Kokwea ya libota: bantina na yango ezali nini?
ROBERT alobi ete, ‘Azali mpenza goigoi! Motindo na mwasi nini oyo ayebi kokokisa misala ya ndako te!’
Jeanine azongisi ete, ‘Ezali solo te! Akolobaka sé mabe na misala nyonso oyo nazali kosala Azali moto oyo aleki mpenza mpo na koloba bobele mabe na ntina na bato mosusu.’
Nini ekómelaki Robert mpe Jeanine?a Libala na bango likótaki na mikakatano, nzokande eumeli bobele sanza minei. Kasi likambo wana limonani bobele na bango te; baankete emonisi ete kozanga koyokana kati na mabála, ezali likambo limonani bipai binso. Na mikolo na biso, bato na mayele balobi ete ndambo monene ya mabála oyo mauti kosalema kala mingi te na Etats-Unis, ezali kosuka sé na koboma yango. Baankete mosusu ya mawa ezali kouta na bamboka mingi mosusu. Koboma libala ezali bobele moko na makambo ya ezalela wana. Mabota mazali koweia mingi mpenza mpo na bantina ekeseni.
Mwa bantina na mpasi
Bana bakonyokwamaka mingi mpenza na makambo na mpasi oyo mazali kosalema kati na libota. Totangaki kati na zulunalo Newsweek ete: “Ndambo na misato na bana oyo babotami na boumeli ya bambula oyo euti koleka [na Etats-unisl, bazali na likámá ya kobika kati na libota oyo likabwani, liboso ete bakóma na mibu 18. Lelo oyo, bana mingi bazali mbala mosusu kobokolama na tata na bango, soko mpe na mama na bango. Na mikolo na biso, pene na 22% ya bana bazali kobotama libanda ya libála; kati na etuluku wana, pene na ndambo na misato na bango babotami na bamama oyo bazali mpenza bilenge.”
Kolobeláká ntina mosusu ya kokwea ya libota, Patrick Gannon, moto oyo ayekoli bomwana ya mawa, alobi ete: “Baankete ya sika ezali komonisa ete bamilió na bato bakólaki kati na mabota ya mikakatano epai kuna mobulu, kosangana na nzoto kati na bandeko mpe na yikiyiki, na mikakatano miuti na kolangwa masanga, ezalaki komonana mokolo na mokolo.” Ezali likambo na kokamwa te ete bilenge mingi oyo bakutanaki na makambo wana bazala na mpasi wana ekokóma bango mikóló, mpo na kobatela mabota na bango ete makwea te.
Bato mosusu oyo bakotalaka makambo mazali koleka na mokili balobi ete, mpasi oyo ezali na libota euti na mbongwana na makambo na nkita, na ezalela ya bomoi na bato mpe bizaleli na bango oyo bimonani mingi na mikili ya bozwi. Na ndakisa, likambo lipesamelami nzela na basi mingi ete basalaka misala, esili kobebisa lolenge ya kokabola misala mpe mikumba kati na libota. Bamama bazali na mposa makasi ya komonisa makoki na bango ya kosala mosala, batata bazali kobunda na koïmaïma mpo na misala ya ndako mpe bana basengeli na mawa nyonso kolekisa bomoi na bango kati na bisika oyo bakobatelaka bana mike.
Epai na epai na mokili, mabota mingi mazali kokutana na mikakatano makasi. Moto moko oyo azalaki na libota mpo na kobokola, alobaki ete yango ezalaki lokola “kobika libela kati na makambo ya mbalákáká.’’ Ezali bongo likambo na kokamwa te ete pene na ndambo na bato oyo batunamaki na libaku ya ankete oyo esalemaki na institut Gallup, balobaki ete ‘mabota ya Amerike mazali mpenza na mawa uta mibu zomi oyo miuti koleka,’ nkutu, bobele bato moke nde bazali kolikya ete ezalela wana ekobongwana.
Ya solo, kokwea ya libota ezali likambo oyo likolobamaka mingi na televizyo to na radio. Bato bakotangaka mingi mikanda oyo mikopesaka batoli likoló na libota, mikanda misusu kati na yango mizali kopesa batoli malamu, nzokande yango ezangi bososoli malamu. Soki nde bilendiseli mpo na “kososola malamumalamu” to mpo na “komonisa mayoki polele” ekoki kozala na ntina, kasi ezali te kobundisa bantina mpenza ya mikakatano kati na libota. Lisoló elandi likoyebisa yango mpe likomonisa lolenge nini kosilisa likambo litali kokwea ya libota.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Bazali kozwa bankombo mosusu mpo ete bayebana te.