Ba Indiens ya Guajira bayambi nsango malamu
EFANDAKI ye na nsé na nzeté moko monene, wana alataki monkóto moindo oyo ekitaki kino na nsé, mobangé mwasi oyo amonanaki lokola ete azali moto ya mokili mosusu. Mpe, azalaki koloba lokóta oyo biso tozalaki koyoka yango te. Alobaki na esengo nyonso ete: “Bozonga kotala biso.” Abakisaki wana ezalaki ye kolakisa mosapi epai na bato mosusu 50 ya ekólo na ye, baoyo bafandaki zingazinga na ye, ete: “Biso nyonso tolingi ete bozonga kotala biso. Bozongaka poso na poso mpo na kotala biso!”
Bato yango ezali banani? Mpo na nini bazalaki na motema likoló ete tozonga kotala bango, nzokande toyebanaki na bango liboso te? Botika ete toyebisa bino mpo na mokolo oyo tolekisaki kati na Bagoajiro, baoyo bafandi na esanga moke ya Guajira, na nord-est ya mboka Colombie mpe na nord-ouest ya Venezuela, mboka ezali penepene na yango.
Mayoki ya liboso
Elongwaki biso na Caracas, kapitale ya Venezuela, tokendaki liboso na engumba Maracaibo. Lokola tozalaki kokɔta na engumba wana na motuka, tomonaki bilenge misato ya basi oyo balátaki minkóto milai na langilangi kotambola na pembeni ya balabala. Motindo na bango mokeseni na oyo ya bato mpamba ya Venezuela: bazali na matáma milai, mposo ezali lokola mwa motane, nsuki moindo mpe makasi. Kotambola na bango kitoko mpe na bonzenga ebendaki likebi na biso; toutaki komona Bagoajiro mpo na mbala ya liboso.
Na ntango tokómaki na esanga Guajira, ntɔngɔ etanaki mpe moi mobimaki malamu. Liboso ete molungé ya ntɔngɔ ekóma makasi, tomataki bato 50 na motuka; tosepelaki wana ezalaki biso kokanisa ete tosanganaki na mosala ya sipesiale na eteni monene ya mokili wana, mpo na komema nsango ya Biblia kati na bamboka mosika ya mokili ya Venezuela. Tosengelaki kokenda na engumba Paraguachón, na ndelo na mboka Colombie.
Etikaki biso engumba Maracaibo, tokatisaki ebele na bingumba mike mpe bamboka mingi, oyo moko na moko ezalaki na zando na yango mpe na mwa butiki epai bazalaki kotɛka basandale etongami na nsingansinga mpe na minkóto milai na langilangi, oyo ebengami ete manta. Mboka moko na moko ezalaki na libandá ya pɛto oyo bato bazalaki kokutana mpe na ndakonzambe moko kitoko oyo eyeisaki bisika yango kitoko. Bato nyonso bazalaki lokola ba Indiens. Atako bamonanaki lokola bakeseni na biso, ebongaki komikundola ete bazalaki solo mpenza bato ya Venezuela.
Na bolukiluki ya bandako
Na nsuka, tokómaki na esika oyo tozalaki kokenda. Motuka na biso motɛlɛmaki pembeni ya lopango moke ya mabangá, na nsé na nzeté moko ezalaki na bitape mpe na nkasa na yango minene. Nsima na mwa lopango wana, eteyelo ya mboka ezalaki wana, ekangamaki, mpo ete tozalaki mokolo ya lomingo.
Nsima na kokabwana na bituluku mibale, tokendaki na banzela ekeseni mpo na koluka bandako. Mokano na biso ezalaki ete tobyanga bato nyonso ete baya koyoka diskur oyo esengelaki kosalema na lokóta ya Guajira na ngonga ya misato ya nsima na midi na mokolo wana, na libandá ya eteyelo. Evelinda, mwasi Mogoajiro, azalaki elongo na biso. Tolikyaki ete yango ekoyeisa masoló pɛtɛɛ, mpamba te biso tozalaki koloba espagnol; toyebaki lokóta ya Guajira ata moke te.
Longola kotambola na mboka, tosengelaki lisusu kotambola mingi katikati na bandako. Ezalaki biso kotambola na nzela molai oyo ezali sembaa, oyo ezipamaki na matiti mingi, elenge mobali moko oyo azalaki na mibu koleka zomi, abandaki kotambola elongo na biso, wana ezalaki ye kotalatala biso na kokamwa. Evelinda asɛkisaki ye mpe alimbolaki ye na lokóta ya Guajira, ntina oyo toyaki na etuká wana. Elenge yango nkombo na ye Omar. Tobyangaki ye na diskur, nsima na yango azongaki na kopotáká mbango.
Totikaki balabala monene mpe tolekaki na nzela ya mabelé ebebisamaki na bambula oyo eutaki konɔka. Toyokaki na nsima ete, wana ezali nzela oyo bato balekaka na biloko mabe katikati na Colombie mpe Venezuela. Nsolo kitoko ya bafololo etondaki na mopepe. Mwa molungé mozalaki koswa, kasi elɛmbisaki molende na biso te. Ee, nokinoki tobosanaki mpasi wana na ntango tobimaki na nzela ya ebele na banzeté ya mikili ya molungé, tokómaki na etando monene oyo ezalaki na nzeté te—esika kitoko ya Goa.
Tokutani na Bagoajiro
Soki bantaba zomi na mibale ezalaki na matɔ́no kitoko ya moindo, ya mpɛmbɛ mpe lokola mwa motane, elalaki na nsé na nzeté mpe ezalaki konyamuta na kimya nyonso. Mwasi moko alalaki na mwa mbeto ezalaki lokola monyama, oyo etyamaki katikati na banzete mibale, wana ezalaki ye komelisa mwana na ye libɛlɛ. Bana mike mibale bazalaki kosakana pembeni wana. Pene na mwasi yango, ezalaki na lopango losalemi na nsinga na libende oyo ezingaki ndako ya mabelé esalemi na nsamba ya ndɛlɛ. Mwa bandako ezalaki zingazinga na yango. Moko na bandako yango ezalaki kúku; banzungu minene ekokani na mimbonda etyamaki likoló na nkoni oyo ezalaki kopɛla. Pene na esika wana, mposo ya ntaba ekakisamaki mpo na kokaukisa yango.
Wana amonaki biso, mobali oyo atɛlɛmaki pene na mwa ekuke moke, ayaki mbango epai na biso mpe atyaki bibónga mibale pene na mbeto wana ezalaki lokola monyama. Evelinda apesaki mbote epai na mwasi mpe mobali na lokotá na bango, na nsima alimbolaki bango elikya epesami na Makomami na kosaleláká brochure Sepela na bomoi ya seko na mabele! Na ntina na ezalela ya kimya oyo ezali kati na etuká yango, tososolaki ete, ebongaki te kopesa masoló lokola mpasi ezwami na bikólo nyonso to bokóli ya mabe kati na bisika ya bobólá na bingumba minene. Moko na bandeko basi oyo azalaki na etuluku yango alimbolaki ete, lokola Bagoajiro bamipesaka mpenza te na kosolola na bato, esengeli na biso kozala na mɔ́tɔ mpe komonisa bosepeli mpenza epai na bato na maloba ya liboso. Na ntina yango, azalaki koloba ete: “Tozali koluka koyeba soki mabota mazali na kolongono na nzoto malamu, mpe soki milóna mizali kobota, mpe soki mbula eutaki konɔka mpe bongo na bongo. Yango ezali kosalisa biso na kolobela bango Bokonzi na Nzambe mpe komonisa bango ete, na mikolo mizali koya, Jéhovah akolongwela biso mpasi nyonso mpe Satan le Diable oyo bango babangaka mingi.”
Emonanaki ete bayoki ya Evelinda bazalaki koyamba maloba na ye malamu, mpe mosika te, mwasi mosusu mpe bana mike mingi basanganaki na biso elongo na bana. Toyokaki ete mibeko ya Bagoajiro epesi nzela na mobali ete azala na basi ebele. Awa, ekokaki mpe kozala bongo? Yango ekundweli biso Yenny, elenge mwasi Mogoajiro na kitoko, oyo azalaki na mibu 21 mpe afandi na engumba Maracaibo. Mozwi moko ya Guajira alingi kobala ye na mosolo mingi mpenza. Kasi baboti na ye, baoyo bazali ba Témoins de Jéhovah te, bazalaki na makanisi makeseni. Atako mama andimaki libala wana, kasi tata na Yenny aboyaki. Mobali yango asilaki kobala ndeko mwasi ya Yenny!
Nsima na kolakisa nsango malamu, Evelinda atikaki brochure moko epai na mobali yango. Mwasi oyo atɛlɛmaki nsima na ye asɛngaki mpe brochure moko, mpe bopesaki ye yango na esengo. Na ntango wana, Batemwe mosusu balandaki mobémbo na bango. Bongo, tobyangaki libota wana na diskur ya nsima na midi, bongo tokendaki, mpamba te tolingaki kobunga te kati na etuka oyo toyebaki te.
Moko na Batemwe oyo bazalaki na etuluku wana ayebisaki makambo oyo makómelaki ye. Mobali moko ayokamelaki ye wana ezalaki ye likoló na mbeto na ye ezalaki lokola monyama, nzokande mwasi na ye akendaki koluka mwa eloko ya komela: kɔpɔ mibale ya chicha, masanga masalemi na masango manikisami. Ndeko na biso andimaki yango na bonkonde nyonso mpe amelaki. Magaly, ndeko mwasi Mogoajim oyo azalaki elongo na ye, alimbwelaki ye na nsima lolenge oyo balambaka masanga yango. Banikaka masango yango na mino! Asɛkaki mingi wana amonaki ete ndeko mobali alɛmbi nzoto mpo na yango.
Mogoajiro mosusu, oyo monanaki ete asepelaki na milende oyo bandeko na biso bazalaki kosala mpo na komema nsango ya Biblia kino epai na ye, akitaki na mbeto na ye ezalaki lokola monyama. Nsima ya kolata simisi na ye, akambaki bango kino na esika bato bazalaki, oyo moko na biso amonaki yango te.
Kokatisáká esika mosusu ezalaki na nzeté te, epai baninga na biso mosusu bazalaki kosolola elongo na mikóló ya libota, tomonaki etuluku ya bana mike bolumbu, baoyo mabumu mavimbaki, bafandaki nyee na nsé na nzeté. Toyokaki ete bazalaki bongo mpo na kozanga kolya malamu mpe mpo na banyama ya libumu. Epai na bato yango, mingi bazali na pompi ya mai te mpe bazali na kura te. Na yango, bazali ata na frigo te, bazali na ventilateur te soko na miinda ya kura te.
Elónga oyo ekanisamaki te
Ntɔngɔ elekaki nokinoki. Wana tozongaki na motuka mpo na kolya, tomitunaki soko bato boni bakoya kati na baoyo tobyangaki mpo na diskur ya Biblia, na nsima na midi.
Na 14 h 45, tomitunaki soki ekozala te bobele bato oyo bazali na motuka nde bakoyoka ndeko na biso ya Guajim, oyo abongisaki diskur ya 45 minutes na lokóta ya esika wana. Kasi ezalaki bongo te! Libota ya mwa basangani moke oyo bayaki liboso, bakómaki na lopango ya eteyelo wana ezalaki bango kokakatana. Kasi bakamwaki wana bamonaki ete bato nyonso bazalaki kosepela na bango. Nsima na mwa baminite, ebele na bato mosusu bakómaki, kati bango, emonanaki ete basusu bautaki mosika na makolo. Libota oyo lifandi na esika oyo ezalaki na bantaba 12, bayaki mpe lokola! Mwasi oyo azalaki na mbeto oyo ezalaki lokola monyama, akómaki ndenge mosusu mpo na manta na ye kitoko ya moindo! Ata elenge Omar, oyo tosololaki na ye na nzela, emonanaki ete ayaki na makoki na ye moko. Lokola basusu bazalaki sé kokóma, béton bobele moko ya molai ya lopango ya eteyelo oyo esalelamaki mpo na kofanda, etondaki. Sofele ya motuka oyo azalaki moto na bobóto, abandaki kobimisa bakiti ya motuka na ye mpo ete bato bakoka kofanda na boumeli ya diskur.
Bato nyonso 55 Bagoajiro bafandaki mpe bazalaki koyoka Eduardo kosala diskur piblike. Kasi mpo na koloba solo, bafandaki nyee te. Na ntango bandimaki likanisi ya molobi, bazalaki kolobana to komimisana mpo na komonisa ete bandimi. Na ntango alobelaki nsuka oyo ekoya mpo na mabe, mobangé mwasi oyo alobelami na ebandeli ya lisoló, asanganaki mpe na diskur yango. Angángaki makasi mpo moto na moto ayoka, ete: “Ee, mabe ezali mingi. Ya solo, ezali na bato mabe oyo bafandi kati na biso. Nalingi ete bayoka yango malamu!” Eduardo apesaki ye botɔndi na mayele mpo na likanisi na ye mpe akóbaki diskur na ye.
Nsima na diskur, mosangani moko ya etuluku na biso akangisaki fɔtɔ́ moko. Yango esepelisaki Bagoajiro oyo basɛngaki soki bakokaki kolakisa ba brochures na bango Sepela na fɔtɔ́ elandi. Basusu bakendaki mokemoke, kasi pene na ndambo na bango batikalaki mpe batalaki wana ezalaki biso komata motuka. Balakaki biso ete tozonga, mpe batikalaki wana, kopɛpáká lobɔkɔ kino motuka mozalaki lisusu komonana te.
Na nzela ya bozongi, tokanisaki mpo na mokumba kitoko oyo tozwaki mpo na komema nsango malamu ya Bokonzi na Nzambe epai na bato yango. Mpo na bato mingi, ezalaki mbala ya liboso ete bayaka yango. Mpe Batemwe ya engumba Maracaibo balekaki mpo na kokende lisusu kuna. Makambo nini makobima nsima na lisoló oyo?
Makambo malamu masalemi na nsima
Batemwe bazongaki kati na etuká yango nsima na poso mibale. Batikaki ebele na mikanda mikolimbolaka Biblia epai na bafandi na yango, bazongaki kotala bato oyo basepelaki na nsango malamu mpe babandaki boyokeli mingi na Biblia. Oyo eleki lisusu, ba Indiens 79 bayanganaki na diskur piblike ya mibale oyo esalemaki na libandá. Na libaku wana, bandeko balimbolaki ete bakozonga nsima ya poso misato, nde nsima na poso mibale te, likoló ya assemblée de circonscription oyo esengelaki kosalema. Ba Indiens wana batungisamaki. Moko na bango alobaki na mawa ete: “Boye longwa sikawa kino na ntango wana, tokokufa!” Balingaki koyeba soki assemblée de circonscription elimboli nini. Yango esepelisaki bango mpe bazwaki ekateli ya koyangana na yango! Bibongiseli bikamatamaki, mpe bato 34 kati na bango bayanganaki na assemblée ya Maracaibo, epai bandeko oyo balobaka lokóta ya Guajira basalisaki bango na kokanga ntina ya badiskur oyo esalemaki na lokóta espagnol.
Mokano ya Jéhovah ezali ete “motindo na bato nyonso babika mpe bakóma na boyebi ya koyeba solo.” (1 Timote 2:3, 4, MN) Oyo nde esengo na komona ba Indiens wana ya esanga ya Guajira, baoyo bazali koluka solo, koyamba nsango malamu!
[Etanda na lokasa 26]
Bomoi ya bato ebongi na nzela na solo ya Biblia
Iris mpe Margarita, bilenge basi mibale Bagoajiro, basepelaki wana bamonaki brochure Sepela na bomoi ya seko na mabele! Kasi bazalaki na mokakatano moko. Bayebaki kotanga te. Mosakoli mwasi oyo akutanaki na bango, asɛngaki ete asalisa bango na kosalelaka brochure Yekola kotanga mpe kokoma. Mosika te, bilenge basi wana batondaki na esengo na koyeba kokoma mpe kobenga malamu nkombo ya Jéhovah.
Ezalaki bango kokola mokemoke, bazalaki kosepela mingi na elikya kitoko epesamaki na Biblia. Basepelaki mpenza na elaká oyo ete bato nyonso bakozwa bonsomi. Balimbolaki ete: “Awa, bilenge bazali mpenza na bomoi ya mpasi. Mbala mingi, baboti bazali kobalisa biso wana ezali biso bobele bilenge mpenza mpe tozali ntango nyonso na likama ya kobebisama na mibali.”
Iris mpe Margarita balekisaki ntango malamu na koyanganaka na assemblée de circonscription na engumba Maracaibo. Bilongi na bango bimonisaki esengo ya mitema na bango, mingimingi na ntango ya koyemba nzembo. Ntango nyonso bazalaki kotɛlɛma na ekuke na motema likoló mpo na kozela mosakoli mwasi oyo azalaki koya mpo na boyekoli Biblia elongo na bango, mpe bazalaki kozanga te mpo na kolanda badiskur oyo ezalaki kosalema na mboka na bango. Bilenge basi wana bazali na mayoki ete bomoi na bango esili kobonga na nzela na koyeba Jéhovah Nzambe mpe mokano na ye.