Masoló ya basakoli na bokonzi
Mosala ya kosakola kati na bateritware epai lisangá lizali te na mboka Paraguay, ezali kobota mbuma
Filiale ya la Société Watch Tower na mokili ya Paraguay esosoli mpenza ntina ya kosakola nsango malamu ya Bokonzi na teritware na yango mobimba. (Misala 1:8) Oyo ezali ntango mpo na bato nyonso ete bayeba ndimbola ya Bokonzi na Nzambe mpe basalela Jéhovah liboso ete asukisa ebongiseli oyo ya biloko mabe na “bolózi monene” oyo ezali koya. (Matai 24:21, 22) Masoló malandi mamonisi makambo masili kosalema mpo na kosalisa bato na bateritware epai basakoli bazali te. Filiale eyebisi ete:
Bibongiseli bikamatamaki mpo ete ba pionniers spéciaux basakola na boumeli ya ntango mokuse na bateritware nyonso oyo epesami naino na basakoli te. Kobanda sanza ya novembre kino janvier ya mbula ya mosala 1990, bandeko 39 mibali mpe basi basakolaki na bingumba monkámá ya minene mpe ya mike, epai basakoli ya Bokonzi bazalaki naino te. Bakabolaki mikanda 6 119, ba brochures 4 262 mpe bazulunalo 5 144. Bituluku mosusu ya basakoli bizali kobondisama mpo na mosala wana.
◻ Pionnier moko ya mwasi oyo azalaki kosakola na teritware moko epai basakoli bazalaki naino te, atikelaki mwasi moko mokanda Okoki kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana paradis. Pionnier wana asengaki ete ayekola Biblia elongo na ye mpe andimaki yango na esengo nyonso. Ntango azongelaki ye, akutaki mwasi wana elongo na mobali na ye mpe bana na bango zomi bazali kozela ye. Na ntango azongelaki ye lisusu, akutaki basangani ya libota na ye, baninga na bango mpe baninga na bango ya pembeni bamibongisaki mpo na boyekoli ya Biblia! Mwasi wana abyangaki bango kolobáká ete boyekoli ya Biblia ezalaki malamu mingi mpe ete elikya mpe bolamu oyo Jéhovah azali kopesa ezali kitoko mingi. Lokola ezalaki nsango malamu oyo ayokaki naino yango te, amonaki malamu ete bazalani na ye mpe baninga na ye bayoka mpe yango.
Mbala nyonso oyo pionnier azalaki kotambwisa boyekoli, motuya ya bayangani na boyekoli yango ezalaki lokola na lisangá ya moke. Bato yango basepelaki na nsango malamu, bazalaki kotuna mituna mingi mpe bazalaki mpenza kosangana na boyekoli. Wana ndeko mwasi pionnier ayebisaki bango ete ye mpe baninga na ye bakokenda na etuká mosusu soki basilisi kosakola na teritware epai bazali, mwasi wana ayokaki mawa mingi na motema mpe atunaki soki basengelaki kosala nini. Bibongiseli bikamatamaki mpo ete bandeko mibali oyo bazali na lisangá ya penepene balanda kotambwisa boyekoli yango. Sikawa ba pionniers spéciaux basilaki kotindama mpo na kosalisa bato wana ya motema malamu baoyo bakokani na bampate.
◻ Wana ezalaki ye kosakola ndako na ndako na teritware epai basakoli bazali te, pionnier moko ya mwasi akutanaki na mobali moko oyo asilá kosomba mokanda Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko soko mbula zomi na liboso. Uta ntango wana, azalaki lisusu kokutana na ba Témoins de Jéhovah te. Atako bongo, ayebaki ete Jéhovah, oyo ye azalaki kobénga Jéhovah na bibele, azali Nzambe bobele moko ya solo mpe bobele ye nde asengeli kosambelama. Na mokano na ye moko azalaki koloba ya ntina na Jéhovah epai na bato nyonso oyo ayebanaki na bango. Na bongo, poso na poso, azalaki kosala bakilometele misato mpo na kotala babalani oyo bazalaki kosepela na nsango malamu mpe kolobela bango na ntina na Nzambe, mpo azalaki koloba ete: ‘Soki natiki kokenda kotala bango, bakobosana Jéhovah.’ Longola babalani wana, bato mingi mosusu balingaki koyekola Biblia, nyonso wana mpo ete mobali yango asakwelaki bango.
Likambo ya kokamwa lisalemaki, liboso ete pionnier wana ya mwasi akutana na ye: mobali yango aboyaki ete sangó ya mboka wana mpe bato oyo bazalaki elongo na ye, bakɔta epai na ye na ekeko ya Ngondo Maria, kolimboláká ete ye andimaka bikeko te. Sángó asilikaki makasi. Na mpokwa wana, mobali yango abondelaki Jéhovah ete asalisa ye. Kanisa naino mayoki mpe esengo oyo azalaki na yango na ntango pionnier wana ya mwasi akómaki epai na ye! Bibongiseli bikamatamaki nokinoki mpo ete ayekola Biblia na lolenge lobongi, mpe azali sé kokóla na kosanganáká elongo na basangani ya lisangá ya teokratike.
Ya solo, Jéhovah azali kopambola mosala ya koyanganisa bato na mboka Paraguay, wana bandeko bazali kotya molende na kopesa litatoli ya mozindo na bateritware oyo epesami naino na basakoli te.—Matai 24:14.