Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/9 nk. 3-4
  • Makambo mazali mpenza kobonga?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo mazali mpenza kobonga?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Bazwi mwango ya sika
  • Lisungi na Nzambe?
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/9 nk. 3-4

Makambo mazali mpenza kobonga?

“Efélo [ya Berlin] azali bobele kofungwama na meko oyo boyokani bozali sé kokóla kati na mikili ya Est mpe ya Ouest na Mpótó. Kasi esengeli kozela bambula mingi, ata mabota mingi, liboso ete okwea. Bikólo mibale ya Alemanye bikokoka lisusu kosangana te mpo na kosala ekólo moko.” Ezali yango nde tokokaki kotonga na Mars 1989, kati na zulunalo moko na lokumu mingi oyo ekobimaka poso na poso na Amerike.

Soko nsima na mikala 250​—kasi bambula te, mabota nkulu te​—efélo yango ebandaki kokwea. Na mwa baposa, bitiká ya efélo yango oyo ekómaki biloko na kokanisama uta ntango wana, etyami na biro mingi na makili.

OYO bazalaki kobenga ete rido ya libende oyo ebebaki mpenza esukaki na kobukama, kopesáká bongo elikya kati na mitema na bato ete babɛlɛmi na komona kimya mpe libateli kotyama na mokili mobimba. Ata etumba ya Golfe, na Proche​—Orient, ebebisaki te endimeli oyo ete kowelana oyo esili koumela kati na mikili ya Est mpe mikili ya Ouest na Mpótó ekómaki na nsuka na yango, mpe ebongiseli ya sika mpo na mokili mobimba, ebɛlɛmi.

Bazwi mwango ya sika

Uta Etumba ya Mibale ya mokili mobimba, tozali komona milende mizali kosalema mpo na kosala bomoko na mikili ya Mpótó. Na mobu 1951, bikólo ya Europe de l’Ouest basalaki lisangá moko na nkombo communauté européenne du charbon et de l’acier, mpe na nsima na yango, na mobu 1957, basalaki lisangá oyo babengi Marché commun européen. Na 1987, mikili 12 oyo mizali kati na lisangá yango (oyo ezali lelo na bamilio 342 na bato) basili komityela mokano ete, na 1992, bakokóma na boyokani malamu mingi kati na makambo na nkita. Ata boyokani ya politike sikawa emonani lokola ete ekosalema mpenza. Oyo nde mbongwana kitoko mpo na mikili ya Mpótó soko tokanisi makilá mingi oyo masopamaki na boumeli na lisoló na yango!

Kasi, mbongwana ya politike oyo euti kosalema mosika te, ezali na ndimbola mosusu ya ntina mingi mpo na mobu 1992. Mokano na bango mozali mpenza ete, mikili ya Europe de l’Est oyo mibengamaki liboso ete ya communiste, ekɔta mpe kati na bomoko ya Mpótó mobimba.

Lisungi na Nzambe?

Na ntina na ezalela ya kopekisa mangomba oyo eumelaki bambula mingi na Europe de l’Est, mangomba mosusu babukaki etinda ya kozala na bokatikati na boklisto mpe basanganaki na molende mpenza na makambo ya politike. Mpo na yango Frankfurter Allgemeine Zeitung, zulunalo ekobimaka mokolo na mokolo na Alemanye, elobi ete: “Ntembe ezali te ete baklisto bapesaki mabɔkɔ mpo na komema mbongwana na mikili ya Europe de l’Est,” mpe ebakisi ete: “Esengeli soko moke te kobosana mosala oyo bakokisaki.” Elimboli yango na sikisiki ete: “Na ndakisa, na Pologne, mangomba masanganaki na bato na ekólo, mpe ekómaki monguna monene ya ebongiseli ya politike oyo ezalaki koyangela ekólo; na R.D.A. [oyo bazalaki kobenga Allemagne de l’Est], mangomba mapusaki bato na botomboki mpe mapesaki bango lotomo ya koyangana kati na bandakonzambe; na Tchécoslovaquie, ntango baklisto mpe bademokrate bakutanaki na boloko, bazalaki kopesana longonya, mpe basalaki etuluku moko.” Ata na Roumanie, epai kuna “mangomba bamimonisaki basali na sembo na boyangeli ya mokonzi Ceausescu,” botomboki ebimaki mpo ete balingaki kokanga mokonzi ya lingomba moko nkombo na ye Laszlo Tökes.

Vatican mpe ekokisaki mokumba moko. Kati na nimero na yango ya Décembre 1989, zulunalo Time epesi komantere oyo ete: “Atako ezaleli ya mayele oyo Gorbatchev amonisaki na koboya komikɔtisa na makambo ya bikólo nde epesi mpenza nzela na kosikolama ya nokinoki oyo esakolami na Europe de l’Est mobimba uta basanza oyo euti koleka, kasi nsima na ntango, lokumu ekopesama nde na Jean-Paul ll. Na badiskur na ye oyo asalaki na boumeli ya bambula 1980, Jean-Paul ll atikaki te kolobela likanisi oyo ete Europe ekosangisama uta mikili ya Atlantique kino Oural mpe yango ekotongama likoló na kondima na boklisto.’’ Yango wana, na ndakisa, na boumeli ya mobémbo oyo akendaki na mboka Tchécoslovaquie na sanza ya Avril 1990, pape apesaki elikya ete mobémbo na ye mokopesa nzela ete makambo na sika masalema kati na mikili ya Est mpe ya Ouest. Ayebisaki ete likita moko ya baepiskopo ya Mpótó lizalaki kobongisama mpo na kosala mwango oyo mokopesa nzela na kokokisa likanisi na ye ya komona “bomoko kati na Mpótó mobimba etongami likoló na mibeko ya boklisto.”

Na kotalela likanisi ya bomoko na mikili ya Mpótó, kosangisama ya Alemanye mibale ekoki te kozala elembo monene ya bomoko ya Mpótó mobimba oyo, na nsima, ekoki ata kokóma bomoko ya etando mobimba? Kosangana na mangomba kati na likambo yango ezali komonisa te ete ezali yango nde elakami na Biblia? Lokola bakonzi ya mangomba bazali sikawa kosala elongo na bakonzi ya politike, ezala na Est to na Ouest, mpo na kotya kimya mpe libateli, tokoki kolikya te ete makambo nyonso wana makokokisama mosika te? Ezali yango nde tokotalela na kati na masoló malandi.

[Map/​Picture on page 4]

Ndakonzambe Nikolai yo baprotestá no mboka leipzig​—elembo ya mbongwana yo politike no Alemanye

Mikili mizali kati no lisangá oyo babengi ete Marché commun

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto