Bózala bato ya makanisi malamu awa nsuka ekómi pene
1 Liloba ya Nzambe elobi mingi mpenza ete mokolo ya Yehova ekoya “lokola moyibi”—elingi koloba, na mbala moko, pwasa, na ndenge oyo bato bakoyeba te. (1 Tes. 5:2; Mat. 24:43; 2 Pet. 3:10; Emon. 3:3; 16:15) Yesu alobaki ete: “Yango wana bino mpe bómilɛngɛla, mpamba te na ngonga oyo bozali kokanisa te ete ezali yango, Mwana ya moto akoya.” (Mat. 24:44) Ndenge nini tokoki kozala ntango nyonso na bokɛngi na elimo awa nsuka ekómi pene? Likambo moko oyo ekosalisa biso ezali na toli oyo elobi ete: “Bózala bato ya makanisi malamu.”—1 Pet. 4:7.
2 Mpo tózala na makanisi malamu tosengeli kotalela makambo ndenge oyo Yehova atalelaka yango. (Ef. 5:17) Esalisaka biso tómimona lokola “bapaya mpe bafandi ya ntango mokuse” na kati ya ebongiseli ya makambo oyo. (1 Pet. 2:11) Epesaka biso likoki tósosola makambo oyo ezali mpenza na ntina, tótya makambo oyo eleki ntina na esika ya liboso, mpe tózwa bikateli ya malamu.—Filp. 1:10.
3 Tómityela mikano ya elimo: Komityela mikano ya elimo mpe kokokisa yango esalisaka biso tózala na makanisi malamu. Ozali na mikano ya elimo oyo ozali kolanda sikoyo? Osalaka makasi mpo na kotánga Biblia mikolo nyonso, koyangana na makita nyonso, kotánga nimero nyonso ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe ya Lamuká! oyo euti kobima, to ntango mosusu osalaka makasi mpo na kosala mingi na mosala ya kosakola? Soki ozali komityela mikano oyo ebongi na yo, ozali kolɛmba te kokokisa yango, mpe osɛngi Yehova apambola milende na yo, okokamwa na mbuma oyo okobota.
4 Nkulutu moko atunaki babalani oyo bazali naino bilenge mikano nini ya elimo bamityeli. Motuna yango etindaki bango bámona ete soki bakómisi bomoi na bango pɛpɛlɛ mpe soki basilisi nyongo ya monene oyo bazalaki na yango, bakokoka kosala mosala ya mobongisi-nzela. Bamityelaki mokano yango. Basilisaki nyongo na bango nokinoki mpe balukaki kolongola makambo mosusu oyo ezalaki kozwa ngonga mpe makasi na bango mpamba. Mbula moko na nsima, bakokisaki mokano na bango. Mbuma nini babukaki? Mobali alobi ete: “Soki tómityelaka mikano te, mbɛlɛ tokómi na esika oyo tokómi te. Tozali na esengo mingi. Bomoi na biso ezali na kimya mpe malamu koleka. Ezali na ntina mpenza.”
5 Awa tozali kozela mokolo ya Yehova, tiká ete tózala ntango nyonso na bokɛngi na elimo na kozaláká na makanisi malamu, wana tozali kotya miso na biso na kosala mokano ya Nzambe.—Tito 2:11-13.