Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 1/12 nk. 3-5
  • Olingaka bato ya lolenge nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Olingaka bato ya lolenge nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Makambo batalelaka
  • Makambo wana mazali na ntina?
  • Nani andimami na Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Zwá bikateli ya bwanya na oyo etali kobakisa bakelasi mosusu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
  • Bakelasi ya milaimilai mpe mbongo ekoki kopesa moto bomoi ya malamu na mikolo ezali koya?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2021
  • Kelasi​—⁠Salelá yango mpo na kosanzola Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1996
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 1/12 nk. 3-5

Olingaka bato ya lolenge nini?

“NAZALI KOLUKA MWASI MPO NA LIBALA. Asengeli kozala na mposo pembe mpe na nzoto mike, asengeli kozala na diplôme ya gruduat to yo licence. Asengeli kouta na libota oyo ezali na bozwi mingi. Eleki malamu ete azala na etuluku moko na oyo ya ngai.”

EZALI wana liyebisi mpo na libala oyo tokoki kotanga kati na zulunalo moko ya Inde. Bobele bongo, tokoki mpe komona likambo motindo wana bipai mosusu mingi na mokili. Na Inde, liyebisi ya libala epesamaka mingimingi na baboti ya mwana mobali oyo alingi kobala. Biyano bakozwa biyaka nzela moko na foto ya elenge mwasi oyo alati elamba ya motane ngwa babengi sari mpe babiju mingi ya wɔlɔ. Soki libota ya mwana mobali esepeli na mwasi yango, masolo makobanda elongo na libota ya mwana mwasi mpo na kobongisa libala.

Makambo batalelaka

Na Inde, balukaka mingimingi mpo na libala mwasi oyo azali na mposo mpembe. Yango euti na endimeli oyo ekotela mingi bato oyo elobi ete ba Hindous ya bituluku oyo etalelamaka ete ezali na ntina te bazali na mposo moindo. Kala mingi te, programme moko ya televizyo na Inde elobelaki lisolo ya bana basi mibale, moko azalaki na mposo mpembe, mosusu azalaki na mposo moindo. Mwana mwasi oyo azalaki na mposo mpembe azalaki konyokola bato mosusu mpe azalaki na bizaleli ya mabe mpenza; oyo azalaki na mposo moindo azalaki mwana malamu mpe na boboto. Na mbala moko mbongwana ya kokamwa esalemaki: mwana mwasi oyo azalaki na mposo mpembe azwaki etumbu mpe akómaki moindo, mpe oyo azalaki moindo akómaki mpembe. Emonani polele ete liteya ya lisolo yango ezalaki ete atako bolamu nde esukaka na kolonga, lifuti oyo bato nyonso balingaka ezali ya kozala na mposo mpembe.

Makanisi wana ya kotalela mposo mosusu na lolenge mabe ekotela bato mingi na mitema koleka lolenge tozali kokanisa yango. Na ndakisa, soki moto moko ya Azia akei na mboka moko ya Mpoto, akomilela mpo ete bazali kotyola ye na ntina na mposo na ye mpe na ntina na miso na ye. Akomona ete makambo motindo wana ezali koponapona, yango ekosepelisa ye te. Nzokande ntango akozonga na mboka na ye, mbala mosusu akoki kosalela bato ya etuluku oyo ekeseni na oyo ya ye makambo motindo moko. Ata lelo oyo, bato mingi batalelaka mposo mpe bikoló touti lokola makambo ya ntina mpo na komona motuya ya bato mosusu.

Na ntango ya kala mokonzi Salomo akomaki ete: “Mosɔlɔ mpe ekosilisa ntembe nyɔnsɔ.” (Mosakoli 10:19) Yango ezali mpenza solo! Bozwi mpe ezali na bopusi na lolenge batalelaka bato. Mbala mingi bato bamitunaka te soki bozwi yango ezwamaki lolenge nini. Ezali ete moto moko akómi mozwi na nzela ya mosala makasi, na lolenge na ye malamu ya kobatela mosolo, to na lolenge elongobani te? Yango ezali mpenza te likambo oyo batalelaka. Bato mingi balukaka kondimama epai na bato oyo bazali na bozwi, ezala ete bozwi yango ezwamaki na lolenge ya malamu to na lolenge ya mabe.

Kati na mokili oyo ezali na elimo ya kowelana, koyekola mingi mpe etalelami lokola eloko ya motuya mpenza. Wana mwana abotami, baboti balendisamaka na kobomba mbongo mingi mpo ete mwana na bango akoka kotanga. Ntango mwana akokóma na mbula mibale to misato, baboti bakomitungisa mpo na kokotisa ye na école maternelle moko ya malamu. Yango ezali ebandeli ya mobembo molai oyo ekomema ye kino na université. Bato mosusu bakanisaka ete kozala na diplôme moko ya lokumu esalaka ete bandimama mpe bazwa limemya ya bato mosusu.

Ɛɛ, mposo, koyekola, mosɔlɔ, ekólo​—ezali wana makambo oyo na nzela na yango bato mingi batalelaka bato mosusu kozanga ete bayeba bango malamu. Ezali wana makambo batalelaka mpo na koyeba nani basengeli kolinga mpe nani basengeli koboya. Boni mpo na yo? Nani yo olingaka? Okanisaka ete baoyo babongi kolingama mpe kozwa limemya ezali baoyo bazali na mosɔlɔ, na mposo pembe, to baoyo bayekola mingi? Soki ezali bongo, osengeli kotalela malamumalamu moboko ya mayoki na yo.

Makambo wana mazali na ntina?

Mokanda Hindu World emonisi ete: “Soki moto moko ya bituluku oyo bitalelami ete bizali ya ntina te abomi brahmane moko, bakonyokola ye kino akokufa, mpe bakobotola biloko na ye, molimo na ye ekotungisama seko. Soki brahmane moko abomi moto, bakofutisa ye bobele lomande, kasi akoki kozwa etumbu ya liwa te.” Atako mokanda yango ezali kolobela bobele makambo ya ntango ya kala, kasi ezali boni mpo na lelo? Ata lelo na ekeke oyo ya ntuku mibale, makila mingi masopamaki na ntina na makambo ya kokabola mposo mpe mpo na kozanga boyokani kati na bikólo. Yango esuki bobele na Inde te. Koyinana mpe mobulu moutaki na politike ya kokabola mindele mpe baindo (apartheid) na Afrique du Sud, makanisi mabe na ntina ya mposo mosusu na États​—Unis, makanisi mabe na ntina ya bato ya bikólo mosusu na mikili ya Baltes—​molongo ya makambo motindo wana ezali molai mingi-nyonso wana euti na mayoki tobotami na yango ya kolinga koleka bato mosusu. Kotombolaka bato likólo ya basusu na ntina na mposo na bango to mpo na ekólo na bango ebimisaki te mbuma malamu mpe ya kimya.

Ezali boni mpo na bozwi? Na ntembe te, bato mingi bakómaki bazwi na nzela ya mosala makasi mpe ya kolongobana. Nzokande, bozwi mingi esili kozwama na basali na mabe, na lolenge ya mombongo kozanga kolanda mibeko ya Leta, na batekisi ya drogue to ya mindoki mpe na nzela ya misala misusu ya mabe. Ezali solo ete, basusu kati na bango bazali kopesa makabo mpo na kosalisa babola. Nzokande, misala na bango ya mabe misili kopesa mpasi mingi mpe minyoko epai na bato oyo bango basaleli mabe. Bato mosusu bazali na mawa mpe bazali komona mpasi mpo na misala na baoyo bazali kobuba, kozwa kanyaka to kosala mabe na nkuku, mpe basusu bazali kozokisa mpe koboma soko biloko na bango to misala na bango mitamboli malamu te. Ya solo, kozala na bozwi ezali yango moko te likambo oyo epesi nzela na kotalela moto oyo azali na yango lokola moto malamu.

Ezali boni mpo na oyo etali koyekola? Soki moto moko azali na mapɔlomi mingi mpe na ba titres ebele, yango ezali ndanga oyo emonisi ete azali moto ya kolongobana mpe ya sembo? Yango elingi koloba ete asengeli kotalelama lokola moto malamu? Ya solo, koyekola ekolisaka mayele ya moto, mpe mingi na baoyo bazali kosalela boyebi na bango mpo na kosalisa bato mosusu babongi na lokumu mpe na limemya. Ata bongo, lisolo na bato litondi na bandakisa ya bato bayekolá oyo babubaki mpe banyokolaki bazalani na bango. Lisusu, tala mpe makambo mazali komonana lelo na ba universités. Komela drogue mpe kozwa bamaladi oyo euti na makambo ya kosangisa nzoto ezali komonana mingi na ba campus, mpe mingi bazali koyekola bobele mpo na kokóma bato ya mbongo, bato ya nguya to bato bayebani mingi. Koyekola yango moko ezali te likambo oyo esengeli mpo na koyeba bomoto ya solo ya moto moko.

Te, mposo, koyekola, mosɔlɔ, ekólo mpe makambo mosusu ya lolenge wana mazali te moboko oyo likoló na yango bokoki koyeba ete moto boye azali na ntina to te. Baklisto basengeli te komipesa na makambo wana mpo ete bandimama na bato mosusu. Na yango, makambo nini tosengeli kotalela? Na makambo nini tosengeli komitika kotambwisama?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto