Tokumisa mokili ya sika ya Nzambe epai bonsomi ya solo bokozala wana
“[Nzambe] akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te; na mawa, na kolela, na mpasi, lisusu mpe te.”—EMONISELI 21:4.
1, 2. Nani, mpe bobele nani akoki kopesa bonsomi ya solo, mpe kati na Biblia, tokoki koyekola nini na ntina na Ye?
LISOLÓ na bato lisili komonisa bosolo ya makambo oyo mosakoli Yilimia alobaki, ete: “Nzela na moto ezali kati na ye moko te, ekoki na motamboli te ete atambolisa makolo na ye moko.” Nani, mpe bobele nani akoki kotambwisa moto na lolenge lobongi? Yilimia akóbaki na maloba oyo ete: “Ɛ Jéhovah, sembola ngai.” (Yilimia 10:23, 24) Ya solo, bobele Jéhovah nde akoki mpenza kolongola bato na makambo oyo mazali konyokola bango.
2 Biblia epesi ebele na bandakisa emonisi ete Jéhovah akoki kopesa bonsomi epai na baoyo bazali kosalela ye. “Makambo nyonso makomamaki na ntango na kala, ezalaki mpo na kolakisa biso ete tozwa elikya mpo na mpiko na biso, mpe tozwa libɛɔndisi liuti na Makomami.” (Baloma 15:4, MN) Lisusu, bikateli ya Jéhovah na ntina na losambo ya lokutá bisilaki kokomama, mpe bizali “likebisi mpo na biso oyo tobɛlɛmi na nsuka ya ebongiseli ya biloko oyo.”—1 Bakolinti 10:11, MN.
Asikoli libota na ye
3. Lolenge nini Jéhovah amonisaki makoki na ye ya kosikola libota na ye longwa na Ezipito?
3 Makambo mabimaki na ntango libota na kala na Nzambe lizalaki na boombo na Ezipito, mazali oyo ndakisa emonisi ete Nzambe akoki koboma losambo ya lokutá mpe kosikola baoyo bazali kosala mokano na ye. Totangi na Exode 2:23-25 ete: “Babelelaki ete basungama mpe kolela na bango kati un boombo ekómaki epai na Nzambe ya solo. Nzambe ayokaki kokimela na bango.” Komonisáká nguya na ye monene likoló na banzambe ya lokutá ya Ezipito, Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso ayeisaki malózi zomi likoló na ekólo wana. Bolózi moko na moko ezalaki na mokano ya kokitisa nzambe mokomoko ya Ezipito; yango emonisaki ete Baezipito bazalaki kosambela banzambe ya lokutá, baoyo bakokaki kosunga bango te. Na bongo, Nzambe asikolaki libota na ye, mpe abomaki Farao mpe mapinga na ye kati na la mer Rouge.—Exode, mokapo 7 kino 14.
4. Mpo na nini Nzambe azangaki sembo te wana abomaki Bakanana?
4 Na ntango Nzambe akɔtisaki Yisraele na Kanana, bafandi ya mokili wana baoyo bazalaki kosambela bilimu mabe, babomamaki mpe mokili yango mapesamaki epai na libota na Nzambe. Lokola azali Nkolo moyangeli na molóngó mobimba, Jéhovah azali na lotómo ya koboma mangomba ya mabe. (Genese 15:16) Mpe tala oyo elobami na mokanda Manuel biblique (angl.) ya Halley, na ntina na lingomba ya Bakanana: “Losambo lopesamaki epai . . . na banzambe ya Bakanana ezalaki na bilambo ya lokoso; batempelo na bango ezalaki bisika na kosala mabe. . . . Bakanana bazalaki kosambela banzambe na bango na kosalaka misala na mbindo liboso na banzambe yango, misala oyo mitalelamaki lokola milulu ya losambo. Bazalaki mpe koboma bana na bango ya liboso oyo bango bazalaki kopesa lokola mbeka epai na banzambe wana. Emonani lokola ete mboka mobimba ya Kanana ekomaki mpenza motindo mosusu ya Sodome mpe Gomore.” Ebakisi ete: “Bato na mbindo mpe banyokoli bakokaki nde koumela ntango molai? . . . Bakundoli na biloko na kala baoyo bazalaki kokokisa mosala na bango na bingumba ya Kanana, bazali kokamwa na lolenge oyo Nzambe abomaki bango noki te.”
5. Likambo oyo ete Nzambe asikolaki libota na ye ya kala, epesi ndakisa nini mpo na eleko na biso?
5 Lisoló oyo tomoni ete Nzambe akweisaki losambo ya lokutá, asikolaki libota na ndaká mpe apesaki yango mabelé na ndaká, ezali ndakisa mpo na makambo makoya. Ezali komonisa makambo oyo makosalema mosika te: Nzambe akoboma mangomba ya lokutá ya mokili oyo mpe bandimi na yango, mpe akokɔtisa basaleli na ye ya ntango na biso kati na mokili ya sika epai boyengebene bokozala wana.—Emoniseli 7:9, 10, 13, 14; 2 Petelo 3:10-13.
Bonsomi ya solo kati na mokili ya sika molakami na Nzambe
6. Bonsomi nini kitoko oyo Nzambe akopesa na bato kati na mokili ya sika?
6 Na mokili ya sika, Nzambe akopesa bonsomi na libota na ye, na motindo na yango nyonso kitoko oyo akanaki kopambola bato. Bato bakosikolama na monyoko na makambo ya politike mpe na nkita, mpe na monyoko ya mangomba ya lokutá. Bato bakosikolama na masumu mpe na liwa, mpe bakozwa elikya ya kozala na bomoi ya seko awa na mabelé. “Bayengebene bakosangola mokili, mpe bakofanda wana libela.”—Nzembo 37:29; Matai 5:5.
7, 8. Lolenge nini kolongono na nzoto ya kokoka ekozwama kati na mokili ya sika?
7 Mwa moke nsima wana mokili yango ya sika ekosila kosalema, bato oyo bakofanda wana bakozwa kolongono na nzoto ya kokoka na likamwisi. Totangi na Yobo 33:25, ete: “Tika ete mosuni na ye eleka yango na elenge na kitoko, azonga na mikolo na bolenge na ye.” Yisaya 35:5, 6 epesi eleká oyo: “Na ntango yango, miso na bakufeli miso makofungwama, mpe matoi na bimimi makozipwama; bongo, motɛngumi akopumbwa lokola mboloko, mpe lolemo na ebubu ekoyemba na esengo.”
8 Bino baoyo bozali na mpasi ndenge na ndenge, mpo na mbula na bino soko mpo na kolongono mabe na nzoto, bokanisaka ete bozali kati na mokili ya sika wana ekolamuka bino ntɔngɔ nyonso na kolongono na nzoto malamu mpe na makasi. Mposo ya elongi na bino efinani ekokóma kitoko mpe sɛmbɛsɛmbɛ: bokozala na mposa ya mafuta ya kopakola na nzoto te. Miso na bino mazangi komona malamu, to makomonaka lisusu te, makobanda komona na motindo na kokoka: okozala na mposa ya maneti te. Matoi na bino makoyoka malamu koleka: okolongola biyokeli bisalemi na masini. Biteni na nzoto na bino bizali sikawa na bolɛma, bikokóma makasi mpe malamu: banzeté na kotɛnguma mpe bakiti na batɛngumi ikobwakama! Maladi ekozala te: okobwaka bankisi nyonso. Mpo na yango, tozali na esakweli oyo na Yisaya 33:24, ete: “Mofandi moko te akoloba ete: ‘Nazali maladi.’” Mosakoli alobi lisusu ete: “Bakozwa esengo mpe bakosepela, mawa mpe kokimela ekokima mbango.”—Yisaya 35:10.
9. Lolenge nini bitumba bikosilisama mpo na libela?
9 Moto moko te ekobomama lisusu na etumba. “[Nzambe] akosukisa bitumba kino nsuka na mokili; akobukabuka litimbo mpe akokatakata likɔnga, akozikisa mpe mpe makálo.” (Nzembo 46:9) Yesu Klisto, mokonzi ya Bokonzi na Nzambe, ye oyo abéngami “Nkolo na kimya” na Yisaya 9:6, akotika te ete bibundeli ya bitumba bizala wana. Verset 7 ebakisi ete: “Kofuluka na bokonzi na ye mpe kimya ekosuka te.”
10, 11. Kimya kati na makambo nyonso ekolimbola nini mpo na mabelé?
10 Oyo nde mapamboli makozala mpo na bato, mpe mpo na mabelé, na kosikolama longwa na bibundeli ya bitumba! Soki tokanisi lelo mpo na bibundeli bisalelamaki na bitumba ya liboso nde bizali naino koboma bato! Na mboka lokola France, uta 1945, koleka bato 600 oyo bakokundolaka ba mines (lolenge na bombe oyo ekopanzanaka na etando moke) bakufaki wana bamekaki kolongola ba mines oyo ekundamáká na ntango na bitumba ya liboso. Mokambi na ekipe moko ya bakundoli mines alobaki ete: “Tozali naino kokuta masasi ya etumba esalemaki kati na France mpe mboka Prusse, na 1870. Mabéké matondi na ba grenades ya Etumba ya Liboso ya mokili mobimba. Mbala na mbala, wana mokati bilanga moko aleki na traktere na ye likoló ya mine oyo babéngi ete antichar, oyo bakundaki na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, mine yango ezali kopanzana! Mpe moto akokufa. Motindo na makambo yango mazali kosalema mbala mingi.” Ekokisi mbula mibale, zulunalo The New York Times elobaki mpo na yango na sikisiki ete: “[Na France], katikati na bambula 45 oyo elandaki nsuka ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, [bikipe ya bakundoli na mines] balokɔtaki bamilió zomi na motoba ya masasi, 490 000 ba bombes mpe 600 000 ba mines oyo ekundamaki na nsé na mai. . . . Ebele ya [ba hectares] etikali etimolamaki te, ezingami na bapanó ityami makomi oyo ete: ‘Keba! Mabelé mapekisami.’”
11 Mokili ya sika mokokesena mpenza na oyo. Moto na moto akozala na ndako na ye ya malamu, na bilei mingi mpe na mosala mokopesa esengo mpe kimya, oyo etali bongo kobongola mabelé mobimba ete makóma paradis. (Nzembo 72:16; Yisaya 25:6; 65:17-25) Bamilió na ba bombes ekokwela lisusu bato te, soko mabelé mpe te. Ezali mokili ya sika oyo nde Yesu azalaki kokanisa na ntango alobaki epai na mobali moko andimelaki ye, ete: “Okozala elongo na ngai kati na Paradis.”—Luka 23:43.
Mosala ya kolakisa na mokili mobimba mpo na kozwa bomoi
12, 13. Mosala nini ya kolakisama na mokili mobimba oyo Yesu mpe Yisaya basakolaki mpo na eleka na biso?
12 Na ntango tozali koyekola makambo matali mokili ya sika molakami na Nzambe, tozali lisusu koyekola ete na eleko na biso, Jéhovah asili kosala lisangá moko ya mokili mobimba mpo na kosalela losambo ya solo. Ekozala ebandeli ya mokili ya sika, mpe Nzambe azali kosalela yango sikawa mpo na kolakisa mikano na ye epai na bato mosusu. Lisangá wana ya boklisto lizali kokokisa mosala ya kolakisa na mokili mobimba oyo eleki kitoko mpe na etando monene. Yesu asakolaki ete ekozala bongo. Alobaki ete: “Nsango malamu oyo na Bokonzi ekosakolama na mokili mobimba lokola litatoli na mabota nyonso, mpe bongo nsuka ekoya.”—Matai 24:14.
13 Yisaya mpe alobaki na ntina na mosala yango ya kolakisa na mokili mobimba, ete: “Ekozala ete na mikolo na nsuka [na eleko na biso], ngomba na ndako na Jéhovah [losambo na ye ya solo lotombwami] ekolendisama makasi . . . mpe mabota nyonso bakokende wana. Bikólo mingi bakokenda mpe bakoloba ete: ‘Yakani, tobuta na ngomba na Jéhovah . . . ete alakisa biso banzela na ye, mpe ete totambola bipai bikokendaka ye.’”—Yisaya 2:2, 3.
14. Lolenge nini tokoki koyeba libota na Nzambe lelo oyo?
14 Mosala oyo mokokisami na mokili mobimba motali kopesa litatoli ya Bokonzi na Nzambe, mozali bongo elembo monene emonisi ete tobɛlɛmi na nsuka ya ebongiseli ya biloko mabe ya ntango oyo mpe ete bonsomi ya solo bobɛlɛmi. Baoyo bazali kokenda koyebisa bato nsango yango ya elikya na ntina na mokili ya sika molakami na Nzambe, bamonisami na Misala 15:14 lokola “bato mpo na nkombo na ye [Nzambe].” Banani babengami na nkombo ya Jéhovah mpe bazali kopesa litatoli na mokili mobimba mpo na Jéhovah mpe Bokonzi na ye? Lisoló na bato na ekeke ya ntuku mibale liyanoli ete: bobele ba Témoins de Jéhovah nde bazali kosala yango. Lelo oyo, bazali koleka bamilió minei kati na masangá koleka 66 000 na mokili mobimba.—Yisaya 43:10-12; Misala 2:21.
15. Na ntina etali makambo ya politike, na likambo nini tokoki koyeba basaleli ya solo na Nzambe?
15 Na Yisaya 2:4, tozali kokuta elembeteli mosusu emonisi ete ba Témoins de Jéhovah bazali kokokisa bisakweli bitali kosakolama ya Bokonzi: “Bakotula mipanga na bango ete mizali bitimweli, mpe makɔnga na bango ete mazala bikateli na matiti. Libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te.” Na yango, baoyo bazali kokokisa mosala ya kosakola na mokili mobimba na ntina etali lolenge oyo Bokonzi na Nzambe bokoyangela, basengeli te ‘koyekola etumba.’ Yesu alobaki ete, basengelaki “kozala bato ya mokili te.” (Yoane 17:16) Na bongo, esengeli na bango ete bakɔta na makambo ya politike te mpe bakɔta na koswana na bikólo te mpe na bitumbu na bango. Banani basangani na mokili te mpe bazali koyekola lisusu etumba te? Lisoló na bato na ekeke ya ntuku mibale limonisi na mbala oyo lisusu ete: bobele ba Témoins de Jéhovah.
16. Mosala na kolakisa motambwisami na Nzambe na mokili mobimba, mokozwa etando nini?
16 Mosala ya kolakisa ya ba Témoins de Jéhovah na mokili mobimba mokolanda kokokisama ata nsima wana Nzambe akotya nsuka na ebongiseli ya biloko mabe ya ntango oyo. Totangi na Yisaya 54:13, ete: “Bana na yo nyonso bakolakisama na Jéhovah.” Kolakisama wana ekozala ya kokoka mpenza kino Yisaya 11:9 esakolaki ete: “Mabelé mobimba makotónda na boyebi ya Jéhovah lokola kotonda na mai monene.” Ezali te bobele bato oyo bakobika na nsuka na mokili oyo monuni mpe bana oyo bakobotama na mokili ya sika nde bakolakisama ntango nyonso, kasi ekozala mpe na bamiliare ya bato oyo bakosekwa. Mokemoke, bato nyonso oyo bakofanda na mabelé bakoyeba kosalela lotómo na bango ya kopona oyo balingi na lolenge malamu, kati na bandelo oyo etyami na mibeko na Nzambe. Matomba nini makozwama? “Bato na bopɔlɔ bakosangola mokili, mpe bakosepela na kimya mingi.”—Nzembo 37:11.
Bonsomi mingi kobanda lelo oyo
17. Etinda nini Moize apesaki epai na libota na Nzambe ya ntango na kala?
17 Na ntango na kala, wana Bayisraele bazalaki pene na kokɔta na Mabelé na ndaká, Moize alobaki na bango ete: “Tala, nasili kolakisa bino mibeko mpe malako, lokola Jéhovah Nzambe alakaki ngai ete bosala yango na mokili oyo bolingi koingela mpo na kokamata yango. Botósa yango mpe bosala yango, mpo ete yango ekomba bwanya na bino mpe mayele na bino na miso na bato oyo bakoyoka mpo na mibeko oyo nyonso, mpe bakoloba ete: ‘Solo libota oyo ezali libota ya bwanya mpe na mayele.’ Mpamba te libota monene nini lizali na banzambe penepene na bango, lokola Jéhovah, Nzambe na biso, oyo azali na biso ntango nyonso oyo tokobyanga ye?”—Deteronome 4:5-7.
18. Bonsomi nini monene bozwami na bato oyo bazali kosalela Nzambe uta sikawa?
18 Lelo oyo, bamilió na bato oyo bazali kosambela Jéhovah bazali mpe pene na kokɔta na mabelé na ndaká: mokili ya sika. Mpo ete bazali kotósa na mibeko na Nzambe, ye azali pene na bango mpe bakeseni na mabota nyonso mosusu. Nzambe asili kosikola bango na makanisi ya lokutá ya mangomba na koponapona na mposo, na drogue, na kokabola bikólo, na bitumba mpe na bamaladi ezwami na kosangisa nzoto. Oyo eleki mpenza, asili kosangisa bango na mabelé mobimba kati na bolingo ya bandeko. (Yoane 13:35) Na esika na kotungisama mpo na mikolo mizali koya, bazali ‘koyemba na esengo, mpo na ezalela malamu ya motema na bango.’ (Yisaya 65:14, MN) Oyo nde bonsomi monene bazali na yango sikawa mpo ete bazali kosalela Nzambe lokola Mokonzi!—Misala 5:29, 32; 2 Bakolinti 4:7; 1 Yoane 5:3.
Bato mosusu basengeli kosikolama na bindimeli ya lokutá
19, 20. Lolenge nini bato basikolami na mateya na Biblia na ntina na ezalela ya bakufi?
19 Ba Témoins de Jéhovah bazali kosakola epai na bato mingi oyo bazali kozwa bonsomi na nzela yango. Na ndakisa, kati na mikili epai bazali kosambela bankoko, ba Témoins de Jéhovah bakomonisaka ete bakufi bazali na bomoi na esika moko te mpe bakoki te kosala mabe epai na bato na bomoi. Ba Témoins de Jéhovah batangaka Mosakoli 9:5, oyo elobi ete: “Bato na bomoi bayebi ete bakokufa; nde bakufi bayebi likambo te.” Batangaka lisusu Nzembo 146:4, oyo elobi ete na ntango moto akufi, “akozonga na mabelé; bobele na mokolo yango, makanisi na ye masili.” Biblia emonisi bongo ete, elimá moko ezali te soko mpe molimo mozangi kokufa oyo ekobikisaka bato na bomoi, to mpe kobangisa bango. Mpo na yango, ezali na ntina te na kobebisa mosolo oyo mozwamaki na mpasi mpo na kofuta banganga-nkisi to mpe basángó.
20 Boyebi ya solo oyo ya Biblia bozali kosikola bato na mateya ya lokutá na ntina na lifelo ya mɔ́tɔ mpe epongelo. Na ntango bato bazali koyekola solo kati na Biblia na ntina na bakufi ete: bayebi likambo te, lokola nde balali mpɔngi, bato yango bazali komitungisa lisusu te mpo na oyo esili kokómela balingami na bango oyo basilá kokufa. Na esika na kosala bongo, bazali nde kozela eleko kitoko oyo ntóma Paulo alobelaki ete: “Lisekwa likozala mpo na bato na sembo mpe na bato bazangi sembo.”—Misala 24:15.
21. Bato nini bakozala mpenza kati na basekwi, mpe emonani mpenza ete bakozala na mayoki nini?
21 Na ntango na lisekwa wana, bakufi bakozonga na bomoi awa na mabelé makosikolama libela na liwa liuti na Adam. Ntembe ezali te ete, bana oyo bapesamaki lokola mbeka epai na banzambe ya bato na Kanana lokola Moleke, bilenge oyo babomamaki mpo na banzambe ya ba Aztèques, mpe bamilió mingi ya bato oyo babomamaki na nzambe ya etumba, bakozala kati na basekwi. Oyo nde esengo mpe bolamu ekozala mpo na bato oyo liboso bazalaki baombo na bindimeli ya lokutá! Basekwi wana bakoloba na esengo nyonso ete: “Ɛ kufa, wapi bitubeli na yo? Ɛ nkunda, wapi libebi na yo?”—Hosea 13:14, MN.
Luká Jéhovah
22. Likambo nini tosengeli kobosana te soki nde tolingi kofanda kati na mokili ya sika ya Nzambe?
22 Olingi kofanda kati na mokili ya boyengebene molakami na Nzambe, mokili ya sika epai bonsomi ya solo bokozala wana? Soki ezali bongo, bombá maloba oyo makomami na 2 Ntango 15:2 ete: “Jéhovah azali na bino elongo wana bino bozali na ye elongo. Soko bokoluka ye, akozwana na bino, nde soko bokotika ye, akotika bino.” Mpe kobosana te ete milende oyo ozali kosala mpo na koyeba Nzambe mpe mpo na kosepelisa ye, ekozala mpamba te. Baebele 11:6 elobi ete Nzambe “akozongisa libonza epai na baoyo bakolukaka ye mpenza.” Mpe tozali kotanga na Baloma 10:11 (MN) ete: “Moto na moto oyo akondimela ye akooka nsoni te.”
23. Mpo na nini tosengeli kokumisa mokili ya sika molakami na Nzambe?
23 Mokili ya sika na Nzambe epai bonsomi ya solo bokozanla wana, mozali liboso na biso. Kati na mokili wana, “biloko bizalisami mpe bikosikwa na boombo ya libebi mpo na kozwa bonsomi mi nkembo ya bana na Nzambe.” “[Nzambe] akolongola mpisoli nyonso na miso na bango, mpe kufa ekozala lisusu te, na mawa, na kolela, na mpasi lisusu mpe te.” (Baloma 8:21, MN; Emoniseli 21:4) Na bongo, basaleli nyonso na Jéhovah bakotómbola mitó mpe bakokumisa mokili ya sika na Nzambe na esengo nyonso epai bonsomi bokozala wana, ete: ‘Botɔndi epai na yo, Jéhovah, lokola opesi biso bonsomi ya solo oyo tozelaki uta kala!’
Bozongeli
◻ Lolenge nini Jéhovah amonisaki makoki na ye ya kosikola libota na ye?
◻ Mokili ya sika mokozala na bonsomi nini kitoko?
◻ Lolenge nini Jéhovah azali kolakisa libota na ye mpo na kozwa bomoi?
◻ Bonsomi nini bozwami na libota na Nzambe uta sikawa na kosaleláká Jéhovah?
[Elilingi na lokasa 10]
Jéhovah amonisaki makasi na ye likoló na banzambe ya lokutá ya Ezipito na kosikoláká basaleli na ye
[Bililingi na lokasa 12, 13]
Lelo oyo, basaleli ya solo na Nzambe bayebani mpo ete bazali kokokisa mosala ya kolakisa oyo ye apesaki na mokili mobimba, mpe bazali komema nkombo na ye