Ntongó moko malamu
Ezali yango nde Réveillez-vous! epesaki epai na motangi mwasi moko ya mboka lllinois (Etats-Unis). Mwasi yango akomelaki biso ete: “Nakamwaki mingi na botangi zulunalo na bino ebengami Réveillez-vous! Ezali mwasi moko nde apesaki ngai zulunalo yango, na ntongo ya lelo na gare. Botangi na yango epesaki ngai kimya mpe ekitisaki motema na ngai; lisusu, ezalaki kitoko mingi. Boyebisa ngai, soki nasengeli kosala nini mpo ete nazwaka zulunalo oyo mbala na mbala.
“Natondi bino lisusu na lolenge oyo bopesi ngai likoki ya kolekisa ntongo moko malamu.”
Tondimisami ete yo mpe okozwa bolamu na botangi masolo kitoko oyo mazali kati na Réveillez-vous! Soki olingi kozwa zulunalo yango, tuna ba Témoins de Jehovah ya mboka oyo yo ofandi.