Nsango malamu ekómi na bamboka mike ya Afrika ya Ngele
Bibele na bato oyo basiliki, basodá oyo bapekisaka botomboki, ba gaz oyo esalaka mpasi na miso. Bambula oyo euti koleka, bingumba mpe bamboka mike ya Afrika ya Ngele ebebisamaki na bitumba. Ata bamboka oyo eleki kitoko epai bato koleka 40 % bafandi kuna, ebatelamaki te na kobebisama oyo eutaki na mobulu na makambo ya politike. Nzokande, kati na mobulu nyonso wana, ba Témoins de Jéhovah bazali kolanda kosakola “nsango malamu ya kimya”—Baefese 6:15.
Eleki bambula mingi wana ba Témoins bazali kosala bakampanye ya kosakola mbula na mbula kozalaka mpenza na mokano ya kokutana elongo na bafandi ya bamboka na boumeli ya sanza misato. Na ndakisa, na 1990, koleka basakoli ya Bokonzi 12 000 ya masangá 334 basanganaki na kampanye wana. Esengelaki kolónga mikakatano mingi mpo na kokóma na bamboka yango mike ezali epai na epai esika bato wana bafandi.
Moko na mikakatano yango, ba Témoins de Jéhovah basengeli komesena na bizaleli mingi mpe na minoko mikeseni. Ezali likambo moke te! Na ndakisa, okokuta bankolo bilanga baoyo bazali koloba Lingelesi, basusu afrikaans, kasi basusu Sepedi, Sotho, Tsonga, Tswana, Venda, Xhosa to Zoulou. Etuluku moko na moko ezali na bizaleli mpe na monoko bango mpenza. Esengeli mpe kosala mobembo molai na banzela etondi na mabulu. Nyonso wana esɛngi ete basakoli bazela na elimo ya komipesa mpe bandima kolekisa ntango mingi mpe mosolo mingi na mosala wana. Kasi Jéhovah apambolaki mingi mpenza milende na bango. Tika toyebisa bino mwa mikakatano mpe bisengo oyo eteni wana ya mosala ya kosakola ememaki epai na baoyo nyonso basanganaki na yango.—Tala Malaki 3:10.
“Eteyelo ya lomingo” na etuka ya Zoulouland
Na kati na ekólo mwa molunge moke ya Zoulouland ezali na lobwaku moko molai oyo etimolamuki na mongala oyo babéngi ete Umvoti. Longwa na mosika likoló na nkiteli, okomona ebele na bandako ya bazoulou oyo etongami un bisobé. Mokolo na lomingo moko na mobu 1984, basakoli mibale ya Bokonzi batambolaki na nzela ya nyokanyoka mpe ya putulu mingi oyo ezali komema na lobwaku. Mboka yango ezali na molungé mingi kino bapesaki yango nkombo Kwa-Sathane (Esika na Satan)—likanisi na liteya ya lokutá na ntina na lifelo ya mɔ́tɔ libatelami na Diable!
Na motoki na nzoto, baklisto babɛlɛmi na mwasi moko nkombo na ye Doris, oyo azalaki kotambwisa eteyelo ya lomingo. Nsima na koyoka nsango ya Bokonzi, nokinoki asɛngaki ba Témoins ete bosolola na etuluku oyo esalemaki soko na bana ntuku minei baoyo bazalaki kolanda mateya. Ebimisaki litomba nini? Poso elandaki, baklisto bazongaki na baekzamplere ntuku nsambo ya Mokanda mpo na masolo ya Biblia oyo esengelaki kosalelama na eteyelo ya mboka wana. Nsima na mwa baposo, eteyelo ya lomingo ebongwanaki na etuluku na boyekoli na Biblia. Na esika ya nzembo ya mangomba, bato nyonso bazalaki koyemba ba cantiques du Royaume na minoko ya bafriké, na koyemba moko kitoko mpo na koyoka. Etuluku wana ekolaki nokinoki kino koleka motango ya bato ntuku motoba Témoins moko angangaki na esengo ete: “Nasepeli mingi lokola nasangani na kobongwana oyo ete eteyelo ya lomingo ekómi esika na losambo ya solo.”
Kati na putulu ya mboka Bushveld
Mpo ete mangomba masanganaki na mobulu ya politike, mindele oyo bazalaki na bilanga bakómaki na bokɛngi, to ata na angele, na ntango moto moko azali kosolola na bango mpo na koyebisa bango nsango na Biblia. Bolanda oyo eyebisamaki na etuluku wana ya Johannesburg, oyo etambolaki soko na ntaká ya bakilometele 640 mpo na kokende kosakola nsango malamu kati na mboka moko na etuká ya Transvaal.
“Eleki ngonga minei sikawa uta touti kokatisa lobwaku ya Bushveld na ngambo ya nord. Nzela ya semba ezali kongɛnga mpo na moi ya Afrika, oyo ezalaki komonisa bililingi na nzela. Na pwasa, nzela ya goudron esukaki mpe tokómaki na nzela oyo etondaki na mabulu minene mpe mabulu mike. Na nsuka, tolekaki na nzela moko ya moke na zelo mingi oyo ememaki biso kino na elanga moko.
“Topesaki mbote epai na nkolo na elanga azalaki mbinga na mobali ete: ‘Mbote, Meneer (monsieur).’”
“Ayanolaki biso na nkanda ete: ‘Mbote. Bolingi nini?’
“Nsima na koyebisa nkombo na biso, tolimbolaki ntina ya vizite na biso. Wana tosilisaki koloba, abandaki kongánga ete: ‘Dominee (pasteur) na biso akebisaki ngai! Bino nyonso bozali bakoministe mpe batɛmɛli na Klisto. Bobima awa sikasikawa ete na . . . !’
“Ezaleli ya nkolo elanga wana elakisaki polele mpenza ete akokaki kosilika ntango nyonso. Tokokaki kosala lolenge mosusu te, tozwaki ekateli ya kotika ye mpe ‘topupolaki mputulu na makolo na biso.’ (Matai 10:14) Tokokaki kosala yango na ndimbola ya sikisiki mpamba te putulu ezalaki mingi na esika yango.
“Na elanga oyo elandaki, ezalaki lolenge moko. Tokangaki ntina ete pasteur ya Eglise reformée holandaise azalaki kosalela mingi telefone ya mboka wana mpo na kokebisa ‘bandimi na ye’ likoló na ‘likámá’ lizalaki koya. Na nsuka tokutanaki na nkolo ya elanga moko oyo alobaki na biso ete: ‘Ee, bokoki kosolola na basali na ngai’; atako ye moko asepelaki na nsango na biso te.
“Ezali likambo oyo tozalaki mpenza kozela. Tomonaki mwa banzete ya moboye (acacias), etuluku esalemi soko na bandako zomi etongami na lisobe‘ mpe mabelé motáne. Tozalaki komona bilongi na bato baoyo bazalaki kotala biso longwa na bandako na bango wana ezalaki biso kotanda mikanda likoló na kapo ya voiture. Liboké moko ya ba Biblia, mosusu ya mokanda Okoki kozala na bomoi na seko na mabele oyo ekobongwana paradis, liboké ya misato ezalaki na baekzamplere ya Mokanda mpo na masolo ya Biblia mpe oyo ya nsuka oyo ya ba brochures ndenge na ndenge. Elenge mobali moko akendaki mbangu koyebisa bafandi ya mboka mpo na koya na biso. Mosika te, etuluku ya ebele na bato koleka ntuku misato bazingaki voiture mpo na koyoka nsango malamu.
“Toyokisaki bango bande ya diskur moko ezalaki na lokótá ya Tswana. Bazalaki na esengo mingi na koyoka nsango malamu mpe elikya ya paradis na monoko na bango moko. Na ntango tolakisaki mikanda, bato bawelaki yango. Nokinoki mikanda misilaki. Nkutu mobangé mobali moko asɛngi ete asomba magnétophone. Totungisamaki mingi wana tomonaki bilembo mikemike ya botɔndi oyo bazalaki na yango: Kosɛka, kopwɛpwa mpe koyebisa maloba ya botɔndi na litoi.
“Mbala moko, bana batyami na molongó mpe babandi koyemba loyembo oyo bakoyembaka na ntango na kopesana mbote ya kokabwana. Na pwasa, banzela oyo etondi na putulu mpe na mabulu, ata botɛmɛli ya bato mosusu, totalelaki yango bobele mpamba. Tozali kooka mawa te na ntina na milende nyonso oyo tosalaki!”
Mokonzi moko abimisi mobeko!
Lisangá ya Soweto lizwaki mokumba ya kosakola na etuka oyo ezali na est ya Afrika ya Ngele, epai bato ya bikólo bikeseni bafandi wana, pene na engumba Piet Retief. Momesano ya etuka wana esɛngi naino na mopaya nyonso ete alimbola mosala na ye epai na induna (mokonzi) ya mboka. Ba Témoins batosaki momeseno wana. Bakamwaki mpenza wana mokonzi ayambaki bango na esengo mingi mpe asɛngaki bango ete balála epai na ye! Epai mosusu, akomaki mokanda ya ndingisa oyo ye moko atyaki mabɔkɔ, basakoli na Bokonzi ba sengelaki kolakisa yango na ndako moko na moko. Akomaki kati na yango ete: “Bato oyo bazali basakoli ya Bokonzi na Nzambe. Boyamba bango mpe boyoka bango.”
Ba Témoins bayambamaki na esengo mingi na motindo boye ete bakamataki bibongiseli mpo na kopesa diskur mokolo ya lomingo na nsima ya nzangá, na libanda na ndako ya mokonzi. “Salle” oyo ezalaki bongo libanda etondaki; likita libandaki mpe lisukaki na loyembo mpe na libondeli. Na bamboka mike mosusu, tozwaki nsango ya esengo na ntina na bato oyo basepeli na nsango malamu.
Moko na bato yango Nathaniel, ye oyo azalaki kofanda na mboka moke moke na Pitsedisulejang, oyo ezali na etuká ekauki na Ekólo ya Bophuthatswana. Azalaki kolakisa bato ya mboka mpo na lolenge malamu ya kolóna nkóna. Azalaki na likanisi ya kosala ete esika yango ekaoki ekóma paradis. Kasi wana ayokaki ete mabelé mobimba makobongwana paradis, miso na ye makómaki komona polele. Nokinoki akomaki mokapo nyonso ya Biblia oyo basakoli bazalaki komonisa ye. Nathaniel akutanaki nokinoki na bandeko ya lisangá oyo ezalaki pene, ezalaki soko na ntaká ya bakilometele 30 mpo na kokóma na mboka na ye.
Esengo ya kosalisa baoyo bazali koluka solo
Monika, pionniére to mosakoli ya ntango nyonso na Bokonzi alobaki ete: “Jéhovah amonisaki ete bobólá ekoki te kopekisa moto oyo azali na mposa na makambo ya elimo ete ayekola solo.” Azalaki na etuluku ya ba pionnier oyo basakolaki elanga na elanga na etando na bisobe minene ya Ekólo nsomi ya Orange, oyo ezali na ntéi Afrika ya Ngele. Ba pionniers bazalaki na mayoki nini nsima na komipesa mpo na komema nsango malamu epai na bato wana? Bayanolaki ete: “Eloko oyo tozwaki ezali na motuya mingi mpenza.” Ya solo, milende na bango mizwilaki bango mbano mingi kati na elimo.
Ata kozanga koyeba kotanga ekoki te kopekisa moto oyo azali na mposa na makambo ya elimo ete ayekola solo ya Biblia. Bato bayebi kotanga te to mpe bayebi kotanga malamu te, bazali kosepela na brochure oyo ezali na bililingi mingi na nkombo Sepela na bomoi na seko na mabele! Bilenge mpe mikóló babendami mpenza na bililingi ya langi kitoko ya paradis. Témoin moko oyo azali mosali ya ntango nyonso esika bakonyataka brochure yango alobaki ete: “Brochure oyo ezali kosalisa bato na kotalela Paradis lokola likambo ya solo, mpe ezali kolendisa makanisi na bango ete batósa Biblia.”
Mokanda mpo na masolo ya Biblia elingami mingi na bato bobele mpo na ntina moko wana. Na etuká moko etangwi kati na Ekólo ya Lebowa, baklisto mibale ya basi bakamwaki na komona ete, na moko na mabota ya etuká wana, mobangé mobali moko oyo azalaki komona malamu te mpe mwasi na ye, bazalaki na ekzamplere moko ya mokanda wana na lokótá Sepedi. Babalani wana bazalaki kosalela yango mpo na koteya bana ya mboka na bango. Lokola bayekolaki mokanda yango mingi mpe bakomaki ba notes mingi kati na yango, ekómaki biteni biteni. Basepelaki mingi na ntango bazwaki ekzamplere ya sika.
Bongo, mikanda ya boklisto mizali kokokisa mposa monene ya baoyo bazali na nzala mpo na solo. Na Afrika ya Ngele, la Société Watch Tower ezali kobimisa ndambo monene ya mikanda nyonso minyatami na nkótá ya mokili yango. Bobele na mobu 1990, mikanda 113 529, ba brochures mpe bazulunalo oyo ebimisamaki mi la Société, ekabolamaki na bituká ya mokili yango.
Mbuma ya milende
Kokutana malamu oyo esalemaki elongo na bato ya teritware na bamboka mike ya Afrika ya Ngele mpe mikanda oyo batikelaki bango ebotaki mbuma? Na ntembe te. Kobanda 1989, masangá minei mpe bituluku libwa oyo etangwi, esalamaki nsima na mosala ya kosakola nsango malamu mokokisamaki kati na bateritware yango. Ba pionniers spéciaux ya ntango mokuse mpe ba pionniers permanents bakokisaki eteni monene ya mosala yango.
Ozali komikundola lisusu na ntina na Doris mpe eteyelo na ye ya lomingo kati na lobwaku mosika na Zoulouland? Lelo oyo, azali Témoin de Jéhovah oyo amipesi mpe azwi batisimo. Lisusu, na mboka wana, etuluku ya basakoli libwa ya Bokonzi bazali kolanda kokola kati na elimo. Bato mingi ya sika, bazali koyangana na makita oyo mazali kosalema na ndako ya Doris, mpe bato nsambo oyo bayekolaki Biblia elongo na ye bazwaki batisimo na assemblée ya distrike oyo eselamaki na engumba Durban na Décembre ya mobu 1990.
Matomba motindo wana mazali na bopusi mingi likoló na basakoli ya Afrika ya Ngele. Bazali kotalela maloba oyo ya ntóma Paulo, ete: “Soki yango ekoki na biso, tosalela bato nyonso malamu.” (Bagalatia 6:10, MN) Ee, basaleli na Jéhovah bazali na ekateli ya kokutana na bato nyonso ya motema sembo, kati na bango mpe baoyo bafandi na bituká mike ya ‘eteni oyo mosika na mokili.’—Misala 1:8.