Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w93 15/1 lok. 32
  • Ozali lokola moko na baoyo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Ozali lokola moko na baoyo?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
w93 15/1 lok. 32

Ozali lokola moko na baoyo?

‘EZALI malamu kozala nkosi mpo na mokolo moko na esika ya kozala mwana na mpate mpo na mbula nkama.’ Elobami ete maloba wana mazalaki ya Benito Mussolini, oyo azalaki mokonzi mabe na Italie.

Lokola Mussolini, bato mingi baboyaka ete batalelama lokola bana na mpate mpe bameme. Nzokande, Davidi mokomi na nzembo, mokonzi ya kala na Yisraele, alobaki ete: “Jehovah azali Mobateli na ngai. . . . Azali kotambwisa ngai na bisika na mai na kimya.” (Nzembo 23:1, 2) Ɛe, Jéhovah Nzambe azali Mobateli Monene, oyo azali kobatela malamu bato na ye, lokola nde bazalaki bampate bazangi bibundeli.

Libota na Nzambe lilobelami lokola bampate na elobeli ya elilingi na Nzembo 95:7, epai totangi ete: “Mpo ete [Jéhovah] azali Nzambe na biso, mpe biso tozali bato na elanga na ye mpe bampate kati na loboko na ye.” Basusu bakoki kokanisa ete mokomi na Nzembo mbele ekokaki aloba ete “bampate ya elanga na ye” mpe “bato na loboko na ye.” Kasi awa makambo mabongwani, mpe libota na Jehovah yango moko emonisami lokola bampate na ye. Bazali kosepela na matomba bazali kozwa kati na elanga ya Nzambe mpe batambwisami na loboko na ye ya bolingo.

Mwana na Jéhovah, Yesu Klisto azali Mobateli Malamu ya bampate. Azalaki mbala mingi kolobela bato lokola bampate. Na ndakisa, Yesu alobelaki “etonga moke” mpe “bampate mosusu.” (Luka 12:32; Yoane 10:14-16) Na ntina na bayekoli na ye ya bopolo oyo bazalaki lokola bampate, Yesu alobaki ete: “Bampate na ngai bazali koyoka mongongo na ngai, mpe nayebi bango, mpe bazali kolanda ngai. Mpe nazali kopesa bango bomoi ya seko, mpe libela bakobebisama te, mpe moto moko akobotola bango na loboko na ngai te.” (Yoane 10:27, 28) Bato oyo bazali kati na loboko ya mokonzi oyo atondi na boboto, bazali kozwa matomba ya nguya na ye, ngolu na ye, litambwisi na ye, mpe libateli na ye.​—Emoniseli 1:16, 20; 2:1.

Moto moko te akoki kobotola bato oyo bakokani na “bampate” longwa na loboko ya libateli na Yesu. Lelo, azali kokabola bato: epai moko “bantaba” baoyo baboyami na ye; epai mosusu “bampate” baoyo bakosepela na bomoi ya seko na nse ya litambwisi ya Bokonzi ya likolo ya Nzambe. (Matai 25:31-46) Okozala moko na bampate oyo bapambwami?

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 32]

Garo Nalbandian

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto