Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/2 lok. 32
  • Molamuki ya liboso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Molamuki ya liboso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Mitó ya makambo mike
  • Biblia Motambwisi mobongi mpo na Bato lelo
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/2 lok. 32

Molamuki ya liboso

KATI na banzete nyonso oyo ekobotaka mbuma na etuka ya Méditerranée, amandier ezali oyo epusi kobenda likebi. Na nsuka ya Janvier to na ebandeli ya février​—liboso na banzete mosusu—​ekolamukaka na bopemi na yango na eleko ya malili. Oyo nde kolamuka ya kokamwa! Nzete mobimba ekotonda na ezipeli ya fololo ya motane to pembe, oyo ya pembe ekokani mwa moke na nsuki ya mibange.​—Tala Mosakoli 12:5.

Baebele ya ntango na kala bazalaki kobyanga nzete ya amandier “oyo alamuki,” kokanisáká na eleko na yango ya kopesa fololo nokinoki. Jéhovah asalelaki likambo yango mpo na kolimbola nsango moko ya ntina monene. Na ebandeli na mosala na ye, Yilimiya amonaki amandier kati na emonaneli na ye. Elimbolaki nini? Jéhovah alimbolaki ete: “Nazali kolambela mpo na liloba na ngai ete nakokisa yango.”​—Yilimia 1:12.

Motindo moko lokola amandier ‘elamukaka’ noki, na elilingi Jéhovah azalaki mpe “kotelema na ntongontongo” mpo na kotinda basakoli ete bakebisa libota na ye na ntina na makama ya kozanga botosi. (Yilimia 7:25) Mpe azalaki kopema te​—azalaki ‘kokengela’⁠—​kino maloba na esakweli na ye makokana. Ezalaki bongo na 607 L.T.B. na elaka na yango, kosambisama ya Jéhovah ekwelaki libota ya lipengwi na Yuda.

Liloba na Nzambe lizali kosakola ete kosambisama lolenge moko ekokwela biloko mabe oyo tozali kobika kati na yango. (Nzembo 37:9, 10; 2 Petelo 3:10-13) Kolobeláká kosambisama yango, mosakoli Habakuku andimisi biso ete: “Mpo ete emonaneli ezali bobele mpo na ntango ebongisami . . . Zela yango; ekoya solo mpenza. Ekoumela mingi te.” (Habakuku 2:3) Kobima ya bafololo kitoko ya amandier ezali kokundwela biso ete Jéhovah akosenzela mpo na Liloba na ye ete akokisa yango.

Biblia Motambwisi mobongi mpo na Bato lelo

Kolakisama, bandakisa mpe mateya ya Biblia ebongi mpenza mpo na bato lelo. Mitinda ya boyengebene mpe mitinda mitobwani ya bizaleli malamu oyo mizali kati na mokanda wana mitomboli yango mosika likoló na mikanda nyonso mosusu. Biblia ezali bobele koyanola na mituna ya ntina te kasi ezali lisusu kopesa batoli ebongi, oyo soki esalelami, mbele ekosala makambo mingi mpo na kobongisa kolongo ya nzoto mpe ya makanisi ya bafandi na mabelé.

Biblia ezali kopesa mitinda mitali malamu mpe mabe oyo ezali kobongisa makambo ya mokolo na mokolo. Yesu alobaki: “Makambo nyonso malingi bino ete bato basalela bino yango, bino bosalela bango bobele bongo.” (Matai 7:12) Mokonzi na mayele Salomo apesaki liteya oyo: “Yiba epai na mobola te mpo ete azali mobola; nyokola monyokolami kati na ekuke mpe te. Mpo ete Jéhovah akolobela bango mpe akobebisa molimo na ye oyo akobebisa bango.”​—Masese 22:22, 23.

Molende kati na mosala mpe etamboli ya peto elobelami mpenza mingi kati na Liloba lipemami ya Nzambe. Ntoma Paulo apesaki elendiseli ete: “Bosala makasi mpo na kozala na kimya. Botalela bobele makambo na bino mpe bosala na mabɔkɔ na bino lokola tosɛngaki bino yango, ete bozala na etamboli ya nsɔni te liboso na bato ya libandá mpe ete bozala na mposa ya eloko te.” (1 Batesaloniki 4:11, 12, MN) “Misala na nzoto emonani polele, yango oyo: ekobo, makambo na bosoto, pite, . . . Nde mbuma na elimo ezali boye: bolingo, esengo, kimya, motema molai, boboto, malamu, kondima, bopolo, mpe komikanga motema. Mibeko kotemela makambo yango ezali te.”​—Bagalatia 5:19-23.

Tala lisusu likebisi oyo: “Bomizimbisa te; kotambola na bato mabe ekobebisa malamu na motema.” (1 Bakolinti 15:33) Ezali mpenza na ntina mingi ete tolanda likebisi yango mpo ete “ye oyo akotambola na bato na mayele akozala na mayele, nde motamboli elongo na bazoba akobukana.”!​—Masese 13:20.

Biblia ezali mokanda ya batoli eleki malamu mpo na boyokani kati na libota. (Deteronome 6:4-9; Baefese 5:21-33) Na yango, ezali likambo ya kokamwa te, soko molakisi ya lokumu mingi William Lyon Phelps alobaki mokolo moko ete: “Nakanisi ete boyebi ya Biblia kozanga mateya ya université ezali na motuya mingi koleka mateya ya université kozanga Biblia.” Na ntina ya Biblia, John Quincy Adams akomaki ete: “Na mikanda nyonso ya mokili, ezali oyo eleki na kokómisa bato malamu, mayele mpe esengo.” Kómisa yango etambwiseli na yo mpe sosola lolenge yango ebongi mpo na kosunga yo!

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 32]

Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto