“Bozonga epai na ngai, mpe ngai nakozonga epai na bino”
Libota ezalaki kosepela na botamboli kati na zamba. Pierre, mwana ya nsuka, akitaki mosika na lobwaku wana ezalaki ye kolanda esendé moko. Na pwasa, likoló eyindaki mpe mbula ebandaki konoka. Na ebandeli ezalaki bobele matanga ya mike, mpe mokemoke ebongwanaki na mbula ya makasi. Libota ekangisaki biloko nokinoki mpe emataki kati na motuka. Bongo, moto na moto abandaki komituna soki Pierre azali epai wapi.
Na ntango wana, Pierre azalaki koluka kozonga epai libota ezalaki. Ezalaki mpasi mpo na komona liboso, mpe mbula eyeisaki nzela moselu likolo na ngomba. Na mbalakaka, aoki lokola nde mabele elimwi na makolo na ye, mpe akwei kati na libulu moko mozindo, oyo ezalaki komonana te. Amekaki kobima, kasi mabele ezalaki moselu mingi kati na libulu.
Mai ya mbula ezalaki kokita longwa na ngomba mpe ebandaki kotondisa libulu na potopoto. Pierre azalaki na likama ya kozinda na yango. Nzokande tata na ye amonaki ye mpe abimisaki ye na lisalisi ya nsinga. Na nsima, Pierre azwaki mpamela makasi mpo na likambo ya komitangola na libota. Kasi, wana moto azipami na bolangeti na maboko ya mama na ye, azalaka na mokakatano te mpo na kondima mpamela.
Lisolo oyo ezali komonisa malamu motindo na makambo mazali kokwela basusu kati na basangani ya libota na Nzambe. Basili kokwea kati na ebongiseli na biloko mabe ya lelo oyo ekokani na libulu mozindo mpe bazali koluka na mpasi mingi kobima na yango mpo na kozongela ekimelo: lisangá ya Jéhovah. Oyo nde esengo na koyeba ete Jéhovah azali na motema mawa mpe azali pene mpo na ‘kobwakela bango nsinga’ mpe kosalisa bango na kozonga na esika ya libateli!
Jéhovah azali komonisa motema mawa
Na eleko ya Yisraele, ntango botongi ya tempelo esilaki, Salomo asalaki libondeli ya bofungoli yango mpe asengaki na Jéhovah ete ayoka bisengeli oyo bipesami epai na tempelo. Na nsima alobaki: “Soki [Bayisraele] basaleli yo masumu (mpo ete ezali na moto te oyo akozanga kosala lisumu), mpe soko okosilikela bango mpe okotika bango na maboko na bayini na bango, . . . soki basosoli mabe na bango, na mokili epai bakei na boombo, mpe soki bakozonga mpe bakobondela mpo na ngolu na yo, na mokili na bayini na bango, . . . tika ete oyoka longwa na likolo, esika ya efandelo na yo, mabondeli mpe malombo na bango mpo na kozwa ngolu na yo.”—1 Mikonzi 8:46-49.
Lisengi na Salomo lindimamaki mbala mingi na boumeli na lisolo ya Yisraele. Mbala na mbala, libota na Nzambe epesaki ye mokongo mpe etikaki ye. Na nsima bazalaki kondima mabunga na bango mpe bazalaki kozonga koluka ye. Jéhovah mpe azalaki kolimbisa bango. (Deteronome 4:31; Yisaya 44:21, 22; 2 Bakolinti 1:3; Yakobo 5:11) Na nzela na Malaki, Jéhovah akundolaki motindo asalaki epai na libota na Ye na boumeli ya bambula soko nkoto moko wana alobaki: “Longwa na mikolo na batata na bino, bopengwaki na malako na ngai mpe botosaki yango te. Bozonga epai na ngai, mpe ngai nakozonga epai na bino.”—Malaki 3:7.
Bantina ya mabaku
Lokola na mikolo ya Bayisraele, basaleli mosusu ya Nzambe ya mikolo na biso bazali komitangola na Jéhovah mpe bazali komikabola bango moko na lisangá na ye. Mpo na nini? Ezali na baoyo bazali kolanda eloko moko oyo emonani ete ezali na likama te lokola esendé oyo Pierre alandaki. Ezali yango ekomelaki ndeko mwasi moko na nkombo Ada. Ayebisi: “Tozalaki na momeseno ya kokutana na midi elongo na baninga ya mosala, na restaurant ya penepene mpo na kolya. Yango wana ntango babyangaki ngai mpo na komela café elongo na bango na mpokwa, nandimaki kozanga kokakatana. Nakanisaki ete yango ezalaki kobebisa te ntango ya makita to ya mosala ya kosakola. Nasosolaki te ete nazalaki komonisa bopotu ya kolanda etinda oyo ezali kati na 1 Bakolinti 15:33.
“Mosika te, nabandaki kokende elongo na bango na masano likoló na bapunda mokolo na poso. Na nsima, nalandaki bango na cinéma mpe na teyatre. Nazangisaki makita. Na nsuka, nazalaki lisusu koyangana na makita te, ata mpe kosangana na mosala ya kosakola te. Wana nasosolaki likambo lizali kokomela ngai, nazalaki lisusu pene na lisangá te.”
Na makambo mosusu, moto moko akoki komimona ete abongi lisusu te kosalela Nzambe mpo na libunga monene oyo asalaki na nkuku. (Nzembo 32:3-5) To moto moko akoki kobeta libaku na maloba to na misala ya baninga na ye baklisto, kozanga kososola ete, lokola Salomo alobaki yango, “ezali na moto te oyo akosalaka masumu te.”—1Mikonzi 8:46; Yakobo 3:2.
Basusu balembaka ntango bazwi discipline. (Baebele 12:7, 11) Mposa ya kozala na biloko ya mosuni mingi ememaki ebele na kotika kosalela Nzambe. Mbala mingi, na kolukaka kolonga kati na mokili oyo bamikotisaki mozindo na mosala na bango kino esika mpo na kosalela Nzambe ezalaki lisusu na bomoi na bango te. (Matai 13:4-9; 1 Timote 6:9, 10) Ezalela na bango ezali nde ya kozanga elikya?
Okoyanola na libyangi ya Jéhovah?
Mokolo moko, Yesu alobaki likambo moko oyo ezalaki mpasi na koyoka mpe basusu babetaki libaku. Lisolo elobi: “Mingi kati na bayekoli na ye bazongi nsima mpe batamboli lisusu na ye elongo te.” Kasi bango nyonso te babetaki libaku. Lisolo ya Biblia elandi ete: “Yesu alobi na bazomi na mibale ete: ‘Bino mpe bolingi kokenda?’ Simona Petelo azongisi ete: ‘Nkolo, tokende epai na nani? Yo ozali na maloba na bomoi na seko.’” (Yoane 6:66-68) Bantóma na Yesu basosolaki ete ekozala likama soki batiki Yesu.
Basusu kati na baoyo bamitangolaki na lisangá na Jéhovah basili kokoma lelo na bosukisi motindo moko. Basosoli ete ezaleli motindo yango ezali likama, mpe bakozwa maloba oyo mazali komema na bomoi bobele epai na Jéhovah mpe Yesu. Ekomi bango na makanisi wana, basengeli koyeba ete ntango ezali naino mpo ete babongola makanisi, basenga bolimbisi epai na Jéhovah mpe bazonga epai na ye. Ezali Jéhovah nde apesaki libyangi oyo: “Bozonga epai na ngai, mpe ngai nakozonga epai na bino.”—Malaki 3:7.
Mpo na koloba solo, epai wapi moklisto ya sembo akoki kozwa esengo, soki bobele na mosala na Jéhovah te? Soki moto oyo azalaki mosangani ya lisanga na Nzambe amitangoli na yango, mokili ezali kobombela ye nini? Nokinoki akomona ete azali sikawa mosangani na mokili oyo ezali se kokoma na mobulu koleka. Akozala kati na ebongiseli oyo etondi na bokosi, lokuta, kobuba mpe mbindo, mokili oyo ezali na likama mpe mikakatano lokola libulu epai elenge Pierre alingaki kobungisa bomoi na ye. Soki asosoli mpe akangi ntina ete bomoi na ye ya seko ezali na likama, asengeli koluka kozanga koumela lisalisi mpo na kobima na yango. Nzokande, kozonga ezalaka ntango nyonso likambo ya petee te.
Ozali moko na baoyo bamekaki kozonga epai na Jéhovah kasi bamonaki ete yango ezali mpasi? Bongo, osengeli koyeba ete ozali na mposa ya lisalisi. Omindimisa ete bandeko na yo basi mpe mibali oyo bazali kati na lisanga na Nzambe bazali pene na kopesa yo lisalisi na bango. Kasi osengeli kosala makasi mpo na komonisa na Jéhovah ete ezali yango mposa na yo. Oyo ezali ntango ya ‘kozongela makanisi malamu na yo’ mpe ya ‘kozonga solo epai na Jéhovah.’—1 Mikonzi 8:47.
Bazwaki lisalisi mpo na kozonga
Ada azali kolimbola eloko esungaki ye na kozonga epai na Jéhovah: “Na ntango moko malamu, ndeko mwasi oyo ateyaki ngai Biblia abyangaki ngai na koyangana na assemblée ya circonscription. Azalaki mpenza na boboto! Apamelaki ngai te mpe amonisaki bolingo mingi epai na ngai. Mbula moko ekokaki uta mbala ya nsuka oyo nayanganaki na makita, kasi nakanisaki mingi mpo na kozanga ntina ya mokili mpe likoló na likambo oyo ete nsima na kongenga na yango, ezali bobele na mawa, kozokisama na motema mpe makambo na mbindo. Nazwaki bongo ekateli ya kokende na assemblée. Ntango tokomaki na esika assemblée esengelaki kosalema, nakendeki kofanda na molongo ya nsuka mpe namibombaki na esika ya pole mingi te. Nalingaki te ete bandeko bamona ngai mpe batunatuna ngai mituna.
“Programme epesaki ngai batoli oyo nazalaki na yango mposa. Ntango programme ekomaki na nsuka, nazwaki ekateli, bobele ya kozonga kati na libota ya Nzambe te, kasi lisusu ya komipesa mingi na motema na ngai mobimba mpo na Jéhovah. Bandeko bayambaki ngai na esengo; mwana mwasi ‘oyo abungaki’ azongi.” (Luka 15:11-24) Nyonso wana esalemaki esili koleka sikawa mibu mingi, mpe Ada asili kolekisa sikawa mbula 25 kati na mosala ya pionnier.
Moklisto mosusu oyo abungaki azwaki mpe esengo ya kozonga. Bankulutu bapesaki José batoli oyo ezalaki komonisa mingi makanisi na bango kasi mpenza mitinda ya Biblia te. Mpo na kolemba na motema mpe nkanda, José atikaki kosangana na misala nyonso ya boklisto. Na boumeli ya mbula mwambe, akabwanaki na libota na Nzambe. Na ntango wana, abalaki moto oyo azali mondimi te, abotaki bana mpe apesaki ata nzela ete moko na bango azwa batisimo ya Katolike.
Na nsuka azwaki lisalisi ntango mokengeli ya zongazonga asalaki visites pastorales epai na ye mpe alendisaki bankulutu ete balanda kosala bongo. Azongelaki makasi na ye mpe azwaki esengo ya komona mwasi na ye kosepela na solo. Lelo oyo José azali nkulutu kati na lisanga na bango. Lokola emonani na masolo wana mibale, Jéhovah akotika te kopambola baoyo bazali koyanola na libyangi na ye etondi na bolingo mpo na kozonga epai na ye.
Nzokande, mpo na kozwa mapamboli motindo wana, esengeli kosepela na lisalisi oyo epesami mpe kondima yango. Na masangá mingi, bandeko bakanisaka baoyo balembi, mpe bakendeke kotala bango mbala mingi, mpo na komeka kosunga bango. Kondima lisalisi motindo yango elimboli komonisa botondi mpo na motema mawa na Jéhovah.—Yakobo 5:19, 20.
Ya solo, oyo ezali ntango ya koyanola na libyangi na Jéhovah oyo ete: “Bozonga epai na ngai.” (Malaki 3:7; Yisaya 1:18) Koumela lisusu te. Makambo na mokili mazali koleka mbangumbangu. Esika eleki malamu epai tosengeli kozala na mikolo oyo ya makama ezali nde lisangá ya Jéhovah, kati na ebombamelo na nse na libateli na ye. Bobele baoyo bazali komibomba epai na Jéhovah nde bazali na elikya makasi ya kobatelama ntango akobimisa nkele na ye na mokolo monene ya nkanda na ye.—Sofoni 2:2, 3.
[Elilingi na lokasa 30]
Okoyanola na libyangi ya Jéhovah: “Bozonga epai na ngai?”