“Boláta moláto mobimba ya etumba na Nzambe”
BAKLISTO balati moláto ya etumba? Mpo na nini basengelaki kolata molato ya etumba? Bazali nde baninga na kimya te? (2 Timoté 2:24) Ezali boye. Atako bongo, baklisto nyonso ya solo basengeli kobunda etumba—etumba oyo bazali kobunda na molende mpo na koboma te, kasi mpo na kozwa elónga.
Soki Satana atombokaki te, mbɛlɛ etumba wana ekokaki kozala na ntina te. Kasi atombokaki, mpe amemaki Adam mpe Eva kati na botomboki na ye. Uta ntango wana, ebongiseli ya mokili mobimba oyo ekólaki, etyamaki na nsé na nguya ya “oyo mabe,” Satan le Diable. (1 Yoane 5:19, MN) Baoyo bazali kotósa Jéhovah, Moyangeli monene, basengeli bongo kotɛmɛla bopusi ya mokili mpe mokóló na yango. Esengeli na bango kobunda mpo na kobatela bomoi na bango ya elimo. Tala mpo na nini toli oyo elandi epesami na baklisto, ete: “Boláta moláto mobimba na etumba na Nzambe mpo na kotɛmɛla mayele mabe ya Diable.”—Baefese 6:11, MN.
Moláto ya etumba
Boye tozali mpenza na mposa ya “moláto mobimba na etumba na Nzambe” mpo na kobatelama malamu. Na bongo, totalela eloko moko na moko ya molato yango oyo etangami na ntóma Paulo mpe totalela yango malamu mpo na koyeba soki tomibongisi mpenza mpo na etumba ya elimo.—Baefese 6:14-17.
“Bongo, botɛlɛma ngwi. Boláta solo lokola nkamba na loketo.” (Baefese 6:14a, MN) Na ntango ya kala, basodá bazalaki kolata nkamba ya mposo na nyama oyo ekokaki kozala na monene ya ba santimetele 15. Nkamba wana ezalaki kobatela mangei na bango. Wana soda azalaki kokanga nkamba na ye, yango emonisaki ete amibongisi mpo na etumba.
Na yango, ebongi mpenza kokokanisa solo na Nzambe na nkamba ya basodá. Maloba ya elilingi oyo mamonisi malamu ete tosengeli kobatela Liloba na Nzambe, Liloba ya solo, penepene na biso, lokola nde toláti yango. Tosengeli kokanisa na mozindo na makanisi mazali kati na yango. Ezali kopekisa biso na komitika kozimbisama na lokutá. Lisusu, maloba ya Jéhovah mazali kosunga biso, mazali kolendisa biso na elimo mpe mazali kosalisa biso na kotikala sembo.
“Boláta boyengebene lokola ebateli na ntólo.” (Baefese 6:14b, MN) Ebateli na ntólo ya sodá ezalaki kobatela eteni na nzoto ya ntina mingi mpo na bomoi: motema. Kati na moláto oyo Nzambe azali kopesa biso mpo na etumba ya elimo, boyengebene nde ezali kobatela motema. Makomami mazali mpenza kosalela motema lokola elembo ya bomoto na biso ya kati—mayoki na biso, makanisi na biso mpe bamposa na biso. Epai mosusu, lokola Biblia elobi ete motema mozali na mposa ya mabe, tosengeli mpenza kobatela ekateli na biso ya kokangama na mitinda ya boyengebene na Jéhovah. (Yilimia 17:9) Botósi na biso epai na Nzambe esengeli kozala na bokosi te, oyo ekomonanaka bobele na libandá; kasi esengeli kouta na motema na biso. Mpo ete ezala bongo, tosengeli kolóna bolingo mingi mpo na boyengebene mpe tosengeli kozala na koyina monene na kotyola mibeko. (Nzembo 45:7) Na motindo yango, motema na biso mokobatelama.
“Boláta nsango malamu ya kimya lokola sapato na makolo na bino.” (Baefese 6:15, MN) Makolo na yo malátisami sapato? Mazali komema yo mbala na mbala kati na mosala ya Nzambe mpo na kosakola nsango malamu? Ozali nde kosala makasi ya kobongisa lolenge na mosala na yo ya kosakola mpe ya koteya? Ya solo, bafandi ya bateritware mosusu batyaka likebi te. Mbala mosusu bato basepelaka te, baboyaka kolanda to mpe batɛmɛlaka. Mosala na biso ya kosakola mokoki nkutu komemela biso monyoko. Kasi na kolendendela, baklisto bazali kolóna ezaleli ya koyika mpiko, oyo ezali kobatela bango na kobundisa Satana. Atako anyokwamaki, Paulo azalaki mosakoli ya molende, mpe tolendisami na ‘kokóma bamekoli na ye, lokola ye amekolaki Klisto.’ (1 Bakolinti 11:1, MN)
Soki tolandi komipesa kati na mosala ya kosakola Bokonzi na Nzambe, elikya na biso na nsango malamu ekolendisama. Lisusu, yango ezali kopesa nzela na elimo santu ya Jéhovah ete ekokisa mosala na yango kati na biso mpo na kokokisama ya mokano na Nzambe. Ya solo, mosala na biso moyeisi biso basalani elongo na baanzelu, mpe na Jéhovah Nzambe ye moko. (1 Bakolinti 3:9; Emoniseli 14:6) Epai mosusu, likambo oyo ete kozala “ntango nyonso na mosala mingi kati na Nkolo” ezali kopesa “makasi mpe mpiko.” (1 Bakolinti 15:58, MN) Oyo nde libateli monene!
“Bokamata nguba monene ya kondima.” (Baefese 6:16, MN) Na nguba monene, sodá ya ntango na kala azalaki komibatela mpo na makɔnga mpe mbanzi. Soki asalelaki nguba te, akokaki kozokisama makasi, ata mpe kobomama. Nzokande, baklisto babundisami na bibundeli makasi mpenza: “mbanzi na mɔ́tɔ ya oyo mabe.” Ezali myango nyonso oyo Satana azali kosalela mpo na kolɛmbisa kondima na biso mpe mpo na koboma biso na elimo. Totangi monyoko, lokutá, filozofi na bokosi ya mokili oyo, mposa ya mosolo mpe komekama na kosangisa nzoto na motindo na mbindo. Mpo na komibatela na mbanzi nyonso wana, tozali na mposa na nguba monene. Na yango, ekozala likámá soki totiki mwa moke eteni na bomoto na biso polele.
Abalayama mpe Sara, mwasi na ye, bazalaki na kondima makasi. Wana balekaki mbula oyo moto akoki kobota bana, bazalaki na kondima na elaká oyo Nzambe apesaki na ntina na libota likouta na bango. Na nsima, Abalayama amonisaki kondima monene wana atósaki na etinda ya kopesa Yisaka lokola mbeka, mwana bobele moko oyo abotamelaki ye na Sara mwasi na ye oyo alingaki mingi. Jéhovah apekisaki lobɔkɔ ya Abalayama mpe apesaki mbeka mosusu na esika na [Yisaka], kasi Abalayama azalaki pene mpo na kotósa. Mpo na ntina nini? Mpo ete azalaki na kondima ekoki kati na nguya ya Jéhovah ya kosekwisa mwana na ye mpe ya kokokisa bilaká oyo apesaki na ntina na ye.—Baloma 4:16-21; Baebele 11:11, 12, 17-19.
Moize mpe azalaki na kondima motindo moko oyo ezali na ntina mpo na biso. Aboyaki bozwi ya Ezipito, mpe andimaki konyokwama elongo na libota na Nzambe. Mpo na nini? Mpo ete azalaki na kondima; andimaki ete Jéhovah azali mpe asengelaki kobikisa Bayisraele. Kondima na ye ezalaki makasi na motindo boye ete “atɛlɛmaki ngwi lokola nde amonaki Ye oyo akomonanaka te.”—Baebele 11:6, 24-27.
Tozali na motindo na kondima oyo epai na Jéhovah? Tozali na boyokani malamu elongo na ye kino kokóma lokola nde tokoki komona ye? Tozali pene na kosala makambo nyonso to na koyika mpiko na momekamo nyonso mpo na kobatela boyokani na biso elongo na Nzambe? Tozali na kondima ekoki epai na Jéhovah? (Baebele 11:1) Soki ezali bongo, mbanzi na mɔ́tɔ ya Satana ekotɔbɔla nguba te, yango kondima na biso.
“Bondima mpe ekɔti ya lobiko.” (Baefese 6:17a, MN) Ekɔti ya sodá ezalaki kobatela motó na ye, mpo na kobatela boongo—esika etongisi misisa mpe makanisi. Elikya oyo moklisto azali na yango ekokisami na ekɔti ya sodá mpo ete, ezali kobatela elimo na ye. Ya solo, elimo na ye esili koyeisama sika na nzela ya boyebi ya solo, kasi ezali bobele elimo ya moto na bolɛmbu mpe na kozanga kokoka. (Baloma 7:18; 12:2) Soki totiki elimo na biso komikɔtisela makanisi ya mbindo, oyo ekobebisa kondima, makasi oyo mamonisi elimo ya mokili, elikya na biso kati na lobiko ekobeba mpe mbala mosusu ekosuka na kokufa. Nzokande, soki tokokɔtisa ntango nyonso maloba ya kolendisa na Nzambe kati na elimo na biso, elikya na biso ekozala ntango nyonso malamu mpe ekozimina te. Ekɔti na yo ya lobiko ezali ntango nyonso na motó na yo?
“Mopanga ya elimo, yango liloba na Nzambe.” (Baefese 6:17b, MN) Elobami ete kobundisa ezali mwango malamu ya komibatela, mpe yango ezali kati na etumba ya boklisto. Na ntango makolo na biso malátisami sapato ya nsango malamu ya kimya, mazali kotambwisa biso epai na bato bazangi kondima, tozali bongo kotambola na bibundeli na biso. Biblia, Liloba na Nzambe, ezali lokola mopanga na nguya kati na elimo, oyo ezali kobundisa lokutá, makanisi ya lokutá, mpe ezali kosalisa bato na sembo na kozwa bonsomi ya elimo.—Yoane 8:31, 32.
Yesu amonisaki nguya ya ebundeli yango wana abundisaki Satan le Diable. Na ntango amekamaki na mokili mokauki, Yesu atɛmɛlaki masɛnginya misato ya Satana na kosaleláká Liloba na Nzambe na makoki nyonso mpe na kolobáká ete: “Ekomami.” (Matai 4:1-11) Soki toyekoli kosalela mopanga wana na makoki nyonso, tokokoka kosalisa bato na bopɔlɔ ete balongwa na bolóko ya Satana. Mpe kati na lisangá, bankulutu bazali kosalela Liloba na Nzambe mpo na kobatela etonga na bato oyo bazali komeka kokweisa kondima na baoyo bazangi makasi.—Misala 20:28-30.
Mpo na sodá, kosalela mopanga na makoki ezali likambo ya pɛtɛɛ te. Mpo na kolonga kosala yango, esengeli koyekola mpe kosalela yango ntango molai mpe na molende. Bobele bongo, kati na etumba ya elimo, esengeli koyekola mingi mpe kosalela yango mbala na mbala kati na mosala ya kosakola mpo na kokóma na makoki ya kosalela malamu Liloba na Nzambe. Tozanga kosala milende makasi te mpo na kozala lotɛbú malamu kati na elimo, bato oyo bazali na makoki ya ‘kosalela malamu liloba ya solo.’—2 Timoté 2:15, MN.
Tobondelaka na mabaku nyonso, totɛlɛma ngwi
Biloko nyonso ya moláto na biso ya etumba bizali na ntina mingi mpo na kotikala sembo liboso na Nzambe. Kasi lolenge nini tokoki kosɛnzɛla ete moláto wana ya etumba molongwa na biso te? Na koyekoláká Biblia mbala na mbala, na kobungisáká makita ya boklisto, mpe na kozaláká bayoki malamu mpe na kosanganáká na molende kati na makita. (2 Timoté 3:16; Baebele 10:24, 25) Kosangana mbala na mbala mpe na molende na mosala ya kosakola mpe kosala boninga malamu elongo na baninga na biso baklisto, ekosalisa biso mpe na kobatela malamu moláto na biso ya elimo oyo tozali kobundisa mpe tozali komibatela na yango.—Masese 13:20; Baloma 15:15, 16; 1 Bakolinti 15:33.
Ebongi mpe kolóna ezaleli malamu na elimo. Topesa nzela te na makambo ya mokili ete epɛngwisa makanisi na biso. Kasi tosɛnzela ntango nyonso ete tokólisa ‘liso malamu.’ (Matai 6:19-24) Na ndakisa na Yesu Klisto, tosengeli mpe koyekola kolinga boyengebene mpe koyina kotyola mibeko. (Baebele 1:9, MN) Wana ezali mwa makambo oyo makosalisa biso na kobatela moláto na etumba ya elimo oyo Nzambe apesi biso ete molongwa na biso te.
Nsima na kotanga eteni moko na moko ya moláto na etumba ya elimo, Paulo asukisi na maloba oyo ete: “Na motindo na mabondeli nyonso mpe na malɔmbɔ, bobondelaka na mabaku nyonso kati na elimo. Mpe mpo na yango, bomisɛnzela na etingya mingi mpe na malɔmbɔ mpo na basantu nyonso.” (Baefese 6:18, MN) Basodá ya sembo bakozalaka ntango nyonso na boyokani na esika na bango ya mosala mpe bakotosaka mitinda. Biso oyo tozali basodá baklisto, tosengeli kozala ntango nyonso na boyokani elongo na Jéhovah Nzambe, Moyangeli na biso, na nzela na Yesu Klisto, oyo ye asili kotya “mokambi na bikólo.” (Yisaya 55:4, MN) Tokoki kosala bongo na mabondeli ya likolólikoló te, kasi na malɔmbɔ na sembo oyo mazali komonisa boyokani na biso malamu elongo na Jéhovah mpe na bokangami na biso ya mozindo mpo na ye. Na kosololáká mbala na mbala elongo na Jéhovah, tozali kozwa makasi mokolo na mokolo mpo na kolanda kobunda.
Yesu alobaki ete: “Ngai nasili kolónga mokili.” (Yoane 16:33, MN) Jéhovah mpe alingi ete biso tozwa elónga. Wana liwa na ye likómaki pene, Paulo akokaki koloba ete: “Nasili kobunda etumba malamu, napoti kino nsuka na emekaneli na mbango, nasili kobatela kondima.” (2 Timoté 4:7, MN) Tokoki nde koloba motindo moko mpo na lolenge oyo tozali kosangana na etumba! Soki yango ezali mposa na biso mpenza, boye ‘totɛmɛla mayele mabe ya Diable’ na kobateláká moláto mobimba na etumba na Nzambe ete molongwa na biso te.—Baefese 6:11, MN.