Esengo bipai binso kati na mokili
“Tala basali na ngai bakoyemba na esengo, mpo na ezalela malamu ya motema na bango.” (Yisaya 65:14, MN) Jéhovah alobaki bongo na nzela na Yisaya, mpe maloba yango mazwi kokokisama na yango monene epai na ba Témoins de Jéhovah. Mpo na nini bazali na esengo monene na mitema na bango? Mpo ete bazali kosambela Jéhovah Nzambe na bomoko. Jéhovah azali “Nzambe na esengo,” mpe baoyo bakosambelaka ye “bazali na esengo kati na Jéhovah.” (1 Timote 1:11; Zakari 10:7) Losambo ya esengo esangisi bango na libota bobele moko ya bato oyo bazali kosakola nsango malamu ya Bokonzi mpe bazali koyemba loyembo ya masanzoli epai na Nzambe na bango, bipai binso kati na mokili.—Emoniseli 7:9, 10.
Esengo oyo moto akoki kolongola biso yango te
Ba Témoins de Jéhovah bazali koyebisa nkombo mpe Bokonzi na Nzambe, mpe mpo na bango mosala yango mozali mpenza liziba ya esengo na libela. (Malako 13:10) Ekokani lisusu na maloba ya mokomi na Nzembo: “Bomikembisa na nkombo na ye ya bulee. Tika et baoyo bakolukaka Jéhovah basepela na mitema!”—Nzembo 105:3.
Mbala mingi, baklisto basengeli kolonga mikakatano mpo na kokoka kopesa litatoli. Na yango, wana amipesaki epai na Jéhovah, Moespanyole moko na nkombo lsidro azalaki na mposa ya kolobela Nzambe na ye epai na bazalani na ye. Kasi mosala na ye ya sofele mozalaki kotikela ye bobele ntango moke; na yango, azalaki kosala mibembo na butu mpe azalaki kolala na moi. lsidro alingaki kopesa litatoli epai na basofele mosusu, kasi ndenge nini akokaki kosala yango?
Atyaki radio moko C.B. kati na motuka na ye, radio oyo alingaki kosalela mpo ete alobana elongo na basofele mosusu. Nokinoki amonaki ete ligne 13 esalelamaka mingi te, mpe azwaki ekateli ya kosalela yango. Ya solo, na ebandeli, ntango asengaki na basofele mosusu ete basolola na ntina na Biblia na nzela ya radio, azwaki litomba monene te. Atako bongo, bamosusu bayokaki. Yango ebandaki koyebana, mpe mingi na basofele Baespanyole bazalaki kolanda ligne 13 na ba radios na bango. Sikawa, lsidro azwaki nsango ete bamoko kati na bango bazali kosala nyonso mpo na kolanda koyekola Biblia.
Moitalié moko ayokaki bato koloba na ntina na ba Témoins de Jéhovah kati na lisolo moko oyo alobanaki elongo na bato mosusu kati na bus. Mwasi na ye ayebaki bango na nzela ya moninga na ye moko. Bango nyonso mibale bayekolaki Biblia mpe bakómaki na mposa ya koyebisa makambo oyo bazalaki koyekola epai na bato mosusu. Mposa yango ezalaki makasi kino mobali wana aboyaki esika monene batyaki ye na mosala mpe mwasi na ye atikaki mosala oyo azalaki kozwela mosolo mingi, bobele mpo ete balekisa ntango mingi na kosakola nsango malamu ya Bokonzi. Bazwaki nde mbano? Na ntembe te. Mobali alobi ete: “Uta tozali kati na solo, mwasi na ngai mpe ngai tosili kozwa esengo ya kosalisa bato 20 na kozwa boyebi ya solo ya mikano na Nzambe Soki mpokwa ekómi, wana ekozongaka ngai na ndako nsima na kolekisa mokolo mobimba kati na mosala ya Jéhovah, ya solo, nalembaka nde nazalaka na esengo, mpe nakotondoko Jéhovah lokola apesaki ngai esengo oyo moto akoki kolongola ngai yango te.”
“Kino nsuka na mokili”
Ezala esika nini bafandi, ata “na nsuka na mokili,” basangani na libota ya esengo na Nzambe bazali na molende motindo moko (Misala 1:8) Bisika oyo bizali mosika mingi lokola Nord ya Groenland, bizali bobele moke Nzokande, ata kuna, na mosika ya bakilometele koleka 300 leka ndelo ya cercle polaire ezali na lisangá moko, oyo ya llulissat, lisangá lisalami na bato 19. Bato yango bazali kosakola bobele nsango malamu moko oyo babalani Baitalié oyo touti kolobela bazali kosakola, mpe bazwaki esengo mingi na mobu mouti koleka wana bamonaki bato nsambo ya mboka Groenlandais bazwaki batisimo nsima wana bamipesaki epai na Jéhovah.
Mosika mpenza na Groenland, na esanga Maurice, kati na Océan lndien, Anjinee azali kozwa esengo. Na ebandeli ezalaki mpenza petee te mpo na ye. Kati na esanga wana ya molunge mingi, bato bakokanisaka ete, ebongi te na elenge mwasi moko ya lnde, oyo abokwami na lingomba ya ba hindous ete asangana na makita ya boklisto, mpe ete asakola epai na bato. Kasi, Anjinee alendendelaki mpe lelo oyo, esili koleka mibu libwa uta ayambaki boklisto, mingi na basangani ya libota na ye bazali koyekola Biblia.
Nsima na Anjinee, tolobela naino Emilio, ye oyo afandi na nsuka na mokili, na mboka Honduras. Ayokaki baninga na ye ya mosala kosolola na ntina na Biblia mpe asanganaki na lisolo na bango. Emilio ayebaki kotanga te, kasi azalaki na esengo ya koyoka mikapo ya Biblia oyo mitangamaki. Solo ya boklisto ekótaki kati na motema na ye, mpe atikaki bomoi na ye ya mbindo mpe atikaki komela masanga mingi. Ba Témoins de Jéhovah bayekolisaki ye kotanga mpe kokoma, mpe azali sikawa mosaleli na Nzambe oyo azali kati na libota ya esengo.
Na Alaska, esika ekabwani na mboka Honduras na ntaká na bankóto ya bakilometele, mama ya libota moko ya ba Eskimo ayebaki solo na boklisto bobele moko oyo. Mwasi yango azalaki kofanda kati na mboka moko etangwi mosika mpe akokaki kosolola elongo na ba Témoins de Jéhovah bobele na nzela ya mikanda. Ayekola bongo Biblia na nzela na mikanda. Atunaki mituna na nzela na mikanda, mpe, sikawa, azali koyebisa oyo ye ayebi epai na baninga na ye na molende. Tokokaki mpenza kolobela bandakisa mingi. Kati na mokili mobimba, basokemi bazali “kosalela Jéhovah na esengo kati na motema.”—Nzembo 100:2.
Bozala na bolingo kati na bino
Moko na biloko oyo bizali kobenda bato banso wana, ezali bolingo oyo bozali kati na libota ya esengo na Nzambe. Yesu alobaki ete: “Na bongo, bato banso bakoyeba bino ete bozali bayekoli na ngai soko bozalani na bolingo.” (Yoane 13:35) Bolingo na boklisto ekomonanaka kati na bomoi ya mokolo na mokolo ya baklisto ya solo, kasi mingi mpenza na ntango ya makámá.
Mboka moko ya Afrike epai kuna mosala ya ba Témoins de Jéhovah mopekisami mpenza, bakomaki na eleko moko ya kokauka makasi (sécheresse). Bato nkóto zomi bakufaki, lisusu mpe bitonga ya ngombe. Ndenge nini ba Témoins babikaki? Na kolyaka misisa mpe mikokoli ya savoka oyo bazalaki kotokisa na móto. Kasi, ezalela na bango ya mpasi eyaki kokita, mpamba te, na lisalisi na Nzambe, ba Témoins de Jéhovah ya mikili misusu basalaki nyonso, mpe bazwaki lotomo ya kotindela bango 25 tonnes ya bilei mpe biloko mosusu ya ntina mingi. Lisusu, atako epekiseli, biloko yango bimemamaki na libateli ya basoda!
Ba Témoins de Jéhovah wana ya Afrike bazwaki esengo mpenza wana bamonaki elembo ya bolingo ya bandeko na bango, mpe maloba oyo na Yisaya makokanaki epai na bango: “Tala loboko na Jéhovah ezali mokuse te ete ezanga kobikisa yo; litoi na ye lizali na bozito te ete ezanga koyoka.”—Yisaya 59:1.
Libota ya kimya
Basokemi babendami na libota ya esengo na Nzambe mpo na ntina oyo mosusu: basangani na yango basilá kotika banzela mabe ya mokili mpe basilá ‘kotula mipanga na bango lokola bitimweli.’ (Yisaya 2:4) Moto moko ya mboka Salvador atyaki na ndako na ye, biloko mingi oyo bizalaki kokundwela ye mosala na ye ya soda. Na koyekoláká Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah, abongwanaki mokemoke epai na makambo ya kimya mingi. Na nsima, alongolaki biloko nyonso oyo bizalaki na boyokani na bitumba mpe abandaki kosakola na molende.
Na nsima, batemeli na bokonzi ya mboka bayangelaki mboka na ye mpe bakangaki ye: na lolenge emonani, bakangaki ye bobele mpo na mosala ya soda oyo azalaki kosala liboso. Ye mpe alimbolaki bango ete, asila kolongwa na mosala ya soda, mpe ete azalaki Témoin de Jéhovah. Kofundáká ye ete azalaki na bibundeli epai na ye, batomboki wana balukaki na ndako na ye mobimba, nde bakutaki eloko te. Mokonzi na bango atunaki bongo bafandi ya zingazinga na ntina na ye. Moko na biyano oyo bizalaki kopesama ezalaki oyo ete: “Mokolo mobimba, akotambolaka na balabala longwa na nsuka kino nsuka mpo na kolobela Biblia.’ Batikaki moto yango. Na ntembe te, molende na ye ebikisaki bomoi na ye.
Lisolo moko euti na Afrike elobeli basoda mibale oyo bayekolaki Biblia elongo na ba Témoins de Jéhovah. Moko azalaki kati na limpinga ya ekolo na bango, mosusu azalaki kati na batomboki. Mwa bantango nsima, moko mpe mosusu bazwaki ekateli ya “kotula mipanga na bango lokola bitimweli” mpe balongwaki na mosala ya soda. Ntango bayanganaki mpo na mbala ya liboso na likita ya boklisto, soda motomboki ya kala atunaki na mosusu ete: “Ozali kosala nini awa?” Mpe mosusu ayanoli ye ete: “Bongo yo ozali kosala nini awa?” Lisolo liyebisi biso ete, “bayambanaki moko na mosusu na kobimisáká mpisoli ya esengo, mpo ete kimya ezalaki kati na bango.” Na ntembe te, basoda mibale wana ya kala balobaki epai na Nzambe ete: “E Nzambe, Nzambe ya lobiko na ngai, sikola ngai na koboma, mpo ete lolemo na ngai elobela boyengebene na yo na esengo.”—Nzembo 51:14, MN.
“Osili komona mpasi na ngai”
“Nakozala na esengo mpe nakosepela na boboto na yo, mpamba te osili komona mpasi na ngai mpe omonaki makama ya molimo na ngai.” (Nzembo 31:7, MN) Ezali bongo nde mokomi na Nzembo alobaki, mpe bobele bongo, bato mingi lelo bazali kosepela mpo ete Liloba na Nzambe lizali kosalisa bango kolónga mpasi na bango. Témoin de Jéhovah moko, ye mwasi Mofalansé, abandaki koyekola Biblia elongo na moto moko azalaki na maladi babengi Schizophrène (maladi ya motó) oyo alekisi mwa ntango mingi mpo na komisalisa na lopitalo, nde azwaki matomba malamu te. Nsima ya poso moko, monganga atunaki moto na ye ya maladi ete: “Ozali kokanga ntina ya bandimbola mwasi oyo apesaka likoló na Biblia?” Na yango, na poso elandaki, Témoin akendeki epai na monganga mpo ete boyekoli esalama na miso na ye.
Nsima na boyekoli, monganga alobaki na Témoin ete: “Na boumeli ya bambula, namipesaki mpo na kotalela mangomba ya bato na ngai ya maladi, mpe namonaki ete ata moko te ezalaki kopesa elendiseli malamu. Kasi, mpo na lingomba na bino, makambo mazali lolenge mosusu. Madame P ayaka awa mbala mibale na poso moko, mpe ba consultations oyo ezali mpamba te. Nzokande, mateya na yo ya Biblia mpe batoli na yo kitoko ezali kokokisa mosala malamu, mpe esengaka lifuti te. Azali kosala bokoli kitoko mpenza. Landa kosala bongo, mpe omindimisa na mposa na ngai ya kosalana elongo na yo, mokolo nyonso oyo okolinga.”
Totangi kati na Biblia ete: “Esengo na bato oyo bakosanzolaka yo! E Jéhovah, bazali kotambola na pole ya elongi na yo. Bazali ntango nyonso kosepela na nkombo na yo.” (Nzembo 89:15, 16, MN) Ba Témoins de Jéhovah bayebi ete nzembo elobi solo. Kati na mokili mobimba, minoko na bango mizali koyokisa mingongo ya esengo oyo mikosanzolaka Jéhovah. Ebele na bato oyo bauti longwa na mabota bazali koya mpo na kosanzola Nzambe elongo na bango. Mpo na nini te kosangana na bango, rnpo ete yo mpe omeka esengo yango?
[Elilingi na lokasa 7]
Ba Témoin de Jehovah ya Europe de l’ɛst bazali na esengo: bazali sikawa na bonsomi yo kozwa mpe ya koyekola Mosenzeli na minoko na bongo