Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/5 nk. 21-23
  • Bimonaneli kitoko oyo bizali kolendisa kondima na biso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bimonaneli kitoko oyo bizali kolendisa kondima na biso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Klisto apesi batoli etondi na bolingo
  • Mwana na Mpate afungoli mokanda!
  • Bokonzi ebotami!
  • Basaleli na Jéhovah bazali kosala mosala
  • Basi mibale ya elilingi
  • Klisto alongi mpe abandi koyangela
  • Mokanda ya Biblia nimero 66—Emoniseli
    “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba”
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Emoniseli—II
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Na kati ya Emoniseli
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Makanisi ya ntina na mokanda ya Emoniseli—I
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/5 nk. 21-23

Bimonaneli kitoko oyo bizali kolendisa kondima na biso

Ndimbola ya makambo na ntina na mokanda ya Emoniseli

YOANE, mosaleli na Jéhovah azali na esanga moke ya Patamo, na mopanzi ya Asie Mineure. Ezali kuna nde ntóma oyo akomi sikawa mobangé azali komona makambo ya kokamwa, ya bililingi, oyo mbala mingi ezali kokamwisa mpe, oyo ezali kolimbola makambo minene. Auti komimona kati na mokolo na Nkolo, oyo ebandi na kotyama na Yesu likoló na kiti na Bokonzi na 1914, mpe esuki na nsuka na Boyangeli na Ye ya mbula nkóto. Ezali solo ete Yoane amoni makambo oyo mazali kosalema na boumeli na eleko moko ya molili tuu kati na Lisoló na bato, kasi oyo nde nkembo kati na emonaneli na ye ya Boyangeli na mbula nkóto na Klisto! Oyo nde mapamboli makozwama na libota ya bato na botosi!

Yoane akomaki bimonaneli yango kati na mokanda ya Bíblia na Apocalypse to Emoniseli. Mokanda yango oyo ekomamaki pene na mobu 96, ezali kolendisa kondima na biso epai na Jéhovah, Nzambe na bisakweli mpe epai na Mwana na ye, Yesu Klisto.​—Mpo na bandimbola ya sikisiki, tala mokanda la Révélation: le grand dénouement est proche! ebimisami na la Société Watch tower.

Klisto apesi batoli etondi na bolingo

Nokinoki bobele ebandeli ya emoniseli na Nzambe oyo epesamaki na Klisto, tozali komona mikanda mitindamaki na masangá nsambo ya batuki na libula na bokonzi elongo na Yesu. (1 kino 3:22) Libosoliboso, mikanda yango mizali naino na batoli. Ezali kolobela bampasi, ezali koyebisa mabe to kopesa bilendiseli, mpe ezali koyebisa mapamboli oyo mazali kozwama na nzela na botósi ya sembo. Atako bayikaki mpiko, Baefese babungisaki bolingo oyo bazalaki na yango na ebandeli. Lisangá ya Sumuluna oyo ezalaki na bozwi mingi kati na elimo, oyo emekamaki na bolozi, elendisamaki na kotikala sembo. Lisangá ya Peleguma ezwaki monyoko te, kasi endimaki mikabwano kati na yango. Atako mosala na bango mokólaki, baklisto ya Tyatire bazali kozwa bopusi ya bato na lolenge na Yezabele. Lisangá na Saladesi lisengelaki kolamuka kati na elimo, oyo na Filadelefi lilendisamaki na kosimba ngwi biloko oyo bazali na yango, mpe Balaodisé, baoyo bakómaki mpio te mpe móto te, bazali na mposa ya kobikisama na elimo.

Maloba oyo mabongi mpenza mpo na kobongisama ya bakonzi oyo bakongela elongo na Klisto mpe, mpo na baklisto nyonso. Bamoko kati na biso basili nde kokóma na mpio te mpe na móto te? Esengeli na biso tozongela molende! Tozala mpenza na maloba na kokitisa mitema lokola kopo ya mai na mpio na ntango ya moi makasi, mpe tolanda komonisa molende mingi mpo na Jéhovah mpe mosala na ye.​—Tala Matai 11:28, 29; Yoane 2:17.

Mwana na Mpate afungoli mokanda!

Jéhovah amonisami sikawa ete afandi likoló na kiti ya bokonzi, kati na nkembo na ye. (4:1 kino 5:14) Azingami na mikóló 24 mpe na bikelamu minei ya bomoi. Kati na loboko na ye, azali na mokanda mozipami oyo mozali na bilembo nsambo. Nani akoki kofungola mokanda yango? Ye oyo abongi na yango, Mwana na Mpate, Yesu Klisto!

Makambo ya nsomo mamonani nsima na kofungolama ya bilembo motoba na Mwana na Mpate. (6:1 kino 7:17) Ntango elembo ya liboso efungolami, klisto abimi, afandi likoló na mpunda mpembe; azwi motolé na bokonzi (na 1914) mpe abimi mpo na kolonga. Wana bilembo mosusu misato bifungolami, na mokili, batambwisi na mpunda bakótisi etumba, nzala mpe liwa. Na kofungolama ya elembo na mitano, baoyo babomamaki mpo na Klisto bazali kongánga mpo na kosenga ete kobukanisa na ntina na makila na bango, mpe moko na moko apesameli “nzambala molai ya mpembe,” oyo elimboli ete bakangami bayengebene. Yango etaleli lisusu lisekwa na bango lokola bikelamu ya elimo, baoyo bapesameli mikumba ya bakonzi. (Tala Emoniseli 3:5; 4:4.) Mokolo na nkanda na jéhovah mpe na Mwana na Mpate, esakolami na nzela na koningana na mabelé na ntango ya kofungolama na elembo ya motoba. Kasi “mipepe minei ya mokili,” elembo ya lisambisi ya koboma, esimbami kino ntango baombo 144 000 na Nzambe mpe akotyama bilembo. Na ntango oyo bapakolami na elimo na Nzambe mpe batalelami lokola bana na ye na elimo, bazali kozwa ndanga, elembo ya libula na bango na likoló. Ezali bobele nsima na komekama nde elembo ekokóma ya libela. (Baloma 8:15-17; 2 Bakolinti 1:21, 22) Yoane akamwaki na komona “ebele monene” bauti na mikili nyonso, ebele oyo bazali na elikya ya kozala na bomoi libela kati na Paradis ya mabelé! Bauti na “bolozi monene,” ntango na mpasi oyo ekokani na mosusu te mpo na bato.

Makambo minene masalemi ntango elembo na nsambo efungolami (8:1 kino 11:14) Minite ntuku misato ya kimya eleki mpo na kopesa nzela ete mabondeli na basantu mayokama, elandami na mabelé na kobima ya móto makasi ezwami longwa na etumbelo. Baanzelu nsambo bazali komilengela mpo na kobeta kelelo, oyo ekoyela mabelé, mai na monana, bitima na mai, mpe likoló na moi, sanza mpe minzoto. Kelelo ya mitano ebimisi mayoyo, elilingi ya baklisto bapakolami baoyo basili komikótisa na liboke kati na etumba uta 1919. kobeta kelelo ya motoba elandami na etumba ya batambwisi na mpunda. Kokokisáká esakweli wana, bapakolami, baoyo basalisami uta 1935 na “ebele monene,” bazali kosakola bansango makasi ya lisambisi mpo na bakonzi ya mangomba na boklisto ya lokuta.

Na nsima Yoane alei mokanda moke, likambo oyo limonisi ete bapakolami bandimi mokumba mopesameli bango mpe ete, eteni ya Liloba na Nzambe oyo bazali kosakola,oyo ezali na makambo na bikateli na Nzambe mpo na boklisto ya lokuta, ezali bilei mpo na bango. Ntóma abengami na komeka bonene mpe bolai ya etumbelo. Yango elimboli ete mikano na Nzambe oyo mitali tempelo mikokokisama nyonso kozanga ntembe, mpe ete baoyo basangani na yango basengeli kotósa mibeko na Nzambe. Bongo tomoni” bataloli mibale bazali kosakola mpe balati ngóto, na nsima babomami,kasi nsuka na yango bazongisami na bomoi. Yango ememi biso na 1918-1919; mosala na kosakola mobomamaki mpenza na banguna, kasi basaleli na jéhovah bazongisamaki na nguya na lolenge moko ya kokamwa mpo ete bazongela mosala na bango mpo ma Nzambe.

Bokonzi ebotami!

Kelelo ya nsambo ebeli. Ezali koyebisa kobotama na Bokonzi. (11:15 kino 12:17) Kasi na likoló, mwasi moko ya elilingi (lisangá ya Jéhovah Nzambe kuna na likoló) aboti mwana mobali (Bokonzi na Nzambe oyo Klisto azali Mokonzi), kasi dalagona (Satana) ameki kolya ye nde alongi te. Etumba oyo elandaki kobotama ya Bokonzi na 1914 kati na makoló, esuki na elónga ya Mikaele (Yesu Klisto), molóngi, abwaki dalagona mpe baanzelu na ye na mabelé.Wana, dalagona azali kolanda kobunda etumba elongo na batikali bapakolami ya libota na mwasi ya likoló.

Yoane amoni sikawa nyama na yauli oyo basali elilingi na yango esalemi na nsomo. (13:1-18) Nyama wana ya politike na mitó nsambo mpe maseke zomi ebimi na “mai” ezali bato na yikiyiki, epai kuna biyangeli na bato bisalemi. (Tala Danyele 7:2-8; 8:3-8, 20-25.) Ekelamu wana ya elilingi ezwi nguya? Ntembe ezali te ete euti na Satana, dalagona. Mpe tala moke! Nyama moko na maseke mibale (nguya ya mokili mobimba anglo-américaine) esali elilingi ya nyama na yauli ekeko oyo eyebani lelo na nkombo ya Organisation des Nations unies. Bato mingi basengisami kosambela nyama na yauli mpe na kondima “elembo” na ye na komekoláká ye kati na misala na bango mpe na kotikáká ye ete ayangela bomoi na bango. Na kokesena, ba Témoins de jéhovah bazali mpenza koboya elembo na bilimu mabe oyo nyama na yauli.

Basaleli na Jéhovah bazali kosala mosala

Basaleli mingi na Nzambe bamonisami ete bazali kosala mosala ntango mbeki nsambo ya nkanda na Nzambe esopami. (14:1 kino 16:21) Yoka! kuna na ngomba na Siona ya likoló, Yoane ayoki ba 144 000 koyemba lokola loyembo na sika. Anzelu moko azali kopumbwa katikati na likoló; azali na nsango malamu ya seko mpo na kosakola epai na bafandi ya mabelé. Yango elimboli nini? Ete ba Témoins de jéhovah bazali kozwa lisalisi ya baanzelu mpo na kosakola nsango va Bokonzi.

Yoane akamwaki na komona ete kobebisama na vinyo ya mokili mpe mabota nyonso manyatami ntango ekamelo na nkanda na Nzambe ebwakamaki libanda. (Tala Yisaya 63:3-6; Yoele 3:12-14.) Na etinda ya jéhovah,baanzelu nsambo bazali sikawa kosopa mbeki nsambo ya nkanda na Nzambe. Mokili, mai mpe maziba na mai, bakisa mpe moi, kiti na bokonzi ya nyama na yauli mpe Efalata ebebisami na ntango ya kosopama na mbeki motoba ya liboso. Meka kokanisa nsomo oyo Yoane azalaki na yango ntango amonaki propagande ya bilimu mabe, koyanganisa mikonzi na mokili mpo na etumba ya Nzambe na Armagedon. Mbeki ya nsambo esopami likoló na mopepe, kobendáká bongo libebi.

Basi mibale ya elilingi

Yoane akamwi mpenza na komona nsuka ya Babilone Monene, lisangá na mangomba ya lokuta ya mokili mobimba, mpe komona makambo kitoko oyo malandi nsima na kobomama na yango. (17:1 kino 19:10) Amonisi ye ete, alangwe makila na babulami, azali kotambola likoló na nyama na yauli ya langi motane elongo na mitó nsambo na yango mpe na maseke zomi na yango (Société des Nations mpe Nations unies oyo ekitanaki yango). Kasi tala ete maseke mabalukeli ye mpe matiki ye bolumbu!

Mingóngó na likoló oyo mizali kokumisa Jah mpo na kobomama ya Babilone Monene, mizali koyokana. Epai mosusu, libondeli moko ya kafukafu lizali kosakola libala ya Mwana na Mpate mpe mwasi na ye, bango ete bapakolami basekwisami.

Klisto alongi mpe abandi koyangela

Yoane amoni sikawa Mokonzi na bakonzi kokamba mampinga na likoló mpe koboma ebongiseli ya biloko na Satana. (19:11 kino 21) Ee, Yesu “Liloba na Nzambe,” azali kobundisa mabota. Amoni lisusu nyama na yauli (lisangá na politike ya Satana) mpe mosakoli na lokuta (nguya ya mokili mobimba anglo-américaine)kobwakama kati na “libeke na móto,” elembo na kobomama mobimba mpo na seko.

Nini esalemi na nsima? Yoane amoni Satana abwakami na libulu mozindo. Na nsima, emonaneli ya Boyangeli ya mbula nkóto na Klisto elandi, na boumeli na yango Yesu mpe basekwi oyo bazali koyangela elongo na ye bazali kosambisa mokili, kotomboláká bato ya botósi kino na ezalela ya kokoka! (20:1 kino 10)Tala ntango na komekama monene eyei. Ekobima ye na libulu mozindo, Satana akomeka kozimbisa bato oyo basili kokóma na ezalela ya kokoka, Kasi kobomama nde ekosukisa misala nyonso ya bilimu mabe mpe bato nyonso oyo bakotombokela Nzambe.

Kozongisáka makanisi na nsima, Yoane akamwaki mpenza na komona baoyo nyonso bazalaki kati na kufa, Hadès (nkunda epai bato nyonso bakendaka) mpe na mai monene, basekwisami mpe basambisami liboso na Nzambe, ye oyo afandi likoló na kiti mpembe ya bokonzi. (20:11 kino 15) Oyo nde kosikolama ntango liwa mpe Hadès ekobwaka kati na libeke na móto! Ekosenga lisusu bato te!

Bimonaneli na Yoane bikómi na nsuka na yango. Amoni Yelusaleme na Sika. (21:1 kino 22:21) Kapitale wana ezali kokita longwa na likoló mpe ezali kongengisa mabota.“Ebale ya mai na bomoi” ezali kotyóla katikati na Yelusaleme na Sika. Ezali komonisa solo oyo ezwami kati na Makomami, bakisa mpe bibongiseli nyonso mosusu oyo bizwami na Nzambe likoló na mbeka na Yesu, oyo ezali kopesa nzela na kosikola bato ya botósi na lisumu mpe na liwa, mpo na kopesa bango bomoi ya seko. (Yoane 1:29; 17:3; 1 Yoane 2:1, 2) Na ngambo nyonso mibale ya ebale, Yoane amoni banzete oyo bankasa na yango ezali nkisi mpo na lobiko. Banzete yango ezali ndambo na bibongiseli bisili kozwama na Jéhovah mpo na kopesa bomoi ya seko epai na bato ya botósi. Nsango na bosukisi ya jéhovah mpe ya Yesu, elandami na libyangi moko. Ezali kitoko na koyoka elimo mpe mwasi na libala kobyanga baoyo nyonso bazali na mposa na komela ete, ‘baya kokamata mai na bomoi, kozanga kofuta’! Wana ezali biso kotanga maloba oyo mazali kosukisa Emoniseli, na ntembe te tozali kokabola esengo na Yoane, oyo angangi ete: “Amen! Yaka, Nkolo Yesu.”

[Etanda/​Elilingi na lokasa 21]

Senzéláká: kati na maloba na esakweli oyo mataleli etumba na Nzambe na Armagedon, elobami ete: ‘Tala! Nakoya lokola moyibi. Esengo na oyo akengeli mpe abateli bilamba na ye, ete atambola bolumbu te mpe amona nsoni na ye te.‘ (Emoniseli 16:15) Wana ezali mbala mosusu likanisi mpo na mikumba ya mokengeli, to mosali, na ngomba na tempelo na Yelusaleme. Na boumeli ya bokengeli, azalaki kotambola zingazinga ya temple mobimba mpo na koyeba soko bakangeli ya libota na levi bazalaki kosenzela kasi balali te na esika na bango ya mosala. Mokengeli moko oyo bakutaki ye ete alali, abetamaki makasi na nzeté, mpe bilamba na ye ya likoló bikokaki kotumbama, etumbu oyo ezalaki kopesa nsoni epai na moto wana asalaki mabe. lokola Armagedon ekómi penepene, batikali bapakolami ya ‘bonganga na bokonzi,’ to ‘ndako na elimo,’ bazali na ekateli ya kosenzela kati na elimo. Baoyo basangani na bango mpe basali ’ebele monene’ baoyo bazali na elikya ya kofanda na mabelé, basengeli kosala motindo moko mpamba te bazali mpe kosalela Nzambe bobele moko na mosala na bulee kati na tempelo. (1 Petelo 2:5, 9; Emoniseli 7:9-17)Ezali mpenza bakengeli baklisto nde basengeli kosenzela mpo na kopekisa ete mopepe mabe eya te kotungisa lisangá. Basambeli nyonso ya sembo oyo bazali kati na tempelo ya elimo ya Nzambe bazali kosenzela. Na bongo, bazali mpenza kobatela ’bilamba na bango ya likoló,’ elembo oyo emonisi ete bazali na mokumba ya kosala lokola ba Témoins de Jéhovah.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto