Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 15/10 nk. 10-14
  • “Esengo na bato na bopɔlɔ”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Esengo na bato na bopɔlɔ”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bopɔlɔ: etaleli na bozindo
  • Lolenge nini kolona bopɔlɔ
  • Matomba ya bopɔlɔ
  • Bopɔlɔ ekopesaka bolamu
  • Motema pɛtɛɛ—Ezali na ntina nini mpo na biso?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2020
  • Tomilatisa bopɔlɔ
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Boboto ezali ezaleli ya ntina mingi mpo na Baklisto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Monisá “boboto mpenza epai ya bato nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 15/10 nk. 10-14

“Esengo na bato na bopɔlɔ”

“Esengo na bato na bopɔlɔ, mpo ete bakosangola mokili.’’​—MATAI 5:5 MN

1. Bopɔlɔ oyo Yesu alobelaki yango kati na Lisoló na yé likoki na ngomba ezali niní?

Kati na Lisoló na ye likoló na ngomba, Yesu Klisto alobaká ete: “Esengo na bato na bopɔlɔ, mpo ete bakosangola mokili.” (Matai 5:5, MN) Bopɔlɔ emonisami na libanda te, na bokosi te, ezali mpe ezaleli ya kobotama te. Kasi, ezali nde ezaleli na motema ya moto na kimya, oyo ekomonisamaka na misala na ye liboso na mokano na Jéhovah Nzambe mpe na litambwisi na ye. Baoyo bazali mpenza na bopɔlɔ bayebi ete basengeli kotambwisama na Nzambe mpe na yango, bazali komimonisa na bopɔlɔ epai na bato mosusu.​—Baloma 12:17-19; Tito 3:1, 2.

2. Mpo na nini Yesu alobi ete esengo na bato na bopɔlɔ?

2 Yesu alobaki ete esengo na bato na bopɔlɔ, mpo ete bakosangola mokili. Lokola azali Mwana na Nzambe mpe azali mpenza na bopɔlɔ ya kokoka, Yesu azali Mosangoli na liboso na mokili. (Nzembo 2:8; Matai 11:29; Baebele 1:1, 2; 2:5-9) Kasi, bato mosusu basengeli koyangela elongo na “mwana na moto” wana, Masiya wana, kati na Bokonzi na ye na likoló. (Danyele 7:13, 14, 22, 27) Lokola bazali “basangoli na libula elongo na Klisto,” baklisto bapakolami, bango bato na bopɔlɔ, bakosangola mokili elongo na ye. (Baloma 8:17) Bato mosusu na bopɔlɔ, baoyo bakokisami na bampate, bakozala na bomoi ya seko kati na Paradis, esika ekoyangelama na Bokonzi wana.(Matai 25:33, 34, 46; Luka 23:43) Elikya oyo ezali mpenza kopesa esengo.

3. Nzambe mpe Klisto bapesaki ndakisa nini ya bopɔlɔ?

3 Mosangoli na liboso akozwa mokili epai na”Tata na ye, Jéhovah, oyo azali ndakisa eleki monene na bopolo. Makomami malobi mingi na ntina na ye ete “akookaka nkanda noki te. Aleki na motema malamu mpe na ’solo.” (Exode 34:6, MN; Nehemia 9:17; Nzembo 86:15) Atako azali na nguya eleki monene, kasi azali komonisa bopɔlɔ na motindo boye ete basambeli na ye bakoki kobanga te mpo na koloba na ye. (Baebele 4:16; 10:19-22) Mwana na Nzambe, oyo azalaki na “bopɔlɔ mpe na motema mosɔkɛmi,” ateyaki bopɔlɔ epai na bayekoli na ye. (Matai 11:29; Luka 6:27-29) Baombo wana na Nzambe mpe na Mwana na ye, bango moko bakomaki mikanda na ntina na “bopɔlɔ mpe na malamu na Klisto,” mpe bamonisaki bizaleli yango.​—2 Bakolinti 10:1; baloma 1:1; Yakobo 1:1, 2; 2 Petelo 1:1.

4. (a) Engebene Bakolose 3:12, makambo nini masalemaki na baoyo bazali mpenza bato na bopɔlɔ? (b) Mituna nini mizali kobenda likebi na biso?

4 Lelo oyo, baklisto bapakolami mpe baninga na bango oyo bazali na elikya ya kofanda awa na mabelé, basengeli kozala na bopɔlɔ. Lokola basili kotika mabe, lokutá, bokosi, elulela mpe matɔngi, basili kobongwana bato na sika kati ‘na nguya ekopusaka elimo na bango.’ (Baefese 4:22-24, MN; 1 Petelo 2:1, 2) Balendisami na komilatisa motema mawa, na malamu, na komikitisa, na bopɔlɔ mpe na motema molai.” (Bakolose 3:12, MN) Kasi, bopɔlɔ ezali mpenza nini? Mpo na nini ebongi kozala na bopɔlɔ? Ezaleli wana ekoki kozala na litomba nini mpo na bolamu na biso?

Bopɔlɔ: etaleli na bozindo

5. Lolenge nini tokoki kolimbola bopɔlɔ?

5 Moto na bopɔlɔ azali malamu kati na elimo mpe na ezaleli na ye. Kati na mabongoli mosusu ya Biblia, ezali liloba pra-ys’ nde libongolami na “komikitisa,” “komisɔkisa,” “bopɔlɔ.” Na mikanda na greke ya kala, liloba pra-ys‘ ekoki kosalelama mpo na kolobela mopepe kitoko to mongongo kitoko. Epai na moto, ekoki komonisa boboto. Mpo na yango, Vine, molimboli ya Biblia alobaki ete: “(pray’) tes emonisami libosoliboso mpe mingi mpenza epai na Nzambe. Elimo wana ezali kosalisa biso na kondima makambo asaleli biso, kotaleláká yango ete ezali malamu, kozanga kotɛmɛla yango; pra-y’tes ezali pene na liloba tapeinophrosune (komikitisa).”

6. Mpo na nini tokoki koloba ete bopɔlo elimboli bolɛmbu te?

6 Bopɔlɔ elimboli bolɛmbu te. William Barclay, molimboli ya Biblia, alobaki ete: “Liloba pra-ys‘ epesi likanisi ya bopɔlɔ, kasi kati na yango, ezali na likanisi limonisi makasi na ebendé.” Mpo na kozala moto na bopɔlɔ, esengeli kozala na makasi. Na ndakisa, na ntango baokisi biso nkanda to banyokoli biso, esengeli kozala na makasi mpo na kozala na bopɔlɔ. Yesu Klisto, Mwana na Nzambe asili kopesa biso ndakisa malamu kati na likambo wana. “Atukamaki nde azongisaki kotuka te; ayokaki mpasi nde akanelaki moto te; kasi atikaki nyonso epai na ye (Jéhovah Nzambe oyo akosambisaka sembo.” (1 Petelo 2:23) Lokola Yesu, oyo azalaki na bopɔlɔ, biso tondimisami ete Nzambe akokweisa baoyo bazali kotoka biso mpe konyokola biso. (1 Bakolinti 4:12, 13) Tokoki kozala na kimya, lokola Etyene oyo abomamaki, na koyebáká ete soki tomimonisi sembo, Jéhovah akosunga biso mpe akotika te ete tozwa mpasi oyo ekoumela seko.​—Nzembo 145:14; Misala 6:15; Bafilipi 4:6, 7, 13.

7. Masese 25:28 elobi nini na ntina ma moto oyo azangi bopɔlɔ?

7 Atako azalaki na bopɔlɔ, Yesu amimonisaki na makasi mpo na kolóngisa boyengebene. (Matai 21:5; 23:13, 39) Soko moto nani azali na likanisi na klisto,” akokani na ye katina likambo yango. (1 Bakolinti 2:16) Moto oyo azali na bopɔlo te akokani na Klisto te. Nzokande maloba oyo makokani epai na ye, ete: “Moto oyo ayebi kopekisa elimo na ye te, azali lokola mboka ebebisami mpe ezangi lopango.” (Masese 25:28, MN) Lokola azangi bopɔlɔ, makanisi mabe makoki mpenza koyela ye mpe kopusa ye na kosala mabe. Atako azangi makasi te, moklisto oyo azali na bopɔlɔ ayebi ete “eyano ya boboto ekosilisa nkanda, kasi ’liloba makasi likopelisa nkele.”​—Masese 15:1, Liloba lya Nzambe.

8. Mpo na nini kozala moto na bopɔlɔ ezali likambo ya pɛtɛɛ te?

8 Kozala na bopɔlɔ ezali likambo ya pɛtɛɛ te, mpamba te tosili kosangola kozanga kokoka mpe lisumu. (Baloma 5:12) Epai mosusu, soki tozali kosalela Jehovah, tosengeli kobundisa bilimu mabe oyo bizali mbala mosusu komeka bopɔlɔ na biso na nzela na monyoko. (Baefese 6:12) Mingi kati na biso, bazali kosala elongo na bato oyo bazali na makambo makasi; bato wana bazali na elimo ya mokili oyo moyangelami na Diable. (1 Yoane 5:19) Na yango, lolenge nini tokoki kolona bopɔlɔ?

Lolenge nini kolona bopɔlɔ

9. Endimiseli nini ekosalisa biso na kolóna bopɔlɔ?

9 Endimiseli oyo etongami likoló na Makomami ete biso tosɛngisami na komonisa bopɔlɔ, ekosalisa biso na kolona ezaleli yango Tosengeli kosala milende mokolo na mokolo mpo na kozwa bopɔlɔ. Soki te, tokokokana na bato oyo bazali kotalela bopɔlɔ lokola bolɛmbu mpe bazali kokanisa ete, mpo na kolónga, esengeli kozala na lolendo, na makambo makasi, mpe na lofundo. Nzokande, Liloba na Nzambe likweisi lolendo; mpe lisese moko ya mayele lilobi ete: “Moto mabe akobebisaka nzoto na ye moko, nzokande moto na motema malamu akosalaka malamu na molimo na ye.” (Masese 11:17; 16:18, MN) Mbala mosusu, bato bakopɛngolaka ye oyo azangi bopɔlɔ mpe boboto, mpo ete moto yango asalela bango mabe te mpe asalela bango makambo makasi te.

10. Eloko nini tosengeli kotósa mpo ete tozala na bopɔlɔ?

10 Mpo na kozala na bopɔlɔ tosengeli kopusama na elimo santu, to bokasi na Nzambe bokosalaka mosala Jéhovah asili kosala ete mabelé mabotaka mbuma; bobele bongo, azali kopesa makoki epai na basaleli na ye ete babota mbuma ya elimo na ye, oyo bopɔlɔ etangami kati na yangó. Ntoma Paulo alobaki ete: mbuma na elimo ezali bolingo, esengo, kimya motema molai, bobóto, malamu, kondima. bopɔlo mpe Komikanga motema. Liboso na makambo oyo, Mibeko mizali té.” (Bagalatia 5:22, 23, MN) Ee bopɔlɔ ezali moko na mbuma ya elimo na Nzambe oyo emonisami na baoyo bazali kosepelisa ye. (Nzembo 51:9, 10) bopɔlɔ ekobimisaka mabongwani kitoko. Tala ndakisa moko: ezalaki na mobali moko na mobulu mingi, nkombo na ye Tony. Azalaki kobɛta bato, koyiba biloko, azalaki kokɔtisa drogue na mboka na nzela mabe; azalaki mokonzi ya etuluku ya basali na mabe oyo bakotambolaka na tukutuku, mpe akɔtaki bolɔkɔ. Kasi, na ntango azwaki boyebi ya Biblia, mpe na lisalisi ya elimo na Nzambe, asili kokóma mosaleli na Jehovah oyo na bopɔlɔ. Tony azali bobele ye moko te na likambo oyo. Na yango,tokoki kosala nini soki bomoto na biso boyangelami na ezaleli ezangi bopɔlɔ?

11. Libondeli ezali na mosala nini mpo na oyo etali kozala na bopɔlɔ?

11 Mpo na kolóna bopolo, tosengeli kosɛnga yango epai na Nzambe na motema sembo, mpe kosɛnga elimo na ye. Mpo ete Nzambe andima lilɔmbɔ na biso, mbala mosusu tosengeli ‘kolanda kosɛnga’ lokola Yesu alobaki yango. Nsima na komonisa ete batata bapesaka biloko malamu epai na bana na bango Yesu alobaki ete: “Soko bino bato (na masumu mpe na bongo bozali bato mabe boyebi kopesa bana na bino makabo malamu, Tata na bino na likoló akoleka te mpo na kopesa elimo santu epai na bango bakolɔmba ye?” (Luka 11:9-13) Libondeli ekoki kosalisa biso ete bopɔlɔ ezala moko na bizaleli na biso, oyo ekozwila biso mpe na bazalani na biso lokola.

12. Komikundola ete bato banso bazangi kokoka, ekoki kosalisa biso na likambo nini mpo na kozala na bopɔlɔ?

12 Tomikundola ete bato bazangi kokoka yango ekosalisa biso na kozala na bopɔlɔ. (Nzembo 51:5) Lokola bato banso, tokoki te “kokanisa to mpe kosala makambo na lolenge ya kokoka; na yango, tosengeli koyeba komitya na esika ya bato mosusu mpe kosalela bango lokola tolingi ete basalela biso. (Matai 7:12) Lokola toyebi ete biso banso tosalaka mabungá, tosengeli koyeba kolimbisa mpe kozala na bopɔlɔ. (Matai 6:12-15; 18:21, 22) Bongo, tozali mpe na botɔndi te epai na Nzambe mpo na bolingo mpe bopɔlɔ oyo ye azali komonisela biso?​—Nzembo 103:10-14.

13. Mpo na nini likambo ya koyeba ete Nzambe azalisaki bato na bonsomi ekosalisa biso na kolóna bopɔlɔ?

13 Tokoki kolóna bopɔlɔ soki tondimi ete Nzambe azalisaki bato mpo ete bazala na bonsomi. Bonsomi yango epesi nzela na moto te ete abuka mibeko na Jéhovah kozanga kozwa etumbu, nzokande yango ezali kopesa nzela epai na moto na moto ete apona makambo masepelisi ye. Toyeba lisusu ete moto moko te asɛngisami ete azala na bomoto oyo biso tozali kotalela ete yango nde eleki malamu. Ezaleli wana ekosalisa biso na kozala na bopɔlɔ.

14.Tosengeli kozala na ekateli nini na ntina na bopɔlɔ?

14 Tolɛmba te mpo na kolona bopɔlɔ. Na kopusama na elimo na Jéhovah, tosili kobongola makanisi na biso. (Baloma 12:2) Elimo motindo moko na Klisto, oyo na bopɔlɔ, ezali kosalisa biso sikawa ete totika kotambola na “mobulu, na bilulela, na komeláká masanga mingi, na lokoso, na milangwa, mpe na kosambela bikeko.” Tosengeli te kobungisa ezaleli ya bopɔlɔ mpo na makambo matali mbongo, bosembo, soko mpe makambo mosusu, to mpo ete bato bazali kotyola biso na ntina na ezaleli na biso ya kobanga Nzambe. (1 Petelo 4:3-5) Eloko moko te esengeli kopusa biso na kokokisa “misala ya nzoto,” likambo oyo likosala ete tobungisa bopɔlɔ na biso mpe likopekisa biso ete kosangola Bokonzi na Nzambe te to mpe kozwa bolamu oyo bokouta na yango. (Bagalatia 5:19-21) Ata soko tozali bapakolami mpo na kozala na bomoi na likoló to mpe tozali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabelé, tosepela na libaku kitoko oyo ya kozala basaleli na bopɔlɔ na Nzambe. Mpo na yango, totalela mwa matomba oyo mazwami na bopɔlɔ.

Matomba ya bopɔlɔ

15. Engebene Masese 14:30, mpo na nini kozala moto na bopɔlɔ ezali likambo ya mayele?

15 Moto na bopɔlɔ azali na motema ya kimya, na elimo mpe na nzoto ya kimya. Ezali bongo mpo ete akozwana na matata na moto te, akosilikaka te na makambo oyo bato mosusu bazali kosala mpe amitungisaka mingi te. Bopɔlɔ ezali kosalisa ye na kopekisa mayoki na ye likambo oyo lizali malamu mpo na makanisi na ye mpe na nzoto na ye. Lisese moko lilobi ete: “Motema na kimya mokoyeisela mosuni bomoi.” (Masese 14:30) Mpo ete tozangi bopɔlɔ, tokoki kooka nkanda, oyo ekoki komatisa tension, kopesa mpasi ya libumu, kolamusa maladi ya mpéma, kopesa mpasi na miso mpe mpasi mosusu. Na kozaláká na bopɔlɔ, moklisto azali kozwa matomba mingi, kati na yango “kimya na Nzambe” oyo ezali kobatela motema na ye mpe makanisi na ye. (Bafilipi 4:6, 7) Kozala na bopɔlɔ ezali mwango ya mayele.

16-18. Bopɔlɔ ezali na bopusi nini likuló na boyokani na biso elongo na bato mususu?

16 Bopɔlɔ ekobongisaka boyokani na biso elongo na bato mosusu. Mbala mosusu tozalaki liboso na momeseno ya kotingama kolobela likambo moko kino tokokokisa mposa na biso. Mbala mosusu bato bazalaki kosilikela biso mpo ete tozangaki ezaleli ya komikitisa mpe na bopɔlɔ. Na bongo, tosengelaki kokamwa te wana tozalaki kozwana ntango nyonso na matata elongo na bato mosusu. Nzokande, lisese moko lilobi ete: “Epai nkoni ezali te, mɔ́tɔ ekozimana; esika motángi azali te, koswana ekosila. Lokola makala likoló na makala na mɔ́tɔ mpe nkoni likoló na mɔ́tɔ, boye na moto na kowelana mpo na kongalisa etumba.” (Masese 26:20, 21, MN) Soki tozali bato na bopɔlɔ, na esika ete ‘totya nkoni likoló na mɔ́tɔ’ mpe tokosilikisa bato mosusu, tokozala nde na boyokani malamu elongo na bango.

17 Moto na bopɔlɔ akozala na baninga malamu. Bato bakozala na boninga na ye mpamba te azali na elimo ya kolónga makambo, mpe maloba na ye mazali ya kolendisa mpe kitoko lokola mafuta na nzoi. (Masese 16:24) Ezalaki bongo mpo na Yesu oyo alobaki ete: “Bokamata ekanganeli na ngai likoló na bino, mpe bozala bayekoli na ngai; mpamba te ngai nazali na bopɔlɔ mpe na motema mosɔkɛmi, mpe bokozwa bopemi mpo na milimo na bino. Mpo ete ekanganeli na ngai ekookisa mpasi te mpe mokumba na ngai mozali na bozito te. ” (Matai 11:29, 30, MN) Yesu azalaki na makambo makasi te, mpe ekanganeli na ye ezalaki kookisa mpasi te. Baoyo bazalaki kokenda epai na ye basalelamaki malamu mpe bazwaki bopemi na elimo. Ezali bobele bongo na ntango tokutani na moko na bandeko na biso baklisto oyo azali mpenza na bopɔlɔ.

18 bopɔlɔ na biso ekosalaka ete tolingama epai na baninga na biso kati na kondima. Na ntembe te baklisto mingi ya Kolinti babéndamaki epai na Paulo, mpamba te ye azalaki kolɔmba bango “na bopɔlɔ mpe na malamu na Klisto.” (2 Bakolinti 10:1, MN) Batesaloniki basosolaki ete mateya na ye mazalaki na bopɔlɔ. (1 Batesaloniki 2:5-8) Bankulutu ya Efese bayekolaki makambo mingi epai na ntoma Paulo mpe balingaki ye mingi. (Misala 20:20, 21, 37, 38) bopɔlɔ na yo ezali kosala ete bato mosusu balinga yo?

19. Lolenge nini bopɔlɔ ezali kosalisa basaleli na Jéhovah ete batikala na esika na bango kati na lisangá na ye?

19 Lokola bazali bato na bopɔlɔ, basaleli na Jéhovah bazali na nkaka te mpo na kotósa mpe na kotikala na esika na bango kati na lisanga (Bafilipi 2:5-8, 12-14; Baebele 13:17) Bopɔlɔ ezali kopekisa biso na koluka lokumu, ‘oyo etongami likoló na lolendo, mpe bongo kosalela Jéhovah mabe.(Masese 16:5) moto na bopɔlɔ akomimonaka te ete aleki baninga na ye kati na kondima mpe akoluka te ete atómbwana likoló na bango. (Matai 23:11, 12) Na esika na kosala bongo, akondima ete ye azali moto na masumu mpe azali na mposa na mbeka ya lisiko oyo epesamaki na Nzambe.

Bopɔlɔ ekopesaka bolamu

20. Bopɔlɔ ezali na bopusi nini likoló na bomoi ya libota?

20 basaleli nyonso na Jéhovah basengeli koyebá ete bopɔlɔ ezali mbuma ya elimo oyo ekopesaka bolamu. Na ndakisa, mpo ete basaleli na Jéhovah bazali komonisa bizaleli lokola bolingo mpe bopɔlɔ, mabota mingi kati na bango mazali na esengo. Na ntango mobali mpe mwasi bazali kosalelana na bopɔlɔ, bana bakobɔkwama kati na kimya, kasi na esika etondi na makambo makasi te, ezala na maloba to na misala. Soki tata azali kopesa bana toli na bopɔlɔ, yango ekozala na bopusi malamu likoló na makanisi na bango ya bolenge, mpe bakokóma mpenza bato na bopɔlɔ. (Baefese 6:1-4) bopɔlɔ, ezali kosalisa mobali na kolinga ntango nyonso mwasi na ye. Ezali kosalisa mwasi na kotósa mobali na ye mpe ekopusaká bana na kozala na botosi epai na baboti na bango. Lisusu mpo na bopɔlɔ, moto na moto ayebi kilimbisa,likambo oyo lizali kopesa bolamu kati na libota mobimba.​—Bakolose 3:13, 18-21.

21. Toli nini ntoma Paulo apesi yango na Baefese 4:1-3?

21 Bato na bopolo mpe mabota ya bopɔlɔ bakopesaka bolamu kati na lisangá. Na yango, basaleli na Jéhovah basengeli kosala milende mákasi mpo na kozala bato na bopɔlɔ. Ozali nde kosala yango? ntoma Paulo alɔmbaki baninga na ye baklisto bapakolami na elimo ete batambola na motindo mobongi na libyangi na bango ya likoló, yango na “komikitisa nyonso mpe na bopɔlɔ, na motema molai, koyikana mpiko kati na bolingo mpe kozala na mposa mpenza ya kobatela bomoko na elimo kati na ekanganeli na kimya.” (Baefese 4:1-3, MN) Baklisto oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabelé basengeli mpe komonisa bopɔlɔ elongo na bizaleli mosusu ya boklisto. Bolarnu ya solo bokoutaka na yango. Ee “esengo na bato na bopolo.’’

Bozongeli

◻ Mpo na nini bato na bopɔlɔ bazali na esengo?

◻ Kozala moto na bopɔlo elimboli nini?

◻ Lolenge nini tokoki kolóna bopɔlɔ?

◻ Wapi mwa matomba oyo makoutaka na bopɔlɔ?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto