Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 1/3 nk. 2-3
  • Kozelisa esila koboma!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Kozelisa esila koboma!
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Masolo mosusu
  • Sikoyo mpenza nde, tólala mpɔngi te!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Okotosa likebisi na Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Babikaki mpo batyaki likebi
    Bókɛngɛlaka!
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 1/3 nk. 2-3

Kozelisa esila koboma!

MABOTA misato, mikólo nsambo mpe bana motoba, bakimaki kozanga elikya mpo na kobikisa bomoi na bango. Liboso, bamibombaki kati na ndako moko, kolikyáká bongo kobikisa bomoi na bango na mbula makasi ya mabanga. Kasi lokola makelele ya mabanga oyo mazalaki kokwea ebandaki kosila, likambo mosusu ya nsomo ekómaki​—limpata mwindo ya mputulu oyo ezalaki na mopepe oyo ekangisaka mongongo ya bato. Sikawa liponi mosusu ezalaki te, etikalaki bobele kokima.

Oyo azalaki liboso ezalaki mobali moko, ekoki kozala boy, oyo azali kopota na saki ya biloko likoló na lipeka na ye. Bilenge mibali mibale bazalaki kolanda ye, moko azalaki soko na mibu minei, mosusu azalaki na mibu mitano, bazalaki kopota basimbani na maboko. Basusu bazalaki kolanda​—nsomo ezwaki bango, bazalaki kosala makasi, bazalaki kotuta mabaku, kolukaka kobikisa bomoi na bango. Bamekaki kopema, kasi na esika ya mopepe, bazalaki nde kopema mputulu ya mpio. Moko nsima na mosusu, bango nyonso 13 bakweaki mpe batandamaki na mabelé kozanga koningana mpe na nsuka bakundamaki na mputulu oyo ezalaki kokwea. Bitika na bango bibombamaki kino bakundoli na biloko na kala bayaki komona yango nsima na mibu soko 2 000 mpe bayebisaki makambo ya mawa oyo masalemaki na ngonga ya nsuka ya bomoi na bango.

Bato wana 13 oyo bakufaki bazalaki bobele bato moke kati na bato soko 16 000 oyo bakufaki na engumba ya kala ya Pompéi, na Italie, na le 24 Août ya mobu 79 ya ntango na biso. Mingi babikaki na kokimáká engumba ntango Ngomba Vésuve ebandaki kobimisa mɔ́tɔ na yango ya liboso. Nzokande, baoyo bazelisaki​—mingimingi bato oyo bazalaki bazwi baoyo balingaki te kotika bandako na bango mpe biloko na bango​—bakundamaki na nse ya bametele 6 ya mabanga mpe mputulu.

Oyo esalemaki na engumba ya Pompéi esili koleka mibu 2 000 ekoki komonana ete ezali bobele lisoló moko ya kala. Kasi na makambo mingi, ezalela na yango ekokani na oyo ezali liboso ya bato nyonso lelo. Bilembo ya mawa mingi koleka makelele ya Ngomba Vésuve, bizali komonana na mokili mobimba lokola makebisi mapesami mpo bato bayeba ete mokili ya lelo mozali kokende liboso na libebi oyo esili kobelema. Mpo na kobika, tosengeli kosala nokinoki. Kozelisa ebomaka. Oyo bilembo yango bimonisi mpe lolenge nini tokoki kosala na mayele nyonso ezali makambo makolobelama na lisoló na biso lilandi.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 2]

Cover photo by National Park Service

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 3]

Soprintendenza Archeologica di Pompei

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto