Boyei malamu na ba assemblées ya distrike “baninga na bonsomi”!
BONSOMI! Liloba yango lizali koyokana malamu mpenza na litoi. Moto te akolinga ete apimelama bonsomi. Moto azwa naino elikya motindo wana te epai na bonsomi ya politike lokola na bambula oyo.
Bonsomi ya politike ekoki komonana malamu, nzokande ezali na bonsomi boleki na motuya mpe ezali na litomba mpenza. Ezali nde bonsomi oyo Yesu Klisto, Mwana na Nzambe, alobelaki wana alobaki epai na bayekoli na ye ete: “Soko bino bokoumela kati na liloba na ngai, bokozala bayekoli na ngai, mpe bokoyeba solo, mpe solo ekosikola bino.” (Yoane 8:31, 32) Bonsomi yango etaleli kozala lisusu te moombo ya bindimeli na mangomba ya lokuta, ya bobangi na bato, ya bamposa mabe, mpe na makambo mingi mosusu.
Ezali bonsomi wana nde ebongisami lokola motó na likambo ya ba assemblées ya distrike “Baninga na bonsomi,” ba assemblées oyo ba Témoins de Jéhovah bakosala na mokili mobimba kobanda na elanga ya mobu 1991. Uta 1919, mbula oyo na boumeli na yango balongolaki bitumbu minene bakatelaki baoyo bazalaki kokamba mosala ya kosakola, libota na Nzambe lizali ntango nyonso na bonsomi monene kati na losambo na peto.
Ezali mpo na yango nde bonsomi elobelamaki mingi na boumeli ya bambula oyo elandaki, kati na ba assemblées ya teokratike na motó ya likambo lokola, “Assemblée ya teokratike ‘Libota ya bonsomi”’ mpe “Assemblée ya distrike ‘Mwana na Nzambe, mwana na bonsomi.”’ Bonsomi bolobelamaki mingi lisusu kati na mikanda lokola “La vérité vous affranchira ” mpe “La vie éternelle dans la liberté des fils de Dieu”
Soki Jéhovah apesi bonsomi epai na basaleli na ye, ezali bobele te mpo ete bazwa bolamu. Lokola ezali biso kotanga yango na Bagalatia 5:13 ete: “Bandeko, bino bobyangami ete bozala na bonsomi. Kasi tika te ete bonsomi na bino bopesa nzela na mposa na nzoto, nde bosalelana lokola baombo, na bolingo.” Assemblée ya distrike “Baninga na bonsomi” ekosalisa biso na koyeba na mokano nini tosengeli kosalela bonsomi na biso, ekopesa biso nzela na kobatela bonsomi wana ya motuya mingi mpe ekomonisa biso lolenge nini kosalela yango malamu.
Assemblée ekobanda na ntongo ya Vendredi na 10H20’ na miziki oyo ekobongisa elimo na biso mpo na kozwa bilei ya elimo oyo bikopesamela biso. Mokolo ya liboso ezali na motó ya likambo “Toyekola koyeba solo oyo ezali kosikola biso,” ezwami na mokapo ya Yoane 8:32. Na boumeli ya ntongo, tokoyoka maloba na botombeli boyei malamu na mokambi ya assemblée mpe discours—clé “Bonsomi oyo Nzambe azali kopesa biso: ntina na yango nini mpe ndenge nini kosalela yango?” Diskur yango ekomonisa likeseni kati na bonsomi ya Jéhovah oyo bozangi nsuka mpe bonsomi bozali na ndelo oyo Ye azali kopesa biso. Ekolendisa biso lisusu na kosalela malamu bonsomi na biso. Programme ya après—midi ekolobela mitindo ndenge na ndenge ya bonsomi na biso mpe mosala na biso ya kosakola mpe ekosuka na drame oyo ete, Basikolami mpo na kokólisa losambo ya solo.
Motó ya likambo na mokolo ya mibale ezali “Totelema ngwi kati na bonsomi oyo Nzambe azali kopesa biso,” ezwami na Bagalatia 5:1. Na ntongo, tokolanda symposium oyo ekomonisa biso lolenge nini mosangani moko na moko ya libota akoki kozwa litomba na bonsomi oyo Nzambe azali kopesa kati na libota. Baoyo bakokisi masengami mpo na kozwa batisimo bakoyoka na likebi nyonso, diskur oyo ekolimbola lolenge ya kozwa bonsomi na nzela ya komipesa epai na Nzambe mpe na batisimo. Programme ya après-midi ekolobela lisoló moko lileki kitoko na ntina na libála: ezali nzela ya kozwa bolamu? Symposium moko ekolobela mitindo ndenge na ndenge ya bonsomi ekolandama na diskur ya nsuka oyo ekobenda likebi likoló na Mosali na liboso na Nzambe, oyo na nzela na ye nde Nzambe akopesa bonsomi mpe bomoi ya seko.
Motó ya likambo ya mokolo na eyenga ekozala “Tosalela bonsomi na biso na boyokani na elimo na Nzambe,” engebene 2 Bakolinti 3:17. Programme ya mokolo wana ekozala mpe na symposium moko eleki kitoko, oyo ekolobela lisese na Yesu lizali na Matai 13:47-50. Ekomonisa lolenge nini ba Témoins de Jéhovah bazali balɔbi na bato. Après-midi, diskur piblike na motó ya likambo ete, “Tokumisa mokili na bonsomi oyo bolakami na Nzambe!” Ekolandama na rezimé ya boyekoli ya Mosenzeli oyo esengeli koyekolama na poso wana. Yango ezali ebongiseli ya sika na ntina etali ba assemblées ya distrike. Mokolo mokosuka na elendiseli moko ezwami na Makomami, oyo ekotinda biso na kolanda kokende liboso na kosaleláká malamu bonsomi oyo Nzambe azali kopesa biso, na etamboli na biso mpe na mosala na biso ya kopesa litatoli.
Tozali koyebisa maloba oyo na mokomi na Nzembo, Davidi, epai na baninga nyonso na bonsomi ete: “Meka mpe sosola ete Jéhovah azali malamu.” (Nzembo 34:8) Sala nyonso ekoki na yo ete ozala na assemblée wana. Zala wana uta ebandeli ya Vendredi na ntongo, kino diskur ya nsuka, na mokolo na eyenga na après-midi. Soko okoya na mposa makasi, kobanzáká mpenza bamposa na yo ya elimo, okotonda. (Matai 5:3, MN) Tobosana te etinda oyo elobi ete “ye oyo akokóna mingi akobuka mingi.” Yango ekokisami na milende oyo tokosala mpo na koyangana na assemblée, na likebi na biso oyo tokozala na yango mpo na kolanda programme mpe na mposa na biso ya kosala nokinoki mpo na kosimba libaku kitoko ya kozala bavolontere na ba assemblées ya distrike “Baninga na bonsomi.”—2 Bakolinti 9:6.