Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 15/9 nk. 7-8
  • Mabondeli nini mandimami na Nzambe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mabondeli nini mandimami na Nzambe?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Nkombo na yo ezala mosantu!”
  • “Tika bokonzi na yo eya!”
  • “Tika mokano na ye esalama!”
  • Na ntango Bokonzi ekoyangela
  • “Nkolo, teyá biso ndenge ya kobondela”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Salá na boyokani ná libondeli ya ndakisa—Eteni I
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Mabondeli nini mandimami?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Na ntina na mabondeli oyo Nzambe ayokaka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 15/9 nk. 7-8

Mabondeli oyo makondimama mpenza na Nzambe

MABONDELI mosusu makondimama mpenza kozanga ntembe. Makambo ya ntina na mabondeli yango mazwami kati na libondeli oyo Yesu apesaki lokola elakiseli epai na bayekoli na ye. Alobaki ete: “Bino bobondelaka boye: ‘Tata na biso oyo azali na likoló, Nkombo na yo ezala mosantu! Tika bokonzi na yo eya! Tika mokano na yo esalama na nsé lokola na likoló!’”​—Matai 6:9-13.

Maloba oyo ya Tata na Biso, libondeli oyo Yesu alakisaki, esili kozongelama mbala mingi mpenza. Na likanisi na Yesu, baklisto ya solo basengeli te kozongela libondeli wana; kasi, soki malɔmbɔ na bango makokani na mayoki wana, makondimama mpenza. (Matai 6:7, 8) Koyeisa nkombo na Nzambe mosantu elimboli nini? Mpo na nini kobondela ete Bokonzi na ye eya? Mpe mpo na nini kosɛnga ete mokano na Nzambe mosalama?

“Nkombo na yo ezala mosantu!”

Yesu alobaki epai na Jéhovah, “Oyo-Aleki likoló na mokili mobimba,” na kobengáká ye ete “Tata na biso oyo azali na likoló.” (Nzembo 83:18) Nzambe “abotaki” Bayisraele na kosikoláká bango na boombo na Ezipito mpe na kosaláká kondimana elongo na bango. (Deteronome 32:6, 18; Exode 4:22; Yisaya 63:16) Na eleko na biso, baklisto bapakolami na elimo bazali lelo kotalela Jéhovah na bolingo nyonso lokola Tata na bango mpenza. (Baloma 8:15) Mpe baninga na bango, baoyo bazali na elikya ya kozala na bomoi awa na mabelé, bazali mpe kobondela Jéhovah Nzambe na kobengáká ye ete Tata na biso.​—Yoane 10:16; Emoniseli 7:1-9.

Kasi, mpo na nini kobondela ete nkombo na Nzambe ezala mosantu? Mpo ete, uta botɔmbɔki ya babalani ya liboso kati na elanga ya Edene, nsoni ebwakamaki likoló na nkombo na Nzambe. Mpo na koyanola na libondeli oyo, Jéhovah akosukola nkombo na ye, ekaniseli na ye, longwa na bifundeli nyonso bisalemaki mpo na yango. (Nzembo 135:13) Akosala yango na kolongoláká mabe na mabelé. Na ntina na eleko wana, Nzambe alobaki na nzela na mosakoli na ye Ezekiele, ete: “Nakomonisa lokumu na ngai mpe bosantu na ngai, mpe nakomiyebisa epai na mabota mingi, mpe bakoyeba ete ngai nazali Jéhovah.”​—Ezekiele 38:23.

Jéhovah Nzambe azali mosantu mpe na peto. Nkombo na ye esengeli bongo kozala mosantu, to mpe kobulisama lokola eloko oyo ezali mosantu. Nzambe akomonisa bosantu na ye wana akomonisa lokumu na ye liboso na bikelamu nyonso. (Ezekiele 36:23) Baoyo balingi kozwa ngolu na ye mpe kozwa bomoi ya seko, basengeli komonisa bobangi ya koboya kosalela ye mabe. Basengeli lisusu koyeisa nkombo na ye mosantu na kokesenisáká yango na nkombo nyonso mosusu mpe na kotalela yango ete eleki likoló. (Levitike 22:32; Yisaya 8:13; 29:23) Yango wana Yesu alobaki epai na bayekoli na ye ete babondelaka boye: “Nkombo na yo ezala mosantu!” to “ebulisama, etalelama lokola mosantu.” Tokoki kondimisama ete Nzambe akondima eteni oyo na libondeli ya elakiseli oyo Yesu apesaki.

“Tika bokonzi na yo eya!”

Yesu alakisaki lisusu bayekoli na ye ete babondelaka boye: “Tika bokonzi na yo eya!” Mabondeli oyo mazali kosɛnga koya na Bokonzi na Nzambe makondimama mpenza. Bokonzi yango ezali boyangeli na Jéhovah na molóngó mobimba, oyo emonisami na boyangeli na Masiya na likoló, bopesami epai na Mwana na ye, Yesu Klisto, mpe epai na “basantu” oyo bakosala elongo na ye. (Danyele 7:13, 14, 18, 22, 27; Yisaya 9:6, 7) Uta kala, ba Témoins de Jéhovah bazali komonisa na nzela na Makomami ete Yesu atyamaki lokola Mokonzi na likoló na 1914. Mpo na nini tosengeli bongo kobondela ete Bokonzi “eya”?

Kobondela na ntina na koya na Bokonzi elimboli kosɛnga ete eya koboma banguna nyonso ya boyangeli na Nzambe awa na mabele. Mosika te “bokonzi [na Nzambe] . . . ekobuka mpe ekosilisa bikonzi nyonso [na mabelé] mpe ekotikala lobiko na lobiko.” (Danyele 2:44) Likambo yango likosala ete nkombo mosantu na Jéhovah ekumisama.

“Tika mokano na ye esalama!”

Kati na maloba malandi ya Tata na Biso, Yesu alakisaki bayekoli na ye ete basɛngaka boye: “Tika mokano na yo esalama!” Bazali bongo kosɛnga na Jéhovah ete asala na boyokani na mokano na ye na ntina na mabelé. Lilɔmbɔ oyo lizali kokundola maloba na mokomi na nzembo, ete: “Yango elingi Jéhovah kosala, akosalaka yango, soko na lola, soko na mokili, soko na mai monene, soko na bisika na bozindo. Ye akobutisaka mapatá na likoló longwa na nsuka na mokili; ye akozalisaka mokalikali mpo na mbula mpe akobimisaka mopepe na bibombelo na ye. Ezali bobele ye oyo abomaki bana na liboso na Ezipito, na bato mpe na bibwele lokola. Ye oyo atindaki bilembo mpe bikamwiseli kati na yo, ɛ Ezipito, likoló na Farao mpe basali na ye nyonso. Oyo abɛtaki mabota mingi mpe abomaki mikonzi makasi.”​—Nzembo 135:6-10.

Na kosɛngáká ete mokano na Jéhovah esalama awa na mabelé, tozali bongo kobondela ete Nzambe akokisa mikano na ye na ntina na etando na biso. Kati na mikano yango, kobomama ya banguna na ye mpo na libela, lokola asalaki yango na etando moke na ntango na kala. (Nzembo 83:9-18; Emoniseli 19:19-21) Mabondeli oyo mazali kosɛnga ete mokano na Jéhovah esalama awa na mabelé mpe kati na molóngó mobimba, makondimama mpenza.

Na ntango Bokonzi ekoyangela

Na ntango Bokonzi na Nzambe ekoyangela, mpe ete mokano na Nzambe ekosila kosalama awa na mabelé lokola na likoló, nini ekozala na esika na ebongiseli na bato mabe oyo ezali sikawa? Ntóma Petelo alobi na biso ete: “Tozali kozela makoló na sika mpe mabelé na sika pelamoko elaká na ye [Nzambe]; boyengebene ekofanda kati na yango.” (2 Petelo 3:13) “Makoló na sika” elakisi banguya na elimo na sembo: Yesu Klisto mpe ba 144 000 batuki na libula elongo na ye, baoyo basali Bokonzi ya likoló. (Baloma 8:16, 17; Emoniseli 14:1-5; 20:4-6) “Mabelé na sika” elimboli te etando na mabelé na sika, kasi elakisi ebongiseli na sembo esalemi na bato oyo bakozala na bomoi awa na mabelé.​—Tala Nzembo 96:1.

Na nsé na boyangeli na Bokonzi, mabelé makobongwana paradis. (Luka 23:43) Bato na botósi bakozala na kimya mpe na libateli ya solo. (Nzembo 72:1-15; Emoniseli 21:1-5) Okoki kozala kati na bibele na bato wana na esengo, baoyo bakofanda kati na ezalela wana na kokómáká mokɔteli na sembo ya boyangeli na Masiya, oyo ekoyangela bato na botósi na Bokonzi awa na mabelé. Bakɔteli na boyangeli wana bakobondelaka na motema na bango mobimba ete nkombo na Jéhovah ezala mosantu, ete Bokonzi na ye eya mpe ete mokano na ye esalama. Na ntembe te, Nzambe akondima mabondeli na bango na sembo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto