Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 1/5 nk. 3-4
  • Tozali na mposa ya Biblia?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tozali na mposa ya Biblia?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Batongi mpe bato na ntembe
  • Mposa ya batoli
  • Likoki bobele moko
  • Epai wapi okoki kozwa litambwisi libongi na kotyela motema?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Na nimero oyo ya lamuká! biblia ekoki kobongisa bomoi na yo!
    Lamuká!—2019
  • Biblia: Motambwisi abongi mpo na biso lelo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Okotambola elongo na Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 1/5 nk. 3-4

Tozali na mposa ya Biblia?

OXANA, elenge mwasi moko ya mboka Russie, atondaki na esengo mingi ntango amonaki Biblia oyo elakisamaki na motekisi moko ya mikanda na Moscou. John, moninga na ye, oyo autaki na mboka moko epai Biblia emonanaka mingi, akamwaki na komona esengo oyo Oxana azalaki na yango. Alobi ete: “Ngai moto oyo andimaka Nzambe te, nalingaki kosombela ye yango.” Atako Oxana aboyaki mwa moke, asukaki na kondima likabo ya John.

Bato mingi, lokola Oxana, bazali na mposa makasi ya kozala na Biblia. Likambo yango ezali mingimingi komonana na mikili epai yango epekisamaki na boumeli ya mbula mingi. Na ndakisa, babimisi ya Mosenzeli bazali kosala milende mingi mpo na kokokisa lisengi ya Biblia na mikili oyo ebengamaki kala ete Union soviétique, mpe na biteni mosusu ya mokili. Mpo na mbala ya liboso, ebele na bato oyo bafandi na mikili yango bazwaki likoki ya kotalela malamumalamu Biblia, mpe mingi kati na bango babendamaki na nsango na yango ya nguya.

Batongi mpe bato na ntembe

Epai mosusu, mingimingi na Europe du Nord, Biblia esengelaki bobele kotonda na putulu kati na bibliotɛkɛ. Bato mosusu bazali koloba ete: “Ezali lisolo ya kala!” Babakisi ete: “Ekomamaki mpo na eleko mosusu. Etali bato ya ntango na biso te.” Ata bakonzi na mangomba ya lokumu bazali kotyola polele Biblia. Zulunalo The Star, ya Afrique du Sud eyebisaki maloba ya episkopo Desmond Tutu, oyo alobaki ete: “Ezali na biteni mosusu ya Biblia oyo bizali na motuya ntango nyonso te.” Maloba motindo oyo mamemaki bato mingi na komituna kino na meko nini basengeli mpenza kokamata Biblia ete ezali na motuya.

Mposa ya batoli

Ezala batangi mpe bakoteli ya Biblia basengeli kondima ete mokili ezali na mposa mingi koleka ya kozwa myango oyo mizali kopesa litomba. Alvin Toffler akomaki kati na mokanda na ye Likámá oyo ezali koya (na Lingelesi) ete: “Soki moto ayekoli te nokinoki na kolonga mbongwana oyo ezali kosalema, ezala kati na makambo na ye moko to kati na makambo matali bato nyonso, tokolonga ... soko moke te.” Likebisi wana epesamaki esili koleka mibu 20. Kozanga kolonga oyo Alvin Toffler alobelaki emonani ete ezali kosalema sikawa.

Lokola ekeke oyo ekómi pene na nsuka na yango, bakoli na makambo matali teknike mpe bafilozofi ya bato elongaki te na kopesa kimya na mokili. Elikya oyo eutaki kopesama kala mingi te ya ebongiseli ya sika na mokili mobimba epesaki nzela na makambo ya mawa, mpe bomoi ya bato ekómi etumba ya mokolo na mokolo mpo na kobika.

Mituya mizali komonisa ete libulu oyo ezali kati na bazwi mpe babola ekomi libulu monene mpenza. Boyekoli moko eutaki kosalema kala mingi te emonisi ete bobele 20% ya bato nde bazali kokabola 82,7% ya bozwi ya mokili mobimba. Likambo ya kokamwa ekoki nde kozala soki bitumba, nzala, maladi, botomboki mpe mobulu epalangani kati na mikili mingi? Mokakatano ya kozanga kolonga kosilisa kobeba ya lolenge na bomoi ezali kobimisa mpasi makasi na mayoki ya bato. Na ntina yango, ata libota oyo ezali bongo ebandeli ya bato nyonso, ezali mpe kobeba.

Atako bato mingi, lokola Alvin Toffler, bazali kondima ete ezali moto nde azali na mokumba ya “koluka myango mpenza ya sika mpo na kozala na kimya,” makambo masili kosalema mamonisi ete bato bazali na likoki te ya kozwa myango misengeli bango moko.

Likoki bobele moko

Biblia Mosantu, oyo kokomama na yango ebandaki esili koleka soko mibu 3.500, ebongwanaki te na boumeli ya bikeke. Mitinda na yango mibongwanaka te. Na ndakisa, uta kalakala, maloba oyo ya Yilimia 10:23 mamonani mpenza ete mazali solo lelo oyo: “Nzela na moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye moko.” Soki bato bazali na likoki te ya komitambwisa bango moko, nani akoki kotambwisa bango? Biblia emonisi Liziba ya etambwiseli bobele moko ya solo: “Ngai nazali Jéhovah, Nzambe na yo, Ye oyo akolakisa yo mpo na litomba, Ye oyo akokamba yo na nzela ekoki na yo kotambola na yango.”​—Yisaya 48:17.

Kati na Biblia, Jéhovah azali kolakisa biso mpo na litomba na biso. Biblia etondi na batoli oyo ezali kolakisa biso nzela kati na yango tosengeli kotambola. Batoli yango ezali na ntina mingi lelo oyo lokola mpe ezalaki na ntango oyo yango ekomamaki. Kati na lisolo oyo likolanda, tokotalela lolenge nini Biblia ezali mpenza na ntina mpo na eleko na biso. Na nzela na makambo makeseni, kobanda na kolongono ya nzoto, bozwi, bomoi ya libota mpe etamboli, okoki komona ete Biblia ezali mpenza kopesa kimya makasi kati na makambo ya yikiyiki oyo mazali na mokili ya lelo.

[Elilingi na lokasa 4]

Biblia ezali longó ya kimya kati na mokili oyo ya yikiyiki

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto