Tozala na makanisi na sembo—Nsuka ebelemi
“Nde nsuka na makambo nyonso ezali kobelema. Na bongo bozala na makanisi na sembo, bomisenzela mpo na mabondeli.”—1 PETELO 4:7.
1. (a) Mawa nini mokonzi moko ya lingomba mpe bato na ye bakutanaki na yango? (b) Lokola bilikya bisusu bikokanaki te, mituna nini mibongi kotunama?
“NA MPOKWA ya lelo, na libondeli ya nsuka, naokaki libyangi ya Nzambe. Alobaki na ngai ete bato 116.000 bakobuta na likoló mpe nkunda ya basembwi 3.700.000 ekozipolama.” Wana ezali maloba ya mokonzi ya lingomba Mission des jours qui viennent, na mokolo mozalaki liboso ya le 28 Octobre 1992, mokolo ya Kosambisa ya nsuka engebene esakweli ya lingomba wana. Nzokande, ntango mokolo ya le 29 Octobre ekomaki, emonanaki ete moto moko te abutaki na likoló mpe ata nkunda moko te efungwamaki. Na esika ete bakamatama mpo na kokende na likoló, bato wana ya Corée, baoyo bakanisaki ete mokolo ya Kosambisama ya nsuka ekomi, bamonaki mokolo yango kobanda lokola mikolo misusu nyonso. Mbala na mbala, nsuka ya mokili ezali kosakolama mpo na mikolo boye to boye, mpe eloko moko te ezali kosalema; kasi baoyo bazali kopesa bisakweli motindo yango bazali kolemba te. Baklisto basengeli kosala nini? Basengeli kotika kondima ete nsuka ezali koya nokinoki?
2. Nani alobelaki bantoma na ntina na mokolo ya kosambisama oyo ezali koya, mpe bayokaki yango kati na makambo nini?
2 Mpo na kosalisa biso na koyanola, tomikundola likambo lisalemaki mokolo oyo Yesu azalaki na masoló ya boninga elongo na bayekoli na ye. Kuna, na etuka ya Kaisalia ya Filipi, na nord-est ya Libeke ya Galilai, mpe na nsima na yango, Ngomba molai Helemone, bayokaki Yesu koloba na bango polelepolele ete akobomama. (Matai 16:21) Kasi maloba mosusu ya ntina mingi masengelaki kolanda nsima. Wana asilisi kolimbola bango ete bayekoli na ye basengeli kozala na bomoi ya komipesa, Yesu alobi na bango ete: “Ekoki na Mwana na moto ete aya na nkembo na Tata na ye esika moko na baanzelu mpe ntango yango akopesa moto na moto libonza engebene misala na ye.” (Matai 16:27) Yesu alobelaki koya oyo ezalaki naino liboso. Na ntango yango, asengeli kozala Mosambisi. Asengelaki kokuta bato bazali kolanda ndakisa na ye na bosembo nyonso to te, makambo mosusu nyonso makangisami na yango. Lisambisi na Yesu ekotalela etamboli na bato, ata bazali na bozwi mingi to te kati na mokili oyo. Yango ezali likambo oyo bayekoli na ye basengelaki kobosana te. (Matai 16:25, 26) Na yango, Yesu ye moko alobaki na bayekoli na ye ete bazela mokolo ya koya na ye kati na nkembo mpo na kosambisama.
3. Lolenge nini Yesu amonisaki ete akoya solo?
3 Makambo oyo Yesu akoloba sikawa mamonisi ete akoya solo. Na bakonzi nyonso alobi ete: “Nazali koloba na bino solo ete bamosusu bazali kotelema awa bakomona kufa te liboso na komona Mwana na moto azali koya kati na bokonzi na ye.” (Matai 16:28) Maloba oyo makokanaki nsima na mikolo motoba. Emonaneli moko ya nkembo ya Yesu oyo abongwani ekamwisi bayekoli oyo bazalaki baninga na ye ya penepene. Bamoni mpenza elongi na Yesu ezali kongenga lokola moi, mpe bilamba na ye ezali mpembe makasi. Kobongwana wana ezalaki emoniseli na nkembo mpo na Bokonzi na Klisto. Oyo nde kondimisama makasi ya bisakweli etali Bokonzi! Oyo nde bopusi ya nguya mpo na bayekoli na ye na kozala na mayele!—2 Petelo 1:16-19.
Mpo na nini tosengeli kosala noki mpo na kozala na makanisi na sembo
4. Na ntina na koya ya Klisto, mpo na nini baklisto basengeli kokengela?
4 Mbula moko ekokaki naino te, tozali kokuta Yesu afandi na Ngomba ya Olive, azali lisusu na masolo ya boninga elongo na bayekoli na ye. Wana azali kotala engumba ya Yelusaleme, alimboli bango elembo ya kozala na ye na mikolo na nsima, mpe apesi likebisi oyo ete: “Boye botala mpo ete boyebi te soko Nkolo na bino akoya na mokolo nini.” Bayekoli na ye basengeli ntango nyonso kosenzela mpamba te bayebi ntango Nkolo na bango akoya te. Wana bazali kozela, basengeli kozala ntango nyonso bato basili komibongisa.—Matai 24:42.
5. Lolenge nini tokoki komonisa na elilingi ntina ya kokengela?
5 Na lolenge ya koya na ye, Nkolo akokani na moyibi. Alobi ete: “Boyeba nde likambo oyo ete, soko mokóló na ndako ayebaki ntango nini ekoya moyibi, mbele akengelaki mpe atikaki te ete moyibi apunza ndako na ye.” (Matai 24:43) Mobuki ndako ayebisaka liboso nkóló ndako te ntango nini akoiba; ebundeli monene na ye ezali bongo kobimela bato pwasa. Mpo na yango, nkóló ndako asengeli ntango nyonso kokengela. Nzokande, bokengi makasi ya moklisto ya sembo euti na bobangi te. Euti nde na mposa makasi ya kozela koya na Klisto kati na nkembo na ye mpo na kobandisa Boyangeli ya mbula nkoto ya kimya.
6. Mpo na nini tosengeli kozala na makanisi na sembo?
6 Ata bokengi na biso ezali lolenge nini, tokoki soki moke te koyeba na liboso mokolo oyo Yesu akoya. Ye moko alobaki ete: “Bongo ekoki na bino koselingwa, mpo ete Mwana na moto akoya na ntango ekanisi bino te.” (Matai 24:44) Tala mpo na ntina nini tosengeli kozala na makanisi na sembo. Soki moklisto akomi kokanisa na ntina na mokolo moko ete ezali yango te oyo Klisto akoya, mbala mosusu ekoki mpenza kozala mokolo ya koya na ye! Ya solo, kala, baklisto ya sembo mpe bapusami na makanisi malamu balukaki kosakola sikisiki ntango nini nsuka esengeli koya. Kasi, ntango nyonso maloba oyo ya Yesu masili komonana solo: “Nde mpo na mokolo yango mpe ntango yango, moto ayebi te, ata baanzelu na likoló te, ata Mwana mpenza te, kasi bobele Tata ayebi.”—Matai 24:36.
7. Mpo ete tozala bayekoli na Klisto, lolenge nini tosengeli komitambolisa?
7 Bongo, tosengeli kosukisa nini? Oyo ete mpo na kozala moyekoli na Klisto, tosengeli ntango nyonso kozala na likanisi ete nsuka ya biloko mabe ezali penepene.
8. Likambo nini, uta ebandeli ya lisanga ya baklisto ezali kokesenisa baklisto?
8 Lokola bayekoli na lisoló na bato mpe bayekoli ya Biblia bazali koyeba yango, elimo motindo yango emonanaki ntango nyonso epai na baklisto. Na ndakisa, tozali kotanga kati na buku ya ndimbola ya maloba ya Kondimana ya Sika mpo na mobongoli (na Lingelesi), na liloba “Mokolo” ete: “Na eleko ya K[ondimana] ya S[ika] baklisto bazalaki kobika na likanisi ya kozela Mokolo (to ntango) oyo mokili mpe mabe na yango nyonso ekosuka mpe Yesu akozonga na mabele mpo na kosambisa bato nyonso, mpe kobandisa eleko ya sika ya kimya mpe akoyangela lokola Nkolo na mokili mobimba.” Mokanda Encyclopédie britannique ezali komonisa ete: “Bokoli monene ya losambo ya boklisto kati na mokili mobimba ezali mpo na kozela ntango ya nsuka, oyo ezali bongo kozonga ya Klisto noki. Mpo na moklisto, kozela ntango ya nsuka ezali bobele mposa mpamba te, to kozela kozanga kosala mosala kasi na motema mɔtɔ, koya ya Bokonzi na Nzambe.”
Oyo elimboli kozala na makanisi na sembo
9. Atako ayebaki makambo mingi te likoló na mikumba ya Masiya, endimiseli nini Petelo abatelaki yango?
9 Mibu soko 30 na nsima na masoló wana ya boninga oyo Yesu asololaki elongo na bayekoli na ye ya penepene, ntoma Petelo alembaki te na kozela nsuka. Atako na ebandeli, ye mpe baninga na ye bamizimbisaki na ntina na mokumba ya Masiya, Petelo abatelaki endimiseli oyo ete bolingo mpe nguya na Jéhovah ezali ndanga ya kokokisama ya elikya na bango. (Luka 19:11; 24:21; Misala 1:6; 2 Petelo 3:9, 10) Wana alobi ete: “Nde nsuka na makambo nyonso esili kobelema,” Petelo apesi likanisi moko oyo ezali komonana bipai nyonso kati na Makomami ya Greke ya boklisto. Na nsima apesi baninga na ye elendiseli oyo: “Na bongo, bozala na makanisi na sembo, bomisenzela mpo na mabondeli.”—1 Petelo 4:7.
10. (a) Elimboli nini kozala na makanisi na sembo? (b) Esengeli nini mpo na kotalela makambo engebene mokano ya Jéhovah?
10 Kozala “na makanisi na sembo” elimboli te kozala na mayele engebene likanisi ya mokili. Jéhovah alobaki ete: “Nakobebisa mayele na bato na mayele, mpe nakoyeisa mpamba boyebi na bayebi.” (1 Bakolinti 1:19) Liloba oyo Petelo asaleli ekoki kolimbola “kozala na bokatikati.” Bokatikati wana ya elimo ekangami na losambo na biso. Mpo na yango, lokola tozali na bokatikati tozali komona makambo engebene mokano ya Jéhovah; tozali kokesenisa kati na makambo oyo mazali na ntina mpe makambo mazangi ntina. (Matai 6:33, 34) Wana nsuka esili kobelema, tobendami te na bomoi ya koluka bisengo, tozangi mpe te kotya likebi na eleko oyo tozali kobika na yango. (Tala Matai 24:37-39.) Tokambami nde na bakatikati mpe na kosenzela kati na makanisi na biso, mposa na biso mpe etamboli na biso, mpe yango liboso nyonso epai na Nzambe (“kosenzela mpo na mabondeli”) mpe na nsima epai na bazalani na biso (“bolingana makasi”).—1 Petelo 4:7, 8.
11. (a) Elimboli nini “kobongwana moto ya sika kati na nguya oyo ezali kopusa makanisi [na biso]n? (b) Lolenge nini nguya ya sika ezali kosalisa biso na kozwa bikateli ya malamu?
11 Mpo tozala na makanisi na sembo, ezali kosenga “kobongwana moto na sika kati na nguya oyo ezali kopusaka elimo [na biso].” (Baefese 4:23, MN) Mpo na nini kobongwana moto na sika? Mpo ete lokola tosangoli kozanga kokoka mpe tozali kobika kati na bato na masumu, makanisi na biso mapusami na ezaleli moko oyo ezali kotemela makambo ya elimo. Nguya wana ezali kopusa ntango nyonso makanisi na biso mpe mposa na biso epai na mposa na bozwi mpe na moimi. Mpo na yango, moto oyo akomi moklisto azali na mposa na nguya, to ezaleli makasi ya elimo, ya sika oyo ezali kopusa makanisi na ye na nzela malamu—nzela ya elimo—epai na elimo ya komipesa. Na bongo, soki asengeli kosala liponi moko, na makambo lokola kotanga kelasi, mosala ya mosuni, kominanola, konyolisa nzoto, molato to makambo mosusu likanisi na ye ya liboso ekozala ya kotalela makambo wana, na likanisi ya mosuni te mpe ya moimi te, kasi na likanisi ya elimo. Elimo wana ya sika ekosalisa ye na kozwa bikateli ya mayele, na koyeba malamu ete nsuka esili kobelema.
12. Ndenge nini tokoki “kokemba na kondima”?
12 Mpo na kozala na makanisi na sembo, esengeli tozala na kolongono malamu ya elimo. Lolenge nini tokoki “kokemba na kondima”? (Tito 2:2) Tosengeli koleisa elimo na biso na makambo malamu. (Yilimia 3:15) Tosengeli kolya ntango nyonso solo oyo ezali kati na Liloba na Nzambe; boyekoli yango, elongo na mosala ya elimo santu, ekosalisa biso na kobatela bokatikati na biso ya elimo. Bongo, ezala boyekoli na biso moko, mosala ya kosakola, libondeli to na bokutani elongo na baninga na biso baklisto ebongi ete tósalaka yango ntango nyonso.
Lolenge nini makanisi na sembo makobatela biso
13. Lolenge nini makanisi na sembo makoki kobatela biso ete tosala mabunga ya bazoba te?
13 Makanisi na sembo makoki kobatela biso na kosala libunga, likambo ya bozoba, oyo ekoki kozangisa biso bomoi na seko. Lolenge nini? Ntoma Paulo alobeli “mibeko na elimo.” Mpo na baoyo “bakembi na kondima,” mibeko wana ya elimo etambwisami na eloko oyo bazali kosepela na yango: “mibeko na Nzambe.” Ya solo, “mibeko ya lisumu” mizali kobundisa mibeko ya elimo. Nzokande, na lisalisi na Jéhovah, baklisto bakoki kolonga na etumba yango.—Baloma 7:21-25.
14, 15. (a) Bopusi nini mibale ezali kobunda mpo na koyangela elimo na biso? (b) Lolenge nini tokoki kolonga etumba ya elimo?
14 Paulo alandi wana amonisi bokeseni monene oyo ezali, epai moko kati na elimo oyo etambwisami na nzoto ya masumu mpe oyo ezali na moboko likoló na bisengo, mpe epai mosusu, elimo oyo etambwisami na elimo na Nzambe mpe ezali na moboko likoló na elimo ya komipesa mpe na mosala ya Jéhovah. Paulo akomi kati na Baloma 8:5-7 ete: “Mpo ete baoyo bazali bato na mosuni, bakotyaka motema na makambo na mosuni; nde baoyo bazali na elimo bakotyaka motema na makambo na elimo. Mpo ete mposa na nzoto ekoyeisa bobele kufa, nde mposa ya elimo ekoyeisa bomoi mpe kimya. Mpo ete mposa na nzoto ezali koyina Nzambe. Eyebi kotosa mibeko na Nzambe te; ekoki mpe kosalaka boye te.”
15 Na verset 11, Paulo alimboli bongo lolenge nini elimo oyo ezali kosala na boyokani na elimo ya Nzambe ezali kolonga etumba: “Soko elimo na ye oyo asekwisaki Yesu longwa na bakufi ezali kofanda kati na bino, ye oyo asekwisaki Klisto Yesu longwa na bakufi akopesa bomoi epai na nzoto na bino na kufa, na nzela na elimo oyo ekofandaka kati na bino.”
16. Makanisi na sembo makobatela biso na masenginya nini?
16 Na yango, soki tozali na makanisi na sembo, tokomitika te na bopusi ya ntango nyonso ya mokili oyo etondi na elimo ya koluka bisengo, biloko ya mosuni mpe etamboli ya bosoni ya lolenge nyonso. Makanisi na biso na sembo makotinda biso na “kokima pite” mpe kopengola bongo matomba mabe na yango. (1 Bakolinti 6:18) Ekotinda mpe biso na kotya matomba ya Bokonzi na esika ya liboso mpe ekobatela makoki na biso ya kokanisa ntango tomekami na lipesi ya mosala ya mosuni oyo ekoki kolembisa boyokani na biso elongo na Jéhovah.
17. Lolenge nini ndeko mwasi moko pionnier asalelaki makanisi na sembo wana akutanaki na mikakatano ya mosolo?
17 Na ndakisa, tokoki kolobela likambo ya ndeko mwasi moko oyo, na mokili moko ya molunge na Asie ya sud-est, abatelaki matomba ya Bokonzi na esika ya liboso kati na elimo na ye. Asilaki kokolisa bolingo mpo na mosala ya pionnier. Kati na mokili wana bato mingi basalaka mosala mikolo motoba to nsambo na poso. Tata na ye, oyo azalaki Témoin de Jéhovah te, azalaki kozela ete soki asilisi kotanga na université akoka kozwa mbongo mingi mpo na libota na bango. Kasi, lokola ndeko mwasi wana alingaki kosala mosala ya pionnier, azwaki mosala mpo na ndambo ya mokolo mpe abandaki mosala ya pionnier. Tata na ye asilikaki, mpe akanelaki ye ete akobwaka biloko na ye nyonso libanda. Lokola tata yango azalaki komipesa na masano ya mbongo, azalaki na nyongo monene mpe atyelaki mwana na ye ya mwasi motema mpo na kofuta yango. Mpo na nyongo na tata na bango, leki na ye ya mobali, oyo azalaki kotanga na université, azalaki na mbongo te ya kofuta kelasi na ye. Alakaki na ndeko na ye ya mwasi ete soki akosalisa ye, ntango akozwa mosala ye nde akosunga libota na bango. Ndeko mwasi yango atungisamaki mingi na ntina na bolingo oyo azalaki na yango mpo na leki na ye ya mobali mpe mposa ya mosala ya pionnier. Nsima na kotalela malamumalamu likambo yango, azwaki ekateli ya kolanda mosala na ye ya pionnier mpe koluka mosala mosusu. Lokola eyano na mabondeli na ye, azwaki mosala moko malamu oyo epesaki ye nzela ya kosunga bobele libota na ye mpe leki na ye te, kasi lisusu ya kotikala sembo na bolingo na ye ya ebandeli mpo na mosala ya pionnier.
Toluka lisalisi ya Jéhovah mpo na kobatela makanisi na biso na sembo
18. (a) Mpo na nini bato mosusu bazali kolemba? (b) Mikapo nini ya Makomami mikoki kobondisa baoyo balembi?
18 Bayekoli mosusu ya Klisto bazali mbala mosusu kokutana na mikakatano mpo na kobatela makanisi na bango na sembo. Ekoki kozala ete balembi kokanga motema mpo ete biloko mabe ya ntango oyo ezali koumela koleka oyo bakanisaki. Yango wana bazali kolemba. Nzokande, nsuka ekoya. Jéhovah apesaki elaka na yango. (Tito 1:2) Mpe elongo na nsuka, Paradis oyo alakaki. Jéhovah apesi ndanga na yango. (Emoniseli 21:1-5) Ntango mokili ya sika ekokoma, ekozala lokola ”nzeté ya bomoi” mpo na baoyo nyonso bazali kobatela makanisi na bango na sembo.—Masese 13:12.
19. Lolenge nini tokoki kobatela makanisi na sembo?
19 Lolenge nini tokoki kobatela makanisi na sembo? Soki toluki lisalisi ya Jéhovah. (Nzembo 54:4) Tozala penepene na ye. Oyo nde esengo ya koyeba ete Jéhovah alingi kozala moninga na biso! Moyekoli Yakobo akomaki ete: “Bobelema epai na Nzambe mpe ye akobelema epai na bino.” (Yakobo 4:8) Paulo alobaki ete: “Bosepelaka ntango nyonso kati na Nkolo. Nazali koloba lisusu ete, Bosepelaka. Tika ete boboto na bino boyebana na bato nyonso. Nkolo azali kobelema. Bomitungisa mpo na likambo moko te nde kati na makambo nyonso tika ete bisengeli na bino biyebana epai na Nzambe na mabondeli mpe na malombo mpe na matondi. Mpe kimya na Nzambe oyo eleki makanisi nyonso ekosenzela mitema na bino mpe bikaniselo na bino kati na Klisto Yesu.” (Bafilipi 4:4-7) Mpe ntango mikumba miuti na biloko ya ntango oyo ya kokufa ebandi kokoma bazito mingi mpo na komema yango, tokitisa yango likoló na Jéhovah, mpe ye akosimba biso.—Nzembo 55:22.
20. Engebene 1 Timoté 4:10, tosengeli kolanda kotambola na nzela nini?
20 Ya solo, tokoki koloba ete nsuka ebelemi; mpo na yango tozala na makanisi na sembo! Eleki bikeke 19, toli oyo ebongaki; lelo oyo ezali mpenza na ntina monene. Totika te kosalela makanisi na biso na sembo mpo na kosanzola Jéhovah, ye oyo azali kolanda kotambwisa biso na kimya nyonso epai na mokili ya sika oyo alaki biso.—1 Timoté 4:10.
Okopesa eyano nini?
◻ Makanisi na sembo ezali nini?
◻ Mpo na nini, lelo oyo, ezali na ntina mingi kozala na makanisi na sembo?
◻ Lolenge nini tokoki koyeisa sika nguya oyo ezali kopusa elimo na biso?
◻ Etumba nini tosengeli ntango nyonso kobunda kati na elimo na biso?
◻ Lolenge nini tokoki kobatela makanisi na sembo?
[Elilingi na lokasa 15]
Soko tobelemi penepene na Nzambe kati na mabondeli, okosalisa biso na kobatela makanisi na sembo
[Elilingi na lokasa 17]
Soko tozali na makanisi na sembo, tokopesa nzela te na masengiya ya mokili oyo