Tokozala nde na kimya mokolo mosusu?
“ETUMBA ezali moko na makambo oyo mazali koumela kati na Lisoló ya bato, mpe ata ezaleli nini ya bomoi na bato to mpe démocratie ekoki kolongola yango te,” Ezali yango nde Will mpe Ariel Durant bakomaki kati na mokanda Les leçons de l’Histoire (angl.). Babakisi ete: “Kimya ezali ezalela moko ya kotengatenga, oyo ekoki mbala mosusu kotyama bobele na kotosa bokonzi ya moko na banguya minene ya ntango oyo to soko mpe banguya yango basaleli bokatikati ya bokasi na bango.”
Na solo, atako milende makasi misalemi, bato bazali bobele kozwa kimya te. Mpo na nini? Mpo ete bantina na bitumba ezali mozindo mpenza, kasi euti te bobele na matáta ya politike, ya kowelana mabelé to matáta kati na makambo matali bomoi ya bato oyo tokomonaka polele. Will mpe Ariel Durant balobaki ete: “Bantina ya bitumba ezali bobele yango moko na oyo ekobimisaka kowelana kati na bato: lokósó, mobulu, lolendo; mposa ya kozwa bilei, mabelé, mabángá ya ntalo mpe kurá, mposa ya koyangela.”
Kasi Biblia ezali komonisa ntina mozindo ya mobulu mpe bitumba, ezala kati na bato to na etando mobimba. Totangi ete: “Bitumba mpe koswana na kati na bino euti wapi? Euti te na mposa mabe na bino oyo ekobundaka kati na bilembo ya nzoto na bino? Bozali na mposa nde bokozwaka te. Bokoswanaka mpe bokobundaka etumba.”—Yakobo 4:1, 2.
Tosukisi boye ete: Mpo na kozwa kimya ya solo, esengeli kolongola te bobele makambo oyo mazali bilembo (bitumba, botomboki, kozwa bokonzi na makasi, botemeli), kasi lisusu bantina mozindo (kokanisela bato mosusu mabe, elulela, koyina, mposa ya etumba) oyo ezali kati na mitema ya bato. Na esika na bizaleli wana, esengeli kokitanya misala mizali na boyokani na bizaleli ya kosepela na bazalani oyo ete, bolingo, bobóto, kotyela motema mpe bokabi. Moto moko akoki kokokisa yango? Soki etalelaki bobele mpo na bafandi na mabelé, bato oyo bazangi kokoka mpe bakokufaka, mbele eyano ekozala ete, te. Kasi ezali na moto moko oyo mpo na ye, mokakatano moko te ezali mpasi mpo na kosilisa. Ezali Ye nde ayebi koyanola na motuna oyo ete: Kimya ekotyama mpenza ntango nini?
Ye oyo akoki kotya kimya
Esili koleka soko bikeke 28, wana apemamaki na Nzambe, mosakoli Yisaya alobaki ete: “Mwana abotameli biso, mwana mobali apesameli biso; mpe bokonzi bokozala likoló na lipeka na ye. Mpe akobyangama ete Mosungi na kokamwa, Nzambe na nguya, Tata na seko, Nkolo na kimya. Kofuluka na bokonzi na ye mpe na kimya ekosuka te.”—Yisaya 9:6, 7.
Nsima mpenza, emonisamaki ete ye oyo akotya kimya ezali mosusu te bobele Yesu Klisto, “Mwana na Oyo—Aleki—Likoló.” (Luka 1:30-33; Matai 1:18-23) Kasi mpo na nini akolónga na esika oyo bakonzi mpe bayangeli mosusu bazwaki elónga te? Tokomona ete mwana yango ya “elaká” asengelaki te kotikala bobele mwana moke, lokola bamosusu bazali komonisa ye. Asengelaki nde kosalela “bokonzi” na lolenge ya “Nkolo na kimya,” mpo na bolamu ya seko ya bato.
Boyangeli na Yesu azali komonisa matomba mosusu. Na lolenge ya “Mosungi na kokamwa,” oyo atondi na bososoli na kokamwa na ntina na motindo na bato mpe oyo na mayele mingi, akozala na makoki ya kobimisa bantina ya makambo minene mpe akosilisa bongo makambo na mpasi oyo bayangeli ya mokili bazali lelo kokutana na yango nde bazali kolónga yango te. (Matai 7:28, 29; Malako 12:13-17; Luka 11:14-20) “Nzambe na nguya,” Yesu Klisto, moto na bonzambe oyo asekwaki, oyo atyami sikawa lokola Mokonzi masiya kati na makoló, akotya kimya na kosaláká kati na etando monene, makambo oyo asilaki kokokisa na ntango azalaki awa na mabelé: kobikisa baoyo bazalaki na malali makosilaka te, kopesa bilei na bibele, mpe nkutu kopekisa nguya makasi ya ezalela ya ntango (mipepe, moi, malili mpe bongo na bongo). (Matai 14:14-21; Malako 4:36-39; Luka 17:11-14; Yoane 2:1-11) Na lolenge na ye ya “Tata na seko,” Yesu azali na nguya ya kozongisa bakuti na bomoi mpe kopesa bango bomoi ya seko. Ye moko akobika seko, likambo oyo lizali kondimisa ete Boyangeli na ye elongo na kimya ekoumela seko.—Matai 20:28; Yoane 11:25, 26; Baloma 6:9.
Lokola apesameli bokonzi motindo wana, Yesu Klisto azali bobele ye moko nde azali na makoki ya kosilisa bantina mozindo ya bitumba mpe koswana. Akosala bobele mayokani ya kimya te to oyo ebéngami ete mwango ya kozala na kimya kati na mikili, boyokani oyo bokobeba nsima likoló na etumba ekolanda. Kasi, akolongola nde matáta nyonso ya politike, ya kowelana mabelé, matáta na kati na makambo matali bomoi na bato mpe makambo ya nkita, na kotyáká bato banso na nsé na boyangeli moko, oyo ya Bokonzi na Masiya. Na kokambáká bato banso kati na losambo ya Nzambe bobele moko, Jéhovah, akolongola eloko ezali mbala mingi kobimisa bitumba: mangomba ya lokuta. Ntembe ezali te ete Yesu Klisto, Nkolo na kimya, akokokisa makambo nyonso wana. Etikali bobele koyeba ntango oyo yango ekosalema.
Makambo oyo mazali komema na kimya ya solo
Nsima na lisekwa mpe kokende na ye na likoló, na mobu 33, Yesu asengelaki kozela ete ntango oyo etyamaki ekoka mpo ete abanda mosala na ye. yango eyokanaki na maloba na Jéhovah, ete: “ ‘Fanda na loboko na ngai ya mobali, kino ekotya ngai bayini na yo lokola etemelo ya makolo na yo.’ E tika ete Jéhovah. abimisa yo ma Siona na makasi na mokonzi. ‘Zala na bokonzi kati na bayini na yo.’” (Nzembo 110:1, 2; Luka 22:69; Baefese 1:20; Baebele 10:12, 13) Ntango nini yango esengelaki kokokisama? Uta bambula 70 koleka, ba Témoins de Jéhovah bazali kosakola nsango malamu na mabelé mobimba ete, Yesu Klisto asili kobanda koyangela na 1914 kati na Bokonzi na Nzambe kuna na likoló.a
Kasi, okoloba mbala mosusu ete: “Uta 1914, kimya ezali te. Nzokande, makambo mazali kobeba sé kobeba kobanda ntango wana.” Ozali mpenza na elónga. Ezali mpenza elembo ete makambo mazali kosalema elobamaki. Mpo na yango Biblia elobi ete, ntango “bokonzi na mokili esilaki kokóma bokonzi na Nkolo na biso mpe Klisto na ye , . . . mabota mangalaki.” (Emoniseli 11:15, 18) Na esika ete bamitya na nsé na boyangeli na Jéhovah Nzambe mpe Mokonzi na ye ya kimya, mabota baweli kokóta na etumba monene mpo na bokonzi ya mokili, mpe bamonisaki mpenzampenza nkándá na bango epai na baklisto oyo bazalaki kotatola nsango ya Bokonzi oyo botyami na Nzambe.
Mokanda ya Emoniseli mozali koyebisa biso ete, uta koya na ye kati na nguya ya Bokonzi na ye, Yesu Klisto abandaki mosala na ye ya kobengana Satana mpe bilimu mabe na ye longwa na likoló: “Saisaipi lobiko, na nguya, na Bokonzi na Nzambe na biso, na bokonzi na Klisto na ye, esili koya; mpo ete mofundi na bandeko na biso, oyo akofundaka bango liboso na Nzambe butu na moi, asili kobwakama!” Ebimisaki makambo nini? Lisoló elandi ete: “Na bongo bosepela, ɛ likoló, mpe bino bafandi wana! Mawa na mokili mpe na mai monene! Mpo ete Satana akiteli bino na kongala mingi, awa eyebi ye ete azali na mwa elaká mokuse.”—Emoniseli 12:10, 12.
Elembo ya nsuka
Nyonso oyo touti komona esalisi biso na koyeba mpenza mpo na nini mabota bakokaki kotya kimya te, atako milende nyonso oyo basalaki. Nkándá monene ya Diable, oyo emonani kati na kongala ya mabota, esili kokótisa mokili na yikiyiki mpe na mobulu monene oyo emonani naino te kati na Lisoló ya bato. Bongo, nyonso wana ekosila ntango nini? Biblia epesi biso elembo monene, ete: “Ekoloba bato ete, ‘Kimya ezali, makambo mazali te!’, wana libebi ekokwela bango pwasa.”—1 Batesaloniki 5:3.
Okangi ntina ya likebisi oyo? Makambo mazali koleka na mokili, lokola oyo touti kolobela kati na lisoló ya liboso, ezali komonisa ete bayangeli mpe ebele na bato bazali kolobela kimya mpe bamipesi na yango koleka na ntango na kala. Bamoko bakanisi ete mpo koswana kati na mabota esili, likámá ya kobomama na etumba ya nikleere ezali lisusu te. Ya solo, mabota balobi mingi mpenza na ntina na kimya mpe libateli malamu. Kasi yango ezali komonana kati na mokili? Omikundola maloba oyo na Yesu na ntina na bato oyo bakobika na mikolo ya nsuka, miye mibandaki na 1914, ete: “Nazali koloba na bino solo ete, libota oyo likoleka te, kino ekobima makambo oyo nyonso.” (Matai 24:34) Na yango, kimya ekoya mpenza liboso na nsuka na libota oyo, kasi na nzela na milende oyo mabota bazali kosala te. Kimya ya solo, ya sembo, ya boyengebene, oyo Jéhovah Nzambe asilaki kolaka yango, ekoya bobele na nzela na boyangeli na ntango ekoya, ya Mokonzi na ye ya kimya, Yesu Klisto.—Yisaya 9:7.
Soki olingi komona mokolo oyo kimya ekotyama mpenza mpe soki olingi kosepela na yango elongo na baoyo nyonso yo olingaka, boye tya bilikya na yo likoló na Nkolo na kimya mpe batela ntango nyonso maloba oyo mazali kopesa elikya ete: “Senzela ntango nyonso, mpe bondela ete bozala na makasi ya kokima makambo oyo nyonso malingi koya, ete botelema liboso na Mwana na moto.”—Luka 21:36.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na kozwa makanisi mosusu likoló na lolenge oyo Biblia ezali kotanga mibu mpe likoló na kokokisama ya bisakweli na yango, tala mokapo 12 kino mokapo 14 ya mokanda “Que ton royaume vienne!”, yango ebimisami na Watchtower Bible and Tract Society of New York, Inc.
[Etanda na lokasa 6]
NDIMBOLA MPENZA YA KIMYA
Mpo na bato mingi lelo, kimya elimboli kozanga bitumba to mobulu. Kasi, oyo ezali bobele ndimbola moke ya liloba yango. Na ntango na kala, liloba “kimya” (na hébreu, sha-lohm‘) to liloba “kimya ezala na yo!” ezalaki lolenge oyo bazalaki kopesana mbote. (Basambisi 19:20; Danyele 10:19; Yoane 20:19, 21, 26) Emonani polele ete yango ezali kopesa te bobele likanisi ya kozanga bitumba. Tala oyo mokanda Le concept de paix (angl.) elobi na ntina yango: “Ntango liloba shalom lisalelamaki mpo na kolobela kimya, baoyo bazalaki kosalela yango bazalaki kokanisa libosoliboso na mokili to libota un bato oyo bazali na bomoko, ezalela ekoki, bazali na nyonso. . . . Epai kimya ezali, ezala mobimba na yango to mpe basangani na yango basili kokóma na nivo ya likoló mpenza to oyo eleki kitoko mpenza.” Ntango Nzambe akotya kimya, ezali bobele te ete bato “bakoyekola lisusu etumba te,” kasi ‘moto na moto akofanda na nsé na vinyo na ye mpe na nsé na mowiti na ye, mpe moto akobangisa bango te.’—Mika 4:3, 4.
[Elilingi na lokasa 7]
Uta Etumba ya Liboso ya mokili mobimba, kimya esili mpenza kolongwa