“Yango eleki nyonso mosusu”
Ezali na maloba oyo nde molakisi moko oyo ekoteyaka anglais na eteyelo moko na mboka Georgie, na Etats unis, alobelaki zulunalo Réveillez-vous! Auti kokoma kala mingi te ete:
“Esili kokoka mbula nsambo uta nazali kosalela Réveillez-vous! mpo na kolakisa lolenge ya kokoma epai na bana kelasi na ngai, mpe nasengeli koloba ete bakomi na bino bazali na mayele mingi koleka. Bokoti na masoló oyo ezali kobenda likebi, mpe bandimbola ya kokamwa na ebele na masoló oyo mazali bandakisa malamu mpo na bakomi oyo bazali kobanda mosala na bango, baoyo baumeli moke to mpe baoyo na mayele mpenza.
“Ezali bobele te ete masoló ya Réveillez-vous! ezali kosepelisa mpe ko ma mayele, kasi ekomeli na yango ezali ya mayele mingi mpenza. Nazali kosalela yango mpo na kopesa bandakisa ya lolenge malamu kosalela bilembo ya bokomi, masese, elobeli ya elilingi mpe lolenge na kokoma. Na ko kesena na bazulunalo mosusu ya bopanzi nsango oyo eyebani mingi, Réveillez-vous! ezali kopesa likoki na molangi na koyekola maloba ya sika, oyo mbala moko ezali na bopusi mpe ezali kosepelisa. Bolóngi ya Réveillez-vous! ezali elembeteli ete bozali kopesa mango mingi mpe likebi na kokomama ya nimero moko na moko na yango.”
Soki olingi zulunalo yango, tuna na ba Témoins de Jehovah ya mboka oyo yo ofandi.