Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 15/10 nk. 15-20
  • Tomilatisa bopɔlɔ

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tomilatisa bopɔlɔ
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Babateli na mpate baoyo bazali na bopɔlɔ
  • Bopɔlɔ ekotambwisaka mopesi-toli na mayele
  • ’’Wana bapesi​—toli bazali mingi’’
  • Topesa litatoli na ezaleli na bopɔlɔ
  • Bopɔlɔ esɛngisami na bato banso
  • “Esengo na bato na bopɔlɔ”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Monisá “boboto mpenza epai ya bato nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Boboto ezali ezaleli ya ntina mingi mpo na Baklisto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Motema pɛtɛɛ—Ezali na ntina nini mpo na biso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 15/10 nk. 15-20

Tomilatisa bopɔlɔ

“Na bongo, lokola bozali baponami, babulami mpe balingami na Nzambe,bomilátisa motema mawa, na malamu, na komikitisa na bopɔlɔ mpe na motema molai.​—BAKOLOSE 3:12, MN. Elilingi oyo eleki nyonso mosusu na kitoko.

1-3. Na Bakolose 3:12-14, ntoma Paulo alobi nini na ntina na bopɔlɔ mpe bizaleli mosusu na Nzambe?

Jéhovah apesi na basaleli na ye elamba ya elilingi oyo eleki nyonso mosusu na kitoko.Baoyo nyonso balingi kozwa ngɔlu na ye basengeli kolata elamba esalemi na nsinga makasi ya bopɔlɔ Ezaleli oyo ekopesaka elendiseli mpamba te ezali kokitisa mikakatano. ‘Ezali mpe kobatela bato ete bazwana na matáta te.

2 Ntoma Paulo apesaki etinda oyo epai na baninga na ye baklisto bapakolami na elimo ete: “Na bongo, lokola bozali baponami, babulami mpe balingami na Nzambe; bomilátisa motema mawa, na malamu, na komikitisa na bopɔlɔ mpe na motema molai.” (Bakolose 3:12, MN) Liloba na greke oyo libongolami na “bomilátisa,” limonisi likambo moko lisengelaki kosalema nokinoki, Bapakolami, baoyo bazalaki baponami, babulami mpe balingami na Nzambe, basengelaki komilátisa bizaleli lokola Bopɔlɔ.

3 Paulo abakisi ete: “Soki moto moko azali na likambo na moto mosusu, boyikanaka mpiko mpe balimbisanaka Lokola Jéhovah asili kolimbisa bino, bino bosala mpe bongo. Kasi, likoló na nyonso oyo, bomilátisa na bolingo mpamba te yango ezali ekanganeli ekoki.” (Bakolose 3:13, 14 MN) Ezali bizaleli na Nzambe ,lokola bolingo bopɔlɔ mpe mingi mosusu nde ezali kosala ete ba Témoins de Jéhovah “bazalana na motema moko.’’​—Nzembo 133:1-3.

Babateli na mpate baoyo bazali na bopɔlɔ

4. Elamba na elilingi oyo baklisto ya solo balati yango, esalemi na bizaleli nini?

4 Baklisto ya solo bazali kosala makasi ete ‘baboma binama ya nzoto na bango na ntina na pite, na mbindo, mposa na nzoto, mposa mabe mpe bilulela’; bazali mpe kosala makasi mpo na kolongola elamba na kala oyo etongami na nsinga ya nkanda, na nkɛlɛ, na kotɔnga, kotuka mpe na maloba na nsoni. (Bakolose 3:5-11) Bazali kolongola “bomoto na kala” (na elobeli ya sikisiki, “moto na kala”) mpe bazali kolata “bomoto na sika” (to “moto na sika”), oyo ebongi (Baefese 4:22-24) Elamba na bango ya sika oyo etongami na motema mawa, na boboto, na ezaleli ya komikitisa, na bopɔlɔ mpe na motema molai, ezali kosalisa bango na kolónga mikakatano mpe na kotósa mibeko na Nzambe.​—Matai 5:9; 18:33; Luka 6:36; Bafilipi 4:2, 3

5. Na likambo nini lolenge oyo lisangá na boklisto litambwisami ezali kopesa esengo oyo ezali kati na yango?

5 Bato oyo batalelami na mokili oyo ete bazali bato minene, mbala mingi bakosalaka makambo na makasi, ata kosala mpe makambo mabe. (Masese 29:22) Tozali na esengo lokola makambo wana mazali kosalema te kati na libota na Jéhovah. Lisangá na boklisto litambwisami te lokola bakonzi mosusu bakotambwisaka kompanyi: kosenzelaka bobele ete mosala mokokisama malamu, kozanga kotalela mayoki na bato, ezaleli oyo ekopesaka esengo te. Nzokande, kozala kati na lisangá ezali likambo ya esengo Ezali bongo mpenza, mpo ete bopɔlɔ ezali ezaleli na mayele oyo emonisami na baklisto nyonso, mpe mingimingi epai na mibali oyo babongi mpo na koteya baninga na bango kati na kondima. Ee, na ntango litambwisi mpe toli epesami na bankulutu oyo bateyaka na bopɔlɔ bosalelami na mayele,” esengo ekozala mingi kati na lisangá.’​—Yakobo 3:13.

6. Mpo na nini bakɛngɛli baklisto basengeli kozala na bopɔlo?

6 Elimo, to ezaleli oyo ezali koyangela libota na Nzambe, ezali kosɛngisa ete bato oyo bazali na mokumba ya kokɛngɛla lisangá bázala bato na bopɔlɔ, na mayele mpe na bososoli. (1 Timoté 3:1-3) Basaleli na Jéhovah bakokani na bampate na bopɔlɔ, kasi bazali te lokola bantaba soko bampunda na motó makasi to lokola mbwa ya zamba oyo na yauli (Nzembo 32:9; Luka 10:3) Lokola bakokani na bampate bato yango bazali na mposa ete basalelama na bopɔlɔ mpe na bolingo. (Misala 20:28, 29) Na yango, Nzambe azali kosɛnga ete bankulutu bázala bato na bopɔlɔ, na boboto na bolingo mpe na motema molai epai na bampate.​—Ezekiele 34:17-24.

7. Lolenge nini bankulutu basengeli kolakisa bandeko na bango to kosalisa baoyo bazali na maladi kati na elimo?

7 Lokola azali “moombo na Nkolo,” nkulutu “asengeli kozala na boboto epai na bato banso, molakisi malamu, moto ayebi kokanga motema na ntango na mpasi, moto oyo akopamela batɛmɛli na bopɔlɔ. Soko nde Nzambe akobongola motema na bango ete bakóma na boyebi na koyeba solo.” (2 Timoté 2:24, 25, MN) Baklisto na babateli na mpate basengeli kozala na limemya, kozala na bolingo, na ntango bazali komeka kosalisa baoyo bazali na maladi kati na elimo; mpamba te bampate ezali ya Nzambe. Bankulutu basengeli te kosalela etonga lokola bakonzi; kasi basengeli nde kozala na bopɔlɔ, lokola Mobateli na mpate aleki malamu, Yesu Klisto.​—Yoane 10:11-13.

8. Likambo nini likómelaki Moise, moto na bopɔlɔ mingi, mpe mpo na nini?

8 Mbala mosusu nkulutu moko akoki kozala na nkaka mpo na kotikala moto na bopɔlɔ. “Moise azalaki na bopɔlɔ mingi, na koleka bato banso bazalaki na mokili.” (Mituya 12:3) Na ntango Bayisraele bazangaki mai, na Kadesi, baswanisaki Moise. mpe bapamelaki ye mpo ete abimisaki bango na Ezipito mpo na komema bango na esobé ekauki. Na ntango wana, Moise, oyo ayikaki mpiko na mimekamo mingi na ezaleli ya komikitisa alobaki na bango na kozanga kososola mpe na maloba makasi. Moise mpe Alona bamimonisaki epai na libota. na Yisraele, kasi babendaki likebi na bato likoló na bango moko. Moise alobaki ete: “Boyoka, ɛ bino batomboki. Tobimisa mai mpo na bino na libanga oyo?” Bongo, Moise abɛtaki libanga mbala mibale na lingenda na ye, mpe Nzambe abimisaki “mai mingi” mpo na bato mpe mpo na banyama. Jéhovah aboyaki likambo yango mpamba te Moise mpe Alona bakumisaki ye te; na yango, Moise azangaki libaku kitoko ya kokɔtisa Bayisraele na Mokili na ndaká.​—Mituya 20:1-13; Deteronome 32:50-52; Nzembo 106:32, 33.

9. Lolenge nini bopɔlɔ ya nkulutu moko ekoki komekama?

9 Bopɔlɔ ya mokɛngɛli moklisto ekoki mpe komekama na mitindo mingi. Na ndakisa, Paulo akebisaki Timoté ete moto moko akoki komonana oyo “asili kovimba na lolendo” mpe “abɛli motó mpo na ntembe mpe na kowelana na ntina na maloba.” Paulo abakisi e:e: “Na makambo yango ekobimaka zuwa mpe koswana mpe kotuka, mpe ntembe mabe, mpe kowelana kati na bato babebi na makanisi mpe bazangi makambo na solo‘” Mokɛngɛli Timote asengelaki kozala na makambo makasi te, kasi asengelaki nde ‘kokima makambo yango mpe kolanda boyengebene, ezaleli ya kobanga Nzambe , kondima, bolingo, koyika mpiko mpe bopɔlɔ.’​—1 Timoté 6:4, 5, 11.

10. Bokundoli nini Tito asengelaki kosala epai na masangá?

10 Atako basɛngisami ete bazala bato na bopɔlɔ, bankulutu basengeli kozala na ekateli makasi na ntango bazali kokɔtela boyengebene. Tito amonisaki ezaleli motindo wana, ye oyo akundwelaki basangani na masangá ya mboka Kelete ete “batuka te, babunda etumba te, bazala na boboto, bamonisa bopɔlɔ epai na bato banso.” (Tito 3:1, 2) Mpo na kondimisa baklisto yango ete bázala na bopɔlɔ epai na bato banso, Tito asengelaki kolobela bango na ntina na bolingo mpe boboto oyo Jéhovah amonisaki epai na bango. Abikisaki bango mpo na misala na bango malamu te, kasi mpo na motema mawa na ye, na nzela na Yesu Klisto. Bopɔlɔ mpe motema molai na Jéhovah ekoki mpe kozwila biso lobiko. Bongo, bankulutu basengeli kokundwela masangá, lokola Tito, ete batosa Nzambe mpe basɛngisami na komekola Mozalisi na bango na komonisáká bopɔlɔ.​—Tito 3:3-7; 2 Petelo 3:9, 15.

Bopɔlɔ ekotambwisaka mopesi-toli na mayele

11. Engebene Bagalatia 6:1, 2, lolenge nini esengeli kopesa toli?

11 Esengeli kosala nini soki mpate moko ya elilingi abungi? Paulo alobi ete: “Bandeko, soko moto anyati litambe mabe, naino ye moko asosoli yango te, bino bato bozali na makoki na elimo, bomaka kosembola moto motindo wana kati na elimo ya bopɔlɔ. Omikɛngɛla yo moko ete yo mpe omekama te. Bomemanaka bozito na bino, boye bokokokisa mobeko na Klisto.” (Bagalatia 6:1, 2, MN) Toli ekoki kozala na litomba bobele soki epesami na elimo na bopɔlɔ. Ata soki azali komeka kopesa toli epai na moto oyo asiliki, nkulutu asengeli komipekisa, koyebáká ete “lolemo na pɛtɛpɛtɛ ekoki kobuka mokwa.” (Masese 25:15) Moto oyo azali na makambo makasi lokola mokwa akoki kolɛmbisama na maloba mabongi; na lolenge mosusu, ekobuka makasi na ye.

12. Na likambo nini bopɔlɔ ekoki kozala na ntina epai na moto oyo azali kopesa toli?

12 Jehovah azali kolakisa lisangá na bopɔlɔ, mpe mateya na ye mazali malamu. Yango emonanaka mingimingi na ntango bankulutu bazali kopesa toli epai na baoyo bazali na mposa ya lisalisi na elimo. Moyekoli Yakobo akomaki ete: “Nani kati na bino azali na bwanya mpe na mayele? Tika ete amonisa misala na ye na bopɔlɔ bosalelami na mayele.” Bopɔlɔ euti na limemya mpe na botɔndi oyo tozali na yango mpo na “mayele mauti na likoló,” mpe na bososoli oyo bokopusaka biso na koyeba ndelo ya makoki na biso na komikitisa nyonso. Ezaleli ya komikitisa mpe na bopɔlɔ ezali libateli mpo na moto oyo akopesaka toli: ezali kopekisa ye ete abimisa maloba na kozokisa te to na kosala mabunga te, mpe ezali koyeisa batoli na ye pɛtɛɛ mpo na kondima yango.​—Yakobo 3:13, 17, MN.

13. “Bopɔlɔ basalelami na mayele” ekoki kozala na bopusi nini likoló na lolenge oyo toli epesami?

13 “Bopɔlɔ bosalelami na mayele” ezali kosalisa ye oyo akopesa toli ete asala te na lolenge mabe to na makambo makasi Nzokande, soki azali koloba epai na moninga moko to epai na moto moko oyo ye azali komemya, nkulutu asengeli te koluka kosepelisa ye na esika na kopesa ye toli oyo etongami likoló na Liloba na Nzambe, na bopɔlɔ mpe na bosembo nyonso. (Masese 24:24-26; 28:23) Toli oyo Amona azwaki epai na ndeko na ye abotami na tata mosusu ekokisaki mposa na ye, kasi ememaki ye na kufa. (2 Samwele 13:1-19, 28, 29) Bongo, bankulutu basengeli te kolɛmbisa mitinda na Biblia mpo na kobɔndisa lisosoli ya moto oyo asali mabe, mpamba te yango ekoki kotya bomoi na ye na likámá. Lokola ntoma Paulo, bankulutu basengeli komipekisa te na “kosakola malako nyonso na Nzambe.” (Misala 20:26, 27, MN; 2 Timoté 4:1-4) Na ntango azali kopesa toli, moklisto ateli akomonisaka bobangi ya solo na Nzambe mpe na bopɔlɔ bosalelami na mayele.

14. Mpo na nini nkulutu asengeli kosɛnzɛla ete azwa ekateli na esika na moto mosusu te?

14 Nkulutu oyo alóni ezaleli na bopɔlɔ bosangani na mayele mauti na likoló, akomimonisaka te na makambo makasi to na matáta. Asengeli koyeba lisusu ete ezali likambo na mayele te mpe ebongi te ete azwa ekateli ya moto mosusu. Soki azwi ekateli na esika na moko na baninga na ye, nkulutu akozala na mokumba na ntango likambo wana likobeba. Nkulutu akoki kolakisa oyo elobami na Makomami, kasi soki yango ebuki mobeko moko na Biblia te, moto ye moko akozwa ekateli na oyo ye akosala to akosala te, engebene mayele mpe lisosoli na ye. Paulo alobaki ete: “Moto na moto akomema mokumba na ye,” (Bagalatia 6:5, MN; Baloma 14:12) Nzokande, soki moto akei kotala nkulutu mpo na likambo moko, nkulutu akoki kosalisa ye na kozwa ekateli malamu na kotunaka ye mituna oyo mikosalisa moto yango ete asosola likoló na mikapo ya Makomami mpo na biyano mingi bikopesamela ye.

15. Nkulutu asengeli kosala nini soki ayebi koyanola te na motuna oyo motunameli ye?

15 Soki nkulutu ayebi eyano na motuna moko te, ekozala mabe soki akoyanola bobele mpo na kolongola nsoni. Lokola azali na bopɔlɔ bosalelami na mayele, nkulutu akomeka kopesa makanisi na ye moko te mpe akopesa eyano ya lokutá te oyo ekoki kobimisa makama na nsima. Ezali na “ntango mpo na kozala nyɛɛ mpe ntango mpo na koloba.” (Mosakoli 3:7; tala Masese 21:23.) Nkulutu asengeli “koloba” bobele soko ayebi eyano to soko asalaki bolukiluki malamu mpo na kopesa eyano ya sikisiki. Epai mosusu, ebongi te koyanola na mituna mizangi ntina.​—Masese 12:8; 17:27; 1 Timoté 1:3-7; 2 Timoté 2:14.

’’Wana bapesi​—toli bazali mingi’’

16, 17. Mpo na nini bankulutu basengeli kopesana makanisi?

16 Libondeli mpe boyekoli ezali kosalisa bankulutu na koyeba koyanola na mituna mpe na kosilisa mikakatano makasi, kasi esengeli komikundola ete myango ekolonga wana bapesi toli bazali mingi.’’ (Masese 15:22, MN) Na ntango bankulutu bazali kopesana makanisi, bazali nde kosalela mayele na bango na bomoko. (Masese 13:20) Bankulutu nyonso bazali na mayele lolenge moko moko te, bazali mpe na boyebi ya Makomami lolenge moko te. Bopɔlɔ mpe mayele esengeli bongo kopusa nkulutu oyo aponami sika ete atuna makanisi epai na bankulutu oyo bazali na boyebi mingi mpe baumeli na mosala wana koleka ye, mingimingi soki likambo oyo litalelami lizali mpenza makasi.

17 Ata ntango bankulutu baponami mpo na kosambisa likambo moko monene, bakoki kosɛnga toli, nzokande kozanga kobimisa sekele ya likambo yango. Mpo na kosalisa ye ete asambisa Bayisraele, Moise aponaki mibali mayele baoyo bazalaki kobanga Nzambe, na kotyela motema, bayini na kanyáka.’ Atako bazalaki mikóló na bato, mibali wana balekaki Moise na boyebi te soko na mayele mpe te. Yango wana bazalaki koya“ na makambo minene nyonso epai na Moise nde bango moko bazalaki kokata makambo nyonso mike.’’ (Exode 18:13-27) Na yango, soki bankulutu bazali lelo kokata likambo monene ebongi na bango ete basɛnga lisalisi ya bankulutu oyo baumeli na mosala wana ata soko bango moko nde bakozwa ekateli ya nsuka.

18. Na nini bankulutu basengeli kotambwisama na ntango bazali kosambisa likambo?

18 Mokanda Mishna ya Bayuda eyebisi ete motuya ya basambisi na batribinale mingi na bamboka na Yisraele, ezalaki engebene bonene ya likambo. Atako kozala na bapesi mingi na toli ezali likambo malamu mingi, nzokande motuya monene ezali ntango nyonso ndanga te mpo na boyengebene, mpamba te bapesi-toli bakoki komikosa atako bazali mingi. (Exode 23:2) Mpo na kozwa makatami malamu, ebongi liboso komitika kotambwisama na Liloba na Nzambe mpe na elimo na ye. Mayele mpe bopɔlɔ ezali kopusa baklisto ete batosa yango.

Topesa litatoli na ezaleli na bopɔlɔ

19 Lolenge nini bopɔlɔ ezali kosalisa basaleli na Jéhovah ete bapesa litatoli?

19 Ezaleli na bopɔlɔ ezali mpe kosalisa basaleli na Jéhovah ete bapesa litatoli epai na bato ya ’lolenge’ nyonso.(1 Bakolinti 9:22, 23) Mpo ete Yesu azalaki koteya na bopɔlɔ, bato na komikitisa bazalaki kobanga ye te, nzokande bazalaki kobanga bakonzi ya mangomba oyo bazalaki na mawa te. (Matai 9:36) Ya solo, bopɔlɔ na Yesu kati na misala na ye ebéndaki “bampate” epai na ye, kasi “bantaba” te oyo balingaki makambo mabe. (Matai 25:31-46; Yoane 3:16-21) Atako Yesu alobaki maloba makasi epai na bakosi, bato oyo bakokisami na bantaba, nzokande ba Témoins de Jéhovah basengeli kozala na bopɔlɔ na ntango bazali koyebisa bikateli na Nzambe, mpamba te bango bazali na bososoli te mpe na bokonzi te lokola Yesu azalaki na yango. (Matai 23:13-36) Na koyokáká nsango na Bokonzi oyo esakolami na bopɔlɔ, ‘baoyo nyonso babongi mpo na bomoi na seko bazali kondima,’ lokola “bampate” oyo Yesu ateyaki.​—Misala 13:48, MN.

20. Moto oyo eteyami na bopɔlɔ akozwaka matomba nini?

20 Soki tosakoli mpe toteyi na bopɔlɔ, na kobimisáká makanisi mabongi, na kolakisáká mitinda na Biblia mpe na kolobeláká solo, mosala na biso mokobota mbuma. Ntoma Petelo akomaki ete: “Bokumisa Klisto lokola Nkolo kati na mitema na bino; bomilengela ntango nyonso mpo na koloba na moto na moto oyo akotuna ntina na elikya oyo ezali na bino,kosaláká yango na bopɔlɔ mpe na limemya nyonso.” (1 Petelo 3:15, MN) Moto oyo alakisami na bopɔlɔ, akoki kotya likebi na ye na lisolo, kasi soki tokolobela ye na makasi to na ezaleli ya kowelana, moto yango akolanda lisoló malamu te to mpe akoki kozokisama na motema. Na ndakisa ya ntoma Paulo, ba ministres oyo bazali koteya na bopɔlɔ bakoki koloba ete: “Tokotyaka libaku liboso na moto te ete mosala na biso motyolama te.” (2 Bakolinti 6:3, MN) Mbala mosusu ata batɛmɛli bakondimaka koyoka liteya lipesami na bopɔlɔ

Bopɔlɔ esɛngisami na bato banso

21, 22. Bopɔlɔ ekopesaka matomba nini epai na basaleli nyonso na Jéhovah?

21 Bopolo esengeli te kozala motindo na bomoto oyo moklisto akomilatisa mpo na kobenda likebi ya bato oyo bazali kati na lisangá na Jéhovah te. Ezali nde ezaleli na ntina mingi kati na boyokani ya basaleli na Nzambe. (Bakolose 3:12-14; 1 Petelo 4:8) Na ntango bankulutu mpe basaleli na misala oyo na bopɔlɔ bakosalanaka elongo, masangá mazali kolendisama. Ya solo, esengeli ete basaleli nyonso na Jéhovah bamonisa bopɔlɔ mpe bizaleli mosusu na Nzambe, mpamba te ezali bobele “na mobeko moko” mpo na bato banso.​—Exode 12:49; Levitike 24:22.

22 Bopɔlɔ ekopesaka kimya mpe bolamu epai na basaleli na Nzambe. Na yango, esengeli kotangama kati na bizaleli bisali elamba oyo baklisto nyonso bakolataka yango, ezala na ndako, kati na lisangá to na esika mosusu. Ee, basaleli nyonso na Jéhovah basengeli komilatisa na bopɔlo.

Bozongeli

◻ Mpo na nini bakɛngɛli baklisto basengeli kozala na bopɔlɔ?

◻ Na likambo nini bopɔlɔ ezali na ntina epai na mopesi-toli na mayele?

◻ Matomba nini makozwamaka wana bapesi toli bazali mingi?

◻ Mpo na nini ezali malamu na kopesa litatoli na ezaleli na bopɔlɔ?

[Elilingi na lokasa 17]

Basaleli na Jéhovah bakokani na bampate: bazali na mposa ete basalelama na bopɔlɔ

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Garo Nalbandian

[Elilingi na lokasa 19]

Bopolo ezali kosalisa basaleli na jehovah ete bapesa litatoli epai na bato ya lolenge nyonso

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto