Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w91 1/3 nk. 10-13
  • Nazali na bantina mingi ya komonisa botɔndi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nazali na bantina mingi ya komonisa botɔndi
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mosala na ngai ya molakisi
  • Ba assemblées internationales
  • Nakóti na molongó ya ba pionniers
  • Lisalisi ya bipanzeli na nsango
  • “Nzela ya Nzambe ezali nzela ya bomoi”—Liyangani ya etúká to ya mikili mingi mpo na mobu 1998
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
  • Koluka Liboso Bokonzi​—⁠bomoi Ya Solosolo Mpe Ya Esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
w91 1/3 nk. 10-13

Nazali na bantina mingi ya komonisa botɔndi

LISOLÓ YA LOTTIE HALL

EZALAKI na 1963, wana ezwaki biso mpepo longwa calcutta, na lnde, mpo na kokende Rangoun, na Myanma. Mwa moke nsima na kopumbwa, moko na baninga na biso baklisto amonaki ete mafuta mazalaki kobima na lipapu ya mpepo. Ntango bayebisaki na bakumbi mpepo, balobaki ete mpepo esengelaki kokita. Esengelaki liboso kolongola ndambo monene na kérosène ya mpepo. Mosali moko na mpepo angangaki ete: “Soki bolingi kobondela, oyo ezali ntango mpo na kosala yango!” Mpe tobondelaki Jéhovah ete, soki ezalaki mokano na ye, tokoka kokita kozanga nkaká. Elekaki malamu. Totondaki ye mingi mpenza.

NA NTEMBE te, nazali na bantina mosusu ya komonisa botondi. Na mibu 79, nazali naino na mwa makasi mpe na kolongono ya nzoto mpo na kosakola nsango malamu lokola pionnier. Lisusu, longola mapamboli maye mazwami na libota mobimba ya Jéhovah, nakutani na bisengo mingi kati na bomoi. Na nyonso, nazwaki esengo ya kolekisa mbula 60 mpo na kosalela Jéhovah, oyo nasalaki ndambo na yango lokola pionnier.

Makambo nyonso mabandaki epai na tata na ngai, wana tozalaki naino kofanda na Carbondale (États-Unis). Azalaki moko na basangani ya etuluku oyo ebéngamaki ete Bayekoli na Klisto mpe alingaki kokóma pasteur. Kasi, alembaki mpo na mikakatano oyo azwaki na makita mibale na Biblia, mpo ete azalaki kokanisa lolenge mosusu na likambo litali Trinité, molimo ekufaka te mpe monyoko ya seko.

Na nsuka, na 1924, ayokaki na esengo mpenza, solo ya Biblia oyo epesamaki na pionnier moko na Bayekoli ya Biblia. Na ntango wana nazalaki bobele na mibu 12. Tata na ngai azalaki na esengo ya koyoka ete bobele ye moko te nde azalaki kokanisa ete, Trinité, lifelo ya móto mpe molimo ekufaka te, ezalaki mateya ya lokuta. Mosika te, libota na biso libandaki koyangana elongo na Bayekoli ya Biblia, nkombo oyo bazalaki liboso kobenga ba Témoins de Jéhovah. Nazalaki mpenza na botondi na koyeba solo na ntina na Jéhovah mpe Liloba na ye.

Kasi, liboso mpenza, ezalaki matáta. Moto oyo alakisaki solo epai na tata na ngai, azangaki bosembo mpe akómaki na etamboli ya mbindo. Abetisaki tata na ngai libaku, kasi ngai mpe mama na ngai tobetaki libaku te. Na ntango wana nazalaki na mibu 15, nazalaki mwana na liboso kati na bana motoba mpe, lokola mama na ngai, nakangamaki na solo.

Na boumeli ya mobu 1927, tozwaki nsango ete assemblée monene ya Bayekoli ya Biblia esengelaki kosalama na Canada, na Toronto. Tata na ngai alobaki ete azalaki na makoki te mpo na kokende, kasi mama na ngai azalaki mwasi ya molende. Abandaki koteka mwa biloko ya ndako, mpe, ntango elaká ya assemblée ekokaki, alongaki kozwa badolare mwambe. Na mosolo wana, mama na ngai mpe ngai tokendeki na Toronto, mboka oyo etangwaki soko na bakilometele 1 600 na esika oyo tozalaki kofanda na komatáká mituka. Tosengelaki kolekisa mikolo mitano mpe komata bavuatire mbala 37 mpo na kokóma mokolo moko liboso na mokolo ya assemblée. Lokola tozalaki bobele na mosolo moke, bapesaki biso ndako ya ofele. Ntango ndeko A. Macmillan ayokaki nsango ya mobembo na biso, akomaki na zulunalo ya assemblée, lisoló oyo ete “Kobakisama na ntalo ya bingbunduka, ezali kotungisa Bayekoli ya Biblia te.”

Mama na ngai amemaki ba cartes postales mpo na kopesa bansango na biso epai na tata na ngai. Yango wana na nsuka, tata na ngai akanaki kolanda biso, mpe akómaki mpenza na vuatire bobele na ntango ya diskur piblike ya nsuka ya assemblée. Tosengelaki lisusu te kozwa bavuatire mingi mpo na kozonga. Ezalaki assemblée moko ya esengo mingi. Nazalaki mpenza na botondi lokola nasanganaki na yango, mpe esalisaki tata na ngai na kozala lisusu na bokatikati na elimo na ye.

Na boumeli ya bambula, wana bazalaki kotuna lingomba na ngai, nazalaki koloba ete “IBSA”; wana ezalaki nkomá ya bokuse na Lingelesi mpo na Lisangá ya Bayekoli ya Biblia na mokili mobimba. Kasi nazalaki kosepela mpenza te na nkombo yango. Nazalaki bongo na botondi wana na 1931, na assemblée ya Colombus, na Ohio, tozwaki nkombo Témoins de Jéhovah.

Mosala na ngai ya molakisi

Kati na mapamboli maye mabongisaki bomoi na ngai, mosusu etali miziki. Nazalaki kolinga miziki mingi mpe nokinoki nayekolaki kobeta piano. Na boumeli ya bambula, nazalaki na esengo ya kobeta piano wana loyembo moko eyembamaki na Salle du Royaume. Liboso ete la Société abanda kosala ba enregistrements ya banzembo, ndeko moko misionere ya Papouasie​—Nouvelle-Guinée asengaki tosala enregistrement ya mwa banzembo mpo ete ba Papous bakoka koyekola koyemba yango. Nazwaki mpenza esengo ya kosala yango.

Kasi, nazalaki kosepela mingi kobeta clarinette. Nazalaki kobeta yango na lisangá ya miziki ya université. Profesere azalaki kosepela na lolenge na ngai ya kobeta kino asengaki ngai ete nakóta na lisangá ya miziki lisalemi na mibali. Kino eleko wana, naino mwasi moko te asila kobeta miziki na lisangá ya mibali; yango wana, ntango babɛti miziki bayokaki.likanisi wana ya profesere, bakanaki kotika kobeta miziki. Kasi basalaki lisusu yango te ntango bazwaki mokanda ete soki bakotika kobeta miziki, bakolongwa. Nabandisaki momeseno mosusu wana basɛngaki ngai ete nasala lifili elongo na lisangá ya miziki mokolo oyo tolingaki kobeta miziki. Nsango yango epalanganaki, mpe zulunalo ekomaki na titre moko monene ete, “Mwasi kati lisangá ya miziki.”

Na nsuka, basengaki ete nalakisaka miziki. Nzokande, kobanzáká na mikakatano oyo nasengelaki kokutana na yango soki bokosɛnga ete nabeta loyembo moko ya mangomba to oyo emonisi bolingo ya ekólo, nakanaki kolakisa Lisoló na bato na esika ete nalakisa miziki. Kasi libongwani wana epekisaki ngai te mwa bambula nsima, ete nabeta clarinette kati na masangá ya miziki ya bamboka ekeseni epai nazalaki kokende na mabaku ya ba assemblées minene ya ba Témoins de Jéhovah.

Na boumeli ya ntango, nakómaki profesere ya Histoire na college monene oyo ezalaki na Detroit. Mokolo moko, directeur asengaki ngai ete nasala komande ya mokanda moko kati na mikanda ya sika oyo alakisaki ngai. Na kotaleláká yango, namonaki ete, nkombo ya Jéhovah ekomamaki mbala mwambe kati na mokanda oyo bazalaki kosalela kino ntango wana, kasi mikanda ya sika mizalaki bobele kotanga nkombo Nzambe ya Baebele, nzokande mbala mingi bankombo ya banzambe ya Bapakano lokola Rê, Molec, Zeus mpe Jupiter, ezalaki kati na yango. Wana momonisi moko ayaki, natunaki ye mpo na nini mikanda ya sika mizalaki kolobela Jéhovah te. Alobaki na ngai ete: “Totyaki nkombo yango te mpo na ba Témoins de Jéhovah.” Nalobaki na ye ete: “Malamu, na boye, nakosala komande ya mokanda na bino te.” Abwakaki mokanda yango na nkanda kati na sakosi na ye mpe abimaki lokola mopepe makasi.

Na nsima, nalimbolaki epai na directeur ete tozali mpenza na mposa ya mokanda ya sika te, na komonisáká bantina malamu. Andimaki maloba na ngai. Bato nyonso basepelaki na ekateli yango ntango bayokaki bobele nsima ya mwa basanza ete, programme ebongolamaki mpe esengelaki kolakisa Sociologie (boyekoli ya mabota) na esika ya Histoire. Oyo nde perte eteyelo esengelaki kosala soki basombaki mikanda ya sika ya Histoire!

Nalekisaki bantango malamu na kotangisa mpe nazalaki makasi mpo na kopesa disipline. Mpo na yango, nazwaki baninga ya sembo. Nazwaki lisusu makoki ya kopesa litatoli na libaku malamu. Kasi, na nsima, bantango mpe makambo makanelami te epusaki ngai ete nabanda mosala ya pionnier.

Ba assemblées internationales

Nsima na mibu 20 ya kotangisa, nazalaki lisusu komona malamu te. Lisusu, baboti na ngai bazalaki na mposa na ngai mpe tata na ngai alobaki na ngai ete, ezali na mosala ya koteya ya ntina mingi oyo esengeli kokokisama. Abakisaki ete Jéhovah akosenzela ete nazanga eloko te. Natikaki bongo kotangisa na 1955. Lipamboli oyo nazwaki na liboso, ezalaki oyo ya kokende na Mpótó mpo na koyangana na ba assemblées “Bokonzi oyo bozali kolónga.” Nazalaki mpenza na botondi na kozala elongo na ebele na bandeko ya Mpótó, oyo mingi na bango banyokwamaki na boumeli ya Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Mpe nasepelaki mingi mpenza, mpo na libaku kitoko ya kozala kati na bato 107 000 baoyo batondisaki Zeppelinwiese, stade ya Zeppelin, na mboka Nüremberg, epai Hitler akanaki kosala lifili ya bolóngi nsima na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba.

Wana ezalaki bobele mobembo ya yambo oyo nazwaki esengo ya kosala yango na mokili mobimba. Na 1963, mama na ngai mpe ngai tozalaki kati na bamonisi 583 baoyo batambolaki na mokili mpo na ba assemblées “Nsango malamu ya seko.” Tosalaki mobembo yango na New York mpe na Mpótó, na Asia mpe na bisanga ya Pacifique, mpe tosilisaki na Pasadena, na Californie. Ezali na boumeli ya mobembo yango nde tokutanaki na likambo ya nsomo oyo nalobaki na ebandeli ya lisoló. Mibembo misusu mipesaki biso nzela na koyangana na ba assemblées na Amerike ya Ngelé, kati na Pacifique Sud mpe na Afrike. Mibembo yango mipesaki esengo na bomoi na ngai mpe, na lolenge na ngai ya moto oyo alingi miziki, kobeta kati na masangá ya miziki na ba assemblées yango ezalaki esengo mosusu ebakisamaki.

Nakóti na molongó ya ba pionniers

Na 1955, ntango touti Mpótó, nakómaki pionnier mpe nasalaki elongo na mama na ngai na boumeli ya mbula moko. Nsima la Société asengaki ngai ete nasala elongo na lisangá moke ya Apalachicola, na Ouest ya Floride. Na boumeli ya mbula nsambo, nakokisaki mosala na ngai kati na territoire yango elongo na ndeko mwasi mosusu, mpe mosika te lisangá etongaki salle ya sika mpo na kolónga bokóli. Mosala mozalaki sé kokóla mpe, mosika te, lisangá moko lisalemaki na Port Saint Joe. Nalekisaki mibu 11 na kosala elongo na masangá misato ya Floride.

Mokolo moko, mokengeli moko ya zongazonga asengaki ngai ete naluka esika mpo na kosala assemblée ya circonscription. Nazwaki esika na bandako kitoko ya Centennial Building na Port Saint Joe bobele na 10 dolare mpamba. Kasi esengelaki na biso lisusu ko. zwa esika mpo na koteka mwa bilei (cafétéria). Tokanisaki bongo kosalela biteyelo. Kasi, directeur ya eteyelo aboyaki mpe atindaki ngai epai na comité ya administration. Guvernere mpe ayaki na likita wana, mpamba te azalaki na mposa ete tosalela esika moko mpo na bilei. Wana atunaki soki epekiseli ezalaki ete tosalela yango te, président ya conseil d’administration alobaki ete ata lingomba moko te esili kosalela bandako ya biteyelo. Guvernere abongwanaki epai na ngai mpo ete nayanola. Nazalaki na mwa ba programme oyo emonisaki ete tosalelaki bandako ya biteyelo mpo na makita kati na bingumba mosusu. Lisusu, nalakisaki ye mokapo ya Misala 19:9, epai ekomami ete Paulo ateyaki kati na ndako ya eteyelo. Likambo likátamaki. comité eyokanaki elongo na Guvernere mpo na kondima ete tofutela esika mpo na cafétéria na ntalo ya 36 dolare.

Wana nazwaki batisimo, na mibu 13, nasalaki libondeli oyo ete: “O Nzambe, salisa ngai ete namema ata moto moko kati na solo.” Uta kala, libondeli yango esili kondimama mbala na mbala, mpamba te nasili kozwa esengo ya kosalisa bato mingi na kozwa etelemelo mpo na Jéhovah mpe Bokonzi na ye. Nzokande, mbala mingi, nazalaki kotindama na lisangá mosusu bobele liboso ete moto oyo azali koyekola Biblia elongo na ngai amipesa na Nzambe mpe liboso ete azwa batisimo. Kasi nasili kozwa libaku kitoko ya kolona mpe komwangisa mai. Mingi na bayekoli yango basili komimonisa baninga ya sembo. Mosala oyo na kobota mbuma mingi mopesaki ngai bantina mosusu ya komonisa botondi.

Lisalisi ya bipanzeli na nsango

Wana bipanzeli na nsango (radio, televizyo, bazulunalo mpe bongo na bongo) ya bituká mingi bisepelaki te na ba Témoins de Jéhovah, nazali na esengo ya koloba ete oyo ya Deland, na Floride​—epai nazali lelo—​esili kosalisa ngai na kopesa litatoli. Na ndakisa, na boumeli na moko na mibembo na mokili mobimba, oyo tozalaki kosala mpo na koyangana na ba assemblées, mama na ngai mpe ngai totindaki rapport molai epai na zulunalo ya mboka wana, oyo ebimisaki yango elongo na ba fotó na biso. Ezalaki bongo masoló ya mobembo, kasi tozalaki kozwela yango litomba mpo na kopesa litatoli na nkombo ya Jéhovah mpe Bokonzi na ye.

Ezali bobele bongo mpo na litatoli oyo nazali kopesa na balabala. Nazali na bakiti mibale ekongunzamaka, oyo natyaka na esika balabala mibale ekutani: moko mpo na ngai mpe mosusu mpo na mikanda. Mokolo mosusu, zulunalo ya mboka wana ebimisaki lisoló na ndambo na lokasa elongo na fotó na ngai. Lisoló yango lizalaki na titre oyo: “Na Deland, Lottie azali kolanda bobele nzela ya baboti na ye ba Témoins.” Kala mingi te, na 1987, lisoló moko libimaki na ndambo na lokasa elongo na fotó ya langilangi, na titre oyo: “Mpo na koteya Klisto, Lottie Hall asili kozwa esika ya kofanda na balabala.” Mbula elandaki, zulunalo mosusu ebimisaki fotó na ngai na ezipeli na yango, elongo na lisoló oyo: “Azali bobele wana” mpe lisoló: “Likoló na kiti ekongunzamaka, profesere ya kala afandi na balabala mpo na kokokisa mosala ya kopalanganisa nsango malamu ya ba Témoins de Jéhovah.” Mbala minei, televizyo ya mboka wana elakisaki bililingi likoló na lolenge oyo nazali kopesa litatoli. Nazali kosangana mpenza na mitindo nyonso ya mosala ya kosakola: kosakola ndako na ndako, bozongeli ya sika mpe boyekoli na Biblia. Kasi, na ntina na mbula na ngai mpe bankaká na ngai ya nzoto, nazali kolekisa ntango mingi na kopesa litatoli na balabala.

Na kotalela bomoi na nsima, nasengeli koloba ete nazali na ebele ya bantina ya kozala na botondi. Bakisa na mabaku kitoko nyonso oyo mazwami na libota na Jéhovah, nazwaki libaku mosusu ya kobongisa elimo ya ebele na bilenge na kozaláká profesere; nazwaki esengo ya koyangana na ba assemblées mingi kati na mokili mobimba; mosala ya pionnier mobotaki mbuma mingi; mpe nazalaki lisusu na esengo na miziki. Epai mosusu, nasili kopesa litatoli na nzela na bipanzeli na nsango. Solo mpenza, nakoki koloba lokola Davidi ete: “Nakosanzola nkombo na Nzambe na loyembo, mpe nakokumisa ye na matondi.”​—Nzembo 69:30.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto