ete Biblia ezali mokanda moyebisi makambo na kala na sikisiki, yango wana bazali kobwaka likanisi oyo elobi ete yango ezali Liloba ya Nzambe. Ezali na bilembeteli oyo bimonisi bosolo na yango. Palata oyo (eyeisami monene awa) ezali ndakisa moko malamu ya likambo yango. Nini ekomami kati na yango?

Palata oyo esalemaki na Tarse, engumba moko ezali na sud-est ya oyo ebengami lelo ete Turquie. Esalemaki na ntango ya Mazaeus, Moyangeli ya Pelese, na ekeke ya minei L.T.B. Palata yango ezali kokokisa ye na moyangeli ya etuká ya Efelata, oyo ezalaki na “ngambo na Ebale.”

Kasi mpo na nini maloba wana mazali na ntina? Mpo ete tozali kokuta maloba yango moko kati na Biblia. Esdrase 5:6 kino 6:13 ezali komonisa bokokani kati na Darius, mokonzi ya Pelese mpe moyangeli Tattenaï. Elobeli likambo ya kotongama lisusu ya tempelo ya Yelusaleme na Bayuda Esdrase azalaki mokomi na mayele ya Mibeko na Nzambe mpe tokoki komizela ete makomi na ye mazala ya sikisiki mpe ya solo. Okomona wana abengaki Tattenaï na Esdrase 5:6 mpe 6:13 ete, “moyangeli na ngambo ya Ebale.”

Esdras akomaki maloba wana penepene na mobu 460 L.T.B., soko mibu 100 liboso ete palata wana esalema. Bato mosusu bazali kokanisa mbala mosusu ete kolobela mokonzi moko monene ya ntango na Kalakala ezali likambo ya ntina. Kasi, soki tokoki kondimela bakomi ya Biblia ata na makambo mike, yango epesi motuya monene lisusu na makambo mosusu oyo mazali na makomi na bango, boye te?

Masoló mibale ya liboso ya nimero ya Mosenzeli oyo makomonisa yo bantina mosusu ya kondimela Biblia.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 32]

Collection of Israel Dept. of Antiquities Exhibited & photographed Israel Museum

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto