Babola bakoki nde komimonisa sembo?
Amelia azalaki bobele na mikolo 29 wana nkoko na ye ya mwasi amemaki ye epai na monganga. Mama na ye asalaki lisusu mobembo te, mpamba te azalaki maladi mpe atikali na bana na ye mosusu minei.
Tata na ye akendeki koluka mosala. Monganga asalaki ba examens epai na mwana. Emonanaki na mwana ete azalaki kolya malamu te, maladi oyo ezali komonana mingi na Afrique Occidentale (epai moi elalaka).
Kasi mpasi monene ezalaki nde oyo babengi cellulite (mosisa movimbi).
Ntólo moke ya Amelia ezalaki kobisa maina mpo na mpasi wana makasi.
Ntango monganga apesaki ordonnance, nkoko-mwasi atunaki ete: “tokofuta boni mpo na mosala na yo?” Monganga ayanolaki ete: “katikati na 20 francs mpe 30 francs.” Nkoko-mwasi aningisaki motó.
Azalaki ata na 10 francs te mpo na kofuta ba examens basalaki na mwana. Alobi ete: “Epai wapi okanisi ete tokozwa mbongo oyo?”
“Monganga alobaki na ye mbala mingi ete, “osengeli kozwa mbongo wana epai moko. Senga na bandeko na yo, na baninga na yo. Soki tosalisi maladi oyo te, ekosilisa makila mingi, mpe mwana akokufa.”
Libota ya Amélia elongaki na kozwa mosolo mosengamaki, mpe mwana abikaki. Nzokande, kati na mikili na bozwi mingi te, bato mingi bazali na likoki te ya kodefa mbongo epai na baninga na bango to epai na basangani ya mabota na bango. Elikya na kobongisama ya ezalela na bango na makambo ya nkita ezali bobele moke.
La situation des enfants dans le monde 1989, rapport epesami na UNICEF (lisangani ya mabota mpo na kosalisa bana), elobi ete: “Nsima na bambula mingi ya bokóli ya mbala na mbala na makambo ya nkita, bibolo mingi ya mokili bizangi lisusu na bobólá.” Na Afrike mpe Amerike Latine, lifuta na mosala ya moto ekiti longwa na 10 % kino 25 % na bambula 1980. Lisusu, na boumeli ya mibu miuti koleka, mosolo mpo na kolongono ya nzoto na bato ya bamboka 37 kati na mikili na bozwi mingi te ekiti mpenza na 50 %.
Yango elimboli nini mpo na bato bazali babólá? Mpo na bato mingi, yango elimboli ete bakokoka lisusu kosomba nkisi te, ata bilei mpe te oyo esengeli na bango. Na yango, bana na bango, babalani to mpe baboti na bango bazali na likámá ya kokufa, loba bobele soki bakomizwela mbongo na nzela moko oyo epesameli bango: koyiba! Na yango, bobólá ekoki mpenza komema moto na nzela mibale ya mpasi mpo na bizaleli malamu, oyo ete: boyibi to kufa? Lokuta to nzala? Bokosi to bosenga?
Lisese moko ya Afrique occidentale elobi ete: “Moto akoliaka sé na esika akosalaka.” Na elobeli mosusu, bato bawelaka mabaku nyonso mamonani na bango mpo na komizwila bozwi. Mbala mingi mpenza, bakonzi ya mboka mingi bakosalelaka bokonzi na bango mpo na kozwa kanyáka, mpo na kokima na mosolo ya basali, to mpe koyiba. Tala makanisi na bango: ‘Luka na ntango oyo okoki kosala yango’, to mpe: ‘Ntango mosusu libaku oyo ekozwama lisusu te.’ Lokola makambo na nkita mazali sé kobeba na mikili na bozwi mingi te, bobólá ekoki mpenza kondimisa likanisi oyo engebene yango ete mpo na babólá, bosembo ezali nzela eleki malamu te.
Nzokande, Biblia elobi ete: “Okoyiba te.” (Exode 20:15) Kasi soki babólá bakoki mpenza komimonisa sembo te, mbele ntembe ebetami te mpo na mitinda na Biblia? Mibeko na Nzambe mibongi te na kosalelama, mpe mizali te kokokisa bamposa ya bato yango? Ndakisa ya bankoto na baklisto ya solo baoyo bafandi na‘ mikili na bozwi mingi te, epesi mpenza eyano ekoki na mituna oyo.
[Likanisi ya paragrafe on page 4]
“Moto akoliaka sé na esika akosalaka”
[Elilingi na lokasa 4]
Kati na mikili na bozwi mingi te, ezali babólá nde banyokwami mingi