Libota ya esengo
LIBOTA ya esengo! Ezali lelo na libota oyo bakoki kobenga ete ezali ya esengo? Oyo ekoki kosepela mpo ete esilisi mobulu, koboma, bobóla, kobebisa ezingelo mpe mpasi oyo ekoutaka na yango, kobeba ya politike, koyinana kati na mangomba? Ezali mpenza na libota moko oyo lizali na elikya ya kolónga motindo wana? Te!
Tokoloba boni mpo na makambo mazali koleka na mokili? Na le 16 Juillet oyo euti koleka, Mikhail Gorbatchev, prézida ya U.R.S.S, alobaki boye: “Nakanisi ete, boyokani kati na mikili ezali lelo na nsuka na eleko ya liboso mpe ebandi ekeke ya sika ya kimya makasi mpe ekoumela.” Kasi, bobele na poso wana, kati na zulunalo Time bato bakokaki kotanga ete, États-Unis ezalaki naino kotalisa mindoki 120 ya nikleere epai na mboka Moscou, mokomoko na yango ezali na makasi koleka mpo na kobebisa engumba yango. Mpe ntembe ezali te ete U.R.S.S mpe bazali na oyo ya bango mpo na kobebisa États-Unis. Lokola lelo oyo ebele ya Mikili misangani kati na O.N.U. misili kozwa mayele ya kosala mindoki ya nikleere, tokoki bongo komituna soki mokili nini ekosalela mindoki yango liboso. Emonani mpenza ete esengo ezali te.
Libota oyo lizali solo na esengo
Esili kosalema bobele mbala moko na boumeli ya Lisolo na bato—yango ebandaki esili koleka sikawa soko mibu 3 500—libota moko lizalaki mpenza na esengo. Ezali bongo Yisraele ya kala. Nsima wana Nzambe abimisaki bango na monyoko na Ezipito, Baebele basepelaki, bayembaki loyembo ya bolóngi wana bakambámáki na Moïse; esengo ya Bayisraele elongwaki na bango te wana bazalaki kotósa Nzambe na bango mpe Mosikoli na bango.—Exode 15:1-21; Deteronome 28:1, 2, 15, 47.
Na nsé na boyangeli ya Salomo, “Yuda mpe Yisraele bazalaki mingi lokola zelo pembeni na mai-na-monana; balyaki mpe bamelaki mpe bayokaki esengo.” Esengo, oyo ezalaki mingi na eleko yango, ekómaki monene mpenza wana batongaki ndako oyo eleki mpenza kitoko kati na Lisolo na bato, temple na Yelusaleme, oyo esalemaki mpo na losambo ya Jéhovah.—1 Mikonzi 4:20; 6:11-14.
Libota ya esengo na eleko na biso
Yisraele ya kala ezalaki komonisa libota moko na eleko na biso. Ezali bongo libota nini? Ezali nde Mokili ya Yisraele, oyo ezali na Moyen-Orient? Bansango oyo ezali kokómela biso emonisi ete, Yisraele ezali mboka ya bitumba mingi epai kuna esengo ekoki mpenza kozala te. Mikili oyo mikomilobaka ete misangani, mizali mpenza na esengo ya solo? Te, emipesi mingi mpenza na makambo na bango ya politike. Kati na mingi ya mikili wana oyo
misangani na O.N.U., lokoso, kobeba mpe kozanga sembo etondi mpenza, nzokande bato ya mikili wana bazali kosala makasi bobele bango moko mpo na kozwa nzela ya kobikela.—Masese 28:15; 29:2.
Nzokande, tozali lelo komona libota mokolizali mpenza na esengo. Libota yango likosalaka politike te, mpamba te, mokonzi na bango, Yesu Klisto, alobaki ete “bazali bato na mokilite.” (Yoane 15:19) Bato ya libota yango bautina na “mabota nyonso mpe na bikolo nyonso mpe minoko nyonso;” nzokande, O.N.U. alóngi te na kosangisa basangani na yango. (Emoniseli 7:4, 9) Mpo na popilasio na yango ya bato soko bamilió minei, libota wana lizali monene koleka mikili pene na 60 kati na mikili 160 oyo misangani kati na O.N.U. Mpe, atako bamilió minei ya bato wana bazali koloba minoko soko 200, bazali na bomoko na “monoko na peto.”—Sofoni 3:9.
Ezali mpenza likambo na kokamwa ete bato bakeseni na bizaleli mpe na makambo na bango, baloba monoko moko? Te, mpamba te kati na makambo mosusu, monoko yango moko oyo mozali na nguya ya kosangisa, esalemi na nsango oyo ekosakolaka Bokonzi na Nzambe ya boyengebene. Libota ya esengo euti longwa na “nsuka na mokili,” mpe ezali kati na mokili mobimba, mpe eyebani na nkombo ba ‘Témoins de Jéhovah.” (Yisaya 43:5-7, 10; Zakari 8:23) Ata esika nini okokende, to pene na mokili mobimba, okokuta ba Témoins de Jéhovah.
Na Yisaya 2:2-4, mosakoli na Nzambe alobeli ebele ya bato oyo bazali kouta longwa na mabota, na kolobáká ete: “Boya, tobuta na ngomba na Jéhovah, na ndako ya Nzambe na Yakobo; ye akolakisa biso banzela na ye mpe biso tokotambola na yango.” Na molende mpenza, ebele yango bazali kobenga bato mosusu ete bazwa malako oyo mazali kouta na Jéhovah na nzela na Liloba na ye, Biblia, mpo ete bayekola kosala mokano na ye. Libota yango lizali kolanda nzela ya kimya ya solo, mpamba te basangani na yango basilá ‘kotula mipanga na bango ete mizala bitimweli mpe makongá na bango ete mazala bikateli ya matiti, mpe bakoyekolaka lisusu etumba te.’ Tala mpenza libota ya esengo!
Yo mpe okoki kozala na esengo yango mpe koyeba lolenge mokolo oyo mobelemi mokozala, oyo Mokonzi, Klisto Yesu akolongola na mabelé, bato mpe bikonzi nyonso oyo bizali komema yango na libebi, mpe akosala ete mabelé oyo makóma paradis. (Danyele 2:44; Matai 6:9, 10) Lokola emonisi yango nkasa elandi, libota na bomoko oyo lisalemi na ba Témoins de Jéhovah, lizali uta sikawa kozwa esengo monene na kokokisáká mosala ya komilengela mpo na eleko monene ya kimya ya solo oyo ezali liboso na bato.