Kapitɛni na basodá na bobóto, ye moto na Loma
BAKAPITƐNI na basodá ya Loma bazalaki bobóto te. Wana ezalaki ye kokamba limpinga ya basodá mokámá oyo babongisami mpo na etumba, kapitɛni asengelaki kozala mokonzi molakisi na basodá na makambo makasi, moto na bikateli makasi na ntina na discipline, mpe mbala mosusu asengelaki kozala monyokoli. Kasi, Biblia elobeli biso na ntina na moloma oyo azalaki kapitene ya limpinga ya Augusto, ye oyo amonisaki bokabi mpe motema mawa epai na ntóma Paulo. Nkombo na ye nani? Juliusu.
Biblia elobeli biso na ntina na mobali yango na Misala mokapo 27. Ntóma Paulo asɛngaki kokutana na Kaisala, na Loma. Bongo, apesamaki ye mpe bakangami mosusu na mabɔkɔ na “Juliusu, kapitɛnɛ na limpinga ya Augusto.” Bamataki masuwa longwa na Kaisalia, libóngo lizalaki na nord-ouest na Yelusaleme, oyo kaa ya basodá na Loma. Luka, mokomi na masoló ayebisi ete: “Na mokolo molandi, tosɛmaki na Sidoni, mpe Juliusu asalelaki Paulo na bobóto. Apesaki ye nzela ete akenda kotɛka baninga na ye mpo ete azwa lisungi na bango.”—Misala 27:1-3, MN.
Mpo na nini Juliusu amonisaki mpenza bobóto motindo wana? Biblia elobeli yango te. Mbala mosusu azwaki mitinda epai na moyangeli Festuse, oyo asɛngaki ye ete asalela Paulo na bobóto. To mpe, wana ayokaki nsango ya kokangama na Paulo, asepelaki na ye mingi mpo na mpiko mpe molende amonisaki. Ata ezali mpo na ntina nini, emonani ete Juliusu asosolaki ete Paulo azalaki mokangami lokola bankangami nyonso te. Atako bongo, Juliusu ayokaki Paulo te na ntango apesaki ye toli ete balongola lóngo te na libóngo ya Beaux-Ports. Nokinoki masuwa mafulamaki na mopɛpɛ makasi oyo molingaki kokakisa yango na zɛlo ya libóngo ya nordafricain. (Misala 27:8-17) Wana mopɛpɛ yango makasi mozalaki kopɛpa, ntóma Paulo atelemaki mpe alendisaki basali nyonso na mobémbo baoyo bazali kobanga ete: “Moto moko te akokufa kati na bino, bobele masuwa nde makozinda.” Kasi na nsima ndambo na basali na masuwa bamekaki kokima Paulo alobaki na Juliusu ete: “Soko bato oyo bakotikala kati na masuwa te, bino bokobika te.”—Misala 27:21, 22, 30, 31.
Na mbala oyo, Juliusu ayokelaki Paulo mpe apekisaki ete basali na masuwa bakima te. Na boyokani na oyo ntóma asakolaki, masuwa makakemaki likoló na zɛlo, epai kuna makangamaki. Mpo ete bakangami bakima te, basodá bazwaki ekateli ya koboma bango nyonso. Kasi Juliusu apekisaki bango lisusu, kobikisáká bongo bomoi ya Paulo.—Misala 27:32, 41-44.
Soko kapitene wana na boboto akómaki lolenge nini, to mpe ayambaki kondima na boklisto, Biblia elobeli biso yango te. Malamu na ye emonisaki mosala oyo mokokisami na lisosoli oyo Nzambe asilá kopesa biso. (Baloma 2:14, 15) Kasi, baklisto bazali kosala koleka likambo oyo ete kosalisa bato mosusu; bazali komonisa bobóto na boyokani na mokano na Nzambe mpe oyo ezali bongo mbuma na elimo na ye. (Bagalatia 5:22) Soki soda mopakano oyo ayebaki Nzambe te, amonisaki bobóto, basengeli mpenza komonisa ezaleli yango na motindo na koleka.