Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/3 lok. 14
  • “Bampate bakoyokaka mongongo na ye”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Bampate bakoyokaka mongongo na ye”
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Na nsuka, ayokaki
  • Libondeli ya mwasi oyo akobangaka Nzambe liyokani
  • Epai tokoki kozwa libɔndisi
    Yekolá epai ya Moteyi Monene
  • Mobateli ya mpate oyo aleki malamu mpe mapango ya bampate
    Yesu azali nzela, solo mpe bomoi
  • Esengo ya kozala mobateli ya mpate
    Lamuká!—2011
  • Kenda kotala mboka, mpe bampate na yango lokola!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/3 lok. 14

Masoló ya basakoli na Bokonzi

“Bampate bakoyokaka mongongo na ye”

◻ YESU alobaki ete:“Bampate bakoyokaka mongongo [ya mobateli na bampate], mpe akobangaka bampate na ye na nkombo na bango mpe akokamba bango libandá.” (Yoane 10:3) Abakisaki lisusu ete:“Nayebi bampate na ngai mpe bampate na ngai bayebi ngai.” (Yoane 10:14, MN) Baoyo bakokani na bampate bakoyokaka Yesu ntango azali koloba na bango na nzela na Biblia. Tala ndenge nini bato mibale ya motema sembo, balandaki nzela yango na ltalie.

Na nsuka, ayokaki

◻ Tala oyo Alberto akomaki: “Na mibu 16, nabandaki komela marijuana mpe LSD, na nsima, na mibu 18, nakomaki momeli na héroïne. Nasengelaki kosala nyonso mpo na kozwa drogue. Nayibaki, natekaki drogue, nakosaki bato na ntina na mosolo, natekaki biloko na ngai. Nakokaki kotika te. Na bopemi na mboka mopaya, bato balekisaka ntango mingi te na zámba mpe bamikótisaka te kati na bituluku oyo bizali kobundisa bokeseni. Namekaki kobala, kasi nsima ya mwa ntango, nazongelaki makambo na ngai ya kala. Ata nsima na kobota mwana ya mwasi, natikaki drogue te. Na solo, ezalaki mpenza mabe, mpamba te nakómaki na bosenga ya mbongo. Na nsima mwasi atikaki ngai. Na boumeli ya mbula mibale oyo nafandaki ngai moko, namonaki mwana na ngai ya mwasi bobele mbala mibale. Nazalaki kokima batekisi na drogue baoyo nasengelaki kofuta mbongo, mpe mbala mingi nazalaki kotungisama mpo ete nazalaki na bosengá.

“Na ntango wana, nakanisaki na mokanda moko oyo ba Témoins de Jéhovah bapesaka ngai mwa bambula liboso. Ezali motindo wana nde nayekolaki koyeba Nzambe ya solo, Jéhovah; bongo, nabondelaki ye ete asalisa ngai. Wana nazalaki mokemoke kosalela makambo oyo nazalaki koyekola, nazalaki komitungisa mingi te mpo na bosenga na ngai. Nazwaki mosala, mpe na lisalisi ya Jéhovah, libota na ngai lizongaki. Nakendaki na Salle du Royaume mpe, wana, nasosolaki ete solo ezalaki epai na ba Témoins de Jéhovah. Mwasi na ngai mpe ngai, toyekolaki Biblia elongo na ba Témoins mpe na nsuka, tozwaki batisimo. Sikawa, tozali ba pionniers permanents mpe tozali na esengo ya kokabola elikya elongo na bazalani na biso.”

Libondeli ya mwasi oyo akobangaka Nzambe liyokani

◻ Mwasi moko ayebisi ete:“Na 1958, nazalaki kosangana na misala ya ndako-nzambe na ngai, mpe mingimingi kosala mibembo mpo na kotala mpe kokumisa Bikeko ya Ngondo na lokumu na bolingo na Nzambe, na Rome. Na boumeli ya ntango, nakómaki moninga ya cardinal molandi ya liboso, na Rome, mpe nasalaki masoló mingi ya nkuku elongo na pape Paul Vl mpe pape Jean-Paul ll. Nsima na kolekisa bambula 25 na kobongisa mibembo mpo na kokende kotala mpe kokumisa bikeko mosantu ya lingomba, nazwaki diplôme mpo na yango. Kasi, na boumeli ya bambula, kondima na ngai ya mokatolike ya molende ebebaki. Nazalaki komona boyibi, bokosi, kopesa mikumba bobele epai na bandeko mpe mimbongo ya biloko mabe. Lokola nayebaki ete mibeko na Nzambe mizalaki kotyolama mbala na mbala, nabandaki kotalela Lingomba na lolenge mabe. Natungisamaki mpe nasɛngaki na Nzambe ete asalisa ngai, soki te kondima na ngai ekobunga. Mbala mosusu nazalaki kolela.

“Mpe mokolo moko, esili bongo koleka bambula minei, mwana na ngai ya mobali amemelaki ngai Mosenzeli mpe Réveillez-vous! oyo ba Témoins de Jéhovah batikelaki ye. Nasepelaki na bazulunalo yango kino nasɛngaki mwana na ngai ya mobali ete amemela ngai mosusu. Nsima mwa moke, namonaki Salle du Royaume moko ya ba Témoins de Jéhovah mpe nakomaki mwa maloba na porte mpo ete batinda moto moko aya kotala ngai. Mikolo minei na nsima, ba Témoins bayaki. Nabandaki koyekola Biblia mpe nakólaki kino kozwa batisimo. Sikawa, nandimisami ete nasili komona eloko oyo nazalaki koluka: solo.”

Bato oyo bayokaki mongongo ya mobateli na mpate aleki malamu, Yesu Klisto. mpe ‘solo esili kosikola bango.’​—Yoane 8:32.

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 14]

Garo Nalbandian

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto