Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/5 lok. 24
  • Jéhovah apesi lisalisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Jéhovah apesi lisalisi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Masolo mosusu
  • Mosala ya kosunga bandeko
    Bokonzi ya Nzambe ezali koyangela!
  • Kosunga bato oyo bakutani na makama
    Ndenge oyo makabo na yo esalelamaka
  • Mosala ya kopesa lisungi na 2023​—“Tomoni mpenza bolingo ya Yehova”
    Ndenge oyo makabo na yo esalelamaka
  • Kosunga bandeko oyo bakutani na makama na 2021—Bandeko na biso basundolami te
    Ndenge oyo makabo na yo esalelamaka
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/5 lok. 24

Masoló ya basakoli na Bokonzi

Jéhovah apesi lisalisi

KALA mingi te, ba Témoins da Jéhovah ya Afrike ya Ngele bautaki koyoka nsango ya ezalela na mpasi oyo ya bandeko na bango ya elimo, baoyo bazali na mboka moko ezali penepene na bango, epai mosala ya kosakola mopekisami, Eyebisamaki ete, likoló na kokauka makasi ya mabelé, bandako na bango bazalaki kolya bobele misisa ya banzeté. Lokola bazalaki mpe na bilamba ya malamu te, ba Témoins mosusu bazalaki kokakatana mpo na kosangana na mosala ya kosakola.

Bandeko ya Afrike ya Ngele basalaki eloko. Mokanda moko motindamaki na masangá oyo mazali na etuka ya Johannesburg, komonisáká mposa na ntina na bilamba. Nsima na mwa mikolo, ba tonnes misato ya bilamba ekongolamaki. Bandeko ya bolingo malamu bapesaki maboko mpo na mosala yango. Bibongiseli bizwamaki mpo na kotinda ba tonnes misato ya madesu, tonne moko ya mafuta, tonne moko ya sabuni mpe tonnes 17 ya fufu ya masangó. Ntango kompanyi oyo epai basombaki fufu ya masangó ayokaki nsango ya mpasi ya ba Témoins kati na mboka yango enyokwamaki na kokauka ya mabelé, kompanyi wana apesaki likabo ya koleka tonne moko ya bilei wana ya ntina mingi mpo na kokende kotika 25 tonnes ya bilei wana na ntaká ya bakilometele 5 500 longwa wana. Etikalaki bobele kozwa ndingisa ya bakonzi ya Letá mpo na kokatisa mboka yango ebebi mpenza na bitumba.

Bakonzi ye mboka wana bandimaki ete ba Témoins de Jéhovah bazalaki na mboka na bango, atako mosala na bango mondimami ne Letá te. Mpe balobi ete. tokoboya te ete botindela bango biloko. Ndingisa epesamaki. Mikanda ya Letá masalemaki mpe, Vendredi le 20 Avril, ba Témoins bakatisaki ndelo ya mboka wana kozanga nkaká. Kasi bakutanaki soko na bituluku 30 ye basoda oyo bakokengelake nzela, epai bazalaki mbala na mbala kotuna bango mikanda na bango. Ne ntango wana nde be Témoin bayebaki ntina ya mikanda yango.

Nsima na kosala soko bakilometele 140 kati na mboka wana, bakangamaki na ebale monene oyo ezalaki na mai mingi. Etanda (pont) ya liboso ebebisamaki, mpe etanda oyo etyamaki na esika na yango mpo na ntango moke, ebongaki te ete motuka ya monene eleka wana. Kasi bamonaki ete motuka moke oyo bakendeki na yango ekokaki kokatisa etanda yango etondaki na mai, kozanga likámá. Bazwaki ekateli ya kokabwana. Etuluku moko esengelaki kotikala pene na ebale monene oyo etondaki na mai, nzokande mosusu esengelaki kolanda mobembo na bango mpo na kokutana na bandeko, pene na bakilometele 260 epai na Nord mpenza. Oyo nde esengo wana bakómaki epai na bandeko! Bazalaki sé koseka, koyambana mpe kopesana mbote. Mosika te mituka mibale oyo mizwamaki wana, mikendeki kokutana na etuluku ya bandeko oyo bazalaki kozela pene na ebale monene. Kuna, biloko bizalaki na motuka ya monene bilongolamaki na yango mpo na kolya kati na mituka misusu mibale ya mike.

Bansango oyo ezwamaki emonisaki botondi bozindo epai na Jéhovah mpo na biloko oyo bitindamaki. Kasi, atako mpasi oyo bazalaki na yango na mosuni, bandeko bazalaki mpenza na bosenga mpo na kozwa bilei ya elimo. Lisangá mokomoko ezalaki kozwa bobele ekzamplere moko ya Mosenzeli, oyo basengelaki kozongela kokoma lisusu yango mpo na libota moko na moko. Na lisalisi ya Jéhovah, bibongiseli bisili kozwama sikawa ete ebele na bilei ya elimo bitindamaka mbala na mbala epai na bandeko ya mboka wana.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto