Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 15/11 nk. 28-31
  • Na ndimbola nini Yesu Klisto azalaki mosakoli motindo na Moize?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Na ndimbola nini Yesu Klisto azalaki mosakoli motindo na Moize?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Babandi mosala motindo moko
  • Bango nyonso mibale bakumisaki Jéhovah
  • Bokokani mosusu monene
  • Totya likebi na bisakweli
  • Tóyeba mokumba ya Moize Monene
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Tóyeba banzela ya Yehova
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Mekolá kondima ya Moize
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
  • Mituna na batangi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 15/11 nk. 28-31

Na ndimbola nini Yesu Klisto azalaki mosakoli motindo na Moize?

JÉHOVAH NZAMBE akobukaka lokuta te.(Tito 1:2; Baebele 6:18) Na yango, bisakweli bizali kati na Liloba na ye, Biblia, bibongi na kotyela motema mpe bizali solo. Ezali mpenza kokokisama.

Kati na bisakweli bipemami na Nzambe, ezali na moko oyo ekomamaki na Moize, mosakoli Moebele, na ntina na Masiya. Kotangáká maloba na Jéhovah. akomaki ete: “Nakobimisela bango (Bayisraele) mosakoli lokola yo (moize) longwa na kati na bandeko na bango, mpe nakotya maloba na ngai kati na monoko na ye, mpe ye akolobela bango makambo nyonso oyo nakolaka ye.”​—Deteronome 18:17, 18.

Ntóma Petelo akokisaki esakweli yango epai na Yesu Klisto, wana alobaki ete: “Na yango, Moize alobaki ete: ‘Jéhovah Nzambe akobimisa mosakoli lokola ngai kati na bandeko na bino. Bosengeli koyoka makambo manso ekolobela bino.’” (Misala 3:22, MN) Yesu ye moko alobaki ete: “Soko bondimelaki Moize, mbɛlɛ bondimi mpe ngai lokola, mpo ete ye asili kokoma na ntina na ngai.” (Yoane 5:46, MN) Na ndimbola nini Yesu akokani na Moize?

Babandi mosala motindo moko

Moize mpe Yesu babikaki bango nyonso na likámá monene oyo bazalaki koboma bana mibali ya mike. Wana azalaki mwana moke, Moize abómbamaki na matiti pembeni na ebale Nil, mpe abikaki na ntango Farao apesaki etinda ete baboma bana mibali ya mike na Bayisraele. Wana azalaki mwana moke mpenza, Yesu abikaki na kobomama ya bana mibali ya mike ya mibu mibale kita na nsé, oyo esalemaki na Beteleme mpe na bamboka oyo ezingeli yango. Etinda ya koboma eutaki na mokonzi Hérode le Grand, oyo azalaki lokola Farao, monguna na Nzambe mpe libota na ye.​—Exode 1:22 kino 2:10; Matai 2:13-18.

Moize mpe Yesu bango nyonso bazalaki bato na bopɔlɔ mpe na komikitisa. Atako abɔkɔlamaki lokola mwana epai na mokonzi ya Ezipito, Moize azalaki “moto na komikitisa mingi koleka bato banso bazalaki na mokili.” (Mituya 12:3, MN) Bobele bongo, Yesu azalaki Mikaele mokonzi na nguya kati na makoló, kasi amonisaki ezaleli ya komikitisa na kokitáká awa na mabelé. (Danyele 10:13; Bafilipi 2:5-8) Lisusu, azalaki kookela bato mawa mpe alobaki ete: “Bokamata ekanganeli na ngai likoló na bino mpe bozala bayekoli na ngai; mpo ete ngai nazali na bopɔlɔ mpe na motema mosɔkɛmi, mpe bokozwa bopemi mpo na milimo na bino.”​—Matai 11:29; 14:14.

Mpo na kasalela Jehovah, Moize mpe Yesu bango nyonso mibale batikaki etelemelo na lokumu mpe bozwi monene na nsima. Moize aboyaki bozwi mpe etɛlɛmɛlo ya lokumu na Ezipito mpo na kokokisa mosala na Jéhovah mpe libota na Ye. (Baebele 11:24-26) Bobele bongo, Yesu atikaki etɛlɛmɛlo eleki na lokumu mpe atikaki bozwi mingi na likoló mpo ete asalela Nzambe mpe libota na Ye awa na mabelé.​—2 Bakolinti 8:9.

Moize mpe Yesu bango nyonso mibale bazalaki bapakolami na Nzambe. Mosakoli Moize apakolamaki na Jéhovah mpo na kosalela libota na Yisraele. Lokola ntóma Paulo alobaki yango ete, Moize “andimaki nsoni na Klisto lokola bozwi monene koleka biloko na motuya na Ezipito.” (Baebele 11:26, MN; Exode 3:1 kino 4:17) Na ntango nini Yesu akómaki Klisto oyo elimboli Mopakolami? Na batisimo na ye, na ntango apakolamaki na elimo santu, to bokasi na Nzambe bokosalaka mosala. Epai na mwasi Mosamaria, oyo azalaki na pene na etima na Yakobo na Sykare, mpe epai na nganga monene na Yisraele oyo azalaki kosambisa ye, Yesu alobaki ete ye azalaki Masiya, to Klisto.​—Malako 14:61, 62; Yoane 4:25, 26.

Moize mpe Yesu bango nyonso bakilaki bilei na boumeli ya mikolo 40. Na ebandeli ya mosala na ye lokola molobeli na Nzambe, Moize akilaki bilei na boumeli ya mikolo 40 likoló na ngomba ya Sinai. (Exode 34:28) Wana ebandaki mosala na ye ya Masiya na elaká, Yesu akilaki bilei na boumeli ya mikolo 40 kati na esobé ekauki mpe na nsima atɛmɛlaki komekama na Satana.​—Matai 4:1-11.

Bango nyonso mibale bakumisaki Jéhovah

Jehovah asalelaki Moize mpe Yesu mpo na kokumisa nkombo na Ye mosantu. Nzambe alobaki na Moize ete akenda koloba epai na Bayisraele na nkombo na ‘Jéhovah, Nzambe na bankoko na bango.’ (Exode 3:13-16) Moize azalaki momonisi na Nzambe liboso na Farao ​—oyo atikamaki na bomoi mpo ete amona nguya na Jéhovah mpe mpo ete nkombo na Mozalisi esakolama na mabelé mobimba (Exode 9:16) Bobele bongo, Yesu ayaki na nkombo na Jéhovah. Na ndakisa, alobaki ete: “Ngai nayei na nkombo na Tata na ngai, kasi boyambi ngai te.” (Yoane 5:43) Yesu akumisaki Tata na ye; ayebisaki nkombo na Jéhovah epai na bato oyo Nzambe apesaki ye mpe ayebisaki yango na mabelé mobimba.​—Yoane 17:4, 6, 26.

Na nguya na Nzambe, Moize mpe Yesu, bango nyonso mibale basalaki makamwisi oyo ekumisaki Nzambe. Moize asalaki makamwisi mpo na komonisa ete atindamaki na Jéhovah. (Exode 4:1-31) Nzambe asalelaki ye mpo na kozipola la mer Rouge, mpe akobaki kosala makamwisi oyo makumisaki Jéhovah na boumeli ya mosala na ye. (Exode 5:1 kino 12:36; 14:21-31; 16:11-18; 17:5-7; Nzembo 78:12-54) Bobele bongo, Yesu akumisaki Nzambe na kosaláká ebele na makamwisi. Kino alobaki ete: “Bondima ngai: nazali kati na Tata, mpe Tata azali kati na ngai. Soko bongo te, bondima ngai ata mpo na misala na nguya.” (Yoane 14:11, MN) Kati na makamwisi oyo asalaki, apekisaki mopɛpɛ makasi, likambo oyo lityaki kimya na libéké ya Galilai.​—Malako 4:35-41; Luka 7:18-23.

Bokokani mosusu monene

Moize mpe Yesu bakokani na likambo ya kopesa bato bilei na likamwisi. Moize azalaki mosakoli na Jéhovah na ntango bilei bipesamaki na Bayisraele na likamwisi. (Exode 16:11-36) Bobele bongo, tokoki kotanga masoló mibale kati na Biblia oyo elobeli lolenge nini Yesu aleisaki bibele na likamwisi.​—Matai 14:14-21; 15:32-38.

Mana mautaki longwa na likoló etaleli Moize mpe Yesu lokola. Moize azalaki mokambi na Bayisraele na ntango mana makitaki longwa na likoló. (Exode 16:11-27; Mituya 11:4-9; Nzembo 78:25) Lolenge moko, kasi koleka lisusu, Yesu apesaki mosuni na ye moko lokola mana eutaki longwa na likoló, mpo ete bato na batósi bazwa bomoi.​—Yoane 6:48-51.

Moize mpe Yesu bango nyonso mibale basikolaki bato na boombo. Nzambe asalelaki Moize mpo na kobimisa Bayisraele na boombo ya Ezipito, ete bazala libota na Ye ya bonsomi. (Exode 12:37-42) Bobele bongo, Yesu Klisto azali kosikola bayekoli na ye. Lisusu, akobikisa bato na botósi longwa na boombo na lisangá ya Satan le Diable, na masumu mpe na liwa.​—1 Bakolinti 15:24-26; Bakolose 1:18; 1 Yoane 5:19.

Moize mpe Yesu bango nyonso mibale bazalaki bayokanisi na kondimana. Moize azalaki moyokanisi na kondimana na Mibeko, oyo esalemaki kati na Jéhovah mpe Bayisraele. (Exode 19:3-9) Yesu azalaki Moyokanisi na kondimana na sika, oyo esalemaki kati na Nzambe mpe Yisraele na elimo.​—Yilimia 31:31-34; Luka 22:20; Baebele 8:6-13.

Bokonzi ya kosambisa epesama na Moize mpe na Yesu lokola Moize azalaki mosambisi mpe mopesi na Mibeko na Yisraele ya mosuni. (Exode 18:13; Malaki 4:4) Yesu azali Mosambisi, mpe asili kopesa mibeko mpe mitinda epai na Yisraele na elimo na Nzambe. (Bagalatia 6:16; Yoane 15:10) Ye moko alobaki ete: “Tata akosambisaka moto te, kasi asili kopesa kosambisama nyonso epai na Mwana, ete bato banso bakumisa Mwana lokola ekokumisaka bango Tata. Ye oyo akumisi Mwana te, akumisi mpe Tata te oyo atindaki ye.”​—Yoane 5:22, 23. MN.

Nzambe apesaki litambwisi ya ndako na Ye epai na Moize lolenge moko mpe mpo na Yesu. Kati na Yisraele ya kala, Moize amimonisaki moto na sembo wana ezalaki ye kotambwisa ndako na Nzambe. (Mituya 12:7) Bobele bongo, Yesu atyamaki na motó ya bana na ndako ya elimo na Jéhovah mpe amimonisaki sembo na mokumba na ye. Ya solo, Yesu “azalaki sembo epai na Ye oyo aponaki ye na mosala yango, lokola Moize kati na ndako na Ye mobimba. Mpamba te ye wana atalelami ete abongi na lokumu mingi koleka Moize, lokola motongi na ndako akozwaka lokumu mingi koleka ndako yango moko. . . . Moize azalaki sembo kati na ndako na Ye mobimba lokola mosali mpo na kotatola makambo masengelaki koya nsima, kasi Klisto azalaki sembo likoló na ndako na Ye lokola Mwana. Mpe biso tozali ndako na Ye soko tokobatela kino nsuka, bosembo na biso mpe nkembo oyo tozali kozwa na elikya.”​—Baebele 8:2-6, MN.

Bokokani ezali ata na liwa na Moize mpe liwa na Yesu. Lolenge nini bongo? Jéhovah azwaki nzoto na Moize mpo na kopɛngola ete bato batyela yango te to basambela yango mpe te. (Deteronome 34:5, 6; Yuda 9) Lolenge moko, Nzambe alimwisaki nzoto na Yesu mpe atikaki yango te ete epɔla, ete ekóma libaku te mpo na kondima.​—Nzembo 16:10; Misala 2:29-31; 1 Bakolinti 15:50.

Totya likebi na bisakweli

Touti kotalela mwa mitindo oyo Yesu Klisto amimonisaki mosakoli na lolenge na Moize. Maloba oyo Nzambe ayebisaki Moize matalelaki koya na mosakoli yango makokanaki na kitoko nyonso.

Na ntembe te, Jéhovah akokisaki elaká na ye mpe abimisaki mosakoli na lolenge na Moize. Kokokana ya maloba oyo mazwami na Deteronome 18:18 mamonani kati na bomoi mpe misala na Yesu Klisto. Mpe kokokana motindo wana ezali kopesa biso ntina ya kozala na elikya na kokokana na bisekweli mosusu bizwami kati na Liloba na Nzambe. Na bongo, totya ntango nyonso likebi na bisakweli ya Biblia.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto