Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w92 15/2 nk. 19-20
  • Mokanda ya sika oyo mozali kosepelisa bato mingi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mokanda ya sika oyo mozali kosepelisa bato mingi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Ebandeli ya mokanda yango
  • Ezali elendiseli mpo na kondima
  • Esalelami na mitindo mikeseni
  • Makambo na kitoko mingi
  • Tózwa matomba na botángi ya Biblia mokolo na mokolo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
  • ‘Mposa ya koluka koyeba na motema mpe na makanisi’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1999
  • Tóbyanga bazalani na biso ete bálanda moto oyo alekaki bato nyonso
    Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • “Ekokisi mposa moko ya motema na ngai”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
w92 15/2 nk. 19-20

Mokanda ya sika oyo mozali kosepelisa bato mingi

NA BA assemblées “Baninga na bonsomi” oyo ebandaki na juin eleki, bayangani bayokaki diskur kitoko na motó na likambo ete “Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo.” Likambo na esengo mingi lizalaki bongo kosakolama mpo na kobima ya mokanda oyo mozalaki bobele na titre wana. Koleka bamilió motoba ya bato kati na mokili mobimba basili koyangana na ba assemblées yango mpe bayokaki diskur yango, oyo ebimisami nde ebongwani mwa moke kati na masoló mibale oyo mazwami liboso ya lisolo oyo na zulunalo oyo.

Koleka bamilió 12 ya ba ekzamplere ya mokanda Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo esili konyatama soko na minoko koleka ntuku motoba. Ebimisami ata na minoko ya Europe de l’Est: albanais, croate, hongrois, macédonien, polonais, russe, serbe mpe slovène. Soki ezali na bato basepelaki mpenza mpo na kozwa yango na monoko ya russe, mingi mpenza ezali bato koleka 74 000 oyo bazalaki na ba assemblées nsambo ya Union soviétique.

Ebandeli ya mokanda yango

Makambo mazali kati na mokanda yango masilá kobima ndambondambo kati na banimero 131 elandanaki na Mosenzeli, kobanda le 1er janvier 1986. Batangi mingi bamonisaki mawa na bango na komona ete kolandana ya masolo yango esukaki na nimero ya le 1er juin 1991. Melissa, elenge mwasi Moitalia ya mibu 12, alelaki na ntango atangaki lisoló ya nsuka kati na Mosenzeli. Alobi ete: “Na mokolo mozalaki liboso na assemblée, nabondelaki Jéhovah, mpe nalɔmbaki ye mokanda moko likoló na bomoi na Yesu. Na ntango basakolaki kobima ya mokanda wana, nabɛtaki mabɔkɔ kino nazalaki kooka lisusu mpasi te na mabɔkɔ.”

Masoló mabimaki kati na Mosenzeli masangisamaki na mikapo 133 kati na mokanda yango ya nkasa 448, mpe na bililingi kitoko. Tolakisaki badiskur nyonso oyo Yesu asalaki mpe makambo nyonso masalemaki na bomoi na ye awa na mabelé, bakisa mpe masese mpe makamwisi na ye nyonso. Masoló nyonso mayebisamaki na kolanda ntango oyo yango esalemaki. Na nsuka na mokapo moko na moko, balakisi mikapo ya Biblia epai lisoló lizwamaki.

Ozali nde koloba ete osilá kotanga mokanda yango mpamba te otangaki masoló nyonso mabimaki kati na Mosenzeli? Na kotangáká Mosenzeli, tozwaki lisoló ya bomoi na Yesu bobele ndambo, eteni moko na moko ezalaki kobima nsima na mikolo zomi na mitano na boumeli ya mbula mitano na ndambo. Ya solo, masoló wana mazalaki na mateya malamu, kasi ekozala malamu kotanga bomoi mobimba na Yesu na mbala moko, mpo na kozwa likanisi mobimba na ntina na moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo!

Ezali elendiseli mpo na kondima

Mwasi Moameriké moko ya Washington, ayebisi ete: “Nasilisaki kotanga yango nsima na poso mibale. Na boumeli ya botangi na ngai, mpisoli ezalaki kobima. Natikaki kotanga mpe nabondelaki wana ezalaki ngai kolela. Nazalaki koyoka lokola nde nazalaki elongo na Yesu, kooka mpasi esika moko na ye. Ata poso moko nsima na kosilisa kotanga mokanda yango, miso na ngai matondaki lisusu na mpisoli wana ezalaki ngai kokanisa makambo oyo natangaki. Nazali lisusu kotɔndo Jéhovah lokola akabaki Mwana na ye.”

Mwasi Moameriké moko ya Pittsburgh akomaki ete: “Nauti kosilisa botangi ya mokanda molobeli Yesu bobele lelo. Ezali kitoko mingi. Wana ezalaki ngai kotanga mikapo ya nsuka, mpisoli ezalaki kobima na miso. Nasepelaki kotanga mokanda yango bobele mbala moko. Nakoki te kolimbola mayoki oyo nazali na yango, kasi nalingaki yango mingi!”

Bililingi kitoko ya mokanda wana bizali kosimba makanisi. Motangi moko na botɔndi, akomaki ete: “Nazali koyoka wana ezali bango kolela liwa ya mwana (mokapo 47), nazali kokanisa motindo moko na Yesu wana mwasi oyo azalaki kobima makila asimbaki ye mpe abikaki (mokapo 46). Ezalela ya bilongi na bango emonisami na lolenge ya solo kino ekoki kobulunganisa yo . . . . Na esika ete botangi na yango elɛmbisa, mokanda wana mozali lokola kominanola to elendiseli na nsuka ya mokolo. Motindo kitoko oyo mokanda yango mokomami, eyebisi biso te bobele makambo oyo Yesu asalaki, kasi ezali mpe kopesa biso likanisi ya makambo akanisaki mpe mayoki na ye.”

Esalelami na mitindo mikeseni

Mingi basili kosalela mokanda yango kati na boyekoli ya libota na bango. Babalani mibale ya Amerike, bakomaki ete: “Tozali na bana mike misato, mpe mokanda oyo mozali malamu mpo na ‘boyekoli ya mpokwa kati na libota’ na biso. Ezali malamu na koyekola na bozindo, makambo oyo Yesu Klisto, Mokonzi na biso na bolingo, akutanaki na yango.”

Elenge mwasi moko Mojaponé alimboli ete: “Tata na ngai azali kotangela biso yango na mpokwa, wana tozali kominanola nsima na kolya. Elongo na libota, tobandaki yango uta na ebandeli, kasi ngai nabandaki yango longwa na nsuka mpe nazali kotanga mokapo moko na mpokwa nyonso liboso na kolala. Tala: ezali kosimba motema na motindo boye ete nayebaka te wana ngonga ezali koleka mpe mbala mingi ezalaka 1 heure ya ntongo ntango nakangaka yango.”

Makanisi mingi mapesami kati na masoló wana mazali kokamwisa bato mingi. Témoin de Jéhovah moko ya mwasi akomaki ete: “Nasili koyekola makambo mingi mpenza.” Mpe tala mwa maloba ya mokanda oyo mokomamaki na bato ya Californie: “Mwasi na ngai mpe ngai moko, tozali kati na solo uta koleka mibu 35, mpe tokoki koloba na sembo nyonso ete tozwa naino te mokanda kitoko lokola oyo wana.”

Epai mosusu, mokanda yango mokosalisa mpo na kokweisa makanisi ya baoyo bakolobaka ete ba Témoins de Jéhovah bandimaka Yesu te. Motangi moko amonisaki botɔndi na ye na maloba oyo: “Nakokaki kotika yango te, mpo ete emonisaki kozanga boyebi ya baoyo bakolobaka ete basaleli na Jéhovah bandimaka Yesu te to bakumisaka ye te. Etikali na biso bobele ete, topesa bango eyano oyo na mabɔkɔ mpo na kozanga boyebi na bango.”

Na ntembe te, mokanda oyo mokozala na ntina mingi kati na mosala ya kosakola ya ba Témoins de Jéhovah. Moklisto mwasi moko akomaki ete: “Napesaki yango epai na mwasi moko nayekolaka Biblia elongo na ye, mpe bopusi oyo [mokanda wana] ezali na yango epai na ye, ezali likamwisi. Azali koyekola Biblia uta mobu moko, kasi nazalaki na nkaká mpo na kobénga ye ete ayangana na makita.” Moklisto mwasi wana alimboli ete: “Nsima na kotanga mikapo 45 ya mokanda wana ya sika, [mwasi yango] alobaki na ngai ete akoyangana na likita ya dimanche mpamba te ntango ekokaki ete azwa ekateli.”

Makambo na kitoko mingi

Na elobeli mosusu, mokanda Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo mozali komantere ya Baevanzile. Makambo mingi oyo Yesu alobaki mpe ateyaki malimbolami kati na yango: ekozala malamu mingi wana ezali yo kosala bolukiluki, mpamba te ezali mpenza kolanda masoló ya Biblia.

Likambo mosusu ya kitoko mingi: oyo eleki mpenza ezali ete, masolo nyonso mayebisami na kolanda ntango likambo moko na moko lisalemaki. Koyebáká yango, tokoki koyeba na ntango nini likambo boye to boye lisalemaki kati na mosala na Yesu wana ezali biso kofungola nkasa ya mokanda yango. Soki moto atangi Baevanzile, mbala mingi akokuta makambo mosusu oyo mamonani epai na bato lokola ete ezali bongolábongola. Na ndenge yango elakisami, mokanda wana mozali kolongola bongolábongola, kozanga ete eyebisa yango polele.

Biso baklisto tokolinga te ete tomonisa bopotu na kotya likebi mpo na koyekola bomoi na Yesu Klisto. Ndakisa na biso. Na yango, totalela makanisi mingi ya masoló ya Baevanzile, na lisalisi ya mokanda na sika: Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto